2010–2019
Tokokende Epai ya Nani?
Sanza ya Zomi 2016


Tokokende Epai ya Nani?

Na nsuka, moko na moko kati na biso asengeli koyanola na motuna ya Mobikisi: “bino mpe bokokende lisusu?”

Mibu mingi eleki libota na ngai mpe ngai tokendaki kotala Mabele Esantu. Moko ye makanisi na ngai makasi uta na mobembo na biso ezalaki botali kisuku ya likolo na Yelusaleme, esika eyebana ya Elambo ya Nsuka.

Ntango totelemaki na esika wana, natangaki mpo na bango uta naYoane 17, kuna Yesu abondelaki epai na Tata na Ye mpo ya bayekoli na Ye:

“Nabondeli mpo na bango…ete bazala lisanga, lokola tozali. …

“Nabondeli kaka mpo na bango moko te, kasi mpo na bango lisusu oyo bakondimela ngai na nzela ya maloba na bango;

“Ete bakoka kozala lisanga; lokola yo, Tata, ozali kati na ngai, mpe ngai kati na yo, ete bango lisusu bazala lisanga kati na biso.”1

Nayokaki nsai mpenza ntango natangaki maloba maye mpe nabandaki ngaimei kobondelaka na esika wana esantu ete nakoka kozala libela na lisanga na libota na ngai mpe na Tata ya Lola mpe na Mwana na Ye.

Kimoninga na biso ya ntalo na mabota na biso, baninga, Nkolo, mpe Ekezia na Ye ezongisama ezali kati na makambo mingi koleka na bomoi. Mpo kimoninga wana ezali na litomba mpenza, tosengeli kolingama makasi, kobatelama, mpe kotombolama.

Moko ya masolo ya malamu kati na makomi esalemaki ntango “mingi kati ya bayekoli ya [Nkolo] ” bamonaki yango mpasi mpo na kondima mateya mpe malongi na Ye, mpe “bazongaki nsima, mpe batambolaki mingi na ye te.2

Lokola bayekoli wana balongwaki, Yesu abalukaki epai ya Bazomi na Mibale mpe atunaki, “Ekokende bino lokola?”3

Petelo ayanolaki:

“Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko.

“Tondimi mpe toyebi ya solo ete ozali Klisto wana, Mwana ya Nzambe na bomoi.”4

Na ngonga wana, ntango basusu batalaki kaka nini bakokaki kondima te, Bapostolo baponaki kotala kaka nini bango bayebaki mpe bandimelaki, mpe lokola litomba, batikalaki na Klisto.

Nsima, na mokolo ya Pantekote, Bazomi na Mibale bazwaki likabo ya Molimo Mosantu. Balendaki na litatoli na bango ya Klisto mpe babandaki kososola mingi litondi ya mateya ya Yesu.

Na mikolo na biso bokeseni ezali te. Mpo na mingi, libiangi ya kondimela Klisto ezali kaka mpasi—to mpasi mpo na kondima. Bayekoli mingi babundani mpo na kososola mpenza boyangeli ya Eklezia to mateya. Basusu baluki komona kotala kaka na lisitwale na biso to na mabunga ya bandimi mingi mpe bakambi, baleka to ya sika. Basusu bakobi komona yango mpasi kozala na eyamba oyo esengi mingi komibonza. Na yango, mingi “batiki kosala bolamu.”5 Mpo na wana mpe ntina mosusu, bandimi mosusu ya Eklezia bazali kotatabana na bondimi, kolukaka soki ntango mosusu basengeli kolanda baoyo “bazongaki nsima, mpe batambolaki mingi te” na Yesu.

Soki moko kati na bino atatabani na bondimi, totuni bino motuna moko kaka wana Petelo atunaki: “ [Bokokende] epai ya nani?” Soki boponi kokoma na bolembu to kolongwa na Eklezia ya Yesu Klisto ezongisama, bokokende wapi? Bokosala nini? Mokano ya “kotambola mingi te ” na bandimi ya Eklezia mpe na bakambi baponama ya Nkolo ekoki kozala na mbano mikolo ekoya oyo ekoki komonana te sika oyo te. Wana mosusu ndambo malongi, ndambo ya boyangeli, ndambo ya lisiltwale oyo etindiki bino kobendana na bondimi, mpe bokoki koyoka ete nzela se moko ya komibimisa na motungisi wana ezali “kotambola te ” na Basantu. Soki bozali lokola nazali, bokokoma koyeba ete makambo ezali na lolenge ya komisilisa yango moko. Eteni moko efulama to bokundoli ekoki kokolisa bososoli na nzela. Bomikundola, Bozongisi ezali milulu te, kasi yango ezali kokoba kokola.

Botika te babosolo minene ekundolamaki na nzela ya Profeta Joseph Smith. Botika kotanga te, koluka, mpe kosalela malongi ya Klisto ezwami na Buku ya Mormon.

Kozanga te kopesa ntango ekokani epai ya Nkolo na kosala na bosembo mpo na kososola nini Nkolo akundolaki. Ntango moninga na ngai ya kala Mpaka Neal A. Maxwell mbala moko alobaki, “Tosengeli kondima te … oyo kaka mpo na likambo tokoki kolimbola te, yango ezangi ndimbola.”6

Na yango soki bozwi mokano ya molimo ya mabe oyo ya kolongwa, natindiki bino botika mpe bokanisa malamu yambo ya kolongwa atako yango nde ememaki bino na litatoli ya Eklezia ezongisama ya Yesu Klisto na esika ya yambo. Botika mpe bokanisa na ntina ya oyo boyokaki awa mpe mpo na nini boyokaki yango. Bokanisa na ntina ya bangonga ntango Molimo Mosantu etatolelaki bino bosolo ya seko.

Wapi bokokene kokuta basusu oyo bakaboli boyambi ya moto mpenza, bolingo ya Baboti ya lola, oyo bateyi biso boniboni kozonga epai na Bango libela?

Bokokenda wapi mpo na koteyama na ntina ya Mobikisi oyo azali moninga malamu, oyo bobele te ayokaki mpasi mpo na masumu na bino kasi lisusu ayokaki “mpasi ya bolozi mpe mitungisi mpe masenginya ya bato nyoso” solo “ete nsopo na ye ekoka kotonda na ngolu, engebene mosuni, ete akoka koyeba engebene namosuni boniboni kosalisa bato na ye engebene bokono na bango,”7kosangisama na, nandimeli, bolema ya kozanga bondimi?

Bokokende wapi koyekola mingi na ntina ya mwango ya Tata ya Lola mpo na esengo mpe kimia na biso ya seko, mwango oyo etondisami na makoki ya kokamwa, mateya, mpe bokambami mpo na bomoi na biso ya kufa mpe ya seko? Bomikundola, mwango ya lobiko epesi ndimbola ya bomoi ya kufa, mpe bokambami.

Bokokende wapi mpo na kozwa Eklezia elimbolama mpe ebongisama na bofulami na nzela oyo boteyami mpe bosungami na basi mpe mibali oyo bamipesi na mozindo mpo na kosalelaka Nkolo na kosalisaka bino mpe libota na bino?

Bokokende wapi mpo na kozwa baprofeta mpe bapostolo na bomoi, oyo babiangemi na Nzambe mpo na kopesa bino liziba mosusu mpo na toli, bososoli, libondisi, mpe bofulami mpo na bitumba ya mikolo na biso?

Bokokende wapi mpo na kokuta bato oyo bazali na evandeli ebongisama ya ntina mpe mitindo oyo bokaboli mpe mpo na kolakisa yango epai na bana mpe bankoko na bino?

Mpe bokokende wapi mpo na boyebi esengo oyo eyaka na nzela kobatela makuli mpe mayokami ya tempelo?

Bandeko basi mpe mibali, kondima mpe kosalela nsango malamu ya Klisto ekoki kozala etumba. Yango ezali kaka na bitumba, mpe yango ekozala kaka. Bomoi ekoki kozala lokola komata lokolo mpe na mikakatano. Yango eyebani mpe likambo malamu mpo na libaku ya kozala na nzela elongobana, kasi eloko mabe ezali ten tango totosi ntango mabaku na bino esengeli. Na yango, ekoki kozala eloko ya malamu mpo na baoyo bazali kozwa ntina mobimba ya libaku ya kolengelela bango na mai ya bomoi ya nsango malamu ya Klisto.

Likama eyaka ntango moto aponi kobungisama uta na nzela oyo ememi na nzete ya bomoi.8 Ntango mosusu tokoki koyekola, komaniola, mpe koyeba, mpe ntango mosusu tozali na boyambi, kondima, mpe elikia.

Na nsuka, moko na moko kati na biso asengeli koyanola na motuna ya Mobikisi: “bino mpe bokokende lisus?”9 Tozali banso koluka mpo na eyano ya bisomei na motuna wana. Mpo na mingi, eyano ezali pete; mpo na basusu, yango ezali mpasi. Nakoki koyeba te mpo na nini bondimi na koyamba eyaka na pete mpo na mingi koleka mpo na basusu. Natondi solo mingi mpo na koyeba ete biyano ezali bobele wana, mpe soki toluki bango—solo koluka na motema ya bosembo mpe na mokano motonda ya motema—tokozwa solo mpenza biyano na mituna na biso ntango tokobi na nzela ya nsango malamu. Na mosala na ngai, nayebi baoyo basundoli mpe baboyi momekano ya bondimi.

Elikia na ngai ya solo ezali ete tokobengisa motango monene ya bana ya Nzambe mpo na komona mpe kotikala na nzela ya nsango malamu bongo bakoka lisusu “kokabola mbuma, oyo[ezali] elengi likolo ya mbuma mosusu.”10

Libiangi na nga ya motema ezali ete tokoka kotindika, kondima, kososola, mpe kolinga baoyo bazali kobundisama na bondimi na bango. Tosengeli kotala pamba te soki nani ya bandeko nabiso ya basi mpe mibali. Tozali banso na bisika ekeseni kati na nzela, mpe tosengeli kosala mpo na moko engebene na mosusu.

Kaka lokola tosengeli koyamba na esengo babongwani ya sika, solo tosengeli koyamba mpe kosunga baoyo bazali na mituna mpe bazali kotatabana na bondimi na bango.

Kosalelaka elembo eyebani, nabondeli ete moto kani akokanisi kotika “Masuwa ya Kala ya Siona,” wapi Nzambe mpe Klisto bazali na yende, akotelama mpe akokanisa na bokengi liboso ya kosala bongo.

Nasengi boyeba ete atako bikumbaki ya mopepe mpe bambonge ezali kobeta masuwa ya kala, Mobikisi azali na kati mpe azali na makoki ya kopamela ekumbakii na motindo na Ye “Kimia, zala kimia.” Kino na bongo, tosengeli kobanga te, mpe tosengeli kozala na bondimi etatabanaka te mpe koyeba ete “ata mopepe mpe mbu etosaka ye.”11

Bandeko basi mpe mibali, nalaki bino na nkombo ya Nkolo ete Akoki kotika Eklezia na Ye te mpe Akoki kotika soki nani kati na biso te. Bomikundola eyano ya Petelo na motuna ya Mobikisi mpe maloba:

“Tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi.

“Mpe tondimi ya solo ete ozali Klisto , Mwana ya Nzambe na bomoi.”12

Natatoli ete ezali “na nkombo mosusu te epesami to na nzela mosusu na wapi lobiko ekoki koya epai ya bana ya bato, bobele na nkombo ya Klisto.”13

Natatoli lisusu ete Yesu Klisto abiangaki bapostolo mpe baprofeta na mikolo na biso mpe azongisaki Eklezia na Ye na mateya mpe mitindo lokola “ekimelo uta na ekumbaki, mpe uta na nkanga” oyo ekoya solo longola se bato ya mokili bayamboli mpe bazongi epai na Ye.14

Natatoli lisusu ete Nkolo “abiangi bango banso baya epai na ye mpe kokabola bolamu na ye; mpe akoboya moko te oyo akoya epai na ye, mpembe mpe moyindo, mowumbu mpe monsomi, mwasi mpe mobali; … mpe bango banso bazali lolenge ya Nzambe.”15

Yesu azali Mobikisi mpe Mosikoli, mpe nsango malamu na Ye ezongisama ekomema biso na bokengi kozonga epai ya Baboti na biso ya Lola soki totikali na nzela ya nsango malamu mpe tolandi makolo na Ye. Na oyo natatoli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.