2010–2019
Mabongisi mpe Bilaka
Sanza ya Zomi 2016


Mabongi mpe Bilaka

Ekoki biso komilengela mpo na banzoto na biso mpe makanisi na biso na kotosaka mabongi oyo ebongisami kati ya Liloba ya Bwanya, mwango epesama ya bonzambe.

Na mpokwa ya lelo, bandeko, nasambeli mpo na bokambi ya Tata na biso ya Lola wana ezali ngai kokabola na bino nsango oyo.

Na 1833 Nkolo asakolaki epai ya Profeta Joseph Smith mpo na bomoi ya bokolongono ya nzoto. Mwango yango ezwami na eteni ya 89 ya Doctrine et Alliances mpe eyebani lokola Liloba ya Bwanya. Ezali kolakisa nzela malamu na maye matali bilei toliaka, mpe ezali kopekisa bosaleli ya biloko oyo ekoki kolukela biso maladi na nzoto.

Baoyo bazali kotosa mitindo ya Nkolo mpe bazali na bondimi na Liloba ya Bwanya balakelami mapamboli na bango, kati ya mapamboli yango ezali na bokolongono malamu mpe bompikiliki ebakisami.1

Kala te natangaki lisolo moko ya likambo esalemaki na ntina ya bilaka yango. Mondimi ya bondimi moko ya Eklezia, John A. Larsen, asalaki na Etumba ya mibale ya Mokili na Etazini mobateli Masuwa ya USS Cambria. Na ntango ya bitumba na Philippines, nsango eyaki na tina ya boyei lingomba ya babombere mpe ya babongisi bitumba ya bakamikaze. Mitindo epesamaki na lombango mpo na kolongwa. Uta lingomba ya USS Cambria esilaki kolongwa, John mpe baninga na ye misato basangisaki bibundeli mpe bakendaki mbango na libongo, kolikiaka mpo na komata na moko ya bokeyi ya bamasuwa. Na libaku mabe, masuwa ememaka basoda mpe mituka ememaki bango kino na masuwa oyo ezalaki kolongwa. Bato na masuwa wana ezalaki kolongwa, na bokasi ya kolongwa lokola na lombango, bazalaki na mosala likolo ya gwagwa mpe bazalaki na ntango bobele ya kobwaka basinga na bato minei yango, ete elikia ezalaki bakoka kozala na makoki ya komata na gwagwa.

John, elongo na radio ya bozito akangisaki singa na nsima na ye, amimonaki ya kokangisama na nsuka ya 12 m ya singa, na ngambo ya masuwa nzela ezalaki kino na bobimeli ya mbu. Abandaki komitindika ye moko, kosimbaka liboko nsima mosusu, koyebaka ete soki abungisi esimbeli na ye, akokaki kobunga. Nsima komata kaka nzela ya misato, ayokaki maboko na ye kozikaka na pasi. Alembaki mpenza mpe atikaki mpo akokaki kokoba te.

Na bokasi na ye ekitaki, wana ezalaki ye kobanza mbano na ye, John abelelaki na maloba ya nse epai ya Nzambe, koyebisaka Ye ete ntango nyonso atosaka Liloba ya Bwanya mpe azalaka na bomoi elongobana—mpe sikawa na bozangi elikia asengelaki elaka ya mapamboli.

John nsima alobaki ete ntango asilisaki losambo na ye, ayokaki elikia monene ya bokasi. Abandelaki komata mbala moko lisusu mpe amataki mwa mbangu na singa. Ntango akomaki na gwagwa, mpema na ye ezalaki malamu—mpe pene ya mwa mpasi te. Mapamboli ya kobakisa bokolongono mpe bompikiliki elakaki na Liloba ya Bwanya epesamelaka ye. Apesaki matondi na Tata na ye ya Lola mpe nsima, mpe na mobimba ya bomoi na ye, mpo na eyano na bozangi elikia na ye ya losambo mpo na lisungi.2

Bandeko mibali, ekoki biso komilengela mpo na banzoto na biso mpe makanisi na biso na kotosaka mabongi oyo ebongisami kati ya Liloba ya Bwanya, mwango epesama ya bonzambe. Na motema na ngai mobimba mpe molimo, natatoli na ntina ya mapamboli ya nkembo oyo ezali kozela biso ntango totosi. Ete yango etosama mpenza, nasambeli na nkombo ya Nkolo mpe Mobikisi, Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Doctrine et Alliances 89:18–21.

  2. Tala John A. Larsen, na Robert C. Freeman and Dennis A. Wright, comps., Saints at War: Experiences of Latter-day Saints in World War II (2001), 350–51; esalameli na ndindisa.