2010–2019
Bosolo ya Ntina—Mposa na Biso mpo na Kosala
Sanza ya zomi 2017


Bosolo ya Ntina—Mposa na Biso mpo na Kosala

Limoni ya Yambo mpe Profeta Joseph Smith eboti boyebi mpe bosolo ya kobakisa oyo ezali ya ntina mpo na esengo na biso na bomoi oyo mpe bonetoli.

Ntango nazalaki na mibu Nsambo, natunaki mama na ngai, “Ntango yo mpe ngai tokokufa mpe tokokende na lola, okozala kaka mama na ngai?” Azalaki kozela te motuna ya bongo. Kasi kozongisaka eyango na koyeba na ye ya malamu koleka, alobaki, “Te, na lola tokozala lokola bandeko ya mibali mpe bandeko ya basi. Nakozala mama na yo te.” Yango ezalaki te eyano nazalaki kolikia.

Mwa ntango nsima ya lisolo wana ya mokuse, bilenge mibali mibale bayaki na ekuke ya ndako na biso. Na yoko likamwisi, tata na ngai apesaki bango ndingisa bakota. Balobaki na bazalaki bamisionele ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansantu ya Mikolo ya Nsuka.

Bampaka oyo, lokola toyekolaki kobenga bango, babandaki koteya libota na biso. Namikundoli malamu mpenza koyoka na biso ya esengo mpe bosepeli mbala nyonso bayaki na ndako na biso. Balobaki ete na biso elenge mobali moko akendeki na zamba moko mpo na kotuna Nzambe eklezia wapi ezalaki ya solo mpe ete amonaki Nzambe mpe Yesu Klisto.1 Bampaka balakisaki biso bilili ya emoniseli wana, mpe ntango bamisionele balobaki ete na ntina ya emoniseli oyo, Eklezia ya Yesu Klisto ya solo azalaki lisusu na mabele.2

Elilingi
Limoni ya Yambo

Bamisionele bateyaki biso lisusu mwango ya esengo mpe ayanolaki mituna ya libota na biso etali boyambi. Bateyaki biso ete mabota ya solo ekoki kozala elongo nsima ya bomoi oyo lokola tata, mama, mpe bana mibali mpe bana basi.

Libota na biso ebatisamaki. Nzela mpo na kobongola mimesano ya kala, kosundola bonkoko, mpe kokoma mondimi ya makasi ya Eklezia ezalaki ntango mosusu mpasi. Kasi na ntina ya mawa mpe bolingo ya Nzambe mpe na lisalisi ya bakambi mpe bandimi mingi, tokobaka na mibu ya yambo.

Bamilio oyo bakota na Eklezia, lokola baye babongwanaka mpe babatisamaka poso na poso, bazwa litatoli ya Limoni ya Yambo. Molimo Mosantu akoki kobandela litatoli oyo mbala mingi na moko na moko na biso ntango tobundaka kosalela bosolo ya pete ya nsango malamu ya Yesu Klisto.

Limoni ya Yambo mpe Profeta Joseph Smith eboti boyebi mpe bosolo ya kobakisa oyo ezali ya ntina mpo na esengo na biso na bomoi oyo mpe bonetoli na biso na miso ya Nzambe. Nakolobela misato ya bosolo tozwi mpe tosengeli kosalela mpamba te elenge moke ya mobali afukamaki na losambo ya solo.

Nzambe Abengaka Baprofeta mpo na Kokamba mpe Koyangela Biso

Bosolo ya ntina toyekoli uta na Limoni ya Yambo mpe Profeta Joseph Smith ezali ete Nzambe abengaka baprofeta,3 bamoni, mpe babimisi mpo na koteya, koyangela, kokengisa, mpe kokamba biso.4 Bato oyo bazali minoko ya Nzambe na mabele,5 elongo na likoki mpo na koloba mpe kosala na nkombo ya Nkolo.6 Na sikiski kolandaka toli ya bango, tokobatelama mpe tokozwa mapamboli ya ntina na mobembo na biso na mabele oyo.

Ntango nazalaki koyekola na Brigham Young University lokola elenge misionele ya kala monzeba, nakendeki na liyangani ya bonganganzambe ya likita linene na Tabernacle ya Temple Square. Mokambi Ezra Taft Benson, ntango wana Mokambi ya Eklezia, atindaki misionele nyonso ya kala na kozwa libala na bokebi mpe kosala yango likambi ya liboso na bomoi na ye.7 Nsima ya liyangani, nayebaki nabengamaki mpo na koyambola mpe nasengelaki kosalela toli ya profeta.

Boye, nakanaki kokende na mboka na ngai ya kobotama, Brezil, mpo na kozwa mwasi. Yambo ya kolongwa mpo na Brezil na mosala ya lopitalo, nabengaki mama na ngai mpe mwa baninga na telefoni mpe nazwaki molongo ya bilenge basi 10—moko na moko na bango lokola mwasi ya kobala.

Na Brezil, nsima ya komaniola mingi mpe kosambela, nakutanaki; nabimaki, mpe nayokanaki na, mpe nalengelaki mokolo kobala moko ya bilenge basi na molongo wana. Ezalaki te ntango ya nokinoki mpo na bayekoli na Provo, Utah, mpo na kobima mpe koyokana, kasi ezalaki nokinoki na ndenge ya Brezil.

Nsima ya mwa basanza, nabalaki Elaine. Azali bolingo ya bomoi na ngai mpe lipamboli ya motuya.

Nazali te kokanisa ete moto nyonso asengeli kosala molongo ekokani, kasi nakanisi—ntango mosusu nasali koleka kobanza—ete ntango nyonso tosala soki profeta na biso alobi.

Elilingi
Foto ya Mokambi Thomas S. Monson

Profeta ya Nzambe lelo ezali Mokambi Thomas  S. Monson, mpe tokopambolama na kolandaka toli na ye na bosolo.

Koyeba Ezaleli ya Solo ya Nzambe

Bosolo mosusu toyekoli na ntina ya Limoni ya Yambo mpe Profeta Joseph Smith ezali ezaleli ya solo ya Nzambe. Banza kaka boniboni topambolami na koyeba ete Nzambe azali mozali moko na nzoto mpe mikuwa bakoki kosimba lokola ya biso,8 ete tokoki kokumbamela Nzambe moko oyo azali ya solo, oyo tokoki kososola, mpe oyo alakisi mpe abimisi Yemei mpe Mwana naYe ya Mobali na Baprofeta na Ye—baprofeta ya kala mpe baprofeta mikolo miye mya nsuka.9 Ye azali Nzambe moko oyo ayokaka mpe ayanolaka nsambo na biso;10 Nzambe moko oyo amonaka uta na lola likolo 11 mpe azali ntango nyonso komitungisa etali bolamu na biso ya molimo mpe ya ntango; Nzambe moko oyo apesaki biso boponi mpo na kokana mpo na biso moko kolanda Ye mpe kotosa motindo na ye na makasi te;12 Nzambe moko oyo apesi biso mapamboli mpe apesi biso ndingisa ya kokutana na mimekano mpo ete tokoka kokola mpe kokoma lokolaYe.

Ye azali Nzambe moko ya bolingo oyo abongisaki mwango na yango tokoki kosepela esengo na bomoi oyo mpe na seko.

Yesu Klisto Azali Mobikisi na Biso

Uta na Limoni ya Yambo mpe Joseph Smith, tozwi boyebi ya bosolo mpe etinda ya bule ya Nkolo Yesu Klisto, oyo azali libanga likonzi ya eyamba na biso.

Na ntina ya liwa ekotisamaki na mokili, ya solo lokola tozali na bomoi sikawa, tokokufa banso mokolo moko. Moko ya mbano ya liwa ekozala kobungisa ya kowumela nzoto na biso ya mosuni; tokokoka te kosala eloko te mpo na kobikisa yango. Na kobakisa, mpamba te banso tosumukaka na mobembo na biso awa na mabele, tokokoka ata moke te kozonga na miso ya Tata na biso ya Lola.

Ekoki bino kobanza mbano ya kozanga miso ya Nzambe mpe kozala lisusu na nzoto te?

Mobikisi mpe Mosikoli moko asengelemaki mpo na kopesa biso bonsomi na liwa mpe lisumu. Na nse ya bokambi ya Tata ya Lola, Yesu Klisto ayaki na mabele, ayokaki mpasi, akufaki na ekulusu, mpe asekwaki mpo ete biso lokola tokoka kosekwa mpe, na boyamboli ya solo mpe kosala mpe kobatela mayokani ya bule, tozala mbala moko lisusu na miso ya Nzambe.

Yakobo alimboli, “O boniboni monene bolamu ya Nzambe na biso, oyo alengeli nzela mpo na boponioki na biso nan kanga ya dongolamiso oyo nsomo; iyo, zabolo wana, liwa mpe lifelo, oyo nabengi liwa ya nzoto, mpe lisusu liwa ya molimo.”13

Elilingi
Yesu mpe Maliya na Lilita

Yesu Klisto azali Masiya balakaki, Mopesi Mobeko, Mosantu Se Moko ya Yisalaele, Nkolo na biso, Mobikisi na biso, Mosikoli na biso, Mokonzi na biso, Nyonso na biso.

Ekoka biso banso kokoba kosalela bosolo mpe boyebi oyo ya ntina,kopesaka botosi na biso na Nzambe mpe Mwana Mobali Molingani na Ye. Na Nkombo ya Yesu Klisto, amene.