2010–2019
Botelama na Bokasi, Bandeko basi kati na Siona
Sanza ya Zomi 2016


Botelema na Bokasi, Bandeko basi ya Siona

Mpo na kobongwana mpe kobatela mayokani, tosengeli koyekola malongi ya nsango malamu mpe kozala na litatoli ya sikisiki ya bosolo na yango.

Nayoki esengo makasi ya kosangana na Ndako ya Makita na bana basi, bilenge basi, mpe bamama ya Eklezia. Toyebi lisusu mpenza ete ezali na bankoto ya maboke mosusu ya bandeko basi, basangani na mokili mobimba, kotalaka milulu oyo, mpe nazali na botondi mpo na libaku mpe makoki oyo ezali kopesa biso nzela ya kosangana elongo na bomoko mpe ntina na mpokwa oyo.

Na sanza ya zomi 2006, Mokambi Gordon B. Hinckley apesaki lisukulu babengi “Rise Up, O Men of God,” nkombo ewuti na nzembo moko ekomama na 1911.1Ezalaki libiangi moko na mosala mpo na mibali ya Eklezia ya kotelema mpe komibongisa. Nakanisaki na Lisukulu wana ntango nasambelaki mpo na koyeba nini kokabola elongo na bino.

Bandeko basi, tozali na “ntango ya likama.”2 Makambo ya mikolo na biso esengeli kokamwisa biso te. Esakolamaki mibu bankoto lokola likebisi mpe lipameli mpo ete tokoka komilengela. Mokapo ya 8 ya Mormon epesi bolimboli moko ya solo ya nkanda ya makambo ya mikolo na biso. Na mokapo oyo, Moroni alobi amoni mikolo na biso, mpe ezali na bitumba mpe makelele ya bitumba, mipepe mabe makasi, bobomibomi, moyibi, mpe bato oyo bazali koloba na biso ete ezali na solo to mabe moko te na miso ya Nzambe. Azali kolimbola bato oyo batondisami na lofundo, bamitungisi na kolataka bilamba ya talo mingi, mpe bakoseka Nzambe. Alakisami bato oyo bamipesi na makambo ya mokili ete bakotika “bazangi, mpe babolumbu, mpe bakoni mpe batungisami baleka mpembeni”3 komonaka bango te.

Moroni atuni motuna ya komisosola na biso—biso oyo tozali na bomoi na bantango oyo. Alobi, “Boniboni boyoki nsoni mpo na kokamata likolo na bino nkombo ya Klisto?”4 Bofundi oyo ezali kolimbola solo likambo ya nzoto ya mokili na biso oyo ezali komata.

Joseph Smith—Matthew alakisi yango na mikolo ya nsuka kutu mpenza “baponami engebene na liyokani”5 bakoyokisa mawa. Bato ya liyokani bazali bana basi, bilenge basi, mpe bandeko basi ya eklezia oyo babatisami mpe basali mayokani na Tata na bango na Lola. Ata biso tozali na likama ya koyokisama mawa na mateya ya lokuta.

Bandeko basi, nandimi te ete makambo ekobonga kokendaka liboso. Soki mipepe ya sikoyo ezali elembo, tozali na mposa ya komilengela mpo na baekumbaki oyo ezali liboso. Ekozala pete ya kobwaka maboko na biso likolo na kozanga elikya. Kasi lokola bato ya liyokani, tosengeli kozanga elikya mokolo moko te. Lokola Mpaka Gary E. Stevenson alobi, “Mapamboli oyo Tata na Lola na bokabi apesi na biso mpo na kozala na bomoi kati na ntango ya likama ezali ete tozali lisusu kati na mobimba ya ntango.”6 Nalingaka libondi ya esakola oyo.

Mokambi Russell M. Nelson alobaki na biso mobu moko eleki: “Kobundisa Eklezia, malongi na ye, mpe lolenge na biso ya kozala na bomoi ekobuta. Mpo na oyo, tozali na mposa ya basi oyo bazali na bososoli ya sikisiki ya malongi ya Klisto mpe oyo bakosalela bososoli wana mpo na koteya mpe kosalisa kobokola nkola ya bato oyo ekoki kotelemela lisumu. Tozali na mposa ya basi oyo bakoki komona boyoki mawa na ndenge na yango nyonso. Tozali na mposa ya basi oyo bayebi lolenge ya kokota na nguya oyo Nzambe abongisi mpo na babateli liyokani mpe oyo balobi babondimi na bango na bondimi mpe bolingani. Tozali na mposa ya basi oyo bazali na makasi mpe limoni ya Mama na biso Ewa.”7

Etinda oyo ekitisi ngai motema ete atako makambo ya mikolo na biso, tozali na bantina mingi ya kosepela mpe kozala bato ya kosepela. Nandimi na motema na ngai mobimba ete biso bandeko basi tozali mpenza na bokasi ya kobotama mpe bondimi oyo ekopesa biso nzela ya kolonga mikakatano ya kozala na bomoi na mikolo ya nsuka. Ndeko mwasi Sheri Dew akomi, “Nandimi ete ngonga oyo toyekoli kosalela nguya mobimba ya basi babongwama, babateli ya liyokani, bokonzi ya Nzambe ekobongwana nokinoki.”8

Ekozwa bokasi ya mayele mpo na kobongwana mpe kobatela mayokani na biso. Mpo na kosala bongo, tosengeli kozala bana basi mpe bamama oyo bayekolaka malongi ya ntina ya nsango malamu mpe bazalaka na litatoli ya sikisiki ya bosolo na yango. Ezali na makambo misato nandimi kozala moboko ya matatoli mpe oyo nakanisaka kozala ntina mpo na bososoli na biso.

Ya yambo, tosengeli kopesa matondi na motuya ya Nzambe Tata na biso ya Seko mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, mpo na bondimi mpe lobiko na biso. Yesu Klisto azali mobikisi mpe Mosikoli na biso. Tosengeli koyekola mpe kososola Bomikabi na Ye mpe lolenge ya kosalela yango mokolo na mokolo; boyamboli ezali moko ya mapamboli minene moko na moko na biso asengeli kotikala na nzela. Tozali na mposa ya komona Yesu Klisto lokola ndakisa ya mosala na biso ya yambo mpe ndakisa ya oyo tosengeli kokoma. Tosengeli kokoba koteya mabota mpe bakelasi na biso oyo etali mwango ya lobiko ya Tata na biso, oyo ezali na malongi ya Klisto.

Ya mibale, tozali na mposa ya kososola mposa ya bozongisi ya malongi, libongisi, mpe bafungola ya likoki na mikolo ya nsuka oyo. Tozali na mposa ya kozala na litatoli ete Profeta Prophet Joseph Smith aponamaki mpe atiamaki na bonzambe na Nkolo mpo na kosala bozongisi oyo mpe kososola lisusu ete abongisaki basi ya Eklezia engebene na libongisi oyo ezalaki na Eklezia ya Klisto na kala.9

Mpe ya misato, tosengeli koyekola mpe kososola makuli mpe mayokani ya tempelo. Tempelo esimbi esika na kati kati mpenza ya bambondimi na biso ya bule mingi, mpe Nkolo asengi ete tokende, tomaniola, toyekola, mpe tomona ndimbola mpe bosaleleli ya moto ye moko na moto na moto. Tokoya kososola ete na nzela ya makuli ya tempelo, nguya ya bonzambe esali komonana na bomoi na biso10 mpe ete mpo na makuli ya tempelo, tokoki kolatisama bibundeli ya nguya ya Nzambe, mpe nkombo na Ye ekozala likolo na biso, nkembo na Ye ekozinga biso, mpe banzelu na Ye bakozwa mokumba likolo na biso.11 Nazali komituna soki tozali koyekama na nguya ya bilaka wana.

Bandeko basi, kutu bilenge mingi mpenza na liyangani oyo bakoki kotelema na bondimi mpe kosala mosala ya ntina na kotongaka bokonzi ya Nzambe. Bana babandaka kozwa matatoli na bango moko na kotangaka to koyokaka makomi, kosambelaka mokolo na mokolo, mpe kokabolaka elambo na lolenge moko ya ntina. Bana mpe bilenge basi banso bakoki kolendisa makita ya libota na mpokwa mpe kozala basali elongo mobimba. Okoki kozala moko ya yambo ya kofukama ntango libota na bino ezali kosangana mpo na losambo ya libota. Kutu ata soki bandako na bino ezali malamu te bandakisa na bino ya moto ye moko ya kosalelaka nsango malamu na botongono ekoki kotindika bomoi ya libota mpe baninga na bino.

Bilenge basi ya Eklezia basengeli komimona lokola basali elongo ya ntina na mosala ya lobiko oyo eyangelami na bonganganzambe kasi kaka lokola batali mpe basungi te. Bosimbi mabiangi mpe botiami mpembeni na nguya mpe likoki kati na mosala oyo. Ntango bozali kosalela mabiangi na bino na babokambi ya bakelasi mpe bomilengeli na molimo, bosangani elongo, bosemboli loboko mpo na koyangela bato ya kelasi na bino, mpe boteyi moko na mosusu nsango malamu, bozali kozwa esika na bino kati na mosala oyo mpe bino lokola bazalani na bino mpe bokopambolama.

Basi banso bazali na mposa ya komimona lokola basali ya ntina na mosala ya bonganganzambe. Basi kati na Eklezia oyo bazali bakambi, bapesi toli, bateyi, bato ya masanga, bandeko basi, mpe bamama, mpe bokonzi ya Nzambe ekoki kosala te longola se soki totelemi mpe tokokisi balotomo na biso na bondimi. Ntango mosusu tozali kaka na mposa ya kozala na emoneli monene koleka ya maye makoki kosalama.

Elilingi
Ndeko mwasi Maldonado mpe Ndeko mwasi Oscarson

Kala te nakutanaki na ndeko mwasi moko na Mexique oyo asosoli nini elingi koloba kosalela libiangi na ye na bondimi. Marfissa Maldonado abiangamaki mpo na koteya kelasi ya Eteyelo ya Eyenga ya bilenge mibu misato eleki. Azalaki na bayekoli 7 oyo bazalaki koya ntango abiangamaki, kasi sikoyo azali na 20 oyo bazali koya ntango nyonso. Natunaki ye, na kokamwa, maye asalaka mpo na komema bobuti ya boye ya bandimi. Alobaki na komikitisa, “O, ezalaki kaka ngai te. Bato nyonso ya kelasi basalisaki.” Elongo, tomonaki bankombo ya boyo bazali na mosala moke na mikanda mpe tobandaki kobima elongo mpe kobengisa bango bazongela eklezia. Bazwaki lisusu libatisi moko mpo na makasi na bango.

Elilingi
Kelasi ya Eteyelo ya Eyenga na Mexico

Ndeko mwasi Maldonado asalaki site moko ya media ya bato banso kaka mpo na bato ya kelasi na ye babengi “Nazali Mwana ya Nzambe,” mpe atiaka makanisi mpe makomi ya molimo mbala mingi na poso. Azali ntango nyonso kokomela na telefoni bana kelasi na ye mikumba mpe bolendisi. Ayokaka ete ezali motuya ya kosolola na lolenge basepelaka na yango malamu mingi, mpe ezali kosimba. Ayebisaki ngai na pete, “Nalingi bana kelasi na ngai.” Nakokaki koyoka bolingo wana ntango ayebisaki ngai makasi na bango, mpe ndakisa na ye ekanisisaki ngai maye moto moko ya bondimi mpe mosala akoki kokokisa na mosala oyo na lisalisi ya Nkolo.

Bilenge na biso bazali kozala liboso ya mituna ya mpasi mokolo na mokolo, mpe mingi na biso bazali na balingami oyo bazali na mpasi ya kozwa biyano. Nsango malamu ezali ete e zali na biyano na mituna oyo ezali kotunama. Boyoka bitinda ya nsuka euti na bakambi na biso. Tozali koteyama koyekola mpe kososola mwango ya esengo ya Tata na biso na Lola. Tokundolisami mabongisi kati na esakola ya libota.12 Tolendisami mpo na koteya mpe kosalela mikanda oyo lokola banzete ya komekolela mpo na kobatela biso na nzela moke mpe ya nkaka.

Pene ya mobu moko eleki, nakendeki na mama moko ya bilenge bana oyo azwaki mokano ya kozwa lolenge moko ya kosala na yemei mpo na kobatela bana na ye na kotelemelaka banguya ya mabe oyo bazalaki kolakisama na Interneti mpe na eteyelo. Aponi mama na likambo moko poso moko na moko, mbala mingi moko oyo eboti masolo mingi na Interneti, mpe abandi masolo ya ntina na poso ntango bana na ye bakoki kotuna mituna mpe bakoki kosala nyonso ete bazali kozwa emoneli ekoka mpe malamu na oyo etali mituna mbala mingi ya mpasi. Azali kosala ndako na ye esika ya kimia mpo na kotuna mituna mpe lilako ya nsango malamu.

Nazali kobanga ete tofanda na mpema ya boye ya koboyaka libungi oyo ntango mosusu banso toboyaka koteya mabongisi ya kobonga. Tokokaka koteya bilenge basi na biso te ete komilengela kozala mama ezali ya motuya monene mpo ete tolingi kotuka te baoyo babali te to baoyo bakoki kobota bana te, to komonana lokola kofinaka maponi ekoya. Na ngambo mosusu, tokoki lisusu kokoka te kobete nsete mpo na motuya ya bobokoli mpo ete tolingaka kotinda nsango te ete ezali motuya mingi koleka libala. Toboyaka koloba ete Tata na biso na Lola alimboli libala lokola kozalaka kati ya mobali moko mpe mwasi moko mpamba te tolingaka kotuka baoyo bazali kolingana mobali na mobali to mwasi na mwasi. Mpe tokoki komona yango mabe mpo na kolobela mituna ya kimobali kimwasi to bosangisi nzoto ya kolongono.

Solo, bandeko basi, tozali na mposa ya kosalela liyoki ya motema, kasi tika lisusu tosalela bosambisi malamu mpe bososoli na biso ya mwango ya lobiko mpo na kozala ya kobanga te mpe polele ntango ekomi likambo ya koteya bana mpe bilenge na biso mabongisi ya nsango malamu ya ntina oyo basengeli kososola mpo na kotambola na mokili kati na yango bafandi. Soki toteyi bana mpe bilenge na biso malongi ya solo—mpe koteya yango polelele—mokili ekoteya bango balokuta ya Satana.

Nalingi nsango malamu ya Yesu Klisto, mpe nazali seko na botondi mpo na lisalisi ya boyangeli, ya nguya, mpe ya mokolo na mokolo nazwi lokola mwana mwasi ya liyokani ya Nzambe. Natatoli ete Nkolo apamboli biso, lokola basi oyo bazali na bomoi na bantango ya likama, na nguya, makabo, mpe makasi nyonso oyo esengelami mpo na kolengela mokili mpo na Boyei ya Mibale ya Nkolo Yesu Klisto. Nasambeli ete tokoka komona likoki na biso ya solo mpe totelama mpo na kokoma basi ya bondimi mpe makasi oyo Tata na biso na Lola asengi biso tozala. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.