2010–2019
Mwango Monene ya Bosikoli
Sanza ya Zomi 2016


Mwango Monene ya Bosikoli

Nayebi ete ntango toyamboli na bosembo masumu na biso, yango ekeyi ya solo—kotikaka elembo te!

Mwa basanza liboso Mokambi Boyd K. Packer akufa, bakambi banene ya bonganganzambe mpe ya lisanga lilandi bazwaki libaku kitoko ya komona ye koloba na biso. Nakoki kotika kokanisa te oyo etali maye alobaki. Alobaki na biso ete alukaka kozongaka nsima na bomoi na ye mobimba, kolukaka bilembo ya masumu oyo asalaka mpe ayambolaka na bosembo, mpe akokaki komona elembo te ya yango. Mpo na libonza ya komikaba ya Mobikisi na biso ya bolingo, Yesu Klisto, mpe na nzela ya boyamboli ya bosembo, masumu na ye esilaki nyonso, lokola soki esalamaka mokolo moko te. Mokambi Packer nsima atindaki biso lokola bakambi mokolo wana totatola epai ya basusu ete oyo ezali ya solo mpo na moko na moko na biso oyo ayamboli na bosembo.

Nayebi moto moko oyo azalaki kati na babobuki mibeko mibu mingi eleki. Mwa ntango molai, moto oyo ayokaki nsoni mingi mpe amitungisaki mpo na kobelema epai ya mwasi na ye mpe bakambi na ye ya bonganganzambe. Alingaki koyambola mobimba kasi solo alobaki ete alingaki kosundola lobiko na ye ya seko na esika ya kotia mwasi mpe bana na ye kati na mawa, nsoni, to bambano mabe mosusu oyo ekokaki kosalama na nzela ya ntubela.

Ntango tosumuki, Satana mbala mingi amekaka kondimisa biso ete likambo ya moyimi te ya kosala ezali kobatela basusu na bobomibomi ya boyebi ya masumu na biso, kobakisaka koboyaka kotubela na episikopo na biso, oyo akoki kopambola bomoi na biso na nzela ya bafungola ya bonganganzambe na lokolo zuzi ya esika na Yisalaele. Nzokande, bosolo ezali ete likambo ya moyimi te mpe ya Boklisto ya kosala ezali kotubela mpe koyambola. Oyo ezali mwango monene ya bosikoli ya Tata na Lola.

Na nsuka, molingami mobali oyo atubelaki epai ya mwasi na ye ya bondimi mpe bakambi na ye ya Eklezia, kolakisaka boswi ya motema ya mozindo. Atako ezalaki likambo ya mpasi mingi oyo asalaka naino te, mayoki ya lisungi, kimia, botondi, bolingo mpo na Mobikisi, mpe boyebi ete Nkolo azalaki kotombola mokumba na ye ya bozito mpe komema ye esalaki bosepeli oyo ekoki kolobelama te, ataka mbano mpe lobi lokoya na ye.

Elilingi
Mobikisi kolendisaka

Ayebaki solo ete mwasi mpe bana na ye bakoyoka mpasi mingi—mpe esalamaki; mpe ete bakosambisa ye mpe bakopemisa ye na libiangi na ye—mpe esalamaki. Ayebaki solo ete mwasi na ye akobeba motema, akoniokwama, mpe akozala na nkanda—mpe esalamaki. Mpe andimaki ete akotika ye, komemaka bana elongo na ye—kasi asalaki yango te.

Ntango mosusu bobuki mibeko ya lokengo ememaka na bokufi ya libala, mpe koyekamaka na makambo, yango ekoki kozala na ntina. Kasi na kokamwa ya mobali oyo, mwasi na ye ayambaki ye mpe amipesaki yemei kosalisaka ye na lolenge nyoso oyo akokaki kosala. Na nsuka, azalaki na makoki ya kolimbisa ye mobimba. Ayokaka nguya ya kobisika ya Bomikabi ya Mobikisi mpo na ye. Mibu ya nsima, babalani oyo mpe bana na bango misato bazali makasi mpe na bondimi. Mobali mpe mwasi bazali kosala na tempelo mpe bazali na libala moko ya kafukafu, ya bolingo. Mozindo ya litatoli ya mobali oyo mpe bolingo mpe botondi na ye mpo na Mobikisi ezali komonana mpenza na bomoi na ye.

Amuleki atatolaki, “Nalingi ete boya mpe boyeisa mitema na bino makasi lisusu te; … soki bokoyambola … , sasaipi mwango monene ya bosikoli ekomememe mpembeni na bino.”1

Ntango nasalaki elongo na mobali na ngai wana ezalaki ye kokamba misio moko, tokendaki na libanda ya mpepo kokamata liboke moko monene ya bamisionele ntongo moko. Elenge mobali ayebani abendaki bokebi na biso. Amonanaki lokola na mawa, ya kolemba, pene ya kotungisama. Totalaki ye na bokebi nsima ya nzanga wana. Na mpokwa, elenge mobali wana asalaki ntumbela na ntango eleka, mpe bakambi na ye bakanaki ete asengelaki kozonga ndako. Atako tozalaki na mawa mpenza ete azalaki sembo te mpe ayambolaka te liboso ya koya na misio na ye, na nzela ya libanda ya mpepo tokumisaki ye na bosembo mpe na bolingo mpo na kozwaka makasi ya kondima libungi na ye, mpe tolakaki kotikala na masolo ntango nyoso elongo na ye.

Elenge mobali monene oyo apambolamaki na kozala na baboti malamu, bakambi ya bonganganzambe minene, mpe palwasi ya lisungi, ya bolingo. Nsima ya mobu moko ya kosalaka makasi mpo na koyambola mobimba mpe kosimba na Bomikabi ya Mobikisi, azalaki na makoki ya kozonga na misio na biso. Ezali mpasi mpo na ngai nalimbola mayoki ya bosepeli oyo toyokaki ntango tokamatataki elenge mobali oyo na libanda ya mpepo. Akotondisamaki na Molimo, na esengo, bondimi liboso ya Nkolo mpe motema moto mpo na kokokisa misio ya botongono. Akomaki misionele malamu mpenza, mpe nsima mobali na ngai mpe ngai tozwaki libaku ya kozala na bokangisi na ye na tempelo.

Na bokeseni, nayebi misionele mosusu ya mwasi oyo, koyebaka ete lisumu na ye oyo atubebelaki te liboso ya misio na ye ekosala ete ye azongisama ndako noki, asalaki mwango na ye mpo na kosala makasi na misio na ye mpe kotubela epai ya mokambi ya misio bobele mwa mikolo liboso ya kosilisa misio na ye. Azangaki kozoka motema ya bonzambe mpe amekaki koboya nzela ya mwango oyo Mobikisi na biso ya bolingo apesi na moko na moko na biso.

Na misio na biso, mokolo moko nakendaki elongo na mobali na ngai ntango akendaki kosolola na mobali moko mpo na libatisi. Wana ezalaki mobali na ngai kotabwisa lisolo, nazelaki libanda elongo na bandeko misionele ya basi oyo bateyaki mobali oyo. Ntango lisolo esilaki, mobali na ngai apesaki bamisionele nsango ete mobali yango akozala na makoki ya kobatisama. Molingami mobali oyo alelaki mingi wana ezali ye kolimbola ete ayebaka solo ete masumu asalaka na bomoi na ye elingaki kopekisa ye kozala na makoki ya kobatisama. Nazalaki mbala mingi te nzeneneke ya bosepeli mpe esengo ya moto moko kobimaka na molili mpe kotaka na pole ekokani na maye nazalaki komona mokolo wana.

Elilingi
Mobikisi apesi elikia

Mpaka D.  Todd Christofferson atatoli:

“Na bondimi na Mosikoli na [biso] ya ngulu mpe nguya na Ye, bozangi elikia ebongwani esengo. Mbongwana ya motema mpenza mpe mposa ya moko, mpe lisumu oyo ezalaki kobenda yo na kala ekomi mingimingi ya mabe mpenza.   …

“…   Ata ntalo kani ya boyamboli, emenami mpenza na esengo ya bolimbisi.”2

Makambo oyo ekundolisi ngai Enosi na Buku ya Mormon, oyo “agangaki epai ya [Nkolo] na losambo ya nguya” mpe nsima ayokaki mongongo moko kolobaka, “Enosi, masumu na yo elimbisami.  …

“Mpe ngai, Enosa, nayebaki ete Nzambe akokaki te kokosa; yango wana, elindo na ngai esukwamaki.

“Mpe nalobaki: Nkolo, boniboni esalemi?

“Mpe alobaki epai na ngai: Na ntina ya bondimi na Klisto.  … kende, bondimi na yo bobikisi yo.”3

Na kolengelaka lisukulu oyo, nalingaki kozwa liyoki ya lolenge bankoko na biso bazali kososola boyamboli mpe lolenge bazali komiyoka na oyo etali Mobikisi, yango wana nasenaki bana na biso batuna bango mituna oyo elandi. Nayokisamaki mpasi na motema na biyano ya bankoko na ngai.

Boyamboli ezali nini? “Ntango otuti moto moko, okoki koloba ‘palado’ mpe kosalisa bango nsima.”

Boyokaka ndenge nini ntango boyamboli? “Bokoki koyoka Ye; bokoki koyoka moto na Ye, mpe liyoki ya mabe elongwaki.”

Boyokaka ndenge nini na ntina ya Yesu mpe Tata na Lola ntango boyamboli? “Nayokaka ete Yesu ayokaka ete ezalaki motuya kosala Bomikabi, mpe Ye azali na esengo ete tokoki kozala na bomoi elongo na Ye lisusu.”

Ntina nini Yesu mpe Tata ya Lola alingi ngai nayambola? Na maloba ya nkoko na ngai ya elenge: “Mpamba te Balingaka ngai! Mpo na kokola mpe kokoma lokola Bango, nazali na mposa ya koyambola. Nalingi lisusu Molimo azala elongo na ngai, yango wana nasengeli koyambola mokolo na mokolo mpo na kozala na kimoninga na Ye ya kafukafu. Nakokoka ata moke te kotonda Bango ekoki.

Ntango Brynlee ya mibu minei ayokaki mituna oyo, alobaki, “Nayebi te, Papa. Osengeli koteya ngai.”

Elilingi
Brynlee mpe tata na ye

Na likita linene moko eleka, Mpaka Jeffrey R. Holland alobaki: “Atako boniboni bokokanisa ntango eleki, atako boniboni bokanisi mabaku mingi bozangi, atako boniboni mabunga mingi bomiyoki bosali … , to atako boniboni mosika na ndako mpe na libota mpe na Nzambe bamiyoki bokei mobembo, natatoli ete bokei mobembo mosika te ya loboko ya bolingo ya Nzambe. Ekoki kosalema te ete bino bozinda na nse koleka pole ezanga ndelo ya babongeni ya Bomikabi ya Klisto.”4

O, boniboni nalingi moko na moko ya bana, bankoko na ngai, mpe moko na moko na bino, bandeko na ngai mibali mpe basi, mpo na koyoka bosepeli mpe bobelemi na Tata na Lola mpe na Mobikisi na biso ntango tozali koyambola mokolo na mokolo masumu mpe babotau na biso. Mwana ya moyanoli moko na moko ya Tata na Lola azali na mposa ya koyambola. Botala masumu nini bozali na mposa ya koyambola. Nini ezali kopekisa bino? Na ndenge nini bozali na mposa ya kobongisela?

Nayebi, lokola Mokambi esalemaki na Packer mpe atatolaki, ete ntango na bosolo toyamboli masumu na biso, ekeyi solo—kotikaka elembo te! Nayoki ngai moko bolingo, bosepeli, lisungi, mpe bondimi liboso ya Nkolo ntango nayamboli.

Mpo na ngai, makamwisi minene na bomoi ezali bokatisi ya Mbu ya Mutane, bolongoli bangomba, to kutu bobikisi ya nzoto te. Likamwisi monene koleka esalemaka ntango tozali kopusana na komikitisa epai ya Tata na biso na Lola na losambo, mpe tozali tobondeli makasi mpo na kolimbisama, mpe nde kosukwama na masumu wana na nzela ya libonza ya komipesa ya Mobikisi na biso. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.