2010–2019
Bosolo ya Makambo Nyonso
Sanza ya zomi 2017


Bosolo ya Makambo Nyonso

Moko na moko na biso azali na mokumba ya ye moko mpo na kosala oyo esengeli mpo na kozwa mpe kobomba litatoli moko ya makasi.

Toyei na mpokwa ya lelo na elikia mpe bondimi ete na ndenge moko, tokolongwa ya kolendisama mpe kopambolama na nzela ya Molimo Mosantu, oyo ateyaka bosolo.1 Ezali na ntina ya boluki na biso ya moto se moko mpo na bosolo y naling kolobela.

Ntango nazalaki elenge mobali, nazalak na mituna mingi oyo etal Eklezia. Mituna na ngai misusu ezalaki ya solo. Misusu ezalaki te mpe esalamaki mpo na ntembe ya basusu.

Mbala mingi nasololaki mituna na ngai na mama na ngai. Nandimi ete akokaki kososola été mingi ya mituna na ngai ezalaki ya solo mpe ewutaki na motema na ngai. Nakanisi azalaki na mwa mawa na mituna wana oyo ezalaki ya solo moke mpe ya kowelana mingi koleka. Nzokande, mokolo moko te ayokisaki ngai mawa mpo na mituna nazalaki na yango.Azalaki koyoka mpe komeka koyanola yango. Ntango asosolaki yango alobaka nyonso oyo akokaki mpe ete nazalaki kaka na mituna, azalaki kolinga koloba likambo moko lokola oyo: “David, wana ezali motuna moko kitoko. Wana yo ozali koluka mpe kotanga mpe kosambela mpo na eyano, mpo na nini yo ozali kosala te makambo oyo oyebi osengeli kosala mpe kosala te te makambo oyo oyebi osengeli kosala te?” Oyo ekomaki ndakisa lpo na mpo na boluki na ngai ya solo. Na nzela ya boyekoli; losambo; kobatela mitindo, Namonaki ete ezali na biyano na mituna na ngai ya motuya. Namonaki lisusu ete mpo na mituna mosusu, esengeli kokoba kozala na bondimi; bompikiliki, mpe bobimisi.2

Mama apesaki ngai mokumba ya kokolisa bondimi mpe kozwa biyango likolo na ngai. Ayebaki ete biyano ya motuya ekoya uta na boluki na ngai ya bosolo na lolenge oyo Tata ya Lola atiaki. Ayebaki ete nasengelaki komona bosolo. Ayebaki ete nasengelaki kozala sembo na mituna na ngai kozala na bolingi ya kosalela oyo nasilaki koyeba kozala solo. Ayebaki ete nasengelaki koyekola mpe kosambela mpe ete nasengelaki kokolisa bompikiliki monene koleka wana ezalaki ngai koluka biyano uta na Nkolo. Bolingi kozala bompikiliki ezali eteni ya boluki na biso bosolo mpe eteni ya lolenge ya Nkolo ya kobimisa bosolo.3

Nsima ya ntango; nayaki koyeba ete mama na ngai azalaki koteya ngai lolenge ya Tata ya Lola mpo na koluka bosolo. Bolingo ekolaki, biyano ebandaki koya; mpe nandimaki libiangiya misio.

Ezalaki na ngonga moko, na ebandeli ya misio na ngai, ntango nasengelaki koyeba soki Eklezia ezalaki solo mpe Joseph Smith azalaki profeta ya Nzambe. Nayokaki oyo Mokambi Thomas S. Monson alobaki polele mpenza na likita linene na biso eleki: “Soki ozali na litatoli ya sikisiki ya makambo oyo te, sala oyo esengeli mpo na kozwa moko. Ezali ntina mpo na yo ozala na litatoli na yo moko na bangonga ya mpasi oyo, mpo matatoli ya basusu ekosalisa yo na ndelo moko esuka.”4 Nayebaki maye masengelaki. Nasengelaki kotanga Buku ya Mormon mpe soko bokosenge na motema wa bosembo, na mokano mwa solo, mpe kotuna Nzambe soki ezali ya solo.

Boyoka elaka kitoko ya Tata ya Lola epesami na profeta Moroni: “Mpe ekozwa bino makambo maye, nalingi kolendisa bino ete bosenge Nzambe, Tata wa Seko, o nkombo ya Klisto soko makambo maye mazali ma solo te; mpe soki bokosenge na motema wa bosembo, na mokano mwa solo, kozalaka na bondimi na Klisto, akomonisa bosolo bwa mango epai ya bino, na nguya ya Molimo Mosantu.”5

Mpo na kozwa maye mazalaki na Buku ya Mormon, nasengelaki kotanga yango. Nabandaki na ebandeli ya Buku yango mpe natangaki mikolo nyonso. Boto bazwaka litatoli nokinoki mpeza. Mpo na basusu, ekozwa ntango mingi mpe nsambo mingi mpe ekoki kozwa kotangaka buku yango mbala mingi. Nasengelaki kotanga buku yango mobimba liboso ya kozwa litatoli elakelama. Nzokande, Nzambe amonisaki bosolo na yango epai na ngai na nzela ya Molimo Mosantu.

Na zulunale na ngai ya misio; nalimbolaki esengo na ngai na koyebaka bosolo lokola mpe liloba na ngai moko ya bomipesi mpe mokano ya solo ya kosalela bosolo oyo nazwaka. Nakomaki: “Nayokanaki na Tata na Lola mpe na ngai moko mpo na kosala nyonso, mpo na kopesa yango makasi na ngai nyonso bomoi na ngai etikali, Eloko nyonso nasengami nakosala,kasi mpo na sikoyo nazali na eteni misio oyo etikali mpe nakosala yango misio monene, moko oyo nakomiyokela mabe te, kasi nakosala bongo te kaka mpo na litomba na ngai, mpo na Nkolo. Nalingi Nkolo, mpe nalingi mosala, mpe kaka nazali kosambela ete liyoki wana ekotika ngai mokolo moko te.”

Nayaki koyeba ete bolei ya ntango nyonso mpe bokobi kosala makasi mpo na koyambola mpe kobatela mitindo esngelami mpo ete liyoki wana ekima mokolo moko te. Mokambi Monson alobaki, “Litatoli esengeli kobatelama na ntina mpe na bomoi na nzela ya botosi ya mitindo ya Nzambe ntango nyonso mpe na nzelansambo ya mokolo na mokolo mpe boyekoli makomi.”6

Nsima ya mibu, natunaki bamisionele mpe bilenge bato na mokili mobimba lolenge nini babandaki bokasi na bango moko mpo na koluka bosolo mpe kozwa litatoli. Penepene moto nyonso oyo natunaka, bayanolaka ete bokasi na bangomei elongaka litatoli ya bango moko ebandaki na mokano na bango moko ya kotanga Buku ya Mormon kobanda na ebandeli, mpe kotuna Nzambe soki ezali ya solo. Na kosalaka yango, baponi “kosala” na esika ya kozalaka “kosalema likolo”7 na ntembe ya basusu.

Mpo na koyeba bosolo, tosengeli kotia nsango malamu na misala 8 mpe “kosalela”9 liloba. Tokebisami totelemela molimo ya Nkolo te.10 Boyamboli, esangisami na mokano ya kobatela mitindo, ezali eteni ya motuya ya boluki ya bosolo ya moto moko na moko.11 Yango wana, tokoki kozala na mposa kozala na bolingiya “kobwakisa nyonso” ya biso masumu mpo na koyeba bosolo.12

Totindami “toluka boyekoli, kutu na nzela ya botangi mpe lisusu na nzela ya bondimi” mpe “koluka … na babuku ya malamu maloba ya bwania.”13 Boluki na biso ya bosolo esengeli kotala malamu “babuku ya malamu mpenza” mpe maziba ya malamu mpenza. Kati na ya malamu mingi mpenza ezali makomi mpe maloba ya baprofeta na bomoi.

Mokambi Monson asengi moko na moko na biso “tosala [maye] masengeli” mpo na kozwa mpe kobatela litatoli makasi.14 Nini esengeli mpo ete litatoli na yo ekoma mozindo mpe elenda? Moko na moko na biso azali na mokumba ya ye moko ya kosala maye masengeli mpo na kozwa mpe kobatela litatoli makasi.

Kobatelaka na bompikiliki mayokani na biso wana ezali biso “kosala [maye] masengeli” mpo na kozwa biyano uta na Nkolo ezali eteni ya lolenge ya Nzambe mpo na koyekola bosolo. Mingi mingi ntango makambo ezali mpasi, tokoki kosengama “kotika na bosepeli mpe bompikiliki na bolingi bonso ya Nkolo.”15 Kobatela boyokani na bompikiliki ebutisaka bomikitisi na biso, epesaka mozindo na mposa na biso ya koyeba bosolo, mpe epesaka nzela na Molimo Mosantu mpo na “kokamba [biso] o nzela ya bwania ete [to] koka kopambolama, kozwa bomengo, mpe kobatelama.”16

Mwasi na ngai, Mary, mpe ngai tozali na moto moko tolingaka makasi oyo abundi mpo na bomoi na ye mingi na makambo mingi ya Eklezia. Alingaka nsango malamu, mpe alingaka Eklezia kasi azali na mituna kino sikawa. Akangisami na tempelo, azali active na Eklezia, akokisaka mabiangi na ye, mpe azali mama mpe mwasi ya kafukafu. Mibu mileki, ameki kosala makambo wana oyo ayebaki kozala solo kasi aboyaki kosala makambo wana oyo ayebaki kozala mabe. Abateli mayokani na ye mpe akobi koluka. Ntango mosusu, azali na botondi ya kolendisama na nzela ya bondimmi ya basusu.

Kala te episikopo na ye asengaki komona ye mpe mobali na ye. Asengaki bango bandima mokumba ya tempelo ya kosala lokola bazwili mpo na baoyo basengelaki na makuli ya tempelo. Libiangi oyo ekamwisaki bango ; kasi bandimaki mpe babandaki mosala na bango na ndako ya nkolo. Mwana na bango ya elenge mobali asalaka elongo na boluki ya bonkoko ya libota kala te mpe amonaki nkombo moko ya libota mpo na yango makuli ya tempelo esalamaka te. Na nsuka basalaki lokola bazwili mpe basalaki makuli ya tempelo mpo na moto oyo mpe libota na ye. Ntango bafukamaki na etumbelo mpe makuli ya bokangisi esalamaki, mwasi oyo ya kafukafu, ya bompikiliki oyo aluki ntango molai azwaki boyebi ya molimo ya yemei na nzela na yango ayaki koyeba ete tempelo mpe makuli oyo esalami kuna na kati ezali sikisiki mpe solo. Abengaki mama na ye mpe ayebisaki ye likambo na ye mpe alobaki ete atako azali kaka na mwa mituna, ayebi ete tempelo ezali solo, ete makuli ya tempelo ezali solo, mpe ete Eklezia ezali solo. Mama na ye alelaki na botondi mpo na Tata ya Lola moko wa bolingo, wa bompikiliki mpe mpo na mwana moko ya mwasi oyo na bompikiliki akobaki koluka.

Mobateli mayokani ya bompikiliki amemaka mapamboli ya lola kati na bomoi na biso.17

Nazwi libondi makasi na elaka ya Nkolo ete “na nguya ya Molimo Mosantu bokoki koyeba bosolo bwa makambo manso.”18 Na kozanga koyeba makambo nyonso, tokoki koyeba bosolo. Tokoki koyeba ete Buku ya Mormon ezali solo. Ya solo, lokola Mokambi Russell M. Nelson ateyaki nsima ya nzanga oyo, tokoki “koyoka, mozindo ‘na nse mpenza’ ya motema na biso [tala Alma 13:27], ete Buku ya Mormon ezali na ntembe te liloba ya Nzambe.” Mpe tokoki “koyoka yango na mozindo mpenza ete tokokoka kozanga yango ata mokolo moko te.”19

Tokoki koyeba ete Nzambe azali tata na biso, oyo alingaka biso; mpe ete Mwana na Ye; Yesu Klisto, azali mobikisi mpe Mosikoli. Tokoki koyeba ete kimondimi kati na Eklezia na Ye esengeli kolingama mpe ete bolei elambo poso na posa ekosalisa biso mpe libota na biso ezala na kimia. Tokoki koyeba ete na nzela ya makuli ya tempelo, mabota solo makoki kozala elongo mpo na libela. Tokoki koyeba ete Bomikabi ya Yesu Klisto mpe mapamboli ya boyamboli mpe bolimbisi ewali sikisiki mpe solo. Tokoki koyeba ete profeta na biso wa bolingo, Mokambi Thomas S. Monson, azali profeta ya nkolo mpe ete bapesi toli na ye mpe bato ya Lisanga Likoki ya Bazomi na Mibale bazali bapostolo, baprofeta, bamoni, mpe babimisi.

Nyonso oyo nayebi ezali solo mpe natatoli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.