2010–2019
Boboto, Bolingani, mpe Bolingo
Sanza ya Minei 2017


Boboto, Bolingani, mpe Bolingo

Tika totala bomoi na biso mpe tozwa mokano ya kolanda ndakisa ya Mobikisi na kozalaka boboto, na bolingo, mpe na bolingani.

Bandeko ba bolingo, nasepeli na libaku ya koloba na bino na bosangani ya mokili mobimba oyo ya basimbi ya bondimi ya bonganganzambe ya Nzambe. Na mpokwa oyo nalobeli mama ya likambo moko oyo nalobela kala.

Profeta alimbolaki moko ya bizalela monene ya Mobikisi mpe oyo esengeli komekolama na bayekoli na Ye. Elobaki ye:

“Mpe soki moto moko azali mosokemi mpe na motema mokita, mpe andimi na nguya ya Molimo Mosantu ete Yesu azali Klisto, asengeli mpenza kozala na bolingani; mpo soko azali na bolingani te azali eloko te; yango wana asengeli mpenza kozala na bolingani.

“Mpe bolingani azali motema molai, mpe azali boboto, aluli te, mpe avimbani te o lolendo, aluki ya yemei te, atumolami mpambampamba te. …

“Yango wana, bandeko balingami ba ngai, soki bozangi bolingani, bozali eloko te, mpo bolingani bolembi mokolo moko te. Yango wana, kangamani epai ya bolingani, boye bozali bonene mingi koleka inso, mpo biloko binso bikolembe—

“Kasi Bolingani bozali bolingo ya peto bwa Klisto, mpe botii molende libela; mpe oyo amononi kozalaka na yango na mokolo ya nsuka, ekozala malamu.”1

Bandeko, totosaka bonganganzambe ya Nzambe te soki tozali boboto na basusu.

Moninga na ngai ya bolingo mpe ya mosala Mpaka Joseph B. Wirthlin azalaki solo moto moko ya boboto. Alobaki:

“Boboto ezali moboko ya bomoi ya selestiale. Boboto ezali lolenge moto ya Moklisto azwaka basusu. Boboto esengeli etondisa maloba mpe bikela na biso nyonso na mosala, na eteyelo, na eklezia, mpe mingimingi na bandako na biso.

“Yesu, Mobikisi na biso, azalaki ndakisa ya bosembo mpe mawa.”2

Makomi eteyi biso ete ngalasisi malamu ya bonganganzambe eyekami na kosalelaka mibeko ya boboto, bolingani, mpe bolingo. Na Doctrine et Alliances totangi:

“Nguya moko te to botindiki ekoki to esengeli kosungama na nguya ya bonganzambe, longola se na kondimisa, … na boboto, na bosokemi, mpe na bolingo ya solo;

“Na boboto, mpe boyebi ya mpeto, oyo ekomisaka molimo monene na lokuta te, mpe mayele mabe te.”3

Bandeko, tika totala bomoi na biso mpe tozwa mokano ya kolanda ndakisa ya Mobikisi na kozalaka boboto, na bolingo, mpe na bolingani. Mpe ntango tosali kosala boye, tokokoka kobelela banguya ya lola mpo na biso moko, mpo na mabota na biso, mpe mpo na baninga ya mobembo kati na mobembo oyo ntango mosusu mobembo ya bozongi ya mpasi epai ya ndako na biso ya lola. Nasambeli boye na nkombo ya Yesu Klisto Nkolo, amene.