2010–2019
Nkolo Azali Kokamba Eklezia na Ye
Sanza ya zomi 2017


Nkolo Azali Kokamba Eklezia na Ye

Boyangeli ya Nkolo ya Eklezia na Ye esengaka bondimi monene mpe ya sikisiki na banso oyo bazali kosalela Ye na mabele.

Bandeko na ngai ya bolingo oyo basimbi bonganganzambe ya Nzambe, mpokwa oyo nalingi kolobela lolenge ya kokamwa Nkolo azali kokamba bokonzi na Ye na mabele. Bosili koyeba makonzi yango. Nasambeli ete Molimo Mosantu akokotisa yango na bino.

Ya yambo, Yesu Klisto azali moto ya Eklezia na mabele mobimba.

Ya mibale, Ye akambaka Eklezia na Ye lelo na kolobaka na bato babiangama lokola baprofeta, mpe Ye asalaka yango na nzela ya bomibisi.

Ya misato, Ye apesaki bobimisi na baprofeta na Ye kala, azali kopesa lisusu, mpe akokoba kosala yango.

Ya minei, Ye akotisaka bobimisi na baye basalaka na nse ya bokambemi ya baprofeta na Ye.

Uta na makonzi wana, tondimaka ete boyangeli ya Eklezia na Ye esengaka bondimi monene mpe ya sikisiki na banso oyo bazali kosalela Ye na mabele.

Lokola ndakisa, esengeka bondimi mpo na kondima ete Nkolo oyo asekwaki azali kokengela mikemike ya mokolo na mokolo ya bokonzi na Ye. Esengaka bondimi mpo na kondima ete Ye abengaka bato babonga mpenza te na bisika ya elikia. Esengaka bondimi mpo na kondima ete Ye ayebi bato Ye abengaka malamu mpenza, na makoki na bango mpe na batalanta na bango, mpe baye bomikosa te na mabiangi na Ye.

Yango ekoki komema koseka to koningisa moto na basusu na bayoki bazali awa—bango nyonso bakoki kokanisa libiangi na bango moko mpo na kosala ekoki kozala  libungi lokola baye bamonaka bato mosusu bango bayebi babongi moke na esika na bango na bokonzi ya Nkolo. Toli na ngai na maboke nyonso wana ezali kozelisa kosambisa ya boye kino bokokoka komona malamu mingi nini Nkolo amoni. Kosambisa bokoki kosala, esika wana, ezali ete bino bakoka kozwa bobimisi mpe kosalela yango na kobanga te.

Esengaka bondimi mpo na kosala bongo. Yango esengeka kutu bondimi monene koleka mpo na kondima ete Nkolo abiangi basali bato babonga mpenza te mpo na kokamba bango. Ntina na ngai mpokwa oyo ezali mpo na kotonga bondimi na bino ete Nzambe azali kokamba bino na mosala na Ye. Mpe kutu ya motuya koleka, elikia na ngai ezali kotonga bondimi na bino ete Nkolo azali kofula bato babonga mpenza te Ye abiangi lokola bakambi na bino.

Bokoki kokanisa, ete bondimi ya boye ezali ya motuya te mpo na elonga ya Eklezia mpe bokonzi ya Nkolo. Nzokande, bokoki kososola—kotala te wapi ozali na nsinga ya mosala ya bonganganzambe, uta na profeta ya Nkolo ti na mosimbi bonganganzambe ya Alona ya sika—ete bondimi ezali na ntina mpenza.

Tobanda na nini bondimi elingi koloba na Mokambi ya lisanga likoki ya bateyi to ya badiakona. Ezali na motuya mpo na ye na kozala na bondimi ete Nkolo abengaki Ye mpenza, koyebaka botau mpe bokasi ya moteyi wana. Asengeli kozala na bondimi ete moko oyo apesaki libiangi azwaki bobimisi na Molimo ya Nzambe. Bapesi toli na mpe bayi lisanga likoki na Ye basengeli kozala na bondimi wana kaka mpo na kolanda ye na elikia na kobanga te.

Namonaki elikia ya boye ntango mwana mobali moko avandaki elongo na bokambi na ya lisanga likoki ya badiakona eyenga moko na nkongo. Azalaki seketele na bango abengamaki sika. Bokambi wana ya bilenge basololaki elongo. Balobelaki ndenge mingi bakokaki kosala bosenga ya episikopo mpo na kozongisa mwana mobali moko ya botau na Eklezia. Nsima ya losambo mpe lisolo, baponaki seketele wana mpo na kokende na ndako ya mwana mobali moko oyo aya na liyangani ata moko te mpe mpo na kobengisa ye.

Seketele wana ayebaki mwana mobali wana te, kasi ayebaki ete moko ya baboti ya mwana mobali wana azali na botau mpe mosusu azalaki mondimi te mpe moninga te. Seketele ayokaki mwa kobanga kasi kobanga mpenza te. Ayebaki ete profeta ya Nzambe asengaki basimbi bonganganzambe bazongisa mpate abunga. Mpe ayokaka losambo ya bokambi na ye. Ayokaki bango kokoma na boyokani etali nkombo ya mwana mobali wana ya kosalisampe etali nkombo na ye moko.

Nazalaki kotala ntango seketele atambolaki komataka na balabala epai ya ndako ya mwana mobali ya botau. Atambolaki na malembe lokola soki azalaki kokende na kati ya likama ya monene. Kasi nsima ya katikati ya ngonga azongaka kokitaka balabala elongo na mwana mobali, na koseka na esengo. Nayebi na ntembe te ayebaki yango ntango wana, kasi akendaka na bondimi ete azali na etinda ya Nkolo . Bondimi wana etikalaki na ye mpe ekolaki na mibu na ye lokola misionele, tata, moyangeli ya bilenge mibali, mpe episikopo.

Tolobela nini bondimi ya boye elingi koloba mpo na episikopo. Episikopo abengami ntango mosusu mpo na kosalisa bato oyo bayebi ye malamu. Bandimi ya palwasi bayebi ntango mosusu botau na ye ya bomoto mpe bokasi na ye ya molimo, mpe bayebi ete basusu na palwasi bakokaki kobengama—basusu oyo bamonani bayekola mingi, bakomela mingi, basepelisaka mingi, to bamonanaka kutu malamu mingi koleka.

Bandimi oyo basengeli koyeba libiangi mpo na kosala lokola episikopo, ewutaka na Nkolo, na bobimisi. Na kozanga bondimi na bango, episikopo oyo abengamaki na Nzambe akomona yango mpasi mingi kozwa bobimisi asengeli mpo na kosalisa bango. Akolonga te na kozanga   bondimi ya bandimi mpo na kosunga ye.

Na esengo, kokesana ezali lisusu ya solo. Bokanisa na mosali Nkolo Mokonzi Beniamina, oyo akambaki bato na ye na boyamboli. Mitema ya bato ekomisamaki petepete na bondimi ete ye abengamaki na Nzambe, atako botau na ye ya bomoto, mpe ete maloba na ye ewutaki na Nzambe. Bomikundoli nini bato balobaki: “Iyo, tondimi maloba manso oyo bolobi na biso; … toyebi sikisiki mpe bosolo na yango, mpamba te Molimo ya Nkolo wa Bokasi Bonso, oyo asalaki mbongwana ya nguya na biso, to na mitema na biso, ete tozali lisusu na mposa ya kosala mabe te, kasi mpo na kosala malamu ntango inso” (Moziya 5:2).

Mpo moyangeli alonga na mosala ya Nkolo, elikia ya bato ete abengami na Nzambe esengeli kolekela bomoni ya ye bolembi mpe botau ya kufa. Bomikundola boniboni Mokonzi Beniamini alimbolaki mosala ya boyangeli na ye moko:

“Babengi bino te awa ete bosengela kobanga ngai, to ete bokoka kokanisa ete na ngai moko nazali koleka moto ya kufa.

“Kasi nazali bo lokola binomei, moyangelami o bokono bwa ndenge inso o nzoto mpe mayele; kasi naponomoki na bato baye, mpe nabulisamaki na tata na ngai, mpe nazwaki ndingisa na lobolo la Nkolo ete nazala moyangeli moko mpe mokonzi moko liboso lya bato baye; mpe nabombamaki mpe nabatelamaki na nguya ya ye ezanga emekiseli, mpo ya kosalela bino na bokasi, mayele mpe makasi manso maye Nkolo apesaki epai ya ngai” (Moziya 2:10–11).

Bayangeli na bino na Eklezia ya Nkolo bakoki komonana na bino batau mpe bato to bakoki komonana na bino makasi to bafulama. Likambo ezali ete moyangeli nyonso azali sangisa ya bizalela wana mpe mingi koleka. Lisalisi nini basali ba Nkolo bazali oyo babengami na kokamba biso ntango tokoki komona bango lokola Nkolo asalaki ntango abengaki bango.

Nkolo amonaka basali na Ye malamu mpenza. Ye amonaka batalanta na bango mpe ya bango lobi ekoya. Mpe Ye ayebi boniboni bozali na bango mpenza ekoki kobongwana. Ye ayebi lisusu boniboni bakoki kobongwana na makambo na bango na bato bazali kokamba.

Bokokaka kozala na mayele ya kokomisama makasi mingi na bato bobengama kosalisa. Nabengamaka mbala moko episikopo ya bilenge banzeba bakola. Nasosoli mpenza te soki ntina ya Nkolo ezalaki mingi mpo na mbongwana kani nakokaki kosalisa Ye na bango to mbongwana Ye ayebaki balingaki kosala na ngai.

Kino ndelo nini nasosoli mpenza te, mingi koleka ya bilenge wana na palwasi wana babengamaki lokola soki nabengamaki na Nzambe mingimingi mpo na bango. Bamonaki botau na ngai kasi batalaki yango te.

Namikundoli elenge mobali moko oyo asengaki toli etali maponami na ye ya koyekola. Azalaki moyekoki ya sika na universite moko ya malamu mingi. Poso moko nsima ya kopesama toli, asalaki lilaka ya kokutana na ngai.

Ntango akotaki na bilo, asutukisaki ngai na kotunaka, “Episikopo, tokoki kosambela liboso tosolola? Mpe tokoki kofukama? Mpe nakoki kosambela?”

Bosenga na ye esutukisaki ngai. Kasi losambo na ye esutukisaki ngai mingi koleka. Ezalaki likambo moko lokola oyo: “Tata ya Lola, Yo oyebi ete Episikopo Eyring epasaki ngai toli poso eleki, mpe esimbi te. Palado fula ye mpo na koyeba nini nakosala sikawa.”

Sikawa bokoki koseka yango, kasi nasekaki te. Asilaki koyeba nini Nkolo alingaki ye asala. Kasi akumisaki mosala ya episikopo na Eklezia ya Nkolo mpe ntango mosusu alingaki ngai nazala na libaku ya kolonga elikia monene koleka mpo na kozwa bobimisi na libiangi wana.

Esimbaki. Noki ntango totelemaki mpe nsima tovandaki, bobimisi ekomelaki ngai. Nalobelaki ye nini nayokaki Nkolo alingaki ye asala. Azalaki kaka na mibu 18, kasi akolaki na mibu ya molimo.

Asili koyeba asengelaki kokende epai ya episikopo na likambo moko ya boye. Kasi ayekolaka kosunga basali ya Nkolo kuta na botau ya kufa. Na nsuka akomaki mokambi ya likonzi. Amikundolaki mpe asalelaki liteya toyekolaki elongor: soki ozali na bondimi ete Nkolo Azali Kokamba Eklezia na Ye na nzela ya bobimisi epai ya basali baye babonga mpenza te tYe abiangaka, Nkolo akofungola maninisa ya lola mpo na bango, lokola Akofungola mpo na yo.

Uta na mayele wana, nayekoli liteya ete bondimi ya bato tosalisaka, ntango mosusu mingi koleka bondimi na biso moko, ememelaka biso bobomisi na mosala ya Nkolo.

Ezali na liteya mosusu mpo na ngai. Soki mwana mobali wana asambisaka ngai mpo na kozanga lisusu kopesa ye toli ya malamu mbala ya liboso, alingaki ata moke te koya lisusu. Mpe boye, na koponaka te kosambisa ngai, azwaki bondimisi alingaki.

Kasi liteya mosusu uta na mayela wana esalisi ngai malamu. Lokola nayebi, alobelaki ata moke te na moto na palwasi ete napesaka ye toli liboso. Soki asalaka yango, elingaki kokitisa bondimi ya basusu na palwasi mpo na kolikia na bofuli ya episikopo.

Namekaka te kosambisa basali na Nkolo to kolobela botau na bango ya komonana. Mpe namekaki koteya yango na ndakisa na bana na ngai. Mokambi James E. Faust akabolaki bondimi moko oyo nazali komeka kokomisa ya ngai moko. Natindeli bino yango:

“Biso …tosengeli kosunga mpe kosalisa bayangeli ya biso ya bisika, mpamba te bango … ‘babengami mpe baponami.’ Mondimi nyonso ya Eklezia na Ye akoki kozwa toli uta na episikopo to na Mokambi ya etape, Mokambi ya likonzi to ya misio, mpe Mokambi ya Eklezia mpe basali elongo na Ye. Moko te na bandako oyo asengaki libiangi na ye. Moko te abonga mpenza. Kasi bazali basali ya Nkolo, babengami na Ye na nzela ya baye basengelami na bofuli. Baye babengami, basungami, mpe batiami mpembeni basengelami na lisungi na biso.

“… Bozangi limemia na bayangeli ya eklezia asalaki mingi bayoka mpasi ya botau mpe bokei. Totalaka te bozangi bobongi mpenza, kovimba, mabungi to mbemba ya bato babengami mpo kokamba biso, mpe kosunga mosala basimbi” (“Called and Chosen,” Liahona, Nov. 2005, 54–55).

Toli wana epambolaka basali ya Nzambe na ntango nyonso.

Na mikolo ya kala Eklezia ya Nkolo, bakambi penepene na Profeta Joseph Smith babandaki kolobela mabunga na ye. Atako nyonso bamonaka mpe bayebaka ya ezaleli na ye na Nkolo, molimo na bango ya botongi mpe na zuwa epanzanaki lokola bokono bobe. Moko na Bazomi na Mibale atiaki ndelo ya bondimi mpe bosembo tosengeli kozwa soki tosengeli kosalela bokonzi ya Nkolo.

Oyo ezali nsango yango: “Bampaka mingi babengamaki na lisanga na tempelo mpo na baye bango oyo bakanisaki Joseph Smith azalaki Profeta akweya. Balingaki kotia David Whitmer lokola moyangeli ya sika ya Eklezia. … Nsima ya koyokaka makanisi mabe na Profeta, Brigham [Young] atelemaki mpe atatolaki, ‘Joseph azalaki Profeta, mpe nayebi yango, mpe ete kotiola mpe kotuka ye mingi lokola basepelaki; bakokaki kobebisa etinda ya Profeta of Nzambe, bakokaki bobele kobebisa likoki na bango moko, kokata nsinga oyo ekangaki bango na Profeta mpe na Nzambe, mpe kozinda bango moko na lifelo’” (Church History in the Fulness of Times Student Manual [Church Educational System manual, 2003], 2nd ed., 174; see also Teachings of Presidents of the Church: Brigham Young [1997], 79).

Ezali na nsinga oyo ekangi biso na Nkolo na mosala na biso. Ekendaka uta esika kani tobengami mpo na kosala bokonzi, tii na baye babiangami mpo na kokamba likolo na biso na banganganzambe, mpe na profeta, oyo akangami na Nkolo. Esengaka bondimi mpe komikitisa mpo na kosala na esika tobengami, kolikia ete Nkolo abengaki biso mpe baye bakambaka liboso na biso, mpe mpo na kosunga bango na bondimi etonda.

Ekozala na ntango, lokola na mikolo ya Kirtland, oyo tokozala na mposa ya bondimi mpe bosembo ya Brigham Young mpo na kotelama na esika Nkolo abengi biso, bosembo na profeta na Ye mpe na bayangeli Ye atii na esika.

Napesi bino litatoli na ngai ya lipombo mpe ya esengo ete Nkolo Yesu Klisto azali na yenda. Ye azali kokamba Eklezia na Ye mpe basali na Ye. Napesi litatoli ete Thomas S. Monson azali moto se moko oyo asimbi mpe azali kosalela bafungola ya bonganganzambe bozantu na mabele na ngonga oyo. Mpe nasambeli mapamboli na basali banso ya komikitisa oyo bazali kosala na bolingi boye mpe malamu na Eklezia ezongisami ya Yesu Klisto. Natatoli ete Joseph Smith amonaki Nzambe Tata mpe Yesu Klisto, oyo akambaka ye moko. Bango balobaki na Ye. Bafungola ya bonganganzambe ezongisamaki mpo na kopambola bana banso ya Tata ya Lola. Ezali etinda na biso mpe elikia na biso mpo na kosala na esika na biso na likambo ya Nkolo. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.