2010–2019
Nkola Moko ya Batelemeli Lisumu
Sanza ya Minei 2017


Nkola Moko ya Batelemeli Lisumu

Ntango bozali koteya, kokamba, mpe kolinga bana na nzela ya Nzambe, bokoki kozwa bobimisi ya moto se ye moko oyo ekosalisa bino na kokelaka mpe kolatisa bana ya konzo, batelemeli lisumu.

Mobu moko na ndambo eleki, Mokambi Russell M. Nelson alobaki na ntina ya bonsenga ya “koteya mpe kosalisa kobokola nkola moko ya batelemeli lisumu.”1 Liloba wana —“nkola moko ya batelemeli lisumu”—ezalaki na ndimbola ya molimo monene mpo na ngai.

Tokumisaka bana oyo babundaka mpo na kozala na bomoi ya petwa mpe ya botosi. Nazali nzeneneke ya bokasi ya bana mingi na mokili mobimba. Batelemaka makasi, “sikisiki mpe molende”2 na makambo mpe na bisika ya mikakatano ebele. Bana oyo basosoli ezalela ya bonzambe na bango, bayoki bolingo ya tata na bango na Lola mpo na bango, mpe baluki kotosa bolingi na Ye.

Nzokande, ezali na bana oyo bazali kobunda mpo na kotelama “na sikisiki mpe molende” mpe oyo ya bango mayele ya bolembu ezali kozokisama.3Bazali kobundisama na ngambo nyonso na “mbanzi ya nkanda ya monguna” 4 mpe bazali solo na bonsenga ya bolendisi mpe lisungi. Ezali botindiki ya elongo mpo na biso tobelema mpe tokota etumba na lisumu na bokasi ya komema bana na biso epai ya Klisto.

Boyoka maloba ya Mpaka Bruce R. McConkie pene ya mibu 43 eleki:

“Lokola bandimi ya Eklezia, tomipesi na bozangi boyokani moko ya nguya. Tozali na etumba. Tokoti na likambo ya Klisto mpo na kobundisa lusifelo. …

“Etumba monene oyo epeli na ngambo nyonso mpe oyo na mawa ezali kosuka na makama mingi, mosusu ya liwa, ezali likambo ya sika te.

“Sikawa ezali te to ekoki kozala te bato ya neutre na etumba oyo.”5

Lelo etumba ezali kokoba na makasi ya kobuta. Etumba ezali kosimba biso banso, mpe bana na biso bazali na minkoloto ya liboso kobundisaka mapinga ya ngambo mosusu. Yango wana, bonsenga emati mpo ete biso tolendisa banzela na biso ya molimo.

Kolendisaka bana bakoma batelemeli lisumu ezali lotomo mpe lipamboli mpo na baboti, bankoko, baye libota, bateyi, mpe bakambi. Moko na moko na biso tozali na mokumba ya kosalisa. Nzokande, nkolo apesi malako mingimingi baboti bateya bana na bango “basosola malongi ya boyamboli, bondimi kati na Klisto Mwana ya Nzambe na bomoi, mpe libatisi mpe likabo ya Molimo Mosantu” mpe “basambela, mpe batambola na bosembo liboso ya Nkolo.”6

Boniboni “kobokola bana [na biso] na pole mpe bosolo”7ekoki kozala motuna na mikakatano mpo ezali kaka ya libota moko na moko mpe mwana moko na moko, kasi Tata na Lola apesi mibeko ya bato banso oyo ekosalisa biso. Molimo ekofula biso nzela ya makasi mingi mpenza oyo tokoki na molimo kopesa bo tonga na bana na biso.

Mpo na kobanda, kozala na limoni ya motuya ya mokumba ezali ntina. Tosengeli kososola ya biso—mpe ya bango—ezalela mpe ntina ya bonzambe liboso tokoka kosalisa bana na biso bamona nani bazali mpe mpo na nini bazali awa. Tosengeli kosalisa bango bayeba na kozanga motuna ete bazali bana mibali mpe bana basi ya Tata na Lola wa bolingo mpe ete Ye azali na elikia ya bonzambe mpo na bango.

Ya mibale, kososolaka malongi ya boyamboli ezali ntina mpo na kokoma ya kotelamela lisumu. Kozala batelemeli lisumu elingi koloba te kozala na lisumu te, kasi elingi koloba kozala ntango nyonso moyamboli, ekenge, mpe konzo. Ntango mosusu kozala batelemeli lisumu eyaka lokola lipamboli uta na kotelamelaka lisusu mbala na mbala. Lokola Yakobo alobaki, “Botelemelaka oyo na mabe mpe akokima longwa na bino.”8

Babundi ya bilenge yango “bazalaki banso na konzo mpenza mpo na  … ; kasi tala, oyo ezalaki nyonso te—bazalaki … solo na ntango nyonso na makambo bazalaki na mokumba. Iyo, … bateyamaka kobatelama mitindo ya nzambe mpe kotambola alima liboso na ye.”9Bilenge mibali oyo bakendeki etumba kobatelaka babolamu ya Boklisto lokola minduki ya kotelemela banguna. Mokambi Thomas S. Monson akundolisi biso ete “libengisi mpo na mpiko eyaka na moko na moko mbala na mbala. Mokolo na mokolo bomoi na biso esengelami—kaka te mpo na makambo ya minene kasi mbala mingi koleka ntango tozwi mikano to toyanoli na makambo nzinganzinga na biso.”10

Bana na biso balataka nguba ya molimo ntango bazali kotia bandakisa ya kimoyekoli ya mokolo na mokolo ya moto ye moko. Ntango mosusu totiaka mutya moke makoki ya bana ya kosimba likambo ya kimoyekoli ya mokolo na mokolo ya. Mokambi Henry B. Eyring apesaki biso toli ya “kobanda ntongontongo mpe kozala molende.”11 Yango wana fungola ya misato ya kosalisaka bana bakoma kobanda na mibu ya ebandeli mpo na koteya bango na bolingo malongi mpe mabongi ya nsango malamu ya ebandeli—uta na makomi, biteni ya Bondimi, mwa buku Jeunes, soyez forts , nzembo ya Eteyelo ya Bana, cantiques, mpe matatoli ya bisomei—oyo ekokamba bana epai ya Mobikisi.

Kosalaka mimesano makasi ya losambo, boyekoli makomi, likita ya mpokwa na libota, mpe kokumbamela ya Saba ekambaka na kimobimba, sikisiki ya kati,mpe babolamu ya ezalela makasi—na maloba mosusu, bokolongono ya molimo. Na mokili ya lelo, epai wapi bokolongono ebungi nyonso, bana na biso basengeli kososola bokolongono nini ya solo ezali mpe mpo na nini ezali ya motuya boye—mingimingi ntango tozali kolengela bango basala mpe babatela makuli ya bule na libatisi mpe na tempelo. Lokola Prechez mon évangile eteyaka, “Kobatelaka komipesa elengelaka bato [kobakisaka bato ya bilenge mpenza] mpo na kosala mpe kobatela makuli ya bule.”12

Mpaka Jeffrey R. Holland ateyi, “Ntango tozali kolobela na ntina ya kobatelaka mayokani, tozali kolobela na ntina ya motema mpe molimo ya ntina na biso na kufa.”13 Ezali na nguya ya momesano te na kosalaka mpe kobatelaka mayokani elongo na Tata na biso ya Lola. Monguna ayebi yango, yango wana abebisi likambo ya kosalaka mayokani.14Kosalisaka bana basosola, bameka, mpe babatela mayokani bule ezali fungola mosusu na kokelaka nkola moko ya batelemeli lisumu.

Boniboni tolengelaka bana na biso basala mpe babatela mayokani ya bule ntango bazali kokota mpe kotambola na nzela ya mayokani? Koteya bana kobatela bilaka ya pete ntango bazali bilenge ekopesa bango nguya ya kobatela mayokani esantu ntango bakoli.

Tika ngai nakabola ndakisa ya pete: Na likita ya mpokwa na libota, tata moko atunaki, “Boniboni ezali biso koyokana lokola libota?” Lizzie na mibu mitano azalaki komilelalela ete ndeko na ye mobali ya mokolo, Kevin, azalaki kotumbola ye mbala mingi mabe mpe azalaki kozokisa mayoki na ye. Kevin na kotatabana andimaki ete Lizzie azalaki malamu. Mama ya Kevin atunaki nini ye Kevin akokaki kosala mpo na koyokana malamu koleka na ndeko na ye ya mwasi. Kevin akanisaki mpe azwaki mokano ete akolaka Lizzie ete akosala mokolo mobimba na kozanga kotumbola ye.

Na nsuka ya mokolo elandaki ntango moto nyonso asanganaki mpo na losambo ya libota, tata ya Kevin atunaki Kevin asalaka nini. Eyano ya Kevin ezalaki, “Tata, natosaki elaka na ngai!” Lizzie na esengo andimaki, mpe libota epesaki Kevin longonya.

Mama ya Kevin nsima apesaki likanisi ete soki akokaki kotosa elaka na ye mpo na mokolo moko, mpo nini akokaki kosala yango mpo na mikolo mibale te? Kevin andimaki komeka lisusu. Mikolo mibale elekaki, Kevin alongaki kotosa elaka na ye, mpe Lizzie azongisaki kutu matondo mingi! Ntango tata na ye atunaki mpo na nini azalaki kotosa bilaka na ye, kevin alobaki, “Natosaki elaka na ngai mpo ete nalobaki yango.”

Molongo ya bilaka mike etosama na elonga ekabi na bokolongono. Misala ya sikisiki ya kotosaka bilaka ezali bolengeli ya molimo mpo ete bana bazwa mayokani ya yambo ya libatisi mpe likabo ya Molimo Mosantu, kati na wapi bayokani kosalela Nzambe mpe kobatela mitindo na Ye. Bilaka mpe mayokani ezali ya kokabwana te.15 Bilaka mpe Mayokani ezali ya kokabwana te.

Na buku ya Danyele toyekoli na ntina ya Sadalaka, Mesaka, mpe Abede-nego koboyaka kokumbamela ekeko ya Mokonzi Nebukadanasala. 16 Mokonzi akebisaki bango ete bakobwakisama na libulu ya moto ya kongala soki batosaki te. Baboyaki mpe balobaki:

“Soki ezali boye mbe Nzambe na biso, oyo biso tosaleli ye ayebi kobikisa biso kati na litumbu ya moto na kongala. …

“E mokonzi, oyeba ete ata boye te, mpe tokosalela banzambe na yo te.”17

“Ata boye te.” Botala ndimbola ya maloba misa oyo mpe lolenge nini ekokani na kobatelaka mayokani. Bilenge mibali misato oyo bazalaki kofandisa botosi na bango likolo ya kokangolama te. Ata soki bakangolamaki te, balingaki kobatela kotosa elaka na bango epai na Nkolo mpo ete balobaki bakotosa. Kobatelaka mayokani ezali ntango nyonso na bonsomi na ezalela na biso. Bilenge mibali misato, kaka lokola babundi ya bilenge, bazali ndakisa ya kafukafu ya botelemeli lisumu mpo na bana na biso.

Boniboni bandakisa oyo esalemaka kati na bandako na biso mpe epai ya mabota na biso? “Monkoloto likolo lya monkoloto, mosise likolo lya mosise,”18 tosalisaka bana bameka elonga na baboswi ya mike mike. Ntango bazali kotosa bilaka na bango, bazali koyoka Molimo na bomoi na bango. Mpaka Joseph B. Wirthlin ateyaki ete “mbano ya likolo mpenza ya bokolongono ezali kimoninga ya ntango nyonso ya Molimo Mosantu.”19 Nsima ya biso bana “elikia ekokoma makasi na miso ya Nzambe.”20 Libanda ya libulu ya bokolongono ebimaka nkola ya batelemeli lisumu ya nguya.

Bandeko mibali mpe basi, botala bake na bino pembeni—pembeni mpenza ete bamona ezalela ya bonzambe na bino ya mokolo na mokolo mpe batala bino kotosa bilaka mpe mayokani na bino. “Bana bazali bamekoli minene, yango wana bopesa bango eloko moko monene mpo na komekola.”21 Tozali solo kosalisa mpo na koteya mpe kobokola nkola moko ya batelemeli lisumu kati na Nkolo elaka likolo ya elaka mpe mayokani likolo ya mayokani.

Natatoli ete Yesu Klisto akambaka Eklezia oyo. Ntango bozali koteya, kokamba, mpe kolinga bana na nzela ya Nzambe, bokoki kozwa bobimisi ya moto se ye moko oyo ekosalisa bino na kokelaka mpe kolatisa bana ya konzo, batelemeli lisumu. Losambo na ngai ezali ete bana na biso bakozongela maloba ya Nefi: “Elingi yo kosala ngai ete naningisama na etalisi ya lisumu?”22 Natatoli ete Mobikisi na biso amikabaki mpo na masumu ya mokili 23—mpamba te Ye alobaki Ye akosala—mpe ete alingaka biso mingi koleka bakufi ya mpamba bakoki kutu 24—mpamba te Ye alobaki Ye akosala. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.