2010–2019
Sima Yesu Atalaki Ye mpe Alingaki Ye
Sanza ya Minei 2017


Sima Yesu Atalaki Ye mpe Alingaki Ye

Na ntango basengi bino bosala eloko moko ya mpasi, bokanisa Nkolo kotalelaka bino, kolingaka bino, mpe kobengisaka bino na kolanda Ye.

Mibu ebele eleki nabengamaki, na mwasi na ngai, Jacqui, mpo na kokamba na Misio ya Spokane na Washington. Tokomaki na elanga ya misio elongo na bosangani ya bobangi mpe ngambo ya mokumba ya mosala mosala na bamisionele ebele. Bango bawutaki ngambo na ngambo mpe na mbalakaka bakomaki lokola bana na biso ya mibali mpe basi.

Atako mingi kati na bango basalaki mosala malamu, ndambo bazalaki kobunda na elikia makasi ya libiangi na bango. Namikundoli misionele moko ayebisaki ngai ete, “Mokambi, nalingaka batu te.” Ebele bayebisaki ngai bazangaka mposa ya kotosa mikano ya bamisionele na bokebi. Natungisamaki mpe nalukaki nini tosengelaki kosala mpo na kobongola mitema na bango ya bamisionele ndambo oyo bazalaki naino bayekoli te esengo ya kozala na botosi.

Mokolo moko, ntango nazalaki kokumba mutuka na elanga moko kitoko ya blé na ndelo ya Washington na Idaho, ntango nazalaki koyoka lisolo ya elenge mobali mozwi ya Boyokani ya Sika oyo ayaki epai ya Mobikisi mpo na kotuna soki asengelaki kosala nini mpo na kozwa bomoi ya seko, nazwaki limonisi moko ya ngaimei kasi ya mozindo oyo ezali sikawa likundoli moko ya bule.

Sima ya koyoka Yesu alobelaki ye mitindo mpe elenge mobali azongisaki ete atosaki yango nionso uta na bolenge na ye: “Ozangi eloko moko: … teka nionso oza na yango, mpe …. yaka, … landa ngai.”1Kasi na bokwami na ngai, nayokaki maloba motoba liboso ya eteni wana ya mokapo, oyo nanio nayoka te to naino natanga te. Ezalaki lokola yango ebakisamaki na makomi. Nasepelaki na bososoli efulama oyo nayokaki mokolo wana.

Maloba yango motoba ezalaki nini oyo esepelisaki ngai? Boyoka mpo na komona soki bokoki koyeba maloba oyo eyebana, ezwami te kati ya makomi mosusu ya Nsango malamu kasi ezwami bobele kati ya Nsango malamu ya Malako:

“Ayaki mbangu … mpe atunaki, Molakisi Malamu, nini esengeli ngai kosala mpo na kozwa bomoi ya seko?

“Mpe Yesu alobaki na ye, …

“Oyebi mitindo, kosala ekobo te, koboma te, koyiba te, kokosela moninga na yo te, kobuba te, tosa tata mpe mama na yo.

“Mpe ayanolaki  … , Molakisi, mitindo nionso oyo natosaka yango uta bolenge na ngai.

Sima Yesu atalaki ye mpe alingaki ye, mpe alobaki na ye, eloko moko ezangi yo: kende, teka nionso oyo ozali na yango, mpe pesa epai ya babola, mpe okozwa nkita ya lola: mpe yaka, mema ekulusu, mpe landa ngai.”2

“Sima Yesu atalaki ye mpe alingaki ye .

Ntango nayokaki maloba oyo, elili ya bomoi etondisamaki kati ya makanisi na ngai ya Nkolo na biso oyo atelemaki mpe atalaki elenge mobali oyo. Kotalaka—lokola nabotali ya mozindo mpe akotaki na molimo na ye, koyebaka bolamu na ye mpe lisusu bokasi na ye, lokola koyebaka mposa na ye monene.

Sima maloba ya sembo—Yesu alingaki ye. Ayokaki bolingo monene mpe mawa mpo na elenge mobali malamu oyo, mpe mpo na bolingo oyo, mpe na bolingo oyo, Yesu atunaki ye lisusu. Natalisi oyo esengelamaki koyokisama lokola mpo na elenge mobali oyo ya kolingama na bolingo ya lolenge oyo lisusu ntango atunamaki mpo na kosala eloko moko ya makasi lokola koteka nionso azalaki na yango mpe kopesa yango na babola.

Na ntango wana, nayebaki ezalaki te bobele mwa mitema ya bamiosionele na biso nde ezalaki na mposa ya kobongwama. Ezalaki motema na ngai nde. Motuna ezalaki te ete“Boni boni mokambi ya misio atungisama akoki kosalisa misionele ya makambu makasi abongwama?” Nayango, motuna ezalaki “Boni boni nakoki kotondisama na bolingo ya KimoKlisto na yango misionele moko kotondisama na bolingo ya Nzambe na nzela na ngai mpe mposa ya kobongwama?” Lolenge nini nakoki kotala ye na lolenge moko Nkolo amonaki elenge mobali mozwi, kotalaka bango mpo na oyo bango bazali mpenza, koleka bobele mpo na oyo bazali kosala to kosala te? Lolenge kani nakoki kokoma lokola Mobikisi?

“Sima Yesu atalaki ye alingaki ye.”

Uta ntango wana, nafukamaki elongo na elenge misionele moko kobundanaka na lolenge ebele ya botosi, na motema na ngai namonaki sikawa elenge mobali to elenge mwasi ya bondimi oyo asalaki na mposa ya koya na misio. Sima nazalaki na makoki ya koloba na mayoki nionso ya moboti malamu:3 “Mpaka to Ndeko mwasi, soki nalingaki bino te, mbele namitungisaka mpo na maye ekomelaka bino na misio na bino te. Kasi nalingaka bino, mpe mpo ete nalingaka bino, namitungisaka na oyo bosengeli kokoma. Na yango nabengisi bino bobongola makambu oyo ezali mpasi mpo na bino mpe bokoma batu oyo Nkolo alingi bino bokoma.”

Mbala nionso nazalaki kokende kotala bamisionele, nasambelaki ya yambo ezalaki mpo na likabo ya bolingani mpe ete nakoka komona mpaka nionso mpe ndeko mwasi nionso lokola Nkolo azali komona bango.

Yambo ya likita ya zone, ntango Ndeko mwasi Palmer mpe ngai topesaki misionele nionso moko na moko mbote, nasengelaki kotelema mpe kotala na bozindo na misu na bango, kotalaka bango—na bosololi ezanga maloba—mpe sima ezanga tembe, natondisamaki na bolingo makasi mpo na bana mibali mpe bana basi oyo ya motuya ya Nzambe.

Nayekolaki mateya ya mbongwana ebele ya bomoi uta na liyebi ya bozindo oyo ya ngaimei elongo mokapo ya Malako 10. Oyo ezali mateya minei nabanzi ekosunga moko na moko kati na biso:

  1. Ntango tozali koyekola komona basusu lokola Nkolo amonaka bango koleka lolenge tomonaka bango, bolingo na biso mpo na bango ekomata mpe bongo ekozala mposa na biso ya kosunga bango. Tokomona bokasi kati ya basusu lolenge bamonaka kati na bangomei te. Na bolingo ya KimoKlisto tokozala na bobangi te ya koloba bompikiliki, mpo na “bolingo ya bobongi nie ebenganaka bobangi.”4 Mpe tokosundola te, komikundolaka ete baoyo balingaka na mpasi bazalaka na mposa ya bolingo koleka.

  2. Liteya to boyebi moko te ezali ntina ntango epesami na botuki to nkanda, mpe mitema ekobongwama te esika eye bolingo ezangi. Atako tozali ,kosala yango lokola baboti, batei, to bakambi, liteya ya solo ekosalema na esika ya bondimami koleka botuki. Mabota na biso esengeli ntango nionso ezala ekimelo ya kimia ya bana na biso—kasi esika mabe te.

  3. Bolingo esengeli te elongwa ntango mwana, moninga, to moto moko ya libota aboyi kotosa mibeko na biso. Toyebi te nini ekomelaki na elenge mobali ya bozwi sima na ye kokende na mawa, kasi nandimisami ete Jesu alingaki ye kaka koleka atako alandaki nzela ya pete. Ntango mosusu mokolo moko na bomoi, ntango amonaki ete bozwi na ye ezalaki mpamba, amikundolaki mpe asalaki lolenge Nkolo na Ye amonaki ye, mpe abengisaki ye alanda Ye.

  4. Mpo ete alingaka biso, azelaka mingi kati na biso. Soki tozali na komikitisa, tokondima libiangi ya Nkolo ya koyambola, kobonza, mpe kosalisa lokola ndakisa ya bolingo na Ye ebonga nie mpo na biso. Sima ya nionso, libiangi ya boyamboli ezali lisusu kozwa libonza malamu ya bolimbisi mpe kimia. Na yango, “boyokisama motema mpasi te … botuki ya Nkolo, mpe bomilembisa te ntango botukami na Ye: na baoyo Nkolo alingaka, atukaka bango.”5

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi ya bolingo, sikawa na ntango nionso bokoyoka ete basengi bino bosala eloko moko ya mpasi—botika ezalela ya mabe to ya boyini, botiya pembeni misala ya posa ya nzoto, bomipesa na mosala malamu mpo ete ezali Saba, kolimbisa mutu oyo asali bino mabe—kanisa Nkolo na kotalaka bino, kolingaka bino, mpe kobengisaka bino kotika nyonso mpe kolanda Ye. Mpe botonda Ye botondi mpo na bolingo na ye ekoka mpo na kobengisaka bino kosala koleka.

Natatoli na ntina ya Mobikisi, Yesu Klisto, mpe natali liboso na mokolo oyoYe akotiya maboko na Ye na moko na moko kati na biso, kotalaka biso mpe na kolingaka biso na bolingo na Ye ebonga nie. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.