2010–2019
Bolinganaka Lokola Ye Alingi Biso
Sanza ya zomi 2017


Bolinganaka Lokola Ye Alingi Biso

Na kosungaka mpe kolimbisaka basusu na bolingo ya solo, tokoki kokangolama mpe kozwa makasi ya kolonga mimekano na biso moko.

Katikati ya Bileyi ya Nsuka, Mbikisi apesaki moko ya sika na bayekoli na Ye, kolobaka:

“Nazali kopesa bino lilako ya sika, Ete Bolinganaka; lokola Ngai nalingi bino bolinganaka.

“Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soko bozalani na bolingo.”1

Bayekoli ya Mobikisi bapesamaki motindo moko ya sika ya kosala eloko moko ya koleka, eloko moko ya monene, mpe eloko moko ya bonzambe koleka. Mobeko yango ya sika mpe mbela elobamaki na likomi ya mokuse ya ntina “lokola Ngai nalingi bino”

Bolingo Ezali na Kosala; Bolingo Esali Mosala

“Bolingo ezali liyoki ya komipesa ya bozindo, komikotisa mpe kolinga. Ndakisa monene koleka ya bolingo ya Nzambe mpo na bana na Ye emonisami na Bomikabi ya nsuka te ya Yesu Klisto.”2 “Mpo ete Nzambe alingaki mokili,” ekomaki Joane, “ete apesani Mwana na likinda na ye, ete moto na moto oyo akondima Ye abebisama te, kasi ete azala na bomoi ya seko.”3 “Bolingo mpo na Nzambe mpe bazalani ezali lolonenge moko ya bayekoli ya Yesu Klisto.”4

Mibu ebele eleki, ndako koko na biso ya mokolo, Jose azalaki na mibu 4minei, azalaki kosakana elongo na mwasi na ngai. Ntango bango bazalaki kosekaka mpe kolekisaka ntango moko kitoko elongo, koko na biso ya mokolo atunaki ye, “Mamakoko, olingaka ngai?”

Ye ayanolaki ye, “Iyo, Jose, ngai nalingaka yo”

Boye atunaki na ye motuna mosusu: “Lolenge nini oyebi ete olingaka ngai?”

Ye alombolelaki ya mayoki na ye mpe lisus ayebisaki ye nyonso oyo ye asalaki mpe azalaki na bolingi ya kosala mpo na ye.

Sima mwasi na ngai atunaki Jose mituna kaka moko wana, kosangisaki na koluka boyebi ya bokoti: “Lolenge oyebi ete yo olingaka ngai?”

Kopesaka eyano moko ya bozangi likambo mpe ya bosembo, ye alobaki, “Nalingaka yo mpo ete nayoki yango na kati ya motema na ngai.” Ezaleli ya bolingo ya Jose epai ya koko na ye ya mwasi mokolo wana mpe ntango nyonso elakisi ete bolingo ezali sangisa ya misala mpe lokola mayoki ya bozindo.

Mokambi Benjamin ateyaki, “Mpe tala, nalobeli bino makambo oyo ete bokoka koyekola bwania; ete bokoka koyekola ete ezali bino na mosala ya bazalani na bino bozali mpenza na mosala ya Nzambe.”5

Na mokili ya lelo epai wapi ezali na monyokoli ya mabaku mpo ete ekeseni, kotindaka nsango moko ya kokoma elongo na elili ya kosekisa to kotiaka foto moko ya kitoko na maloba “Ngai nalingi yo” ezali kitoko mpe ebongi. Kasi oyo ebele kati na biso tosengeli kosala ezali kotia batelefone na biso pembeni mpe, elongo na maboko mpe makolo na biso, kosunga basusu na bosenga monene koleka. Bolingo ezangi mosala ezali lokola bondimi ezangi misala; yango ezali ya kokufa ya solo.

Bolingo Ezali Bolimbisi

Bolingo ya peto ya Klisto, oyo ezali bolingani,6 kofula biso kaka te kosala mpe kosala mosala kasi liusu kozala na makasi ya kolimbisa, kotalaka likambo. Ekoki ngai kokabola elongo na bino mayele moko oyo esimbaki mpe ebongolaki bomoi na ngai. Ted mpe Sharon, baboti ya Cooper oyo bazali awa lelo, bapesaki ngai ndingisa ya kokabola oyo ekomelaki libota na bango koleka mibu libua eleki. Nakoyebisa bino mayele wuta na bomoni ya Ted, tata ya Cooper.

Sanza ya muambe 21, 2008, ezalaki mokolo ya yambo ya kelasi, mpe bayaya misato ya Cooper, Ivan, Garrett, mpe Logan, bazalaki banso na arret ya bus kozelaka bamituka ya eteyelo. Cooper, oyo azalaki na mibu 4minei , azalaki likolo ya velo na ye; mwasi na ngai, Sharon azalaki kotambola na makolo.

Mwasi na ngai azalaki na ngambo ya nzela mpe ayebisaki Cooper akatisa. Na ngonga moko wana, motuka moko na malembe ebalukaki na loboko ya mwasi mpe etambolaki likolo ya Cooper.

Nayambaki telefone wuta na moto ya pembeni koyebisaka ngai ete Cooper atutamaki na motuka. Na kumbaki motuka na lobango kokita na esika mituka etelemaka mpo na kotala ye. Cooper atandamaki na matiti, kobundaka mpo na kopema, kasi azalaki na bampota komonana te.

Nafukamaki pembeni ya Cooper mpe nalobaki maloba ya kopesa makasi lokola “ekozala malamu. Zela moke mpo na lisungi” na ntango yango mokambi na ngai ya lisanga ya likolo ya banganganzamne, Nathan, ayaki esika tozalaki elongo na mwasi na ye. Ye apesaki makanisi biso topesa Cooper lipamboli moko ya bonganganzambe. Totiaki maboko na biso na moto ya Cooper. Nakoki te kokundola oyo nalobaki na lipamboli, kasi nakundolaki na bolele nyonso bozali ya nzinganzinga na biso, mpe yango ezalaki na ntango nayebaki ete Cooper azalaki kokufa.

Cooper abembukaki na kzela ya helicopter na lopitalo kasi boye, ata bongo, akufahi. Nayokaki Tata na Lola azalaki koyebisa ngai ete mokumba na ngai na mabele esilaki mpe ete Cooper azalaki sikawa na maboko na Ye.

Tozalaki na makoki ya kolekisa mua ngonga moke elongo na Cooper na lopitalo. Basali kuna babongisaki ye boye tokokaki kosimba ye mpe kopesa mbote ya suka mpe bapesaki biso nzela ya kolekisa ngonga ebele elongo na ye, kosimbaka ye, lolenge tolingaki.

Na nzela ya bozongi ndako, mwasi na ngai oyo alongaki mpasi mpe ngai totalanaki mpe tobandaki kosolola na ntina ya mwana mobali oyo azalaki kokumba motuka. Toyebaki ye te, atako ye azalaki kaka na nzela moko ya kokabuana na nzela na biso mpe azalaki na kati ya mindelo ya paluasi na biso.

Mokolo elandi ezalaki mpasi makasi mpo na biso lokola tozalaki biso nyonso kotondisama mobimba na mpasi. Nakueyaki na mabolongo mpe nasambelaki losambo ya koleka mpenza oyo nanu nasala te. Nasengaki Tata na Lola na Nkombo ya Yesu Klisto kolongola kotndisama ya mpasi. Ye asalaki yango.

Mosika sima ya mokolo wana moko ya bapesi toli ya bokambi ya likonzi na biso abongisaki mpo na biso kokutana na elengo mobali—mokumbi ya motuka—mpe baboti na ye na ndako ya mopesi toli. Sharon mpe ngai tozelaki elenge mobali mpe baboti na ye koya. Ntango ekuke efunguamaki, tokutanaki na bango mpo na mbala yay ambo. Episikopo na ngai alobaki na mongongo moke na litoyi na ngai, “Bokende epai na ye.” Sharon mpe ngai toyambaki ye na boyambani ya lisanga. Tolelaki elongo mpo na oyo emonanaki lokola kozala ngonga moko molai. Toyebisaki ye toyebaki ete oyo ekomaki ezalaki likama ya solo.

Ezalaki likamuisi mpo na Sharon mpe ngai, elongo toyokaki lolenge tosalaki mpe ete totikala kosala. Na ngolu ya Nzambe, tozalaki na likoki ya kosimba nzela monene, nzela esengeli, nzela kaka moko, mpe kolinga elenge mobali oyo ya malamu.

Toyaki kokoma pembeni mpenza na ye mpe libota na ye mibu ebele. Ye akabolaki elongo na biso bantango na ye ya motuya koleka ya bomoi. Tokendaki na tempelo elongo na ye lokola azalaki komibongisa mpo na etinda na ye.7

Bandeko mibali mpe ya basi, Ted ayebi na bosangi ntembe ete Tata na biso ye Lola alingi biso. Ye ayebi ete kozalaka na likoki ya kolimbisa, mpe komikitisa mokumba na lolenge wana, ezalaki mayele moko ya kitoko ya kozala ya kolimbisama. Bilengi wana eyaka na kolandaka ndakisa ya ndakisa na biso ya monene. Na buku ya Mormon, Alma alobaki na ntina ya Mobikisi, “Mpe akokende, koyokaka mpasi ya bolozi mpe matungisi mpe masenginia ya lolenge na lolenge; mpe boye liloba ekoka kokokisama oyo elobi ete akomema likolo na ye bolozi mpe bokono ya bato na ye.”8

Bandeko mibali mpe basi, oyo lisituale kitoko ya bolingo mpe bolimbisi ya solo. Biso, lokola bongo, tokoki kozala na esengo mpe bosepeli mpe esengo lokola tozali kosunga mpe kolimbisa basusu. Georgy, moko ya bakoko na biso ya mibali, mingimingi alobaka, “lolenge nini ya libota tozali?” Mpe ye ayanoli, “Tozali libota moko ya esengo!”

Mokambi Thomas S. Monson apesaki biso toli, kolobaka, “Tika biso totala babomoi na biso mpe tozua mokano ya kolanda ndakisa ya Mobikisi na kozalaka malamu, na bolingo, mpe na bolingani.”9

Nayebi ete Tata na biso ya Lola mpe Mwana na Ye ya mobali, Yesu Klisto, balingi biso mpe bazali na bolingi ya kosunga biso mpo na kosala lokola tolingani lokola Bango balingi biso. Mpe ayebi ete nakosalelaka basusu na bolingo ya solo, tokoki kobika mpe kozwa bolendisi ya kolonga mikakatano na biso. Mpe boye natatoli na nkombo ya Yesu Klisto. Amen.