2010–2019
Mokolo ya Bikamwisi Esili?
Sanza ya zomi 2017


Mokolo ya Bikamwisi Esili?

Boyekami na biso ya ntina koleka esengeli kozala na bikamwa ya molimo oyo ezali litomba monene mpo na bana nyonso ya Nzambe.

Mobu moko eleki, na mosala na mboka ya Californie, nakendaki elongo na Mokambi ya likoki mpo na kokende kotala elongo na Clark mpe Holly Fales mpe libota na ndako na bango. Balobaki bamonaki bikamwa moko kala te. ntango tokomaki, Clark abundaki mpo na kotelema mpe kopesa biso mbote lokola alataki elamba ya bobateli mukongo, ya bobateli kingo; mpe na maboko na ye.

Kaka bobele basanza mibale, Clark, mwana na ye ya mobali Ty, mpe bilenge mosusu pene ya 30 mpe bakambi basalaki lisano ya bosekisi na molulu ya likoki, kotambolaka makolo bametele 4,322 likolo ya Ngomba ya Shasta, moko ya bangomba ya songe ya Californie. Na mokolo ya mibale ya botamboli makaolo ya mpasi, ebele ya bamati ngomba bakomaki na songe—bokokisi ya mpasi ekokisi mpo ete bazwaki basanza ya bolengeli.

Moto oyo akomaki na songe mokolo wana ezalaki Clark. Nsima ya bopemi pene ya songe, atelemaki mpe abandaki kotambola. Ntango abandaki kotambola, asielumukaki mpe akweyaki, ayokaki mpasi ya bokwei ya bametele 12 mpe nsima na bozangi koyeba nini ya kosala akwei na bokiti mosusu bametele 91 . Libaku malamu, Clark abikaki, kasi azokaki makasi mpe azalaki na makasi ya koningana te.

Bikamwa Clark amonaki na ntango likama oyo ezalaki kaka ebandeli. Bato oyo bakomaki liboso “bakomaki” ezalaki lisanga ya batamboli oyo ezalaki lisusu na bakambi ya basungi mpe baminganga. Basalisaki na lombango Clark mpo na likama mpe bapesaki bisalelo mpo atikala na moto. Lisanga oyo mpe “esanganaki” mpo na kosolola na telephone mpe basengaki lisungi uta na esika oyo batelefone ekokaki kokoma te. Mwa elikopetere ekomaki wana na lombango na Ngomba ya Shasta uta ntango moko. Na likama ya kokita mbala mibale kasi ezalaki mpasi mpo ete ekita, na bomeki na mopepe makasi, mokumbi mpepo amekaki mbala misato mpe mbala ya nsuka. Na ntango mokumbi azalaki kopusana, mopepe “eyaki” mpo na kobongola mpe mpepo ekitaki mwa sika mpo ete lisanga na mbango mpe mpasi bakotisa Clark na kati ya mwa mpepo nsima ya kiti ya mokumbi mpepo.

Ntango minganga batalaki Clark na lopitalo ya tromatoloji, minganga balobaki azwaki makama ebele na kingo, na mokongo, na mipanzi, mpe maboko; lipululu na etobokaki; mpe bapota ebele. Monganga oyo ayebi kotala makambo ya misisa “akomaki” azalaki na mosala mokolo wana; azalaka na lopitalo oyo mwa ntango moke na mobu. Dokotolo oyo alobaki nsima naino atikala komona moto azwa likama ya boye na moelle epiniere mpe na misisa ya makila mpe abika. Clark asengelaki kaka na lobiko te kasi asengelaki kozonga lolenge azalaki. Komimonaka ye moko lokola mozangi elikia, monganga alobaki likambo ya Clark elekeli ye mayele ayebi te nini akosala na ntina ya bokatani ya misisa mpe esengaki kaka likamwisi esalema.

Ntango Clark mpe Holly basilisaki kobeta lisolo oyo ya mpasi, nakokaki koloba te. Ezalaki pete te bobele kaka mpo na bikamwisi ya ntina, kasi mpo na bonene ya moto. Nazalaki na likanisi ya bozindo—litatoli ya molimo—ete Holly mpe moko na moko kati ya bana mitano kitoko oyo bafandi ya kisuku pene ya baboti na bango bazali na bondimi ya lolenge oyo bakoki kondima atako eyano ya mokolo wana mpe bakoka kokoba na molimo. Clark mpe Holly mpe bankoko na bango, Ty mpe Porter, bazali elongo na biso lelo na Likita oyo.

Na komanyolaka na likambo ya libota ya Fales, nakanisaki ebele na ntina ya mabaku ya bato misusu. Tokoloba nini na basusu batondisama na bondimi, kozwaka lipamboli ya bonganganzambe, kosambelaka na bozangi nsuka, kobatelaka mayokani, Basantu ya Mikolo ya Nsuka oyo batondisama na elikia oyo bikamwisi naino esalema te? Lolenge bango bazali kososola likamwisi basusu bazali kozwa bikamwisi.

Tokoloba nini na baoyo bazali konyokwana na mitungisi ya mpasi na—nzoto, na makanisi, na mayoki—uta mibu to bamibu ntuku to mpo na bomoi mobimba? Tokoloba nini na baoyo bazali kokufa na bolenge?

Bobele basanza mibale eleki, babalani ya kuple mibale kozalaka na mokanda ya ndingisa ya tempelo, elongo na bamisionele misato ya ntango mobimba na bana mpe bana misusu mitano kati na bango, bazalaki na kati ya mpepo moke mpo na mwa mobembo. Nazali na elikia ete babondelaki mpo na bobatelami yambo ya mpepo epumbwa mpe basambelaki makasi ntango mpepo na bango ezaki likama ya mekaniki yambo epanzana. Moto moko te abikaki. Tokoloba nini na ntina na bango?

Bato malamu mpe balingami na bango bazali na ntina ya kotuna motuna etunamaki na Mormon: “Mokolo ya bikamwisi esili?”1

Boyebi na ngai ya moke ekoki te kolimbola mpo na nini lisungi ya bozambe mpe bantango mosusu ezangi. Kasi ntango mosusu tozangaka bososoli ya koyeba bikamwisi ezali nini.

Mbala mingi tozwaka likamwisi lokola kobikisama na bozangi ndimbola ya boyebi ya minganga to lokola kokima likama na koyebaka bokangoli ya lombango. Na yango, kozwaka likamwisi lokola “likambo ya litomba ememaki nguya ya bonzambe eye bato basosolaka te”2 epesaka botali mosika na mituna koleka boseko na lolenge ya bomoto. Ndimbo oyo lisusu epesaka biso ndingisa ya kotala mosala monene ya bondimi na bozwi likamwa.

Moroni ateyaki, “Mpe na ntango moko te bato basali bikamwisi kino nsima ya bondimi na bango.”3 Ammon ateyaki, “Ngambe apesaki bandimbola oyo moto, na nzela ya bondimi, akokoki kosala makamwisi makasi.”4 Nkolo amonisaki epai ya Joseph Smith, “Mpo nazali Nzambe, … nakolakisa makamwisi … na baoyo nyonso bandimeli na nkombo na ngai.”5

Mokonzi Nebukadenesalo atindaki ete Sadalaki, Mesaki, mpe Abedenego bakumbamela ekeko ya wolo oyo akelaki, kozala na likama, “Soki bokumbameli te, bokobwakama … na katikati ya litumbu ya moto ya kongala.” Nsima alobelaki bango “Nzambe yango nde nani oyo akokangola bino na maboko na ngai?”6

Bayekoli misato oyo balenda balobaki: “Soki ezali bongo, Nzambe nabiso oyo tosalelaka azali na makoki ya kokangola biso uta na litumbu ya moto ya kongala. … Kasi soki te, eyebana epai na yo, O mokonzi, ete tokosalela banzambe na yo te.”7

Bazalaki na elikia makasi ete Nzambe akokaki kokangola bango, “kasi soki te,” bazalaki na bondimi ya kokoka na mwango ya Ye.

Lolenge moko na, Mpaka David A. Bednar mokolo moko atunaka elenge mobali azalaki na mposa ya lipamboli ya bonganganzambe, “Soki ezali bolingi ya Tata na biso ya Lola ete ozali kopeasa na nkufa kati ya bolenge na yo mokili ya molimo mpo na kokoba mosala na yo, ozali na bondimi ya komikitisa na bolingi na Ye mpe ya kokangolama te?”8 Tozali na bondimi “te [ya] kokangolama” uta na mitungisi na biso ya mabele oyo tosengeli kokangolama na mpo na seko?

Motuna monene ya kotuna ezali “Bondimi na biso etiami na nani?” Bondimi na biso etiami bobele mpo na kozwa biyano malamu na mpasi mpe minyoko, to eyakemeli mpenza Nzambe Tata mpe mwango na Ye ya bule mpe Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye? Bondimi epai ya Tata Mwana epesaka biso ndingisa ya kososola mpe kondima bolingi na Bango lokola tozali komilengela mpo na seko.

Lelo natatoli na ntina ya bikamwisi. Kozala mwana ya Nzambe ezali likamwisi.9 Kozwaka nzoto na elilingi mpe lolenge na Ye ezali likamwisi. 10 Likabo ya Mobikisi ezali likamwisi.11 Bomikabi ya Yesu Klisto ezali likamwisi.12 Ntina mpo na bomoi ezali likamwisi.13

Atako ezali malamu mpo na kobondela na ntina bobateli ya nzoto mpe bokangoli na ntango tozali na bomoi awa na nse, boyekami na biso monene esengeli kotalela bikamwisi ya molimo oyo ezali ntina mpo na bana nyonso ya Nzambe. Totala esika towuti te, totala ekolo ten a biso, totala oyo tosali te soki toyamboli, totala oyo basali biso te—biso nyonso topesameli bikamwisi oyo. Bomoi na biso ezali likamwisi, mpe makamwisi misusu ezali koya. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.