2010–2019
Liyangani ya Eyenga na Nsima ya Nzanga
Sanza ya zomi 2017


Tolikiaka Ye? Bolamu ezali Mpasi

Kotalaka te nsuka, mpasi ekoki kozala malamu mpo nab aye bakokende liboso na bondimi mpe elikia na Nkolo mpe mwango na Ye.

Yambo nabanda, lokola moko kati na biso azwi likama na ekumbaki oyo ebebisi mpe boningani ya mabele, nalakisi botondi na ngai na lisalisi mpe lisungi oyo epesi biso lisalisi mpe elikia.

Na sanza ya Zomi 2006, napesaki lisukulu na ngai ya yambo na likita linene. Nayokaki nsango ya ntina mpo na Eklezia ya mokili mobimba. Ezalaki na kati lisakoki: “Nkolo alikiaka biso!”

Ye alikiaka biso mpenza na ndenge mingi mpenza. Ye apesi biso nsango malamu ya Yesu Klisto, mpe na ekeke oyo, litondi na yango. Ye aliakiaka biso na likoki mobimba ya bonganganzambe na Ye na bafungola mpo na kosalela yango na bolongobani. Na nguya wana, tokoki kopambola, kosalisa, kozwa makuli, mpe kosala mayokani. Ye alikiaka biso na Eklezia na ya Ye ezongisami, elongo na tempelo esantu. Ye alikiaka biso na nguya ya kokangisa—kokanga na mabele mpe kosala yango ekangami na lola! Ye kutu alikiaka biso mpo na kozala baboti, baboti, mpe balengeli ya bana Ye na mabele.

Nsima ya mibu oyo ya mosala ya Bokonzi Bonene na biteni ebele ya mokili, nasakoli kutu na bosolo mingi koleka: Ye alikiaka biso.

Sikawa motuna mpo na likita oyo ezali “Tolikiaka ye?”

Tolikiaka ye?

Mokambi Thomas S. Monson mbala mingi akundolisaka biso na “kolikia na Nkolo na motema na yo nyonso; mpe koyekama te na bososoli na yo moko.

“Na ndenge nyonso ndimela ye, mpe akokamba banzela na yo.

“Kozala mayele na miso na yo moko te” (Masese 3:5–7).

Tolikiaka mitindo na Ye ezali mpo na bolamu na biso? Bayangeli na Ye, atako babonga mpenza te, bazali kokamba biso malamu? Bilaka na Ye ezali ya solo? Tolikiaka ete Tata ya Lola mpe Yesu Klisto bayebi biso mpe balingi kosalisa biso? Ata na kati ya mimekano, mikakatano, makambo ya kpokoso, mpe bangonga ya mpasi, tolikiaka Ye?

Kotalaka na nsima, nayekoli boko ya mateya ya malamu koleka na bangonga ya mpasi mingi koleka—ezala lokola elenge, na misio, kobandaka mosala ya sika, kobundaka na kokumisa mabiengi na ngai, kobokola libota ya monene, to kobunda na komikoka. Emonani polele ete “mpasi ezali malamu!

Bolamu Ezali Mpasi

Mpasi ekomisaka biso makasi, ekomisaka biso na komikitisa, mpe epesaka biso libaku ya komibongisa. Bapionie na biso bolingo ya makalo bayaki koyeba Nzambe na makama na bango ya nsuka. Ntina nini ezali na mikapo misato mpo na Nefi mpe bandeko na ye ya mibali mpo na kokamata bapalaki ya motako mpe bobele milongo misatu mpo na kondimisaq libota ya Yisamaele mpo na kosangana na bango na esobe? (Tala 1 Nefi 34; 7:3–5). Emonani lokola Nkolo alingaki kolendisa Nefi na nzela na etumba ya kokamata bapalaki.

Makambo ya mpasi na bomoi na biso esengeli te koya na bosutuki. Moko ya mayokani ya liboso mpenza tosalaki na Nkolo ezali kosalela mobeko ya libonza. Libonza na kolimbola esengeka kosundola eloko moko ya mposa. Na mayele tokososola ete ezali ntalo ya moke na kofuta soki omekisi na mapamboli oyo ekolanda. Na nse ya bokambi ya Joseph Smith elobamaki ete “eyamba oyo esengaka te libonza ya makambo nyonso ezala mokolo moko te na nguya ya kosala bondimi esengeli mpo na bomoi mpe lobiko.”1

Bayi Bonzambe azali bampaya te na makambo ya mpasi. Nzambe Tata abonzaki Mwana na Ye Se Moko na mpasi ya nsomo ya Bomikabi, lokola liwa na ekulusu. Makomi elobi Yesu Klisto ayekolaki “botosi na makambo makambo oyo Anyokwamelaki” (Baebele 5:8). Anyokwamaki na bozangi lifuti bolozi ya Bomikabi. Molimo Mosantu asengeli koyoka mpasi ya molai mpo na kotindika, kokebisa, mpe kokamba biso, bobele ntango mosusu mpo na batala ye mpamba, balimbola ya mabe, to babosana Ye.

Eteni ya Mwango

Mpasi ezali eteni ya mwango ya nsango malamu. Moko ya ntina ya bomoi oyo mpo na biso ezali mpo na komekama (tala Abraham 3:25). Moke bayoka mpasi mingi ya mpamba koleka bato ya Alma. Bakimaki Mokonzi ya nkuna bobole mpo na kokoma bawumbu ya Balamani! Na nzela ya mimekano wana Nkolo ateyaki bango ete Ye apesaka etumbu ya bato na Ye mpe amekaka “bompikiliki na bango mpe bondimi na bango” (Mozia 23:21).

Na mikolo wana ya nsomo na Boloko ya Liberty Jail, Nkolo ateyaki Joseph Smith “ayika mpiko malamu” (D&A 121:8) mpe alakaki ete soki asalaki yango, makambo nyonso ekopesa yo mayele, mpe ekozala mpo na bolamu na yo” (D&A 122:7).

Mokambi Thomas S. Monson abondela, “Ekoka biso kopona malamu ya mpasi koleka esika ya mabe ya pete koleka.”2 Etali batempelo na biso, alobaki ete “libonza te ezali monene mingi, etumba ya kpokoso mingi mpo na kozwa mapamboli ya [tempelo]”3

Na mokili ya bikelamo, mpasi ezali eteni ya zungoluke ya bomoi. Ezali mpasi mpo na mwana nsoso ya moke kopasola liki na ye ya makasi. Kasi ntango moto moko ameki kokomisa yango pete mingi, mwana nsoso akozwa te bokasi esengeli mpo na kozala na bomoi. Na lolenge moko, etumba ya kopakapaka mpo na kokima ndako na ye ekolendisa yango mpo na bomoi azali na yango.

Na nzela ya bandakisa tomoni ete mpasi ezali ntango nyonso! Tozali banso na mikakatano. Oyo ebongwanaka ezali eyano na mpasi.

Na esika moko boko ya bato ya Buku ya Mormon ayokaki mpasi ya monioko monene “monene” mpe “motungisi mingi” (Elamani 3:34). Boniboni bangoa bazongisaki? “Bakilaki mpe basambelaki mbala mingi, mpe bakomaki makasi mingi mpenza na bomikitisi, mpe molende mingi mpenza na bondimi ya Klisto, kino milimo na bango etondaki na esengo mpe bobondisi” (Elamani 3:35). Ndakisa mosusu eyaki nsima ya mibu ya bitumba. “Na ntina ya bolai ya etumba katikati ya Banefi mpe Balamani mingi bakomaka motema makasi, … mpe mingi bakomaki mitema pete na ntina ya mitungisi, mpenza ete bamikitisaki liboso ya Nzamba” (Alma 62:41).

Banso toponaka eyano na biso na mpasi.

Bozala na Bokebi na Pete

Liboso ya kobengama oyo nazalaki mopesi toli ya mosolo na Houston, Texas. Mingi na mosala na ngai ezalaki na bato ya bamilio oyo bazalaki na bankita na bango moko. Penepene na bango banso bakelaki bankita na bango ya elonga uta na eloko te na nzela ya mosala makasi mingi. Likambo ya mabe mingi koleka mpo na ngai ezalaki koyoka boko na bango koloba bakokomisa yango pete mingi mpo na bana na bango. Balingaki te bana na bango bayoka mpasi lokola bango. Na maloba misusu, bakozangisa bana na bango likambo mpenza oyo esalaka ekomisaki ya na elongo.

Na bokeseni, toyebi libota moko oyo azwaki nzela mosusu. Baboti bafulamaki na mayele ya J.  C. Penney wapi tata na ye alobaleki ye ntango akomaki na mibu mwambe ete azalaki ya komikoka na mosolo. Bayaki na lolenge na bango moko: lokola bana na bango nyonso asilisaki secondaire, bamikokaki na mosolo—mpo na koyekola ya nsima (college, grad school) mpe mpo na bokomeli na bango na mosolo (bamikoka ya solo) (tala D&A 83:4). Na esengo, bana bayanolaki na mayele. Banso na bango basilisaki na université; mingi lisusu basilisaki na université—banso mazalaki bango moko. Ezalaki pete te, kasi basalaki yango. Basalaki yango na mosala makasi mpe bondimi.

Bondimi na Elikia na Ye

Motuna “Tolikiaka Ye?” ekoki kolobama malamu koleka, “Tozali na bondimi mpo na kolikia Ye?”

Tozali na bondimi mpo na kolikia bilaka na Ye etali moko na zomi ete na 90 na nkama ya moleki na biso kobakisa lisalisi ya Nkolo, tozali malamu mingi mpenza koleka na 10 na 100 ya moleki na biso na biso moko?

Tozwa kokoka bondimi mpo na kolikia ete Ye akobimela biso na mitungisi na biso (tala Mozia 24:14), ete Ye akoswana nab aye bazali kozwanisa biso (tala Yisaya 49:25; 2 Nefi 6:17), mpe tet Ye akobulisa matungisi na biso mpo na litomba na biso (tala 2 Nefi 2:2)?

Tokosalela bondimi esengeli mpo na kobatela mitindo na Ye boye akoka kopambola biso na ntango mpe molimo lokola? Mpe tokokoba na bondimi ti na nsuka mpo ete Ye akoka koyamba biso na miso na Ye? (tala Mozia 2:41).

Bandeko mibali mpe bandeko basi, tokoki kozala na bondimi mpo na kolikia Ye! Alingi oyo ezali malamu mingi mpo na biso (tala Moses 1:39). Ye akoyanola nsambo na biso (tala D&A 112:10). Ye akobatela bileaka na Ye (tala D&A 1:38). Ye azali na nguya ya kobatela bilaka wana. (tala Alma 37:16). Ye ayebi nyonso! Mpe ya motuya mingi koleka, Ye ayebi nini ezali malami mingi (tala Yisaya 55:8–9).

Mokili ya Likama

Mokili na biso ya lelo ezali kpokoso. Tozali na mabe epanzani, moyibi na ekolo nyonso, bobomi ekomi kutu na bisika ya kimia, nkita ekwei, mosala ezangi, bokono, bobomibomi, bitumba na mboka, bokambi ya mabe, bongo na bongo, mpe koleka. Nini tosengeli kosala? Tokima to tobunda? Nini ezali malamu? Boponi nyonso ekoki kozala na likama. Ezalakia na likamwa mpo na George Washington mpe mampinga na ye kobunda kasi lisusu mpo na bankoko na bapionie kokoma. Ezalaki likama mpo na Nelson Mandela kobunda mpo na bonsomi. Elabami ete mpo na mabe elonga, esengeli bobele mpo na bato ya malamu basala eloko te.4

Kobanga Te!

Na nyonso tosalaka, tosengeli te kokana to kosala te na molimo ya kobanga. Ya solo, “Nzambe apesaki biso te molimo ya kobanga” (2 Timoti 1:7). (Boyebi likanisi ya “kobanga te” ebetamaki nsete na kati ya makomi?) Nkolo ateyi ngai ete bozangi mpiko ezali bisalele ya monguna. Eyano ya Nkolo na ntango ya mpasi ezali kokende liboso na bondimi.

Nini Ezali Mpasi?

Moko na moko na biso akoki kozala na likanisi ya kokesana etali nini ezali mpasi. Boko ebele bakanisaka ezali mpasi kofuta moko na zomi ntango mosolo ezali moke. Bayangeli ntango mosusu bamonaka mpasi kozela babola bafuta moko na zomi. Ekoki kozala mpasi mpo na boko na biso kokende liboso na bondimi mpo na kobala to kosala libota. Ezali na baye bamonaka ezali mpasi “kosepela na [oyo] Nkolo apesi [bango]” (Alma 29:3). Ekoki kozala mpasi kosepela na libiangi na biso ya sikoyo (tala Alma 29:6). Bosemboli ya Eklezia ekoki komonana mpasi mpenza, kasi mpo na boko ezalaka ebandeli ya nzela ya boyamboli ya solo.

Kotalaka te nsuka, mpasi ekoki kozala malamu mpo nab aye bakokende liboso na bondimi mpe elikia na Nkolo mpe mwango na Ye.

Litatoli na Ngai

Bandeko mibali mpe bandeko basi, natatoli ete bayangeli oyo bafandaki nsima na ngai babiangami na Nzambe. Mposa na bango ezali kosalela Nkolo malamu mpe kosalisa biso kotia nsango malamu na mitema na biso. Nalingaka mpe nasungaka bango.

Nalingaki Mobikisi, Yesu Klisto. Nakamwaka ete Ye alingaki Tata mpe biso ya kokoka mpo na kokoma Mobikisi mpe Mosikoli na biso, ete na kosalaka bongo Ye ayokaka mpasi mpenza ete esalaki ye “alenga na ntina ya bolozi, mpe abimaki makila na lidusu nyonso, mpe mpo na koyoka mpasi na nzoto mpe na molimo” (D&A 19:18). Kasi liboso ya likambo oyo ya nsomo mpe lotomo na yango, Ye alobaki mpenza na Tata, “Bolingi na ngai te, kasi bolingi na yo esalema” (Luka 22:42). Nakembisi maloba ya anzelu: “Azali awa te: mpo asekwi” (Matai 28:6).

Ndakisa na Ye ya solo ezali “nzela, bosolo, mpe bomoi” (Yoane 14:6). Bobele na kolandaka ndakisa wana tokoki kozwa “kimia na mokili oyo, mpe bomoi ya seko na mokili ekoya” (D&A 59:23). Ntango nalandaki ndakisa na Ye mpe nayangoli na mateya na Ye, nayekolaki mpo na ngai moko ete moko na moko ya Ye “bilaka monene mpe ya ntina” (2 Petelo 1:4) azali solo.

Mposa na ngai ya monene koleka ezali kotelama na Mormon lokola moyekoli moko ya solo ya Yesu Klisto (tala 3 Nefi 5:13) mpe mokolo moko koyoka na mbebo ya Ye, “Mosala ya malamu, yo mosala ya malamu mpe ya bondimi” (Matai 25:21). Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Lectures on Faith (1985), 69.

  2. Thomas S. Monson, “Choices,” Liahona, Sanza ya mitano 2016, 86.

  3. Thomas S. Monson, “The Holy Temple—a Beacon to the World,” Liahona, Sanza ya mitano 2011, 92.

  4. Tala John Stuart Mill, Inaugural Address: Delivered to the University of St. Andrews, Sanza ya mibale. 1, 1867 (1867), 36.