2010–2019
Tika Molimo Mosantu Akamba
Sanza ya Minei 2017


Tika Molimo Mosantu Akamba

Na etinda ya bonzambe, Ye afulaka biso, atatolaka, ateyaka, mpe atindikaka biso mpo na kotambola na pole ya Nkolo.

Bandeko mibale mpe basi, ngai, lokola bino banso, nandimi tozali komona bowelisi ya mosala ya Nkolo na nzela ya Mokambi Thomas  S. Monson mpe nsango na ye ya ntongo oyo. Mokambi Monson, tolingaka, tosungaka yo, “profeta na biso ya bolingo.”1

Toyoki bosopani ya Molimo nsuka ya poso oyo. Ezala bozali awa na ndako ya monene to kotalaka uta na bandako to bosangani na bandako ya losambo na biteni ya mosika ya mokili, bozali na libaku ya koyoka Molimo ya Nkolo. Molimo wana ekokotisa na mitema mpe mayele na bino bosolo eteyami na likita oyo.

Bomaniola maloba ya loyembo ya komesano oyo:

Tika Molimo Mosantu akamba;

Tika ye ateya biso oyo ezali ya solo.

Akotatola Klisto,

Akopelisa mayele na biso na bomoni ya lola.2

Uta na mabimisi ya mikolo mya nsuka toyebi ete Bozambe ezali na bato basato bakesana mpe bakabwana; Tata na biso ya Lola. Mwana Mobali na Ye Se Moko, Yesu Klisto, mpe Molimo mosantu. Toyebi ete “Tata azali na nzoto mpe mosuni ekoki kosimbama lokola ya moto; Mwana Mobali lokola; kasi Molimo Mosantu azali na nzoto mpe mosuni te, kasi azali moto ya Molimo. Soki bongo te, Molimo Mosantu akokaki te kozala na biso.”3

Nsango na ngai ya lelo ekokangama na motuya ya Molimo Mosantu na bomoi na biso. Tata na biso ya Lola ayebaki ete na bokufi tokokutana na mikakatano, motungisi, mpe mobulu; Ye ayebaki tokobunda na mituna, nkele, masenginia, mpe botau. Mpo na kopesa biso bokasi ya bokufi mpe bokambami ya bonzambe, Ye apesaki Molimo Mosantu, nkombo mosusu ya Elimo Esantu.

Molimo Mosantu akangisaka biso na Nkolo. Na etinda ya bonzambe, Ye afulaka biso, atatolaka, ateyaka, mpe atindikaka biso mpo na kotambola na pole ya Nkolo. Tozali na mokumba ya bule mpo na koyekola koyeba nguya na Ye na bomoi na biso mpe koyanola.

Bomikundola elaka ya Nkolo: “Nakopesa bino Molimo na ngai, oyo ekopelisa mayele na bino, oyo ekotondisa molimo na bino na esengo.”4 Nalingaka bosolo wana. Esengo oyo etondisaka milimo na biso ememaka elongo na yango bomoni moko ya seko na bokeseni na bomoi ya mokolo na mokolo. Esengo wana eyaka lokola kimia na kati ya kpokoso mpe mpasi ya motema. Epesaka bolendisi mpe mpiko, efungolaka bosolo ya nsango malamu, mpe ekomisaka monene bolingo na biso mpo na Nkolo mpe bana banso ya Nzambe. Atako mposa mpo na mapamboli ya boye ezali monene mingi, na ndenge mingi mokili ebosanaka mpe esundolaka yango.

Poso na poso ntango tokabolaka elambo esantu, tosalaka boyokani ya “ntango nyonso komikundola ye,” Nkolo Yesu Klisto, mpe libonza na Ye ya bomikabi. Ntango tobateli boyokani oyo ya bule, elaka epesami ete biso “tokoki ntango nyonso kosala Molimo na ye ezala elongo na [biso].”5

Boniboni tosalaka yango?

Yambo, tosalaka makasi mpo na kozala na bolongobani ya Molimo.

Molimo Mosantu akotambola elongo na baye bazali “sikisiki na komikundola Nkolo Nzambe na bango mokolo na mokolo.”6 Lokola Nkolo apesaki toli, tosengeli, “kotia mpembeni makambo ya mokili, mpe koluka makambo ya malamu koleka,”7 mpo “Molimo ya Nkolo efandaka te na batempelo ezangi bosantu.”8 Tosengeli ntango nyonso komeka kotosa mibeko ya Nzambe, koyekola makomi, kosambela, kokende na tempelo, mpe kozala solo na eteni ya bondimi ya zomi na misantu, “kozala sembo, solo, peto, boboto, boseka, mpe … kosala bolamu bato nyonso.”

Mibale, tosengeli kolinga kozwa Molimo.

Nkolo alakaki, “nakolobela yo na mayele na yo mpe na motema na yo, na Molimo Mosantu, oyo akoya likolo na yo mpe oyo akofanda na motema na yo.”9 Nabandaki kososola yango lokola elenge misionele na Scotch Plains, New Jersey. Ntongo moko ya sanza ya nsambo moninga na ngai mpe ngai toyokaki botindiki mpo na kotala na barendevous ya Temple Square. Tobetaki na ekuke ya ndako ya Elwood Schaffer. Mama Schaffer na limemia aboyaki biso.

Ntango abandaki kokanga ekuke, nayokaki mposa ya kosala likambo moko nasala naino te liboso mpe nasali mokolo moko lisusu te! Nakangaki makolo na ngai na ekuke, mpe natunaki, “Ezali na moto moko te oyo akoki kosepela na nsango na biso?” Mwana na ye ya mwasi ya mibu 16, Marti, azalaki asepelaki na yango, mpe asambelaki na makasi mpo na bokambami kaka mokolo elekaki. Martu akutanaki na biso, mpe nsima, mama na ye asanganaki elongo na mosalo. Bango mibale basanganaki na Eklezia. Mbano ya libatisi ya Marti, bato 136, lokola mingi ya libota na bango moko, babatisamaki mpe basalaki mayokani ya nsango malamu. Ya botondi kani nazali ete nayokemelaki Molimo mpe nakangaki makolo na ngai na ekuke na mokolo wana ya molunge ya sanza ya nsambo. Marti mpe motango moko ya baye libota na ye bazali lelo awa.

Elilingi
Mpaka Rasband lokola mosionele

Mbano ya libatisi ya Marti, bato 136, lokola mingi ya libota na ye moo, babatisamaki mpe mayokani ya nsango malamu. Ya botondi kani nazali ete bayokemelai Molimo mpe nakangaki makolo na ngai na ekuke na mokolo wana ya molunge ya sanza ya nsambo. Marti motango moko ya libota na ye ya bolingo bazali awa lelo.

Misato, tosengeli koyeba Molimo ntango ayei.

Mayele na ngai ezali ete Molimo mbala mingi esololaka lokola liyoki. Okoyoka yango na maloba oyo ezali na momesano na yo, oyo ekozala na ntina mpo na yo, oyo ekotindika yo. Bomaniola eyano ya Banefi ntango bayokemelaki losambo ya Nkolo mpo na bango: “Mpe bibele bayokaki mpe bapesaki litatoli; mpe mitema na bango efungwanaki mpe basosolaki mpenza na mitema na bango maloba oyo asambelaki.”11 Bayokaki na mitema na bango maloba ya losambo na Ye. Mongongo ya Molimo Mosantu ezali ya kimia mpe moke.

Na Boyokani ya kala, Eli amekanaki na banganganzambe ya Baal. Banganganzambe wana bazelaki “mongongo” ya Baal ekita lokoka nkake mpe epelisa libonza na bango na moto. Kasi mongongo ezalaki te, mpe moto ezalaki te. 11

Na libaku mosusu, Eli asambelaki. “Mpe, Nkolo alekaki mpembeni. Mpe mopepe monene mpe makasi epasulaki bangomba, mpe ebukaki na biteni mabanga liboso ya Nkolo; kasi Nkolo azalaki te na mopepe: mpe nsima ya mopepe boningani ya mabele; kasi Nkolo azalaki na bondingani ya mabele te:

“Mpe nsima ya boningani ya mabele moto; kasi Nkolo azalaki te na moto: mpe nsima ya moto mongongo moko ya kimia mpe moke.”12

Boyebi mongongo wana?

Mokambi Monson ateyaki, “Ntango tozali kolanda mobembo ya bomoi, toyekola monoko ya Molimo.”13 Molimo alobaka maloba oyo toyokaka. Mayoki wana ezali pete, botindiki mpo na kokela, mpo na kosala likambo moko, mpo na koloba likambo moko, mpo na koyanola na lolenge moko. Soki tozali yauli to zololo na bokumbami na biso, tokei mosika mpe tozangisami koyoka na bamposa ya mokili, tokomimona tokiti na bokoki na biso ya koyoka. Nefi alobaki na Lamani mpe Lemuele, “boyokaki mongongo na ye mbala na mbala; mpe alobaki na bino na mongongo moke mwa kimia mpe, kasi bosilaki kozanga liyoki ete bokokaki te koyoka maloba.”14

Sanza ya motoba eleki, nazalaki na etinda na Amerika ya Sudi. Tozalaki na manaka ya mikolo 10 ya mokuse mpo na kokenda Colombie, Perou, and Equateur. Kabakata ya boningani ya mabele ebomaka bankama, ezokisaki bazomi ya bankoto, ebebisaki mpe ebukaki bandako mpe mangomba na bamboka ya Equateur ya Portoviejo and Manta. Nayokaki botindiki mpo na kobakisa na manaka na biso kotala bandimi bazalaki na bamboka misusu. Na bobukani ya babalabala, toyebaki mpenza te ete tokokaki kokoma kuna. Kutu, bayebisaka biso ete tokokaki te kokoma kuna, kasi botindiki elingaki te kolongwa. Mpo na yango, topambolamaki mpe totalaki bamboka wana mibale.

Na liyebisi ya mokuse boye, nazelaki ete etkaka bayangeli ya bonganganzambe ya esika babongisa bosangani ya mbangumbangu. Nzokande, tokomaki na ndako ya likonzi moko na moko mpo na kokuta bandako ya losambo etonda na nzela nyonso ya kozonga na etando. Boko oyo bayaki bazalaki bilombe ya mboka, bapionie oyo bakangamaki na Eklezia, kolendisaka basusu mpo na kosangana na bango na bokumbami mpe mpo na koyoka Molimo na bomoi na bango. Kofandaka na milongo ya liboso ezalaki bandimi oyo babungisaka balingami mpe bazalani na boningani ya mabele. Bayokaki botindiki mpo na kopesa lipamboli ya bopostolo likolo na banso oyo bazalaki kuna, ya ngai ya yambo na kopesa. Atako nafandaki na liboso ya ndako wana, ezalaki lokola soki loboko na ngai ezalaki likolo na moko na moko ya mito na bango mpe nayokaki maloba ya Nkolo kosopana.

Elilingi
Mpaka and Ndeko mwasi Rasband na Sudi Amerika

Esukaki wana te. Nayokaki botindiki mpo na koloba na bango kaka lokola Yesu Klisto asalaka ntango atalaki bato na America. “Akamataki bana na bango ya mike … mpe apambolaki, mpe asambelaki epai ya Tata mpo na bango.”15 Tozalaki na Equateur, tozalaki nzinganzinga na nkita ya Tata, mpe bango bazalaki bana na Ye.

Minei, tosengeli kosala na botindiki ya yambo.

Bomikundola maloba ya Nefi: “Nakambamaki na Molimo, koyebaka te yambo makambo oyo nasengelaki kosala. Nzokande,” alobaki, “nakendaki.”16

Mpe tosengeli kosala bongo. Tosengeli kozala na elikia na botindiki na biso ya yambo. Ntango mosusu totambwisaka mabanzo, tomitunaka soki tozali koyoka liyoki ya molimo to ezali kaka makanisi na biso moko. Ntango tobandi kokanisa mbala mibale, kutu kokanisa mbala ya misato mayoki na biso—mpe biso banso tosalaka yango—tozali kobenganaka Molimo; tozali kotia ntembe na toli ya Nzambe. Profeta Joseph Smith ateyaki ete soki okoyokemela na bokindiki ya yambo, okozwa yango mbala libwa na zomi.17

Sikawa sala keba: Bozela te misala ya moto mpamba te boyanolaki na Molimo Mosantu. Bomikundola, bozali nzinganzinga na mosala ya “mongongo moke mpe ya kimia.”

Ntango nasalaki lokola mokambi ya misio na New York City, nazalaki elongo na boko bamisionele na restora na Bronx. Libota moko ya bilenge eyaki kuna mpe efandaki penepene na biso. Bamonanaki lokola wolo mpo na nsango malamu. Nakengelaki bamisionele na biso ntango bakobaki kotala bato elongo na ngai, nsima namonaki ntango libota esilisaki kolia mpe baponiokaki na ekuke. Nsima nalobaki, “Baelder, ezali na liteya moko awa lelo. Bomonaki libota moko ya kitoko eyaki na restora. Nini tosengelaki kosala?”

Moko ya baelder ezongisaki noki, “ nakanisaki kotelama mpe kokende koloba na bango. Nayokaki mposa, kasi nayanolaki te.”

“Baelder,” nalobaki, “tosengeli ntango nyonso kosala na botindiki ya yambo. Botindiki wana oyokaki ezalaki Molimo Mosantu!”

Botindiki ya yambo ezali bofuli ya solo uta na lola. Ntango bakotisi to batatoli na biso, tosengeli koyeba bango mpo na nini bazali mpe kotika ata moke te kolekisa yango. Mbala mingi, ezali Molimo kofulaka biso mpo na kosalisa moto azali na mposa, libota mpe baninga mingimingi. “Boye … mongongo moke ya kimia, oyo ekonungununga na kati mpe ekotobola biloko nyonso,”18 ekolakisa biso mabaku ya koteya nsango malamu, kopesa litatoli ya Bozongisi mpe Yesu Klisto, mpo na kopesa lisungi mpe motungisi, mpe mpo na kosalisa moko ya bana ya ntalo ya Nzambe.

Bokanisa yango lokola ezali nini ebengami moyanoli ya yambo. Na mangomba mingi, bayanoli ya yambo na likama, bobomibomi, to mawa ezali babomi moto, bakuzi ya bapolisi, minganga. Bsayaka na mwinda ya kopela, mpe nakoki kobakisa, tozali mpenza na botondi mpo na bango. Nzela ya Nkolo ezali mwa polele kasi esengi kaka eyano ya nokinoki, Nkolo ayebi bamposa ya bana na Ye nyonso—mpe Ye ayevu nani alengelami mpo na kosalisa. Soki totiki Nkolo ayeba na nsambo na biso ete tolengelaki, Ye akobenga biso mpo na koyanola. Soki toyanoli, Ye akobenga biso ntango na ntango lisusu mpe tokomimona na oyo Mokambi Monson abengi “etinda ya Nkolo.”19 Tokokoma bayanoli ya yambo na molimo komemaka lisalisi uta na lola.

Soki tosali kaba na botindiki oyo eyeli biso, tokokola na molimo ya bobimisi mpe tokozwa mingimingi bwania ya etambwisami na molimo mpe bokambemi. Nkolo alobaki, “Tia elikia na yo na Molimo oyo ekokamba biso mpo na kosala malamu.”20

Ekoka biso kozwa na lokengo libiangi ya Nkolo mpo na kozala “na kosepela, mpo na kokamba bino na nzela.”21 Ye akokamba biso na Molimo Mosantu. Ekoka biso kozala penepene na Molimo, kosalaka nokinoki na botindiki na biso ya yambo, koyebaka ewuti na Nzambe. Napesi litatoli ya nguya ya Molimo Mosantu mpo na kokamba biso, kobatela biso, mpe kozala ntango nyonso na biso, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.