2010–2019
Mobembo Ezali Kokoba!
Sanza ya zomi 2017


Mobembo Ezali Kokoba!

Bozongeli Tata na biso ya Lola ezali bozongeli ya ntina koleka na babomoi na biso.

Mibu nkama moko ntuku nsambo eleki, Brigham Young atalaki katikati ya Salt Lake Valley na mbala ya yambo mpe asakolaki, “Oyo esika esengeli!”1 Ayebaki esika wana mpamba te Nkolo abimisela ye yango.

Na 1869, koleka Basantu 70,000 basalaki mobembo moko ekokani. Atako bokeseni na bango na monoko, mimesano, mpe ekolo, bakabolaki litatoli ya Tata, Mwana ya Mobali, mpe Molimo Mosantu, Bozongisami ya nsango malamu ya Yesu Klisto, mpe mposa ya kotonga Siona—esika moko ya kimia, esengo, mpe kitoko na bolengeli mpo na Boyei ya Mibale ya Mobikisi.

Elilingi
Jane Manning James

O ntei ya Basantu ya liboso na kokoma na Utah ezalaki Jane Manning James—mwana ya mwasi ya mowumbu moko, mobongwani na Eklezia ezongisamaki, mpe moyekoli moko ya kokamwa mingi oyo akutanaki na mikakatano ya kpokoso. Ndeko mwasi James atikalaki Mosantu ya Mikolo Mya Suka kino liwa na ye na 1908.

Akomaki: “Nalingi koloba mpenza awa, ete bondimi na ngai na nsango malamu ya Yesu Klisto lokola eteyamaki na Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansantu ba Mikolo mya Nsuka, ezako lelo, te, ezali soki ekoki makasi koleka ezalaki mokolo ya yambo nabatisamaki. Nafutaka moko ya zomi mpe makabo na ngai, nabatelaki liloba ya bwania, nakendeke kolala noki mpe nalamukaka noki, namekaka na lolenge na ngai ya moke kopesa ndakisa malamu na banso.”2

Ndeko mwasi James, lokola Basantu ba Mikolo mya Nsuka mingi misusu, atongaki kaka Siona te na makila, motoki mpe mpizoli kasi lisusu balukaki mapamboli ya Nkolo na nzela ya mabongi ya nsango malamu na malamu mingi oyo bakokaki na kokangamaka na bondimi na Yesu Klisto—mobikisi monene na banso oyo na bosolo baluki Ye.

Basantu ba Mikolo mya Nsuka ya Kala bazalaki babonga mpenza te, kasi batiaki likonzi likolo na yango tozali kotonga mabota mpe lingomba ya bato oyo balingi mpe bazali kobatela mayokani, oyo ekembisami na masolo ya nsango kilikili na mokili mobimba mpamba te bomipesi na biso na Yesu Klisto mpe makasi na biso ya bolingi mpo na kosalisa baye bazali mpembeni mpe mosika.3

MMokambi Eyring, nakoki kobakisa maloba na bankoto zomi ya basimizi ya langi ya mosaka ya banzelu kosalisaka na Texas, Mexico, mpe basusu na mboka na yo.

Nazali na bondimi moko ya mozindo ete soki tobungisi mikangano na biso na baye bakei liboso na biso, lokola batata mpe bamama na biso bapionie, tokobungisa yoko bomengo. Nalobeli etali “Bondimi na Etambe Nyonso” na kala mpe ekokoba na nsima mpamba te nayebi ete bankola ya mbuta esengeli kozala na lolenge wana kaka ya bondimi Basantu ya liboso bazalaka na yango na Nkolo Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye.4

Batata mpe bamama na ngai bamoko bapionie bazalaki o ntei ya bapionie ya bondimi oyo babendaki makalo ya maboko, batambwisaki bavango, mpe batambolaki ti Utah. Bango, lokola Ndeko Mwasi Jane Manning James, bazalaki na bondimi ya mozindo na bitambe ya bango nyonso ntango basalaki ya bango mobembo.

Zulunale na bango etondi na ndimbola ya mpasi, nzala, mpe bokono mpe lisusu matatoli ya bondimi na bango na Nzambe mpe nsango malamu ezongisami ya Yesu Klisto.

Bazalaki na biloko ya mokili moke kasi basepelaki na ebele ya mapamboli uta na bondeko ya mibali mpe bondeko ya basi bakutaki na Eklezia ya Yesu Klisto. Ntango bakokaki, batombolaki baniatamaki mpe bapambolaki babeli na nzela ya kosalisana mpe na bonganganzambe ya Nzambe.

Bandeko basi na Cache Valley, Utah, basalisaki Basantu na molimo ya Lingomba ya Bamama Basungi mpo na “kosala na bomoko mpo na kosalisa baye na mposa.”5 Nkokololo na ngai ya mwasi Margaret McNeil Ballard asalaki mpembeni ya mobali na ye, Henry, lokola episikopo ya Palwasi ya Mibale ya Logan mpo na mibu 40. Margaret asalaki mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi mpo na 30 ya mibu wana. Akamataki na ndako na bango babola, babeli, mpe bakufela mibali mpe bana etike, mpe kutu alatisaki bawa na bilamba na bango ya peto ya tempelo.

Atako elongobani mpe ezali na ntina komikundola mobembo ya bapionie Mormon ya ekeke ya 19, tosengeli komikundola ete “mobembo na kati ya bomoi ezali kokoba!” mpo moko na moko na biso ntango tolakisi bosolo ya biso moko “bondimi na bitambe nyonso.”

Elilingi
Bandimi basangani na bisika ya mayangani na bango

Babongwani ya sika basanganaka kala te na pionie mpo na kobanda bingumba na Etazini ya westi. Esika na yango, babongwani basanganaka na mangomba ya bisika na bango, epai Bansantu bakumbamelaka Tata na biso ya Lola na nkombo ya Yesu Klisto. Na mingi koleka mangomba 30,000 etiami na mokili mobimba, banso basangani na Siona na bango moko. Lokola makomi etangi, “Mpo oyo ezali Siona—bapeto na motema.”6

Ntango tozali kotambola na nzela ya bomoi, tomekamaka mpo na komona soki “tokobatela makambo manso oyo [Nkolo] atindi.”7

Mingi na biso bazali na mibembo ya kokamwa ya boyekoli—ekokamba na litondi ya moto mpe bopeli ya molimo. Nzokande, boko na biso bazali na mobembo moko oyo ekokamba na mawa, lisumu, mpe bozangi elikia.

Na esika oyo, palado mituna: Nini ezali nsuka ya mobembo na yo? Wapi matambe na yo ezali komema yo? Mpe mobembo na yo ezali kokamba yo na “ebele ya mapamboli” Mobikisi alaki?8

Mobembo ya kozonga epai ya Tata ya Lola ezali mobembo eleki na motuya ya bomoi na biso, lokola ezali kokoba mokolo na mokolo, poso na poso, sanza na sanza, mpe mobu na mobu ntango tobakisi bondimi na biso na Ye mpe na Mwana Mobali na Ye ya Bolingo, Yesu Klisto.

Tosengeli kosala keba wapi matambe na biso ezali komema biso. Tosengeli kotalela mpe kokeba na toli ya Yesu Klisto na bayekoli na Ye ntango batunaki mituna oyo: “Lobela biso, ntango nini ekoya makambo oyo? Mpe nini ekozala elembo ya boyei na yo, mpe nsuka ya mokili?

“Mpe Yesu ayanolaki mpe alobaki na bango, Bosala keba ete moto te [mpe nakobakisa mwasi] akosa bino te.”9

Lelo nabandeli toli yak ala te ya bakambi ya Eklezia.

  • Bandeko mibali mpe bandeko basi, bobatela malongi ya Klisto peto mpe bokosama te na baye bazali kobebisa malongi. Nsango malamu ya Tata mpe Mwana Mobali ezongisamaki na nzela ya Joseph Smith, profeta mpo na eleko oyo ya nsuka.

  • Boyokemela te baye oyo bakulisami te mpe/to batiamaki pembeni te na libiangi na bango na Eklezia mpe bandimami te na boyokani ya lisanga ya bandimi ya Eklezia.10

  • Bozala na ekenge na mangomba, maboke, to bato basengaka biyano ya nkuku na mituna ya malongi oyo bayebi bapostolo mpe baprofeta ya lelo bazwi to basosoli te.

  • Boyokemela te baye oyo bakosenginia bino na mwango mpo na kozwa bomengo. Bandimi na biso babungisi mosolo mingi mpenza koleka, yango wana bosala keba.

Na bisika misusu, mingi mpenza ya bato na biso bazali kotala elembo mpe koluka boyebi ya nkuku na misala ya ntalo mpe ebongi mpenza te mpo na kopesa libiki mpe lisungi.

Esakola moko endimamaki ya Eklezia, ebimaki mobu moko eleki, elobaki: “Tosengi bandimi ya Eklezia basala keba na kosala elongo na lingomba nyonso oyo elaki—mpo na kozwa mosolo—libiki ya kokamwa to oyo basangeli bazali na nzela ya kafukafu mpo na kozwa nguya ya libiki libanda ya basimbi banganganzambe bakulisama.”11

Buku ya Kokamba Ekleziaepesi toli: “Bandimi basengeli te kosaleka misala ya munganga to libiki oyo ebongi mpenza te na bomoto to leta. Bayangeli ya bisika basengeli kopesa toli na bandimi oyo bazali na kpokoso ya bokolongono ya nzoto mpo na komona basali ya mayele bayekola oyo bazali na mikanda ya leta na bikolo wapi bazali kosala.”12

Bazala na bwania mpe na ekenge ete misala ya boye ekoki kobenda mayoki kasi ekoki na nsuka komonana ya likama mpo na molimo mpe nzoto.

Mpo na bankoko na biso bapionie, lipanda mpe bomikoki ezalaki ya ntina, kasi mposa na bango ya lingomba ezalaki na motuya lokola. Bazalaki kosala elongo mpe kosalisana mpo na kolonga mikakatano ya nzoto mpe ya mayoki na ntango na bango. Mpo na mibali, ezalaki lisanga likoki ya bonganganzambe, mpe mpo na basi basalisamaki na Lingomba ya Bamama Basungi. Mbano oyo ebongwani te na mokolo oyo.

Lingomba ya Bamama Basungi mpe masanga ya banganganzambe epesaka bolamu ya molimo mpe ya nzoto ya bandimi.

Totikala na nzela ya nsango malamu na kozalaka na “bondimi na litambe nyonso” boye tokoki kozonga na likama te na miso ya Tata ya Lola mpe Nkolo Yesu Klisto. Nkolo azali Mobikisi na biso ya ntalo. Ye azali Mosikoli ya Mokili. Tosengeli kokumisa nkombo na Ye ya bule mpe kosalela na lolenge ya mabe te ata moke te, ntango nyonso kobundaka mpo na kobatela mitindo na Ye. Soki tosali yango, Ye akopambola biso mpe akokamba biso kozonga na ndako epai ya Tata ya Lola.

Nabengisi moto nyonso ayoki lokito ya mongongo na ngai ayamba malamu mpe ayamba moko oyo azali kosala mobembo na ye moko lelo, kotala te wapi bazali na mobembo na bango.

Ezali na lipamboli te moto akoki kokabola monene koleka nsango ya Bozongisami, oyo ntango eyambami mpe esalelami, elaki esengo mpe bosepeli ya libela—kutu bomoi ya seko. Tosalela na makasi, mpiko, mpe matatoli na biso na kokalisaka bamisionele mpo na kokitana, koteya, mpe kobatisa bana ya Nzambe boye bakoki kozala na nguya ya mateya ya nsango malamu kokamba bomoi na bango.

Tosengeli koyamba bana ya Nzambe na motema mawa mpe kolongola bizaleli ya kala, lokola koyina ekolo mosusu. Tika elobama ete tondimelaka ya solo mapamboli ya nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto eazali mpo na bana nyoso ya Nzambe.

Natatoli ete “mobembo ezali kokoba,” mpe nabengisi bino ete botikala na nzela ya nsango malamu na kokobaka kowelisa liboso na kosalisaka bana banso ya Nzambe na bolingo motema mawa, mpe maboko ya peto mpo na kozwa “ebele ya mapamboli” kozelaka bango oyo balingi ya solo Nkolo, mpo na yango nasambeli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.