2010–2019
Bonzambe mpe Mwango ya Lobiko
Sanza ya Minei 2017


Bonzambe mpe Mwango ya Lobiko

Mpo ete tozali na bosolo na ntina ya Bonzambe mpe bozalani na Bango, tozali na kalati ya nzela ya nsuka mpe na elikia mpo na mobembo na biso na nzela ya kufa.

I.

Eteni na biso ya yambo ya bondimi elobi: “Tondimi Nzambe, Tata wa Seko, mpe Mwana wa Ye, Yesu Klisto, mpe Molimo Mosantu.” Tolandaka baklisto misusu na boyambi oyo etali Tata mpe Mwana mpe Molimo Mosantu, kasi oyo tondimaka na oyo etali bango ezali ya kokesena na boyambi ya basusu. Biso tondimelaka te na oyo baKlisto ya mokili babengaka malongi ya Bonzambe misatu ya Bule. Na Limoni na ye ya yambo, Joseph Smith amonaki bato misatu bakesena, bikelamu mibale, kolakisaka ete bondimi etali Nzambe mpe Bonzambe ezalaki bosolo te.

Na bokeseni ya bondimi ete Nzambe azali mobombano moko ya kososola te mpe ya koyeba te, ezali bosolo ete lolenge ya Nzambe mpe bozalani na biso na Ye ezali ya koyebana mpe ezali fungola ya makambu mosusu kati ya malongi na biso. Makomi ya Biblia elobi na ntina ya losambo monene Yesu, epai wapi Alobaki ete “oyo ezali bomoi ya seko, oyo basengeli koyeba Nzambe moko ya solo, mpe Yesu Klisto, oyo otindaki” (Yoane 17:3).

Elilingi
Biblia Esantu

Bomipesi ya koyeba Nzambe mpe mosala na Ye ebandaki yambo ya kufa mpe yango ekosuka awa te. Profeta Joseph Smith ateyaki, “Ekozala ntango monene sima na yo koleka na kufa yambo oyekola … mikano nionso ya bonetolami ...”1 Toyekami likolo ya boyebi nionso oyo toyekolaki na mokili ya molimo yambo ya kufa. Na yango, nakomekaka koteya Bayisalaele lolenge ya Nzambe mpe bozalani na Ye na bana na Ye, Profeta Yisaya asakolaki, lokola, ekomami na Biblia:

“Nani bokoki kokokanisa ye na Nzambe? to eloko nini okokakanisa ye? …

“Boyebi ye te? nanu boyoka te? bayebisa bino uta ebandeli te? bososola te uta bokeli ya mabele?” (Yisaya 40:18, 21).

Toyebi ete batu misatu ya bonzambe bazali ya kokesena mpe bazali lolenge moko te. Toyebi yango uta liteya epesama na Profeta Joseph Smith: “Tata azali na nzoto mosuni mpe mikuwa lokola mutu nionso; Mwana mpe; kasi Molimo Mosantu azali na nzoto ya mosuni mpe mikuwa te, kasi azali mutu ya Molimo. Soki ezali bongo te, Molimo Mosantu akokaki kozala elongo na biso te” (D&A 130:22).

Na oyo etali Nzambe Tata na Bonzambe, mpe mosala moto moko na moko asalaka, Profeta Joseph alimbolaki:

Elilingi
Profeta Joseph Smith

“Mutu nionso oyo amonaki balola kofungwama ayebi ete ezali na bato misatu oyo basimbaki bafungola ya nguya, mpe mutu moko akambaka likolo na yango nionso. …

“… Batu oyo … babengami Nzambe ya yambo, Mokeli ya yambo, Nzambe ya mibale, Mosikoli; mpe Nzambe ya misatu, Nzeneneke to Motatoli.

“[Ezali] na Tata kokamba lokola Mokonzi to Mokambi, Yesu lokola Molobeli, mpe Molimo Mosantu lokola Nzeneneke to Motatoli.”2

II. Mwango

Tososolaka bozalani na biso ya Bonzambe uta oyo esakolama nantina ya mwango libiko.

Motuna lokola “Towuta wapi? ” “Mpo na nini tozali awa? ” mpe “Tozali kokende wapi? ” Eyanolami kati ya oyo makomi ebengaka “mwango ya lobiko,” “mwango monene ya esengo,” to “mwango ya bosikoli” (Alma 42:5, 8, 11). Nsango malamu ya Klisto ezali ntina ya mwango oyo.

Lokola bana ya molimo ya Nzambe, na mokili ya yambo ya kufa, tondimaki bomoi moko ya seko na lobi ekoya, kasi tokobaki mosika koleka na boyebi ya kufa na nzoto ya bomoto. Mpo na kokokisa libaku wana, Tata na biso ya Lola akambaki likolo ya Bokeli ya mokili oyo, esika oyo, apekisaki toyeba oyo esalemaki na mokili ya yambo ya mbotama na biso, tokoki kolakisa bolingi na biso ya kotosa mitindo na Ye mpe komeka mpe kokola uta na mimekano mosusu ya mokili oyo. Kasi na nzela ya boyebi ya kufa oyo, mpe nsima ya bokweyisami ya baboti na biso ya yambo, tokoyoka mpasi ya kufa ya molimo lokola tolongwe na liboso ya Nzambe, tosali masumu mpe nsima kufa ya nzoto. Mwango ya Tata atalisaki mpe epesaki ndenge ya kolonga bampasi nionso wana.

III. Bonzambe

Na koyebaka ntina ya mwango monene ya Nzambe, toyebi sikawa mokumba ya batu misatu ya Bonzambe kati ya mwango wana.

Tobanda na liteya uta na Biblia. Na bosukisi mokanda na ye ya mibale na Bakolito, Apostolo Paul atalisi malamu na ntina ya Bonzambe ya Tata, Mwana, mpe Molimo Mosantu: “Ngolu ya Nkolo Yesu Klisto, mpe bolingo ya Nzambe, mpe bozalani [“kimoninga”3] ya Molimo Mosantu, azala elongo na bino nionso” (2 Bakolinto 13:14).

Makomi oyo ya biblia elakisi Bonzambe mpe ndakisa na bolingo kolimbolaka mpe kolendisa bolingo ya Nzambe Tata, ngolu mpe kosunga na missio ya Yesu Klisto, mpe bozalani ya Molimo Mosantu.

Nzambe Tata

Nionso ebandaka elongo na Nzambe Tata. Soki toyebi ebele te na ntina na Ye, oyo toyebi ezali solo na bososoli ya lolenge na Ye ya likolo, bozalani an biso elongo na Ye, mpe mosala na Ye ya bokambi na mwango ya lobiko, Bokeli, mpe oyo nionso elandi.

Lokola Mpaka Bruce R. McConkie akomaki bobele yambo ya liwa na ye wrote: “Na liloba ya nsuka. Ye azali Tata, Elohime ya Nguya, Mutu ya Yambo, Mokeli mpe Mokambi ya Likolo mpe Mabele.”4 Ye azali Nzambe mpe Tata ya Yesu Klisto, lokola mpe biso nionso lokola. Mokambi David O. McKay ateyaki ete “bosolo ya yambo ya ntina koleka elobamaki na Yesu Klisto ezalaki, sima, likolo, mpe likolo ya nionso ezali Nzambe Tata, Nkolo ya lola mpe mabele.”5

Oyo toyebi na ntina ya Nzambe Tata ezali koleka oyo tokoki koyekola uta na mosala mpe liteya ya Mwana na Ye Nse Moko, Yesu Klisto. Lokola Mpaka Jeffrey R. Holland ateyaki, moko ntina ya mosala ya Yesu ezalaki ya kosakola na bakufi “ete Nzambe Tata na biso ya Seko, … mpo na kosakola mpe kosala biso tozala na bosolo etali lolenge ya Nzambe na Lola.”6 Biblia ezali na litatoli ya apostolo ete Yesu Klisto azalaki “elili solo” ya Tata na Ye (Baebele 1:3), oyo elengeli liteya ya Yesu engebene ete “oyo amoni ngai amoni Tata na ngai” (Yoane 14:9).

Nzambe Tata azali Tata ya milimo na biso. Tozali bana na Ye. Ye alingaka biso, mpe oyo nionso asalaka ezali mpo na litomba na biso ya seko. Mwango ya lobiko ezali ya Ye, mpe ezali nde na nguya na Ye mwango na Ye ekokisa bantina na yango mpo na nkembo ya nsuka ya bana na Ye.

Mwana mobali

Mpo na bakufi, moko ya batu ya nzoto ya Bonzambe ezali Yesu Klisto. Moko ya malongi monene ya esakola ya Bokambi ya Yambo na 1909 elobeli Ye kozala “mobatami ya yambo ya bana nionso ya Nzambe—mwana se moko ya yambo na molimo mpe mwana se moko ya yambo na nzoto.”7 Mwana, mutu ya nguya koleka nionso, aponamaki na Tata mpo na komema mwango ya Tata—mpo na kosala nguya ya Tata ya kokela mokili ezanga motuya (tala Moses 1:33) mpe mpo na kobikisa bana ya Nzambe uta na liwa na Lisekwa na Ye mpe uta na lisumu na Bomikabi na Ye. Oyo “likabo monene” abengami solo “mutu ya katikati ya lisitwale ya batu.”8

Elilingi
Nkolo Yesu Klisto

Na libaku oyo ya bomoko mpe ya bule ntango Nzambe Tata atalisaki yemei Mwana, Ye alobaki, “Oyo azali Mwana ngai ya bolingo: boyoka ye” (Malako 9:7; Luka 9:35; tala lisusu 3 Nefi 11:7; Joseph Smith—History 1:17). Na yango, ezali Yesu Klistoit, lokola Yawe, Nkolo Nzambe ya Yisalaele, oyo alobaka na nzela ya baprofeta. 9 Ezali ete ntango Yesu Klisto abimelaki banefite nsima ya Lisekwa na Ye, Amitalisaki Yemei lokola “Nzambe ya mokili mobimba” (3 Nefi 11:14). Na yango ezali ete Yesu mbala mingi alobaki na baprofeta ya Buku ya Mormon mpe na Basantu ya mikolo mya Nsuka lokola “Tata mpe Mwana,” ndambo elimbolami kati ya esakola ya malongi efulama ya Bokambi ya Yambo mpe Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale bobele mibu 100 eleki.10

Molimo Mosantu

Mutu ya misatu na Bonzambe ezali Molimo Mosantu, lisusu ebengami Molimo Mosantu, Molimo ya Nkolo, mpe Molendisi. Azalli moko ya Bonzambe oyo azali mutu ya bobimisi ya mutu yemei. Lokola mutu ya molimo (tala D&A 130:22), Ye akoki kozala kati na biso mpe kosala mosala ya ntina ya moyebisi kati ya Tata mpe Mwana mpe bana ya Nzambe likolo yam abele. Makomi ebele eteyaka ete misio na Ye ezali ya kotatola na ntina ya Tata mpe Mwana (tala Yoane 15:26; 3 Nefi 28:11; D&A 42:17). Mobikisi alakaki ete Molendisi akoteya makambu nionso, komema makambu nionso na ntina na biso mpe ekokamba biso na bosolo nionso (tala Yoane 14:26; 16:13). Na yango, Molimo Mosantu asungaka biso topona kati ya bosolo mpe lokuta, ekambaka biso na mikano na biso ya ntina mpe esungaka biso tolonga mimekano ya kufa.11 Ye azali lisusu nzela oyo epai biso tosantisami, tosukwami mpe topetolami uta na lisumu (tala 2 Nefi 31:17; 3 Nefi 27:20; Moroni 6:4).

IV.

Na yango, lolenge nini kososola malongi oyo esakolama ya lola na ntina ya Bonzambe mpe mwango ya lobiko esungi biso na mimekano ya lelo?

Mpo ete tozali na bosolo na ntina ya Bonzambe mpe bozalani na Bango, ntina ya bomoi, mpe lolenge ya lobi na biso ya seko, tozali na kalati ya nzela ya nsuka mpe na elikia mpo na mobembo na biso na nzela ya kufa. Toyebi nani tokumbamelaka mpe mpo na nini tokumbamelaka. Toyebi ba nani biso tozali mpe banani biso tokoki kokoma (tala D&A 93:19). Toyebi nani akokisaka makambu nionso oyo, mpe toyebi nini tosengeli kosala mpo na kosepela na mapamboli ya nsuka oyo mwango ya Nzambe ya lobiko. Lolenge nini toyebaka nionso oyo? Toyebi na nzela ya mabimisi ya Nzambe na baprofeta na Ye mpe moko na moko kati na bisomei.

Kokokisa oyo Apostolo Paul atalisaki lokola “motango ya mambi bofuluki ya Klisto” (Baefezo 4:13) esengeli mingi koleka boyebi. Ezali kutu ata ya kokoka te mpo na biso kondimisama ya nsango malamu; tosengeli kosala mpe kokanisa ete tozali babongwami na yango. Na bokeseni na makambu ya mokili, oyo etangisaka biso koyeba eloko moko, mwango ya lobiko mpe nsango malamu ya Yesu Klisto ebongolaka biso mpo na kokoma batu balongobani.

Elilingi
Mokambi ThomasS. Monson

Lokola Mokambi Thomas S. Monson ateyaki biso na likita na biso linene oyo eleki:

“Ya ntina na mwango [ya lobiko] ezali Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Soki libonza ya bomikabi na Ye te, nionso elingaki ebunga. Ezali ya kokoka, na yango, bobele tondimela Ye mpe misio na Ye. Tosengeli kosala mpe koyekola, koluka mpe kosambela, koyambola mpe kobongwama. Tosengeli koyeba mibeko ya Nzambe mpe tosalela yango. Tosengeli kozwa makuli na Ye. Bobele na kosalaka bongo tokozwa bosolo, esengo ya seko. …

“Uta na bozindo ya molimo na ngai mpe na bomikitisi nionso,” Mokambi Monson asakolaki, “natatoli na libonza monene oyo ezali mwango ya Tata mpo na biso. Ezali moko ya banzela ebonga nie ememi na kimia mpe ya esengo mpe awa mpe na mokili oyo ezali koya.”12

Nabakisi litatoli na ngai na oyo ya profeta mokambi, natatoli ete tozali na Tata moko ya Lola, oyo alingaka biso. Natatoli ete tozali na Molimo moko Mosantu, oyo akamba biso. Natatoli Yesu Klisto, Mobikisi na biso, oyo akokisaka nyonso, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007).

  2. Teachings: Joseph Smith, 42.

  3. This was a common meaning of communion when that word was chosen by the King James translators (tala The Oxford Universal Dictionary, 3rd ed., revised 1955, 352).

  4. Bruce R. McConkie, A New Witness for the Articles of Faith (1985), 51.

  5. David O. McKay, “Changing Truths in a Changing World,” kati ya Rapport ya Likita, Sanza ya zomi. 1935, 100.

  6. Jeffrey R. Holland, “The Grandeur of God,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko. 2003, 70.

  7. Bokambi ya Yambo, “The Origin of Man,” Ensign, Sanza ya Mibale. 2002, 26, 29.

  8. Tala, for example, Russell M. Nelson, “Drawing the Power of Jesus Christ into Our Lives,” Liahona, Sanza ya Mitano 2017, 40; “The Living Christ: The Testimony of the Apostles,” Liahona, Apr. 2000, 2.

  9. Tala Joseph Fielding Smith, Doctrines of Salvation, comp. Bruce R. McConkie (1955), 1:27.

  10. Tala First Presidency and Quorum of the Twelve Apostles, “The Father and the Son,” Ensign, Apr. 2002, 13–18.

  11. Tala Robert D. Hales, “The Holy Ghost,“ Liahona, Sanza ya Mitano 2016, 105–7.

  12. Thomas S. Monson, “The Perfect Path to Happiness,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko. 2016, 80–81.