2010–2019
Mapamboli ya Kokumbamela
Sanza ya Zomi 2016


Mapamboli ya Kokumbamela

Kokumbamela ezali na ntina mpe na kati ya bomoi na biso ya molimo. Ezali likambo moko tosengeli kolinga, koluka, mpe kobunda mpo na koyeba.

Botali na ye

Moko ya makambo eyebani koleka mpe ya bolingo ekomami na makomi masantu ezali lisolo ya botali ya Mobikisi epai ya bato ya Amerika kolandisama na kufa mpe Lisekwa na Ye. Bato bamonaki mpasi na bobebisami bonene mpenza oyo ezalaki “etando ya mabele mobimba [ekomaki] ya lolenge mosusu.”1 Makundoli ya makambo wana elakisi ete kolandisama na bobebisami, bato banso bakobaki kolela, 2 mpe na kati ya mpasi na bango, balingaki libiki, kimia, mpe kokangolama.

Ntango Mobikisi akitaki kowuta na lola, bato bakweyaki mbala mibale na makolo na Ye. Mbala ya yambo esalemaki nsima ya koloba na likoki ya bonzambe:

“Tala, nazali Yesu Klisto, oyo baprofeta batatolaki akoya kati na mokili.

“Mpe tala, nazali mwinda mpe bomoi ya mokili.”3

Bongo alobaki epai na bango “telemeni mpe yakani epai na ngai, ete bokoka kotia maboko na bino kati na mopanzi na ngai, mpe lisusu ete bokoka koyoka bilembo ya nsete na maboko na ngai, mpe na makolo na ngai, ete bokoka koyeba ete nazali Nzambe ya Yisalaele, mpe Nzambe ya mabele mobomba; nabomami mpo na masumu ya mokili mobimba. …

“Mpe ekendeke mpe etatolaka bango banso mpo ya bangomei, bagangaki na lisangi lyoko, kolobaka:

“Hosanna! Epambolama nkombo ya Nzambe Aleki Likolo!”4

Mpe bongo, mpo na mbala ya mibale, “bakweyaki banso na nse ya makolo ya Yesu.” Kasi na mbala oyo na ntina, mpo na toyekoli ete bango “bakumbamelaki ye.”5

Mokolo ya Lelo

Na ebandela ya mobu oyo nakendaki kotala likonzi moko na ngambo ya westi ya Etats-Unis. Ezalaki mokolo ya Eyenga lokola momeseno, na bandimi ya Eklezia. Natalaki lokola bato kokota na ndakonzambe mpe na limemia kokendaka kovanda na kiti ebongisami. Noki noki, lisolo ya nse nse ekotaki na etonga mobimba. Bamama mpe batata bamekaki —mbala mingi na elonga te—kopekisa bana makelele na makasi. Momeseno.

Kasi bongo, liboso liyangani ebanda, maloba efulama ya Molimo eyaki na makanisi na nga.

Bandimi wana bayaka kaka te kotondisa likoki to koyokamela uta na balobeli.

Bayakia mpo na bozindo mpe ntina ya malonga.

Bayaka mpo na kokumbamela.

Lokola liyangani ekobaki, natalaki bandimi mingi na lisanga. Bazalaki na elembo ya lola, ezaleli ya limemia mpe ya kimia. Eloko moko na bango ekebisaki motema na ngai. Boyebi bzwaki mokolo ya Eyanga wana ezalaki eloko moko kitoko ya koleka ndelo.

Bazalaki kokumbamela.

Bazalaki kosalela boyebi ya lola.

Nakokaki komona yango na emonisami na bango.

Mpe nasepelaki mpe nakumbamelaki elongo na bango. Mpe ntango nasalaki bongo, molimo elobelaki ngai. Mpe na mokolo wana, nayekolaki likambo moko na ntina na ngaimei, na ntina ya Nzambe, mpe na ntina bosolo ya kokumbamela na bomoi na biso.

Kokumbamela na Bomoi na Biso ya Mokolo na Mokolo

Basantu ya Mikolo ya Nsuka bakeseni mpenza ntango ekomaka mpo na kosala na mabiangi na Eklezia. Kasi ntango mosusu tokoki kosala mosala na biso lokola ya momesano, lokola soki tozali kaka kosala mosala. Ntango mosusubozali na biso na mayangani mpe mosala na biso kati na bokonzi ekoki kozanga eloko ya kokumbamela. Mpe na kozanga yango, tozali kozanga bokutani ya molimo tokoki kokokanisa te ezanga ndelo—moko tozali kozwa lokola bana ya bolingo ya Tata ya Lola.

Mosika na kozala likambo eyaka na mbalakaka, ya esengo, kokumbamela ezali na ntina mpe na kati ya bomoi na biso ya molimo. Ezali likambo moko tosengeli kolinga, koluka, mpe kobunda mpo na koyeba.

Kokumbamela Ezali Nini?

Ntango tozali kokumbamela Nzambe, topusani pembeni na Ye na bolingo ya limemia, bomikitisi, mpe kokembela. Toyebi mpe tondimi Ye lokola Mokonzi na biso andimama, Mozalisi ya mokili, Tata na biso ya molibami mpe wa bolingo ya libela.

Tozali kotosa mpe komemia Ye.

Tomipesi epai na Ye.

Totomboli mitema na biso na losambo makasi, tosepeli na maloba na Ye, tosepeli na ngolu na Ye, mpe tomipesi mpo na kolanda Ye na libonza ya botosi.

Kokumbamela Nzambe ezali lokola eloko ya ntina na bomoi ya moyekoli ya Yesu Klisto ete soki tozangi koyamba Ye na mitema na biso, tokoluka ezali lokola eloko ya ntina na bomoi ya moyekoli ya Yesu Klisto ete soki tolongi koyamba Ye na mitema na biso, tokoluka ye pamba na masanga,biklezia, mpe batempelo.

Moyekoli ya solo afulami mpo na “kokumbamela Ye oyo asalaki lola, mpe mabele, mpe mbu, mpe biziba ya mayi, —bobengaka likolo nkombo ya Nkolo butu mpe moyi.”6

Tokoki koyekola mingi na ntina ya kokumbamela ya solo na kotalaka boni basusu, —bato oyo tango mosusu bazalaki mpenza ya kokesana te uta na bisomei—ekutanaki, etambwisamaki, mpe ekumbamelaki na liboso ya bonzambe.

Bikamwa, Botondi, mpe Elikia

Na ebandeli ya ekeke ya mbala 19, Baklisto nyonso na mokili babosanaki banso likanisi ete Nzambe akobaki koloba epai ya moto. Kasi na elanga ya moke ya 1820, oyo ebongwanaki mpo na libela ntango elenge mobali ya bilanga akotaki na zamba mpe afukamaki mpo na kobondela. Uta na mokoli wana, mbula ya mamoni ya kokamwa, makundoli, mpe bobimisami ya lola esalemaki na mabele, kotondisaka bavandi na yango na boyebi ya wolo na ntina ya ezaleli mpe ntina ya Nzambe mpe kimoninga na Ye na moto.

Oliver Cowdery alakisaki mikolo wana lokola “ekoki na kobasanisama te. … Esengo monene! Bikamwa! Bikakamwisi!”7

Maloba ya Oliver epesi makambo ya yambo oyo elandisami na kokumbamela ya solo ya bonzambe—elembo bobangi bonene mpe bozongisi matondi mingi.

Mikolo nyonso, kasi mingimingi na mokolo ya Sabato, tozali na libaku monene mpo na mosala ya kokamwa mpe bobangi ya lola mpe kopesa masanzoliepai ya Nzambe mpo na bonzambe naYe epambolama mpe kokitisama na mawa.

Mposa oyo ekumbi bison a elikia. Wana ezali makambo ya liboso ya kokumbamela.

Pole, Boyebi, mpe Bondimi

Na mokolo epambolama ya Pentecote, Molimo Mosantu ekotaki na mitema mpe mayele ya bayekoli ya Klisto, etondisaki bango na pole mpe boyebi.

Kino mokolo wana bakomaki na bangonga ya kosimba te nini basengelaki kosala. Yelusaleme ekomaka esika mabe mpo na molandi ya Mobikisi, mpe bazalaki komituna nini ekokaki kokomela bango.

Kasi Molimo Mosantu etondisaki mitema na bango, bobangi mpe bozanga nguya esilaki. Na nzela ya boyebi ya kobongwana ya kokumbamela ya solo, basantu ya Nzambe bazwaki pole ya lola, boyebi, mpe litatoli ya makasi. Mpe yango ememaki na bondimi.

Uta na ngonga wana, Bapostolo mpe Basantu basalaki na bokasi mpo na bantina na bango. Bateyaki na mpiko Klisto Yesu epai ya mokili.

Ntango tokumbameli na molimo, tobengi pole mpe bosolo kati na milimo na biso, oyo epsaka bokasi na bondimi na biso. Makambo wana mibale ezali na litomba na bokumbameli ya solo.

Boyekoli mpe bolingani

Na buku ya Mormon toyekoli ete ntango Alma elenge akangolamaki uta monyoko ya mbano ya botomboki na yemei, azalaki lisusu kaka moko wa na te. Ye “atambolaki na ntaka ya mboka mobimba … mpe na kati ya bato nyonso…  , babongisaki na makasi na mpila bampasi oyo [ye] asalaki mpo na eklezia.”8

Kokumbamela na ye ya sikiski ya Nzambe ya nguya nyonso ezwaki lolenge ya moyekoli ya nguya.

Kokumbamela ya solo ebongoli biso kati na bosembo mpe mposa na biso bayekoli ya Molakisi na biso ya bolingo mpe Mobikisi na biso Yesu Klisto. Tobongwami mpe tokomi lokola Ye.

Tokomi na bososoli mingi mpe tomipesi. Kolimbisa mingi. Na bolingo mingi.

Tososoli ete yango ekoki kosalema te mpo na koloba ete tolingi Nzambe ntango na ngonga moko toyini, totioli, to kotala pamba basusu pembeni na biso.9

Bokumbameli ya solo ememi molende mpo na kotambala na nzela ya kimoyekoli. Mpe ete emmi mpenza na bolingani. Makambo wana mibale ezali ezali litomba ya bokumbameli.

Bokota na Bikuke na Ye na Botondi

Ntango nakanisi na ntina ya nini ebandaki lokola ntongo ya sabato ya momeseno, na ndakonzambe wana, na likonzi ya momeseno wana, atako lelo nakendaki na boyebi ya molimo ya kokamwa wana oyo ekopambala bomoi na ngai libela.

Nayekolaki ete ata soki tozali na ndenge ekeseni koyangela ngonga na biso, mabiangi na biso, mikumba —atako soki toluki banso na mikumba na biso kobongisa nini “kobongisa nie” biso moko, na libota to kokamba—soki tozangi kokumbamela Mokangoli na biso ya ngolu, Mokonzi ya lola, mpe Nzambe ya nkembo, tozali kozanga esengo mpe kimia ya sango malamu.

Ntango tokumbameli Nzambe, tondimi mpe toyambi Ye na limemia se moko lokola bato ya kala ya Amerika. Topusani na Ye na mayoki elimbolami ya kokamwa mpe bobangi. Tokamwisi na botondi na bonzambe ya Nzambe. Mpe bongo, tozwi elikia.

Tozwi maloba ya Nzambe, mpe ete etondisi milimo na biso na pole mpe bosolo. Tososoli elili oyo ekoki komonana bobele na nzela ya pole ya Molimo Mosantu.10 Mpe bongo, tozwi elikia.

Ntango tokumbameli, milimo na biso etondisami mpe tondimi kotambola na makolo ya Mobikisi na biso ya bolingo, Yesu Klisto. Mpe utna na mokano oyo, tozwi bolingani.

Ntango tokumbameli, mitema na biso ezali kobendana libanda na masanzoli mpo na biso libela.

Topemi na mokolo ya Sabato mpe tokobi kotosa Ye—na bandakonzambe, mabota, batempelo, mpe misala na biso nyonso.

Ntango tokumbamelaka, tofungolaka mitema na biso na nguya ya kobikisa ya Bomikundoli ya Yesu Klisto

Bomoi na biso ekomi elembo mpe ndakisa ya kokumbamela.

Bandeko na ngai ya basi mpe mibali, boyebi ya molimo ekobendana makasi te na kozanga nini ezali koleka pembeni na biso kasi ebendandni maksi na kati ya mitema na biso. Yango ezali litatoli na ngai ete kokumbamela ya solo ekobongola solo noki mayangani ye Eklezia kati na elambo ya molimo koleka. Ekokolisa bomoi na biso, komatisa bososoli na biso, mpe koyeisa matatoli na bisomakasi. Mpo ntango topesi mitama na biso epai ya Nzambe, lokola Nzembo ya kala, “kokota na na bikuke na ye bondoti, mpe bisika na ye na lasanzoli: [tozali] na matondi epai na ye, mpe topamboli nkombo na ye.

“Mpo Nkolo azali malamu; boboto na ye ezali ekosila te; mpe bosolo na ye ekotikala na bankola nyonso.”11

Na kokumbamela ya bosolo mpe na mitema epesama, tosepeli mpe tokomeli na elikia, bondimi, mpe bolinagani. Mpe na nzela oyo, tosangani na pole ya lola kati na milimo na biso ete etondisi bomoi na biso na ndimbola ya bonzambe, kobakisaka kimia, mpe esengo ekosila te.

Oyo ezali lipamboli ya kokumbamela na bomoi na biso. Na oyo natatoli na komikitisa na nkombe ya bule ya Yesu Klisto, amene.