2010–2019
Nkolo Mobikisi
Sanza ya Zomi 2016


Nkolo Mobikisi

Osengeli te koyoka mawa euti na lisumu, mpasi euti na misala ya basusu, to bosolo ya mpasi ya bokufi—yo moko.

Moko ya mabaku na ngai efutaka mingi mpenza ezali kosala mobembe—koyekola uta na bandeko na ngai ya basi na mokili mobimba. Ezali na eloko te eleki kozalaka loboko na loboko, mbuzu na mbunzu, mpe motema na motema elongo na bino.

Na boyebi moko lokola boye, mokambi moko ya Lingomba ya Bamama Basungi atunaki, “ezali na eloko moko eyebani oyo basi basengeli kolandela?”

Nayanolaki, “Iyo!” ntango lisukulu ya Mokambi Russell M. Nelson “Esakola epai ya Bandeko na ngai ya Basi” ekotaki na mayele na ngai. Mokambi Nelson ateyaki, “tozali na mposa ya basi oyo balenda na bososoli ya malongi ya Klisto.”1

Nefi alimboli malongi ya Klisto na lolenge boye:

“Mpo ekuke oyo bosengeli kokotela ezali boyamboli mpe libatisi na mayi; mpe nsima bolimbisi ya masumu na bino na moto mpe na Molimo Mosantu. …

“Mpe sikawa … nakotuna bino soki nyoso esalemi? Tala, nalobi epai na bino, Te; mpo bokomaki kino lelo te longola se soki ezalaki liloba ya Klisto nabondimi ya sikisiki na ye, mpe koyekamaka mobimba likolo ya matomba na ye oyo azali na nguya ya kobikisa.

“Yango wana, bosengeli kokende mbangu liboso na sikisiki na Klisto, kozalaka na bongengi bolamu ya elikia, mpe bolingo ya Nzambe mpe ya bato banso. Yango wana, soki bokokende mbangu liboso, kosalaka limpati likolo ya maloba ya Klisto, mpe molende kino na nsuka, tala, boye elobi Tata: Bokozwa bomoi ya seko.

“…  Oyo ezali nzela; mpe ezali na nzela mosusu te to nkombo mosusu epesami na nse ya lola na yango moto akoki kobikisama na bokonzi ya Nzambe. Mpe sikawa, tala, oyo ezali malongi ya Klisto.2

Mpo na nini tosengeli kolenda na bososoli ya mabongisi maye?

Nakutanaka mbala mingi na basi ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka oyo basali nyoso mpo na lisungi, kasi babalukaka te epai ya Moko oyo akoki kopesa lisungi ya libela. Mbala mingi balukaka bososoli na kolukaka na “ndako monene mpe ya etando.”3

Ntango tobakisi bososoli na biso ya malongi ya Klisto, tomoni noki ete tozali kokolisa na mozindo bososoli ya “mwango monene ya esengo.”4 tondimi lisusu ete Mobikisi na biso, Yesu Klisto azali na katikati ya mwango.

Ntango toyekoli boni tokoki kosalela malongi ya Klisto na makambo na biso ya moto na moto, bolingo na biso mpo na Mobikisi ekoli. Mpe tondimi “ete ata kotalaka na ndenge ekeseni, banso tozali na bosenga ya Bomikabi kaka wana ezanga ndelo .”5 Tondimi ete Azali moboko na biso—“libanga ya Mosikoli na biso, …moboko ya solo …wapi soki [biso] totongeli [tokoki] kokweya te.”6

Lolenge nini malongi oyo ekoki kopambola biso ntango toluki kimia, mpe tososoli tosali makasi ya kozala molende na esengo na mibembo na biso se moko na nkufa?

Tika na pesa makanisi ete tobanda, lokola Nefi alobi, “elongo na bondimi ya sikisiki na [Klisto], koyekamaka likolo ya oyo azali na nguya ya kobikisa.”7 Bondimi na biso na Yesu Klisto epesi biso makoki ya kolonga ata mokakatano kani.

Tozali, ya solo, mbala mingi komona bondimi na biso kozindisama mpe kimoninga elongo na Tata ya Lola mpe Mwana na Ye kosilisa mitungisi. Tika nakabola bandakisa misato.

Ya yambo, Mobikisi, Nkolo Mobikisi, azali na nguya ya kobongola mitema mpe kopesa biso lisungi efanda uta na mawa oyo euti na lisumu na biosomei. Ntango Mobikisi ateyaki mwasi Mosamaria na liziba ya mayi, ayebaki masumu na ye mpenza. Atako, “Nkolo atalaki motema,”8 mpe Ye ayebaki akoyamba malamu malakisi.

Ntango mwasi ayaki na liziba ya mayi, Yesu—elembo ya mayi ya bomoi—alobaki bobele, “pesa ngai mayi namela.” Mobikisi na biso akoki kolobela biso na mongongo toyebaka ntango toyaka epai na Ye—mpo ayebi biso. Akutani na biso esika tozali. Mpe mpo na oyo Ye azali mpe maye Ye asali mpo na biso, Asosolaka. Mpo Ye ayebi mpasi na biso, Akoki kopesa biso mayi ya bomoi ntango tozali koluka yango. Ateyaki mwasi Mosamaria oyo ntango alobaki, “Soki oyebaki likabo ya Nzambe mpe oyo azali koloba na yo, Pesa ngai mayi namela; osengelaki osenga epai na ye, mpe akoki kopesa yo mayi ya bomoi.” Na nsima ya kososola, mwasi ayanolaki na bondimi mpe alobaki, “Mokonzi, pesa ngai mayi oyo, ete nayoka lisusu mposa te.”

Nsima mwasi Mosamaria azwaki boyebi oyo elongo na Mobikisi, “atikaki mbeki ya mayi, mpe azongaki na engumba, mpe ayebisaki bato,

“Boya, kotala mobali, oyo alobeli ngai makambo nyoso oyo naino nayoka te: ezali oyo Klisto te?”

Atatolaka mpo na yango—abandaka koyamba mayi ya bomoi mpe alingaki kotatola bonzambe na Ye epai ya basusu.9

Ntango toyei epai na Ye na komikitisa mpe tolingi koyamba malakisi—atako mitema na biso ezali kilo na mabunga, masumu, mpe bobuki mibeko—Akoki kobongola biso, “mpo atonda nguya mpo na kobikisa.”10 Mpe na mitema ebongwama, tokoki lokola mwasi Mosamaria kokende na bingumba na bisomei—mabota na biso, biteyelo, bisika ya mosala—mpo na kotatola Ye.

Ya mibale, Nkolo Mobikisi akoki kobondisa mpe kopesa biso makasi ntango toleki na mpasi na ntina ya misala ezanga bosembo ya basusu. Nasololaki mbala mingi na basi oyo bazali kobunda na mikakatano. Kobatela mayokami basalaki uta na tempelo ekomi mobembo ya mpasi ya lobiko. Banyokwami uta na mayokami ebukana, mitema ekobukana, mpe elikya ebunga. Mingi babebisami na monioko ya ekobo mpe maloba, ya bosangisi nzoto, mpe ya kobebisama ya mayoki, mbala mingi lokola mbano ya babokangami ya bato basusu.

Misala miye, atako esalemaki na libunga na bangomei te, etiki mayoki mingi ya elindo mpe ya nsoni. Kososola te boniboni kosalela nguya ya mayoki bazali kokutana na yango, mingi bameki kokunda yango, kotidikaka yango na mozindo kati na bangomei.

Elikia mpe lobiko ezali te na kobombaka makambo kasi na pole mpe bolingo ya Mobikisi, Yesu Klisto.11 Mpaka Richard G. Scott apesaki toli: “soki olimbisami [na] lisumu monene yomei, konyokwama te na mbano ya masumu ya moto mosusu. … Okoki koyoka motema mawa. … Atako okoki te komema likolo na yomei liyoki ya mokumba. … Ntango osali oyo ekoki mpo na kosunga moto olingi, tika mokumba na makolo ya Mobikisi.  … Ntango osali bongo, okomzwa kaka kimia te kasi okolakisa bondimi na yo na nguya ya Mobikisi kotombola mokumba ya lisumu uta na moto molingamina nzela ya boyamboli na ye mpe botosi.”

Akobaki: “Lobiko ekokokisama na nzela ya bondimi na yo na Yesu Klisto mpe na nguya mpe makoki na Ye, na nzela ya Bomikabi na Ye, mpo na kobikisa bampota ya oyo nini ezali ya koyengebene te mpe ya litomba te.”12

Soki bomimoni na likambo oyo, bandeko bassi, lobiko ekoki kozala nzela molai. Ekosenga ete boluka bokambami mpe lisalisi ebongi na nzela ya mabondeli, kobakisaka koluka toli elongo na basimbi bonganganzambe bakulisama malamu. Ntango boyekoli kosolola polele, botia bandelo esengeli mpe ntango mosusu boluka toli ya bayebi mosala. Kokobaka bokolongonu ya molimo na nzela mobimba ezali na ntina! Omikundola nkombo na yo ya bonzambe: ozali mwana mwasi ya bolingo ya Baboti na Lola. Tia elikia na mwango ya seko ya Tata na biso mpo na yo. Koba mokolo na mokolo kobutisa bossosoli na yo ya malongi ya Yesu Klisto. Salela bondimi mokolo na mokolo komela uta na liziba ya mayi ya bomoi ya Mobikisi. Yekama likolo ya dotasio ya nguya esalema mpo na banso kati na biso na nzela ya makuli mpe mayokami. Mpe pesa nzela na nguya ya lobiko ya Mobikisi mpe Bomikabi na Ye na bomoi na yo.

Ya misato, Nkolo Mobikisi akoki kobondisa mpe kosunga biso ntango toleki na boyebi ya mpasi “babosolo ya bomoi ya kufa,”13 ndakisa makama, maladi ya mutu, makono, mpasi esilaka te, mpe liwa. Nayebanaki kala te na elenge mwasi moko ya kafukafu nkombo na ye Josie oyo anyokwami uta na bokono ya makasi. Botala mwa moke ya mobembo na ye kolukaka lobiko ntango asololaki na ngai:

“Ngonga ya mikakatano mabe eyaka na nini libota na ngai mpe ngai tobengi ‘mikolo ya mpasi.’ Ebandaka na koyoka kilo koleka ya makambo nyoso mpe mayoki makasi mpe botelemeli ya lolenge nyoso ya makelele, bosimbi, to pole. Ezali nsonge ya mpasi ya moto. Ezali mokolo moko oyo nakoki kobosana mokolo moko te.

“Ezalaki ntango nabandaki maladi na ngai, kosalaka boyebi mingimingi ya kobanga. Nakoki komikundola koleka makasi, mpinzoli kokitaka na elongi na ngai ntango nayokaki pema kokatana ngai. Kasi atako lolenge ya monioko makasi na kokokanisa na mpasi oyo elandisamaki lokola namonaki kozanga kimia kolata mama na ngai, ya kozanga elikia mpenza mpo na kosunga ngai.

“Ayokaki mawa mpenza komonaka ngai konyokwama na lolenge oyo. Kasi atako makambo ekomaki lokola mabe koleka, tozalaki kaka mosika uta na bangonga ya kozwa likamwisi ya nguya.

“Ntango ngonga molai ekobaki, mama na ngai amilobelaki mbala na mbala mpe mingi lisusu, ‘nakosala eloko kani mpo na oyoka ndenge oyo te.’

“Ntango wana, mpasi eyaki makasi, mpe ntango nandimaki kokoka yango ntango molai te, kaka bongo eloko moko ya kokamwa esalemaki.

“Nguya ya likolo mpe ya kokamwisa ekitanaki mbala moko elataki nzoto na ngai. Nsima, ‘na bokasi moko koleka oyo ya ngaimei,’14 nalobaki na mama na ngai na kondima monene maloba nsambo ya kobongola bomoi lokola eyano epai na mposa na ye oyo azongelaki mpo na komema mpasi na ngai. Nalobaki, ‘okoki kosala te; Moto mosusu asi asala.’”

Uta na mpasi ya bokono ya mabe ya moto, Josie asangisaki bokasi mpo na kotatola Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye.

Abikisamaki mobimba mokolo wana te, kasi azwaki pole ya elikia na ngonga ya molili makasi. Mpe lelo, kosungama na bososoli elenda ya malongi mpe kolata bokasi mokolo na mokolona mayi ya bomoi ya Mobikisi, Josie akobi mobembo mpo na kobikisama mpe azali kosalela bondimi ya sikisiki na Nkolo Mobikisi. Azali kosunga basusu nzela nzela. Mpe alobaka, “Ntango nayokaka mpasi ekokatana te, nayekamaka likolo ya mayele ya mawa na Ye ya boboto. Esungaka lokola pole ya kokamba ntango nazali konana na bangonga ya mpasi.”15

Bandeko basi, natatoli ete—

Osengeli te kokoba komema kilo ya mpasi euti na lisumu— yo moko.

Osengeli te komema mpasi euti na misala ezanga bosembo ya basusu—yo moko.

Osengeli te koyoka bosolo ya mpasi ya bokufi—yo moko.

Mobikisi asakoli:

“Ekoya bino te sikawa epai na ngai, mpe koyambola masumu na bino, mpe kobongwana, ete nakoka kobikisa bino?

“… Soki bokoya epai na ngai bokozwa bomoi ya seko. Tala loboko na ngai ya ngolu etandolami mpo na bino, mpe moto nyoso oyo akoya … na koyamba ye.”16

“[Ye]akosala nyoso oyo mpo na yo.” Ya solo, “[Ye] asi asala.’” Na nkombo ya Yesu Klisto, Nkolo Mobikisi, amene.