2010–2019
Nguya Ezali na Buku Yango
Sanza ya Zomi 2016


Nguya Ezali na Buku Yango

Ntango mosusu nguya eleki monene ya Buku ya Mormon ezali mbano na yango na komemaka biso penepene mingi na Yesu Klisto.

Na sanza ya motoba  14, 1989, na ntina ya boko mayebisi ya lokuta etali Eklezia, bakonzi ya Ghana bapekisaki milulu nyonso ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka na ekolo wana ya Afrika. Bakonzi wana bakangaki bikolo ya Eklezia, mpe misala nyonso ya misio ekangamaki. Bandimi ya Eklezia, oyo balobelaka eleko wana lokola “bokangami,” basalaki makasi koleka mpo na kosalela na bomoi na bango nsango malamu na kozanga masangani to lisungi ya bamisionele. Ezali na masolo mingi ekoki kofula etali boni bandimi babatelaki pole ya nsango malamu kopela na kokumbamelaka na bandako na bango mpe kokengelana lokola ndako mpe batali bateyi.

Na nsuka bozangi kososola esilaki, mpe na sanza ya zomi na moko 30, 1990, bokangami esukaki mpe Eklezia milulu esengeli ya Eklezia ebandelaki.1 Uta wana ezali na bozalani malamu mpenza na katikati ya Eklezia mpe bakonzi ya Ghana.

Bandimi oyo bazali na ntango ya bokangami bazali noki na kososola mapamboli oyo eyaki uta na eleko wana ya momesano te. Bondimi ya bato mingi elendisamaki na kati ya momekano oyo takutanaki na yango. Kasi lipamboli moko ya bokangami eyaki na lolenge moko ya momesano te.

Nicholas Ofosu-Hene azalaki elenge polisi moko batiaki ye mokengeli na ndakoanzambe moko ya LDS na ntango ya bokangami. Lotomo na ye ezalaki kokengela etonga na butu. Ntango Nicholas akomaki na ndakoanzambe, amonaki ete biloko epanzanaka nzinganzinga, na bapapie, babuku, mpe bakiti mbilingambilinga. Na kati ya mobulu wana, amonaki buku ya Mormon moko. Amekaki toboya koyeba buku wana mpamba te bayebisaka ye ete ezali mabe. Kasi kokamwa, ayakaki ebendaki ye. Na nsuka, Nicholas akokaki lisusu te kozanga koyeba buku wana. Alokotaki yango. Ayokaki mposa ya kobanda kotanga yango. Atangaki yango butu mobimba, komonaka pinzoli kotanga na matama na ye ntango azalaki kotanga.

Mbala ya yambo alokotaki yango, atangaki 1 Nefi. Mbala ya mibale, atangaki mobimba ya 2 Nefi. Ntango akomaki na 2 Nefi mokapo 25, atangaki oyo: “mpe tokolobelaka Klisto, tokoteyaka Klisto, tokobikulaka Klisto, mpe tokokomaka engebene na mabikuli ma biso, ete bana na biso bakoka koyeba na liziba kani bokoki koluka bolimbisi bwa masumu ma bango.”2

Na esika wana Nicholas ayokaki Molimo makasi mpenza ete abandaki kolela. Asosolaki ete na kokotangaka azwaki botindiki mingi ya molimo ete buku oyo ezalaki makomi, oyo eleki alima koleka atanga naino te. Asosolaki ete Basantu ba Mikolo mya Nsuka, na bokeseni na oyo ayokaka, bandimelaka makasi Yesu Klisto. Nsima ya bokangami kosila mpe bamisionele kozonga na Ghana, Nicholas, mwasi mpe bana na ye bakotaki na Eklezia. Ntango namonaki ye mobu eleki, azalaki mokonzi ya bapolisi mpe azalaki kosala lokola mokambi ya Disitiliki ya Eklezia na Tamale na Ghana. Ye alobaki: “Eklezia ebongoli bomoi na ngai. … Nantondi Nzambe wa Bokasi Bonso mpo akambaki ngai na kati ya nsango malamu oyo.”3

Alibert Davies, moko mosusu ya Ghana, akendeki kotika moninga na ye moko na ndakoanzambe na biso moko, esika moninga na ye wana azalaki na bosangani ya bokambi. Ntango azalaki kozela moninga na ye, Alibert atangaki buku moko akutaka mpembeni. Ntango bosangani esilaki, Alibert alingaki komema buku wana na ndako kasi lisusu Buku ya Mormon. Ntango akomaki na ndako, abandaki kotanga Buku ya Mormon. Akokaki te kotika yango. Atangaki na buji kino 3:00 ya ntongo. Asalaki yango babutu mingi, oyo atangaki mpe ayokaki elekelaki ye. Alibert azali sikawa mondimi ya Eklezia.

Angelo Scarpulla abandaki koyekola teolozi na Italie epai abotamaki ntango azalaki na mibu 10. Na nsuka akomaki nganganzambe mpe asalaki na eklezia na komipesa. Na esika moko bondimi na ye ebandaki koningana, mpe alukaki mpe azwaki mabaku mpo na koyekola lisusu. Nzokande na koyekolaka mingi, akomaki na komitungisa mingi. Oyo atangaki mpe ayokaki endimisaki ye ete ezalaka na bopengwi mosika na malongi ya solo eteyamaki na Yesu mpe Bapostolo ya kala. Angelo alukaki eyamba ya solo ya Nzambe kasi atikalaki na mposa mibu mingi.

Mokolo moko akutanaki na bandimi mibale ya Ekleiza oyo bazalaki kosalisa bamisionele kokutana na bato ya koteya. Ayokaki lokola babendeki ye mpe na esengo ayokemelaki nsango na bango. Angelo na bolingi andimaki Buku ya Mormon.

Mpokwa wana abandaki kotanga buku. Ayokaki esengo elekelaki ye. Na nzela ya Molimo, Nzambe apesaki Angelo sikisiki ya kati ete na Buku ya Mormon alingaki kokuta bosolo oyo azalaka koluka mibu mingi mileki. Mayoki ya kitoko etondaki na kati na ye. Oyo atangaki mpe oyo ayekolaki na bamisionele endimisaki na nsuka ete ezalaka na bopengwi moko monene, kati lisusu ayekolaki ete Eklezia ya solo ya Nzambe ezongisamaka na mabele. Mwa ntango nsima, Angelo abatisamaki na kati ya Eklezia.4 Ntango nakutanaki na ye mbala ya yambo azalaki mokambi ya Etape ya Eklezia na biso ya Rumini na Italie.

Oyo, Alibert, mpe Angelo bayokaki na Buku ya Mormon ezali kokundolisa likambo ya Parley P. Pratt:

“Nafungolaki [buku yango] na mposa. … Natangaki mokolo mobimba; kolia ezalaki kilo, nazalaki na mposa ya kolia te; kolala ezalaki kilo ntango … butu ekomaki, mpo nasengelaki koleka kotanga koleka kolala.

“Lokola nazalaki kotanga, molimo ya Nkolo ezalaki likolo na ngai, mpe nayebaki mpe nasosolaki ete buku yango ezalaki ya solo, lokola mpenza mpe na polele moto asosolaka mpe ayebaka ete azali. Esengo na ngai etondaki sikawa, nakoki koloba, mpe nasepelaki ya kokoka mpo efutaki ngai mingi koleka mpo na bamawa, mabonza mpe bampasi ya bomoi na ngai.”5

Basusu bazwi mayele ya nguya boye na Buku ya Mormon mbala ya yambo bafungoli yango, kasi mpo na basusu, litatoli ya bosolo eyaka moke moke ntango bazali kotanga mpe kosambele mpo na yango. Bongo ezalaki mpo na ngai. Natangaki Buku ya Mormon mbala ya yambo lokola moyekoli moko ya elenge na seminele. Oyo ezali Buku ya Mormon oyo na natangaka. Nakoki kolobela bino te ngonga to esika mpenza yango ekomaki, kasi esika moko na kotangaka, nabandaki koyoka eloko moko. Ezalaki na molunge moko mpe molimo moko oyo ezalaki koya mbala nyonso nafungolaki buku. Liyoki abakisamaki ntango nakobaki na kotanga na ngai, liyoki wana ekobaka kinno mokolo ya lelo. Ntango nyonso nafungolaki Buku ya Mormon, ezali lokola kobaluka buto ya kofungolela radio—molimo ekosopana na kati ya motema mpe molimo na ngai.

Mpo basusu lisusu, litatoli ya Buku ya Mormon ekoyaka mingi malembemalemba, nsima ya kotanga mpe kosambela mingi. Nazali na moninga moko oyo atangaki Buku ya Mormon kolukaka koyeba soki ezalaki ya solo. Asalelaki libengisi ya Moroni mpo na kotuna Nzambe na motema ya solo, na likanisi ya solo mpe bondimi na Klisto, soki Buku ya Mormon ezali ya solo. 6 Kasi azwaki mbala moko te eyano elakelama. Nzokande mokolo moko, ntango azalaki mozindo na makanisi, kotambwisaka motuka na nzela ya kokitela, Molimo etatolaki na ye bosolo ya Buku ya Mormon. Azalaki na esengo mpe elekelaki ye mpenza ete akitisaki lininisa ya motuka mpe agangaki, na moto moko te songolo kasi na mokili mobimba, “Ezali ya solo!”

Ata soki litatoli na biso ya Buku ya Mormon eyei mbala ya yambo tofungoli yango to na eleko moko ya ntango, ekosala na nguya epai na biso mikolo na biso nyonso soki tokobi kotanga yango mpe kosalela mateya na yango. Mokambi Ezra Taft Benson ateyaki: “Ezali na nguya moko na buku oyo ekobanda kosopana na kati ya bomoi na biso ntango tobandi koyekola na lokengo buku oyo. Bokozwa nguya monene mpo na kotelemela lisenginia. Bokozwa nguya ya ekoboya lokuta. Bokozwa nguya ya kotikala na nzela eke mpe ya nkaka.”7

Nalendisi moto nyonso akozwa nsango oyo, ata mosimbi bonganganzambe ya alona bayei na bosangani ya mpokwa ya lelo, na koluka koyeba nguya ya Buku ya Mormon. Lokola Thomas S. Monson alendisaki biso: Botanga Buku ya Mormon. Bomaniola mateya na yango. Botuna Tata ya Lola soki ezali ya solo.”8 Na nzela wana bokoyoka Molimo Mosangu na bomoi na bino. Molimo ekozala eteni ya litatoli na bino ete Buku of Mormon ezali ya solo, ete Joseph Smith azalaki profeta ya nzambe, mpe ete Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali Eklezia ya solo ya Nzambe na mabele lelo. Litatoli wana ekosalisa bino botelemela lisenginia.9 Ekolengela bino mpo “libiangi monene ya etingia  … mpo na kosala na bilanga ya vinu ya Nkolo.”10 Ekozala lokola longo ya sikisiki ntango kafunda mpe masakola ya kokosela ekosalelama mpo na kobundisa bondimi na bino mpe ekozala likonzi moko ya makasi lokola libanga ntango bokutani na mituna bokoki koyanola te, kutu mbala moko. Bokokoka kososola bosolo na libunga, mpe bokoyoka sikisiki ya Molimo Mosantu kondimisaka lisusu litatoli na bino mbala na mbala ntango bokobi kotanga Buku ya Mormon na bomoi na bino mobimba.

Nalendisi lisusu baboti bazali koyoka to kotanga nsango oyo na kosala ete Buku ya Mormon ekoma eteni ya motuya ya ndako. Ntango bana na biso bazalaki kokola, tozalaki kotanga Buku ya Mormon ntango tozalaki kotia na ntongo. Oyo ezali elembo tozalaki kosalela. Na liboko ezali na litangi ewuti na Mokambi Benson kolakaka ete Nzambe akosopa lipamboli moko likola na biso ntango tozali kotanga Buku ya Mormon.11 Na nsima ezali na elaka ewuti na Mokambi Marion G. Romney, mopesi toli ya kala ya Bokambi ya Yambo: “Nayoki ya solo mpenza ete soki, na bandako na biso, baboti bakotanga na Buku ya Mormon na losambo mpe mbala na mbala, na bango moko mpe elongo na bana na bango, molmo ya buku oyo monene ekoya kotonda na bandako na biso mpe banso oyo bafandaka kuna. … Molimo ya bozwani ekolongwa. Baboti bakopesa toli na bana na bango na bolingo mpe bwania monene. Bana bakoyanola malamu mpe bakomikitisa na toli ya baboti na bango. Bosembo ekobakisama. Bondimi, elikia, mpe bolingani—bolingo ya peto ya Klisto—ekofuluka na bandako mpe bomoi na biso, komemaka na nsima na yango kimia, bosepeli, mpe esengo.”12

Sikawa, mibu mingi nsima uta bana na biso batiki ndako mpe bazali kobokola mabota na bango, tokoki komona na polele bokokisi ya elaka ya Mokambi Romney. Libota na biso ezali mosika na kozala ya kobonga mpenza, kasi tokoki kotatola nguya ya Buku ya Mormon mpe mapamboli oyo yango ememi mpe ekobi komema na bomoi na biso mobimba.

Ntango mosusu nguya eleki monene ya Buku ya Mormon ezali mbano na yango na komemaka biso penepene mingi na Yesu Klisto. Ezali litatoli moko makasi ya Ye mpe ya etinda na Ye ya kosikola.13 Na nzela na yango toyei kososola lokumu mpe nguya Bomikabi na Ye.14 Eteyaka malongi na Ye na polele.15 Mpe na ntina ya mikapo ya kitoko eluti kolimbolaka botali ya Klisto mosekwi na Baneti, tomoni mpe toyoki Ye kolingaka, kopombolaka mpe koteyaka bato wana mpe toyei kososola ete Ye akosala yango kaka mpo na biso soki toyei epai na Ye na kosalelaka nsango malamu na Ye na bomoi na biso.16

Natatoli nguya na Buku ya Mormon. Ezala na kotanga yango na Anglais, Italien, to Français, na mikanda to na biloko ya lotiliki, namona molimo wana kaka kosopana uta na mikapo mpe milongo na yango na bomoi na ngai. Natatoli na bokoki na yango mpo na kosalisa biso kobelema penepene mingi na Klisto. Nasambeli ete moko na moko na biso akozwa litomba nyonso ya nguya oyo ezali na buku oyo ya kokamwa. Na nkombo ya Yesu Klisto.

Matangi

  1. Tala “‘You Can’t Close My Heart’: Ghanaian Saints and the Freeze,” sanza ya yambo 6, 2016, history.lds.org.

  2. 2 Nefi 25:26.

  3. Email uta na Nicholas Ofosu-Hene, sanza ya zomi 27, 2015.

  4. Tala Angelo Scarpulla, “My Search for the Restoration,” Tambuli, sanza ya motoba 1993; email uta na Ezio Caramia, sanza ya libwa. 16, 2016.

  5. Autobiography of Parley P. Pratt, ed. Parley P. Pratt Jr. (1938), 37.

  6. Tala Moroni 10:3–5.

  7. Enseignement des Presidents de l’Eglise: Ezra Taft Benson (2014), 141.

  8. Thomas S. Monson, “Dare to Stand Alone,” Liahona, sanza ya Zomi na moko 2011; tala lisusu Thomas S. Monson, “Priesthood Power,” Liahona, sanza ya Mitano 2011; A Prophet’s Voice: Messages from Thomas S. Monson (2012), 490–94.

  9. Mokambi Thomas S. Monson ateyi: “Mosimbi bonganganzambe nyonso asengeli kosala elongo na koyekola makomi mokolo na mokolo. … Natatoli bino, ata bosimbi Bonganganzambe ya Alona to ya Melikesedeke, ete soki bokoyekola na etingia makomi, nguya na bini ya koboya lisenginia mpe ya kozwa bokambami ya Molimo Mosantu na nyonso bokosala ekobakisama” (Thomas S. Monson, “Be Your Best Self,” Liahona, sanza ya Mitano 2009, 68).

  10. Alma 28:14.

  11. “Nalaki bino ete uta ngonga oyo mpe nsima, soko tokolia mokolo na mokolo nkasa ya [Buku ya Mormon] mpe tokowumela na mateya na yango, Nzambe akosopa likolo ya mwana nyonso ya Siona mpe Eklezia lipamboli moko kino sikawa eyebani te” (Teachings: Ezra Taft Benson, 127).

  12. Marion G. Romney, “The Book of Mormon,” Ensign, sanza ya mitano 1980, 67.

  13. Tala, ndakisa, lokasa ya nkombo ya Buku ya Mormon; 1 Nefi 11; 2 Nefi 25; Moziya 16; 18; Alma 5; 12; Elamani 5; 3 Nefi 9; Mormon 7.

  14. Tala, ndakisa, 2 Nefi 2; 2 Nefi 9; Moziya 3; Alma 7; 34.

  15. Tala, ndakisa, 2 Nefi 31; 3 Nefi 11; 27.

  16. Tala 3 Nefi 11–28.