2010–2019
Lengela Nzela
Sanza ya Minei 2017


Lengela Nzela

Atako bapesami bitinda mpe makoki ekesani, Bonganganzambe ya Alona mpe Bonganganzambe ya Melikisedeki bazali baninga ya kokabola te na mosala ya lobiko.

Ntango nazalaki ya mibu 30, nabandaki kosala mpo na lingomba moko ya koteka na France. Mokolo moko mokambi ya kompani, moto moko malamu ya boyambi mosusu, abengaki ngai na bilo na ye. Motuna na ye esutukisaki ngai: “Nawuti koyoka ozali nganganzambe na eklezia na yo. Ezali ya solo?”

Nazongisaki, “Iyo, ezali ya solo. Nasimbi bonganganzambe.”

Lokola atungisama mpenza na eyano na ngai, atunaki, “Oyekolaki na seminele ya theolozi?”

“Na ntembe te,” nayanolaki, “katikati ya mibu 14 mpe 18, mpe nayekolaki mateya ya seminele penepene na mokolo na mokolo! Azalaki penepene ya kokweya na kiti na ye.

Na bosutuki na ngai, baposo mingi nsima abengaki ngai lisusu na biko na ye mpo na na kopesa ngai mosala ya moyangeli na liboke moko ya bakompani. Nakamwaki mpe nayebisaki motungisi na ngai ete nazalaki elenge mingi mpe nazangaki mayele mpo na kosimba mokumba ya motuya boye. Na mwa koseka ya boboto, alobaki, “Yango ekoki kozala ya solo, kasi ezali na ntina te. Nayebi mabongi na bino, mpe nayebi oyo boyekolaka na eklezia na bino. Nazali na mposa na yo.”

Alobaki ya solo etali oyo nayekolaka na Eklezia. Mibu oyo elandaki ezalaki ya mikakatano, mpe nayebi te soki nakokaki kozala na elonga kozanga mayele nazwaki na kosalaka na Eklezia uta ntango nazalaki elenge mobali.

Nazalaki na lipamboli ya kokola na mwa etape moko. Mpamba te motango na biso ezalaki moke, bilenge babengamaki mpo na kosala elongo na makasi na makambo nyonso ya etape. Nazalaki na mosala mingi mpenza mpe nalingaki komiyoka nasengelami. Na biyenga nazalaki kosala na mesa ya elambo, nazalaki kosala na lisanga likoki ya bonganganzambe, nazalaki kosala na mabiangi misusu kilikili. Na kati ya poso nazalaki kokende elongo na tata na ngai mpe basimbi bonganganzambe misusu ya mikolo ntango tozalaki koteya bandimi na bandako, kolendisa babeli mpe batungisami, mpe kosalisa baye na mposa. Moko te emonanaki akanisaki nazalaki elenge mingi mpo na kosalisa mpe kutu koyangela.

Mosala nasalaki na mibu oyo ya bolenge esalisaki ngai kotonga litatoli na ngai mpe kokanga longo ya bomoi na ngai na nsango malamu. Nazingamaki na bato malamu mpe ya mawa oyo bamipesaki na kosalelaki bonganganzambe na bango mpo na kopambola bomoi ya basusu. Nalingaki kozala lokola bango. Nakosalisaka elongo na bango, mingi koleka nasosolaki na ntango wana, nayekolaki kozala moyangeli na Eklezia mpe lisusu na mokili.

Tozali na bilenge mibali mingi oyo bazali na to bazali kolanda mpokwa ya lelo oyo basimbi Bonganganzambe ya Alona. Ntango natali bato bazali awa, namoni mingi bofandi penepene na moto moko akomela, ntango mosusu tata na yo, nkoko na yo, ndeko na yo ya kulutu, to moyangeli na yo ya bonganganzambe—banso basimbi Bonganganzambe ya Melikiseki. Balinga bino, mpe mingimingi, bayei awa mpokwa ya lelo mpo na kozala elongo na bino.

Bosangani ya bankola epesi bomoni moko ya kitoko ya bomoko mpe bondeko oyo ezali katikati ya babonganganzambe ya Nzambe. Atako bapesami bitinda mpe makoki ekesani, Bonganganzambe ya Alona mpe Bonganganzambe ya Melikisedekie bazali baninga ya kokabola te na mosala ya lobiko. Bakendeke loboko na loboko mpe bazali na mposa monene ya bango na bango.

Ndakisa ebonga mpenza ya mokangano ya penepene oyo ezali katikati ya babonganganzambe mibale ezwami na bozalani katikati ya Yesu mpe Yoane Mobatisi. Nani akoki kokanisa Yoana Mobatisi kozanga Yesu? Nini elingaki kozala etinda ya Mobikisi kozanga mosala ya bolengeli esalamaki na Yoane?

Yoani Mobatisi apesamaki etinda ya lokumu ezala naino te: “mpo na kolengela nzela ya Nkolo,”1 kobatisa Ye na mai, mpe kokokisa bato mpo na koyamba Ye. Oyo “[moto] moyengebeni… mpe… mosantu,2 oyo akulisamaki na bonganganzambe ya moke, ayebaki malamu mpenza motuya mpe boke ya etinda na ye mpe likoki na ye.

Bato batondaki epai ya Yoane mpo na koyoka ye mpe kobatisama na Ye. Bakumisaki mpe babangaki ye na likoki na ye moko lokola moto ya Nzambe. Kasi ntango Yesu abimaki, Yoane na komikitisa atikaki na Moko koleka ye mpe asakolaki, “Nazalaki kobatisa na mai: kasi kina etelemi moko na kati na bino, … oyo kozaka nsima na ngai azali liboso na ngai, ya ye nsinga ya sapato nalongobani te na kofungola.”3

Na ngambo na Ye, Yesu Klisto, Mobotami Se Moko ya Tata, oyo asimbaki bonganganzambe ya monene, na komikitisa andimaki likoki ya Yoane, mpo na ye, Mobikisi alobaki, “O ntei ya oyo babotami na basi ebotama te moto monene koleka Yoane Mobatisi.”4

Kanisa kaka nini elingaki kosalema na masanga makoki ya bonganganzambe soki mokangani katikati ya babonganganzambe mibela efulamaki na ndakisa etiamaki na Yesu mpe Yoane Mobatisi. Bandeki ba ngai bilenge ya Bonganganzambe ya Alona, lokola ya Yoane, mosala na bino ezali “kolengela nzela”5 mpo na mosala monene ya Bonganganzambe ya Melekisedeki. Bozali kosala yango na ndenge mingi. Bosalaka makuli ya libatisi mpe ya elambo. Bosalisaka na kolengela bato mpo na Nkolo na koteyaka, na “[kotalaka] ndako ya mondimi moko na moko,”6 mpe na “[kokengelaka] eklezia.”7 Bopesaka lisalisi na babola mpe bazanga na kokongolaka makabo ya kokila, mpe bosala elongo na kobatelaka bandako ya mayangani ya Eklezia mpe biloko mosusu ya mosala. Mosala na bino ezali na motuya, esengelami, mpe bule.

Bandeko ba ngai bakolo, bozala batata, baepisikopo, basungi ya Bilenge Mibali, to kaka basimbi Bonganganzambe ya Melekisedeki, bokoki kolanda ndakisa ya Mobikisi na kobalukaka epai ya bandeko na bino oyo basimbi bonganganzambe ya moke mpe na kobengisaka bango na kosala elongo na bino. Ya solo, libengisi oyo ewutaka na Nkolo Ye moko. Ye alobaki, “Yango wana, kamata elongo na bino baye bakulisami na bonganganzambe ya moke, mpe botinda bango liboso na bino mpo na kozwa rendevous, mpe kolengela nzela, mpe kokokisa rendezvous oyo bokoki te kokokisa.”8

Ntango bobengisi bandeko mibali na bino ya leki mpo na ‘‘kolengela nzela,”  basalibi bango na koyeba mpe kokumisa likoli ya bule basimbi. Na kosalaka yango, basalisi bango kolengela nzela na bango moko ntango bazali komilengela mpo na mokolo oyo bakozwa mpe bakosalela bonganganzambe ya monene.

Bopesa ngai ndingisa ya kokabola likola ya solo ya Alex, elenge nganganzambe moko ya kimia, ya makanisi, mpe ya mayele. Eyenga moko, episikopo ya Alex akutaki ye moko na kelasi moko na mawa makasi. Elenge mobli oyo alimbolaki boniboni ezalaki mpasi mpo na ye kokende na eklezia na tata na ye te, oyo azalaki mondimi te. Nde na mpizoli alobaki ekoki ntango mosusu koleka malamu kolongwa na Eklezia.

Na komitungisa ya solo mpo na elenge mobali oyo, episikopo nokinoki asangisaki likita ya palwasi mpo na kosalisa Alex. Mwango na ye ezalaki pete: mpo na kobatela Alex makasi mpe kosalisa ye kokolisa litatoli ya motema ya nsango malamu, basengelaki kozinga ye na bato ya malamu mpe kopesa ye makambo ya motuya na kosala.”

Nokinoki bandeko ya bonganganzambe mpe bandimi ya etape mobimba basanganaki nzinganzinga na Alex mpe balakisaki bolingo mpe lisalisi na bango. Moyangeli ya liboke ya banganganzambe minene, moto moko ya bondimi monend mpe bolingo, aponamaki mpo na kozala moninga ya koteya na ye na ndako. Baye episikopo bakamataki ya na nse mapapu na bango mpe bakomisaki ye moninga na bango ya penepene mingi.

Episikopo alobaki: “Tobatelaki Alex na mosala. We kept Alex busy. Asalisaki na mabala, asalisaki na matanga, asalisaki ngai na kobulisa manita, abatisaki bandimi ya sika, akulisaki bilenge mibali na Misala ya Bonganganzambe ya Alona, ateyaki mateya na bilenge, ateyaki elongo na bamisionele, afungolaki bandako mpo na Makita, akangaki bandako na butu nsima ya Makita. Asalaki miango ya kosalisa, akendeki elongo na ngai mpo na kotala bandimi ya mibange na bandako ya mibange, apesaki masikulu na mayangani ya elambo, apesaki elambo na bakoni na lopitalo to na bandako na bango, mpe akomaki moko ya liboke moke ya bato nakokaki koyekama na bango lokola episikopo.”

Elilingi
Alex mpe episikopo na ye

Moke moke, Alex abongwanaki. Bondimi na ye na Nkolo ekolaki. Akomaki na bondimi na ye moko mpe na nguya ya bonganganzambe oyo asimbaki. Episikopo asukisaki: “Alex azali mpe akozala ntango nyonso moko ya mapamboli na ngai na ntango na ngai ya kiepisikopo. Litomba kani ezalaki kosangana na ye. Nandimi ya solo ete elenge mobali te akenda na misio alengelami koleka na mosala na ye ya bonganganzambe.”9

Baepisikopo na ngai ya bolingo, lokola na bokuli mpe botiami mpembeni lokola episikopo ya palwasi na bino, bozali na libiangi ya bule mpo na kosala lokola mokambi ya Bonganganzambe ya Alona mpe ya lisanga likoki ya banganganzambe. Nayebi mikumba minene bomemaka, kasi basengeli kosala lotomo na bino epai ya bilenge mibali oyo ya monene koleka. Bokoki te kotala yango mpamba to kopesa mosala na bino na mokumba oyo na basusu.

Nabengisi bino bamaniola moko na moko ya basimbi ya Bonganganzambe ya Alona. Moko te na bango asengeli komiyoka abwakisami to ya ntina te. Ezali elenge mobali moko oyo bino to bandeko ya bonganganzambe misusu bokoki kosalisa? Bobengisa ye kosala elongo na bino. Mbala mingi tomekaka kosakanisa bilenge mibali mpe kotika bango na mosala ya Batali, ntango bondimki mpe bolingo na bango mpo na nsango malamu ekoki kokolisama malamu koleka na kokumisaka bonganganzambe na bango. Na kosalaka elongo na makasi na mosala ya lobiko, bakokangana na lola mpe bakozwa boyebi ya makoki na bango ya bonzambe.

Bonganganzambe ya Alona ezali koleka kaka liboke ya mibu, liteya to pologalami ya molulu, to kutu nkombo ya kobenga bilenge mibali ya Eklezia. Ezali nguya mpe likoki mpo na kosala elongo na mosala monene ya kobikisa milimo—milimo ya bilenge mibali wana oyo basimbi yango mpe milimo ya baye bazali kosalisa. Totia Bonganganzambe ya alona na esika na yango ya bosembo, esika ya motuya, esika moko ya mosala, kolengela, mpe kosala mpo na bilenge mibali nyonso ya Eklezia.

Bandeko na ngai mibali ya bolingo ya Bonganganzambe ya Melekisedeki, nabengisi bino bolendisa mokangani ya motuya oyo etie bomoko na babonganganzambe mibale ya Nzambe. Bokembisa bilenge ya Bonganganzambe ya Alona na bino mpo na kolengela nzela liboso na bino. Bolobela bango na bondimi, “nazali na mposa na yo.” Na bino basimbi bonganganzambe ya Alona, nasambeli ete, ntango bozali kosala na bondeko na bino ya mikolo, bokoyoka mongongo ya Nkolo kolobaka na bino: “Bopambolami, mpo bokosala mosala minene. Tala botindamaki liboso, kutu lokola Yoane, mpo na kolengela nzela liboso na ngai.”10 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.