2010–2019
Malongi ya Klisto
Sanza ya Zomi 2016


Malongi ya Klisto

Malongi ya Klisto epesaka biso ndingisa ya kozwa nguya ya oyo ekotombola biso uta na lolenge na biso ya molimo sikawa epai wapi tokoki kokoma babongi nie.

Bokei kotala ya Yesu epayi ya Banefi nsima ya Bosekwi ebongisamaki na bokebi mpo na koteya biso makambo ya motuya monene mingi mpenza. Ebandaki na Tata kotatolaka epayi ya bato ete Yesu azaki “Mwana na Ye ya Bolingo, kosepela.”1 Nsima Yesu Yemei akitaki mpe atatolaki na ntina ya libonza ya komikaba na Ye,2 Kobengisaka bato “bayeba solo” ete Azalaki Klisto na koyaka liboso mpe koyokaka bilembo ya mpota na mopanzi na Ye mpe bilembo ya nsete na maboko mpe makolo na Ye.3 Matatoli oyo efandisaki na ntembe te ete Bomikabi ya Yesu esalamaki mpe ete Tata akokisaka liyokani na Ye ya kopesa Mobikisi. Yesu nsima ateyaki Banefi lolenge ya kozwila mapamboli ya mwango ya esengo ya Tata, oyo epesemeli biso mpo na Bomikabi ya Mobikisi, na koteyaka bango malongi ya Klisto.4

Etinda na ngai lelo etali malongi ya Klisto. Makomi elimboli malongi ya Klisto lokola kosaleka bondimi kati na Klisto mpe Bomikabi na Ye, koyambolaka, kobatisamaka, kozwaka likabo ya Molimo Mosantu, mpe koyikaka mpiko tii na nsuka.5

Malongi ya Klisto Epesaka Biso nzela ya Kozwa Mapamboli ya Bomikabi ya Klisto

Bomikabi ya Klisto esalaka bizaleli na yango tokoki koyekama na “matomba, mpe ngolu, mpe boboto ya Masiya Mosantu,”6 “kozala ya kobonga nie na [Klisto],”7 kozwa makambo malamu manso,8 mpe kozwa bomoi ya seko.9

Malongi ya Klisto na ngambo mosusu ezali banzela—banzela se moko—na yango tokoki kozwa mapamboli nyonso oyo esalami mpo na biso na nzela ya Bomikabi ya Yesu. Ezali malongi ya Klisto nde epesaka biso nzela ya kokoka na nguya ya molimo oyo ekotombola biso uta na ezalela na biso ya sikawa tii na ezalela moko epayi wapi tokoki kokoma ya kobonga nie lokola Mobikisi.10 Mpo na ndenge ya kobotama lisusu, Mpaka D. Todd Christofferson ateyi ete: “Kobotamaka lisusu, na bokeseni na mbotama na nzoto, eyaka mingi na malembe koleka na mbangu. Mpe komikotisa na nzela wana ezali ntina monene ya bokufi.”11

Tika tolobela likambo moko na moko ya malongi ya Klisto.

Ya yambo, Bondimi kati na Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye. Baprofeta bateyi ete bondimi ebandaka na koyokaka liloba ya Klisto.12 Maloba ya Klisto ezali kotatola libonza na Ye ya kosikola mpe ezali kolobela biso lolenge nini tokoki kozwa bolimbisi, mapamboli, mpe bonetoli.13

Koyokaka maloba ya Klisto, tosaleli bondimi na koponaka kolanda mateya mpe ndakisa ya Mobikisi.14 Mpo na kosala oyo, Nefi ateyaki ete tosengeli koyekama “mobimba likolo ya matomba ya [Klisto] oyo na nguya ya kobikisa.”15 Mpo Yesu azalaki Nzambe moko na bomoi yambo na mbotama,16 azalaki na bomoi ezanga masumu,17 mpe na ntango ya Bomikabi na Ye akokisaki babonsenga na biso nyonso ya boyengebeni mpo na bino mpe ngai,18 Azali na nguya mpe bafungola ya kosala bosekwi ya bato banso,19 mpe Asalaki yango ekoka kosalema mpo na ngolu ya kokokisa babonsenga ya boyengebeni mpona kolonga boyengebeni soki boyamboli ezali.20 Soki tososoli ete tokoki kozwa ngolu na nzela ya matomba ya Klisto, tozali na makoki ya “kozala na bondimi likolo ya boyamboli.”21 Mpo na koyekama mobimba likolo ya matomba ya Klisto nsima esengeli kolikya ete Ye asalaki oyo ezalaki ntina mpo na kobikisa biso mpe bongo mpo na kosala likolo ya boyambi na biso.22

Bondimi lisusu etindaka biso totika kobanga mingi mpenza na oyo etali oyo basusu bakanisaka na ntina na biso mpe kobanda kosala keba mosika mingi na ntina ya oyo Nzambe akanisaka mpo na biso.

Ya mibale, boyamboli. Samuel Molamani ateyaki, “Soki bondimeli nkombo ya [Klisto] bokoyambola na masumu na bino manso.”23 Boyamboli ezali likabo ya motuya uta na Tata na biso na Lola oyo ekoki kosalama na nzela ya libonza ya Mwana Mobotami se Moko na Ye. Ezali nzela oyo Tata apesi biso na yango tobongwamaka, to tobalolaka, makanisi na biso, misala, mpe bomoto na biso mpenza mpo ete tokoma mingimingi lokola Mobikisi.24 Ezali kaka mpo na masumu ya minene te kasi ezali nzela ya mokolo na mokolo ya komisosola mpe komibongisa 25 oyo esalisaka biso tolonga masumu na biso, mabe na biso, babotau na biso, mpe babozangi makoki na biso.26 Boyamboli esalaka biso tokoma “balandi ya solo” ya Klisto, oyo etonndisaka biso na bolingo 27 mpe elongolaka babobangi na biso.28 Boyamboli ezali mwango ya mibale te oyo tokosalela kaka soki mwango na biso ya kozala na bomoi ya kobonga nie ekweyi.29 Boyamboli ya ntango nyonso ezali nzela se moko oyo ekoki komemela biso esengo ewumelaka mpe kokokisa biso kozonga kofanda elongo na Tata na biso na Lola.

Na nzela ya boyamboli tokomi ya komitika mpe ya kotosa epayi ya bolingi ya Nzambe. Sikoyo oyo esalemi yango moko te. Boyebi lisusu ya bolamu ya nzambe mpe yam pampa na biso,30 esangani na makasi na biso ya malamu mingi ya koyokanisa ezalela na biso na bolingi ya Nzambe,31 ememaka ngolu kati na bomoi na biso.32 Ngolu “ezali banzela ya Nzambe ya lisalisi to bokasi, epesami na nzela ya mawa malamu mpe bolingo ya Yesu Klisto … ya kosala misala malamu oyo [biso] na lolenge mosusu tolingaki kokoka te kosimba malamu soki toyekami se na nguya ya [biso] moko.”33 Mpamba te boyamboli ezali mpenza kokomaka lokola Mobikisi, oyo ekoki kosalama te na biso moko, tosengeli na kozanga elikya na ngolu ya ngolu ya Mobikisi mpo na kosala bambongwana esengeli na bomoi na biso.

Ntango toyamboli, tokitanisi bizalela, babotau, mabe, mpe babongi na biso ya kala, ezanga sembo na bizalela mpe babondimi ya sika oyo ebendaka biso penepene ya Mobikisi mpe esalisaka biso tokoma lokola Ye.

Ya misato, libatisi mpe elambo. Profeta Mormon ateyaki ete “mbuma ya yambo ya boyamboli ezali libatisi.”34 Mpo na kosalama, boyamboli esengeli esangisama na makuli ya libatisi esalemaki na moto oyo asimbi likoki ya bonganganzambe ya Nzambe. Mpo na bandimi ya Eklezia, mayokani oyo esalamaki na libatisi mpe na mabaku mosusu ezongisami sika ntango tozali kakabola elambo.35

Na makuli ya libatisi mpe elambo, toyokanaka kobatela mitindo ya Tata mpe Mwana, ntango nyonso komikundolaka Klisto, mpe kazala na bolingi ya kozwa nkombo ya Klisto (to mosala mpe bizalela na Ye 36) likolo na biso.37 Mobikisi, na nsima, alaki kolimbisa, to kolongola, masumu na biso 38 mpe “kosopa Molimo na ye mingi mpenza likolo na [biso].”39 Klisto lisusu alaki kolengela biso mpo na bomoi ya seko na kosalisaka biso tokoma lokola Ye.40

Douglas D. Holmes, Mosungi ya Yambo na Bokambi Monene ya Bilenge Mibali, akomi: “Makuli ya libatisi mpe ya elambo ezali elembo ya mbano ya nsuka mpe nzela ya kobotamaka lisusu. Na libatisi, tokundi moto ya kala ya mosuni mpe tokeyi liboso epai ya bomoi ya sika. 41 Na elambo, toyekoli ete mbongwana oyo ezali nzela ya litambe na litambe, [wapi] moke moke, poso na poso, tobongwanisami wana ezali biso koyambola, kolaka, mpe na nzela ya badotasio ya kobuta ya Molimo [tokomi lokola Mobikisi].”42

Makuli mpe mayokani ezali na ntina kati na malongi ya Klisto. Ezali na nzela ya koyambaka na kolongobana makuli ya bonganganganzambe mpe kobatelaka mayokani oyo esangani na yango nde nguya ya bonzambe elakisami na bomoi na biso.43 Mpaka D. Todd Christofferson alimbolaki yango “oyo ‘nguya ya bonzambe’ eyaka kati na moto mpe na botindiki ya Molimo Mosantu.”44

Ya minei, likambo ya Molimo Mosantu. Nsima ya libatisi topesami likabo ya Molimo Mosantu na nzela ya nkotisa.45 Likabo oyo, soki tozwi yango, epesaka biso nzela ya kozala na boninga ntango nyonso ya Nzambe 46 mpe bokoti ntango nyonso na ngolu oyo eyaka na ntembe te elongo na botindiki na Ye.

Lokola moninga ya ntango nyonso, Molimo Mosantu epesaka biso nguya ya kobakisa to bokasi ya kobatela mayokani.47 Abulisaka lisusu biso, 48 oyo elingi koloba kosala biso “ya kozanga lisumu, mpeto, kosukwama, mpe esatu na nzela ya bomikabi ya Yesu Klisto.”49 Nzela ya kobulisama bobele esukolaka biso te, kasi lisusu epambolaka biso na makabo ya molimo esengeli to bizalela ya Nzambe ya Mobikisi 50 mpe ebongolaka bomoto na biso mpeza,51 ete “tozali lisusu na meko mpo na kosala bobe te.”52 Ntango nyonso toyambi Molimo Mosantu na bomoi na biso na nzela ya bondimi, boyamboli, makuli, lisalisi ya lokola Klisto, mpe miango mosusu ya sembo, tobongwanisami tii litambe na litambe, moke moke tokomi lokola Klisto.53

Ya mitano, kotiaka molende tii na nsuka. Profeta Nefi ateyaki ete koyambaka likabo ya Molimo Mosantu tosengele “kotiaka molende tii na nsuka, na kolandaka ndakisa ya Mwana ya Nzambe ya bomoi.”54 Mpaka Dale G. Renlund alimbolaki nzela ya kotiaka molende tii na nsuka bo elandi: “Tokoki kobongisama nie mbala na mbala mpe malembe malembe …kosalelaka bondimi kati na [Klisto], koyambolaka, kokabolaka elambo mpo na kozongisa sika mayokani mpe mapamboli ya libatisi, mpe koyambaka Molimo Mosantu lokola moninga ya ntango nyonso na meko monene, wana ezali biso kosala bongo, tokomi mingi lokola Klisto mpe tozali na makoki ya kotia molende tii na nsuka, na nyonso oyo yango esengaka.”55

Na maloba mosusu, boyambi ya Molimo Mosantu mpe mbongwana boyambi wana ekelaka kati na biso nsima etongaka bondimi na biso. Bondimi ya kobuta ekambaka na boyamboli ya kobakisa. Wana ezali biso bongo na elembo kobonza mitama na biso mpe masumu na biso likolo ya mesa ya elambo, tozali koyamba Molimo Mosantu na motuya mingi koleka. Koyambaka Molimo Mosantu na motuya mingi koleka nsima ememaka biso na nzela ya kobotama lisusu. Ntango tokobi kati na nzela oyo mpe tozwi makuli mpe mayokani ya lobiko ya nsango malamu, toyambi “ngolu mpo na ngolu” kino tozwi ya kotonda.56

Tosengeli Kosalela Malongi ya Klisto na Bomoi na Biso

Bandeko mibali mpe basi, wana ezali biso kosalela malongi ya Klisto na bomoi na biso, topambolami na ntango mpe na molimo lokola, kutu kati na mimekano. Na nsuka tosazali na makoki ya “kotia nkanga likolo ya eloko nyonso malamu.”57 Natatoli ete nzela oyo esalamaki mpe ekobi kosalama na bomoi na ngai moko, litambe na litambe, moke moke.

Kasi ya motuya mingi, tosengeli kosalela malongi ya Klisto na bomoi na biso mpamba te epesaka nzela se moko mpo na kozonga epai ya Tata na Lola. Ezali lolenge se moko mpo na koyoyamba Mobikisi mpe kokoma bana na Ye ya mibali mpe ya basi.58 Nzokande, lolenge se moko ya kosikolama na lisumu mpe kokola na molimo ezali kosalela malongi ya Klisto na bomoi na biso.59 Na likelemba, Apostolo Yoane ateyaki ete “oyo nyonso  … akotikala na mateya ya Klisto te, azali na Nzambe te.”60 Mpe Yesu Yemei alobaki na Banefi ete soki bakwei kosalela bondimi kati na Klisto, koyambola, kobatisama, mpe kotia molende tii na nsuka, to “kokatama na nse mpe kobwakama na kati ya moto, uta wapi [biso] tokoki kozonga lisusu te.”61

Yango wana boniboni ekoki biso kosalela malongi ya Klisto na mobimba mingi kati na bomoi na biso? Moko ya lolenge ekozala kosala bokasi ya kansasa poso moko na moko ya komilengela mpo na elambo na kozwaka mwa ntango ya tala na losambowapi tosengeli mingi ya kobongisa. Tokoki nsima komema libonza ya pene eloko moko oyo epekisaka biso kozala lokola Yesu Klisto na mesa ya elambo, kombondelaka kati na bondimi mpo na lisalisi, kosengaka makabo ya molimo esengeli, koyokanaka mpo na kobongisa na poso ekoya.62 Wana ezali biso kosala bongo, Molimo Mosantu akoya kati na bomoi na biso na motuya mingi koleka. Mpe tokozala na bokasi ya kobakisa mpo na kolonga mabe na biso.

Natatoli ete Yesu Klisto azali Mobikisi ya mokili mpe ete ya Ye ezali nkombo se moko na yango tokoki kobikisama.63 Makambo nynso oyo ezali malamu eyei se na nzela na Ye.64 Kasi mpo na solo “kotia nkanga likolo ya eloko nyonso malamu,”65 bakisa bomoi ya seko, tosengeli kokoba kosalela malongi ya Klisto na bomoi na biso. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.