2010–2019
Kosunga
Sanza ya Zomi 2016


Kosunga

Mondimi nyonso asengelami, mpe mondimi nyonso asengeli na libaku ya kosala.

Ntango nazalaki mwana mobali nazalaki kosepela kosala mosala elongo na Tata leki Lyman mpe Mama leki Dorothy na bilanga na bango. Tata leki Lyman azalaki ntango nyonso kotambwisa mabongisi na biso, mpe mama leki Dorothy mbala mingi asungaki mpe akumbaki motuka ya bilanga ya kala. Namikondoli makila kopanzana ntango todindaki na potopoto to tomekaki komata na ngomba ya makasi: Tata leki Leyman akokako koganga, “Tia motuka na kati ya lopango, Dorothy!” yango ezalaki ntango nabandaki kobondela. Na lolenge moko mpe mosusu, na lisungi ya Nkolo mpe nsima ya kotutaka bapedale, Mama leki Dorothy akokaki kotia motuka na double traction. Na ba pneu nyonso ekanganaki mpe eninganaki, motuka ekendaki liboso mpe mosala ekobaki.

“Kotiaka yango na double traction” ekokani na kobalula na esalele moko oyo na kati na yango molongo ya bisalele ebele ebongisami mpo na kosala elongo mpo na kobimisa makasi mingi1. Ebende ya esaleli, na ba pneu minei ya kobuka mabele, epesi bino nzela ya kokita, kobakisa nguya mpe, mpe kokende liboso.

Elilingi
Mabende ya bisaleli

Nalingi kokanisa moko na moko na biso lokola eteni moko ya libende ya esaleli lokola tozali kosala elengo na Eklezia—na kati ya palwasi mpe bitape, na masanga ekoki mpe makomba. Lokola kaka ba engrenage esangani mpo na kopesa nguya na bosangisi, tozali na nguya mingi koeka ntango tosangani banso. Ntango tosangani kosunga moko mpe mosusu, tokosala ebele mingi elongo koleka oyo tokoki kosala na biso moko. Yango ekosalaka tozala ya komipesa mpe ya bosangani lokola tozali kosala mpe kosalisa na mosala ya Nkolo.

Kosungaka Ezali Lipamboli Moko

Libaku ya kosunga ezali moko ya mapamboli monene ya mondimi ya Eklezia.2 Nkolo alobaki, “Soki bino bolingi ngai bosengeli kosalela ngai,”3 mpe tosaleli Ye na kosalelaka basusu.4

Soki tosungi, totamboli pembeni na Nzambe.5 Tokoma koyeba Ye na balolenge mosusu tokokaki te. Bondimi na biso mpo na Ye ekokola. Makambo na biso ezali kotiama kati ya mamoni. Bomoyi ekokoma ya kosepelisa makasi. Bolingo na biso mpo na basusu ekokola, lolenge moko na mposa na biso ya kosala. Na nzela ya libongisi wana lipamboli, tokokoma mingi koleka Nzambe, mpe tozali ya kobongisama malamu koleka mpo na kozonga epai na Ye. 6

Lokola Mokambi Marion G. Romney ateyki: “Mosala ezali te eloko moko tonyokwameli na mabele oyo boye tokoki kolonga na sembo kozala na bokonzi ya selesitiale. Mosala ezali moboko makasi na yango bomoi elongobani ya bokonzi ya selesitiale etongami.”7

Kosunga Ekoki Kozala Mpasi

Kosungaka na kati ya Eklezia, atako, ekoki kozalaka mpasi soki esengami na biso kosala eloko moko oyo ebundisaka biso, soki tolembi na kosunga, to soki to soki tobiangemaki kosala eloko moko oyo tomonaki te elobelamaki na ebandela

Kala mingi te nazwaki mosala moko ya sika. Nasalaki mosala na Etuka ya Afrika ya Sudiest. Ezalaki kobanga kosala esika Ezalaki mpenza elenge mpe ezalaki kotiama, mpe kasi tolingaki bansantu. Nsima nabiangemaki kozonga na esika monene ya Eklezia, mpe mpona koloba bosolo, nasepelaki mingi te. Mbongwana moko na mosala ekokaki kotia ngai na bandenge moko namesanaki na yango te.

Butu moko nsima koyekolaka mbongwana ekoya, nalotaki koko ya koko na ngai Joseph Skeen. Nayebaki wuta na zulunale ete ntango ye mpe mwasi na ye, Maria, bakendaki na Nauvoo, ayokaki mposa ya kosunga, boye alukaki Profeta Joseph Smith mpe atunaki lolenge nini akokaki kosunga. Profeta atindaki ye asala na zamba mpe ayebisaki ye asala ya malamu ye akokaki, boye ye asalaki. Asalaki na bilanga ya ba Smith.8

Natiaki makanisi libaku oyo Joseph Skeen azwaki na koyambaka mosala na ye na lolenge wana. Mbala moko nasosolaki ete nazwaki libaku ya ndenge moko, ndenge moko mpe biso nyonso. Mabiangi nyonso ya Eklezia ewuti na Nzambe—na nzela ya basali na Ye baponami.9

Nayokaki bondimisami moko eyokami ete mosala na ngai ya sika esalaki ya kofulama. Yango ezali motuya ete tososola ete misala na biso efulami—ete mabiangi na biso ekomeli biso wuta na Nzambe na nzela ya bakambi na biso ya bonganganzambe. Nsima ya Sanza ya mitanoele oyo, lolenge na ngai ebongwanaki mpe natondaki na mposa moko makasi ya kosala. Nazali na botondi mpo na lipamboli ya boyamboli mpe mpo na bongwana ya lolenge. Nalingi mosala na ngai ya sika.

Kutu soki tokanisi ete libiangi ya Eklezia ezalaki kaka likanisi ya mokambi ya bonganganzambe na biso to ete ekomeli biso mpo ete moko te akokaki kondima yango, tokopambolama lokola tozali kosala. Kasi ntango tondimi botindiki ya Nzambe na libiangi na biso mpe tosali na motema na biso mobimba, kobakisa nguya eye na nzela ya mosala na biso mpe tokokoma basali ya solo ya Yesu Klisto.

Kosunga esengaka Bondimi

Kosalelaka mabiangi esengaka bondimi. Mbango mbango nsima ya Joseph abandaki kosala na bilanga, ye na Maria bakomaki kobela makasi. Bazalaki na mosolo te mpe bazalaki na kati ya bapaya. Ezalaki ntango moko ya mpasi mpo na bango. Na kati ya zulunale na ye, Joseph akomaki, “Tokobaki kosala [mpe] tokangamaki na Eklezia. Na bondimi moke tozalaki na yango, na nzela na yango zabolo amekaki kobebisa biso mpe kozongisa biso epai wapi towutaki.”10

Ngai, elongo na bankama ya bankoko mosusu, tokozala libela na libela na botondi makasi ete Joseph mpe Maria bazongaki te. Mapamboli eyaka ntango tokobi na mabiangi na biso mpe mikumba na biso mpe kangami na bondimi nyonso tozali na yango.

Nayebi moko ya Malongi ya Nsango malamu ya malamu koleka oyo etombolaka bandimi ya kelasi ntango azali koteya, kasi oyo ezalaki ntango nyonso te bongo. Nsima ya kokotaka na Eklezia, ye ayambaki libiangi ya koteya ya eteyelo ya bana. Ye ayokaki ete ezalaki ten a makoki ya koteya, kasi mpo ete ayebaki motuya ya kosala, ye andimaki. Kala te kobanga ekangaki ye, mpe atikaki kosangana boye akokoki lisusu te koteya. Na matondi moteyi na ye ya libota amonaki bozali te na ye, atalaki ye, mpe abengaki ye kozonga. Episikopo mpe bandimi ya palwase basungaki ye. Na nsuka, na bondimi ekola, akomaki koteya bana, lokola apanzaki mibeko eteyami sikawa na Teaching in the Savior’s Way, Nkolo apambolaki makasi na ye mpe akomaki myeti atondi na makoki.11

Mobali to mwasi ya mosuni na kati na biso nyonso agumbani mpo na kopesa biso nzela ya komilimbisa wuta na kosunga mpo na ba ntina lokola “nakoki nanu te mpo na kosala, nazali na mingi koleka koyekola, “ nalembi mpe nasengeli na pema,” “nazali mokolo makasi—ezali mbala ya mutu mosusu,” to “nazali kaka na ebele ya kosala.”

Bandeko basi mpe mibali, kondimaka mpe kotondisamaka na libiangi moko ezali mosala moko ya bondimi. Tokoki kolikya na oyo profeta, Mokambi Thomas S. Monson, ateyi mbala na mbala: “Baoyo Nkolo abiangi, Nkolo akokisaka bango” mpe “Ntango tozali etinda ya Nkolo, tobongisami na lisungi ya Nkolo.”12 soki tozali totondisami to tolingi te, soki tozali kobanga makasi to tolembi makasi, Nkolo alingi biso tobongisa engrenage ekoki, kobakisa nguya mpe, mpe kosunga.

Namoni elembo te ete Mokambi Monson mpe baninga na ye na Bokambi ya Yambo mpe Lisanga likoki ya Bazomi na Mibale bazali namosala ebele to balembi makasi. Balakisi ndakisa na lolenge moko efulami nguya oyo eye na babomoi na biso soki tosaleli bondimi, tondimi misala, totondisami na yango eleongo na bosangani mpe komipesa. Bango “Bakotia [mapeka na bango] na pne”13 mibu ebele eleki, mpe bango bakobaki kopusa liboso, na liboso, mpe likolo.

Iyo, bango basali na mabiangu ya motuya, kasi libiangi nyonso to mosala ezali motuya. Mokambi Gordon B. Hinckley, profeta moko ya liboso mpe Mokambi ya Eklezia, alobaki: “Biso banso tozali na kati ya bokasi moko monene elongo. … Mokumba na bino ezali sembo na kati ya mikumba ndenge moko ezali ngai na na katikati. Kozanga libiangi na eklezia ezali moke to ezali na motuya te.” 14 Libiangi nyonso ezali.15

Tika Biso Tosunga

Tika biso totombwama na bondimi, “topusa [mapeka na biso] na pneu,” mpe totambwisa “mosala elongobana.” Oyo elongo16 Tika “tokokisa masini ya mbango,” elongo na Tata mwasi Dorothy ya bondimi. Lokola bandeko mibali mpe basi, tika tosala.

Soki bolingi bopesa episikopo mpe mokambi ya etape na bino esengo, tuna ye mituba “Lolenge nini nakoki kosunga?” “Wapi Nkolo alingi ngai nasala? Ntango ye kosambela mpe akotala bomoto, libota, mpe mikumba na yo na mosala, akozala ya kofulama kopusa libiangi ekoki. Ntango otiami pembeni, okozwa lipamboli moko ya bonganganzambe kosunga yo olonga. Bino bokozala ya kopambolama! Mondimi nya kopambolama! Mondimi nyonso asengami, mpe mondimi nyonso asengeli na libaku moko ya kosala.”17

Yesu Klisto Azali Ndakisa na Biso

Yesu Klisto, ndakisa na biso ya monene koleka, apasaki bomoi na Ye na mosala ya Tata. Na kati ya Lisanga Monene yambo mokili oyo mosalema, Yesu, aponamaki mpe apakolamaki wuta na ebandela, ya ofele, “Ngai oyo, tinda ngai.”18 Nakosalaka bongo, Ye akomaki mbalamoko mosali na biso nyonso. Na nzela ya Yesu Klisto mpe nguya toyambi na nzela ya Bomikabi na Ye, biso mpe tokoki lisusu kosala. Ye akosunga biso.19

Napesi bolingo na ngai ya solo na baye kati na bino oyo bakoki te na ntango oyo kosala na Eklezia na ndenge esengeli na ntina ya likaka ya moto se moko kasi bazali na bomoi na bino na molimo ya mosala. Nasambeli ete bokopambolama mpo na babokasi na bino. Natindi lisusu bokumisi na baoyo bazali kokokisaka mabiangi na bango mposo nyonso, ndnge moko baoyo baye bakoyamba kala mabiangi mpo na kosala. Bomisangisi nyonso mpe mabonza ezali na motuya, mingi na Ye oyo bozali kosalela. Baoyo nyonso bazali kosala bayamba mawa ya Nzambe.20

Atako mobu na biso to likaka, tika mosala ezala ya biso “mokano.”21 Bosala na libiangi na bino. Bosala na etinda moko. Bosalela mama na bino. Bosalela mopaya moko. Bosalela moto na mpembeni. Bosala nde.

Tika Nkolo apambola moko na moko na biso mpo na babokasi na biso ya kosala mpe tokoma balandi ya solo ya Yesu Klisto.22 Natatoli ete azali na bomoi mpe azali kotambwisa mosala oyo. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala “Compound Gears,” technologystudent.com/gears1/gears3.htm; “Compound Gear Reduction,” curriculum.vexrobotics.com.

  2. Tala Prechez Mon Evangile: Un Guide pour le Travail Missionnaire (2004), 87.

  3. Doctrine et Alliances 42:29; tala lisusu Doctrine et Alliances 59:5.

  4. Tala Matai 25:40; Moziya 2:17.

  5. Tala Yoane 12:26.

  6. Tala Doctrine et Alliances 81:4–6.

  7. Marion G. Romney, “The Celestial Nature of Self-Reliance,” Ensign, Sanza ya Zomi na moko 1982, 93.

  8. Tala Joseph Skeen, makundoli mpe zulunale, [lokasa 7], Church History Library, Salt Lake City; tala lisusu {Journal and History of Joseph Skeen, ed. Greg S. Montgomery mpe Mark R. Montgomery (1996), 23.

  9. Tala Doctrine et Alliances 1:38; Biteni ya Bondimi 1:5.

  10. Skeen, makundoli mpe zulunale, 8, nkoma mpe etangali ekokisisami; tala lisusu Journal and History of Joseph Skeen, 23; Luka 22:31; 2 Nefi 28:19–24; Alma 30:60; Doctrine et Alliances 10:22–27.

  11. Tala Enseignez à la manière de Sauveur (2016), 37–38; Manuel 2: Administration de l’Eglise (2010), 5.3, 5.5.4.

  12. Thomas S. Monson, “Duty Calls,” Ensign, Sanza ya mitano 1996, 44.

  13. “Le Monde A Besoin d’Ouvriers,” Cantiques, no. 162.

  14. Gordon B. Hinckley, “This Is the Work of the Master,” Ensign, Sanza ya mitano 1995, 71.

    Mokambi Hinckley alobaki lisusu: “Bozali lokola na libaku monene ya kosepelisa na bosali malamu ya mokumba ndenga ngai nasalaki na oyo ya ngai. Kokoba ya mosala oyo ekokokisama na bosangisi babokasi na biso. Atako libiangi na bino ezali lokola mokumba na lolenge ya libaku moko kokokisa malamu lokola ya ngai. Oyo ezali mpenza motuya ezali ete yango ezali mosala ya Mokonzi. Mosala na biso ezali kokende kosala malamu lokola Ye asalaki” (“This Is the Work of the Master,” 71).

    Mokambi Thomas S. Monson alobaki, “How does one magnify a calling? Simply by performing the service that pertains to it” (“Duty Calls,” 43).

  15. Alama 37:6.

  16. “Le Monde A Besoin d’Ouvriers,” Hymns, no. 252.

  17. Tala Handbook 2, 3.3.1, 3.3.3, 19.1.1, 19.4. “ Na nzela ya mosala ya mibali, basimpe bilenge mibali mpe bilenge basi, mosala ya Nzambe esalami” ( Principes de l’évangile [2009], 163).

  18. Abraham 3:27.

  19. Tala Doctrine et Alliances 76:5.

  20. Tala Moziya 18:26.

  21. “They, the Builders of the Nation,” Hymns, no. 36.

  22. Tala Moloni 7:48.