2010–2019
Mongongo ya Nkolo
Sanza ya zomi 2017


Mongongo ya Nkolo

Nalaki bino ete ntango olengeli molimo na bino, mpe boye na elikia ete bokoyoka mongongo ya Nkolo, makanisi mpe mayoki ekoya na moto na bino.

Yambo, liloba ya boboto mpo na mwa bana mike. Iyo, oyo ezali liyangani ya nsuka, mpe Iyo, nazali molobi ya nsuka.

Kala, wana ekendaki ngai kotala Ndako ya Tempelo ya Provo City, Nasepelaki liyemi ya langi babengi First Vision, from Afar. Liyemi ya langi elakissi pole mpe nguya wuta na lola wana Tata mpe Mwana bayaki kotala elenge Joseph Smith.

Elilingi
Limoni ya Yambo uta na Mosika

Wana ezali ngai te kosala bomekoli na likambo ya bule mpenza oyo ezalaki ebandela ya Bozongisi, nakoki kokanisa elilingi ya lolenge moko oyo ekokaki kotalisa pole mpe nguya ya molimo ya Nzambe kokitaka likolo ya likita linene oyo mpe, na nsuka, nguya wana kotambolaki na mokili mobimba.

Elilingi
Pole mpe nguya ya molimo kokitelaka likolo ya likita linene
Elilingi
Nguya mpe pole kopanzanaka na mokili mobimba

Napesi bino litatoli na ngai ete Yesu azali Klisto, ete Azali kokamba makambo ya mosala ya bule oyo, mpe ete likita linene ezali moko ya bangonga ya motuya mpenza Ye apesaka boyangeli epai ya Eklezia na Ye mpe na biso yemei.

Koteyamaka wuta na Likolo

Mokolo Eklewia ebongisamaki, Nkolo aponaki Joseph Smith profeta, momoni, mpe apostolo ya Nkolo Yesu Klisto 1 mpe alobelaki Eklezia:

“Mpo bokozwa liloba na ye, lokola soki ezalaki na monoko na ngaimei, na bompikiki mpe bondimi nyonso.

“Mpo na kosalaka makambo oyo bikuka ya lifelo ekofungwama te mpo na bino; … mpe Nkolo Nzambe akopanza banguya ya molili liboso na bino, mpe akosala ete balola eningana mpo na bolamu na bino.”2

Nsima, bato nyonso ya bokambi ya yambo mpe Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mobale basungamaki mpe babulisamaki mpo na kozala baprofeta, bamoni, mpe babimisi.3

Sikawa, wana ezali biso kokutana na nse ya boyangeli ya Mokambi Thomas S. Monson, tosakoli koyokaka “bolingi ya Nkolo, … mayele ya Nkolo, … mongongo ya Nkolo, mpe nguya ya Nzambe mpo na lobiko.”4 Tosengeli kolikia na elaka na Ye: “Atako na mongongo ya ngamei to na mongongo ya basali na ngai, ezali ndenge moko.”5

Na makelele mpe mobulungano ya mokili ya sika, kolikiaka mpe kodimelaka maloba ya Bakambi ya Yambo mpe ya Lisanga Likoki ya Bazomi na Mibale ezali ntina mpo na bokoli ya molimo mpe bompikiliki na biso.6

Tosangani mpo na likita ya kafukafu oyo. Bamilio ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka Millions mpe bato ya biyamba mosusu na mingi koleka bikolo 200, kolobaka mingi koleka nkota 93, bazali na mayangani oyo to bazali kotanga nsango ya likita.

Toyei nsima ya kosambela mpe komilengela. Mpo na mingi na biso, babobangi oyo ezali kosenga bokebi ya mbangu mbangu mpe na mituna ya mpasi. Tolingi kozongisa sika bondimi na biso kati na Nkolo na biso, Yesu Klisto ateyaki wuta na likolo.

Mayele mpe Bolingi

Mpo Bakambi ya Yambo mpe Bazomi na Mibale, oyo balobaka mpenza na likita moko na moko, mokumba kafumba ya kolengela nsango na bango ezali nyonso mibale mokumba ya kozongelaka lisusu mpe kondima ya bule nyonso mibale mokumba ya kozongelaka lisusu mpe kondima ya bule.

Mibu mileki, liboso ya kosala lokolla Mokambi Monene, Natunaki Mpaka Dallin H. Oaks soki alengelaki lisikulu ekabwana mpo na likita ya likonzi moko na moko. Ayanolaki ete akabolaki te kasi abakisaki, “Kasi masikulu na ngai ya likita linene ezali ya kokesana. Ekoki kozwa babrouillon 12 kino 15 mpo na kondima ete nazali koloba maye Nkolo alingi ngai naloba.”7

Ntango nini mpe boniboni bofuli mpo na masikulu ya likita eyaka?

Elonga na bozangi kopesama lisikulu, tomoni bonzenga ya mosala ya lola mpe makambo ya bosolo ya seko na likita nyonso mpenza.

Moko ya bandeko na ngai ayebisaki ngai ete mama ya likambo na ye mpo na likita oyo epesamelaki ye nokinoki nsima ya lisikulu na ye ya sanza ya minei eleki. Mosusu alobaki baposo misato eleki ete, azalaki  naino kosambela mpe kolikia na Nkolo. Mosusu, ntango natunaki ntango boni ezwaki mpo na kokoma lisikulu moko mingi mingi ya mozindo, ayanolaki, “Mibu ntuku mibale na mitano.”

Ezali na bangonga ntango mama ya likanisi ekoki koya nokinoki, kasi makambo ya kati mpe makambo ya mikemike ezali naino kosenga bokasi ya molimo monene. Kokila mpe losambo, boyekoli mpe bondimi, ezali ntango nyonso eteni ya nzela ya kolanda. Nkolo alingi lokuta moko te kokitisaka mongongo na ye epai ya Basantu na Ye.

Ntango boyangeli mpo na lisikulu ya likita linene eyaka, eyaka mbala mingi kati na butu to na bangonga ya ebandeli ya ntongo, ntango lisikulu ezali mosika wuta na makanisi ya moto. Na mbakaka, limoni moko emonani na miso mpe, ezali na bangongo, maloba mpe banzela ya maloba ya kafukafu esopani lokola bobimisi ya peto.8

Wana ezali yo koyoka, bansango ozali kozwa ekoki kozala likolo likolo to ekoki kozala kaka mpo na yo.

Kolobaka mibu mileki na likita linene, nalobelaki liloba moko oyo ekotaki na moto na ngai ntango namitunaki soki namilengelaki mpo na kosala misio. Liloba yango ezalaki “Oyebi makambo nyonso te, kasi oyebi ekoka!”9 Elenge mwasi kofandaka na likita linene mokolo wana alobaki ete azalaki kosambela na ntina ya elaka ya libala, komitunaka boniboni malamu ayebaki elenge mobali. Ntango nalobaki liloba “Oyebi makambo nyonso te, kasi oyebi ekoka,” Molimo alobaki epai na ye ete ye mpenza ayebaki ye malamu ekoka. Babalani na esengo mpo na mibu ebele.

Nalaki bino ete ntango olengeli molimo na yo, mpe oye na elikia ete okoyoka mongongo ya Nkolo, makanisi mpe mayoki ekoya na moto na yo oyo esalami mingi mingi mpo na yo. Osilaka koyoka yango na likita oyo, to okoyoka, ntango okoyekola nsango yango na baposo ekoya.

Mpo na Sikawa mpe Basanza Ekoya

Mokambi Monson alobaki:

“Bozwa ntango ya kotanga nsango ya likita linene.”10

“Bomaniola [yango]. … Namoni … ete nazwi kutu mingi koleka wuta na masakoli oyo ntango nayekoli yango na mozindo.”11

Mateya ya likita linene ezali makambo oyo Nkolo alingi biso tomaniola na basanza ekoya.

Mobateli mpate “akotambolaka liboso [mpate na ye], mpe bampate bakobilaka ye: mpo ete bayebi mongongo na ye.”12

Mbala mingi, mongongo na Ye elakisaka biso tobongola eloko moko na bomoi na biso. Abengisi biso toyambola. Abengisi biso “tobila Ye.”

Kanisa na ntina ya maloba oyo ewuti na likita linene;

Mokambi Henry B. Eyring na ntonga ya lelo: “Napesi litatoli na ngai ete Nzambe Tata azali na bomoi mpe alingi bino boya ndako epai na Ye. Oyo ezali Eklezia ya solo ya Nkolo Yesu Klisto. Ayebi bino, mpe Ye azali kokengela bino.”13

Mokambi Dieter F. Uchtdorf from yesterday: “Natatoli ete ntango tokoti likolo to tokobi mobembo ya kokamwa oyo ekambi epai ya Nzambe, babomoi na biso ekozala malamu mingi koleka…  mpe Nkolo akosalela bison a ndenge ya kokamwa mpo na kopambola baoyo bazali nzinga nzinga na biso, mpe komema pene ya bantina na ye ya seko.”14

Mokambi Russell M. Nelson lobi na mpokwa: “Nalaki ete wana ezali yo komizindisa mokolo na mokolo kati na Buku Mormon, okoki kobatelama na mabe ya mokolo, kosangisaka kutu bokono ebendaka ya ponogalafi mpe babokakemi mosusu ya moto mpasi.”15

Mpaka Dallin H. Oaks lobi: “Natatoli ete esakola likolo ya libota ezali liloba ya bosolo ya seko, bolingi ya Nkolo mpo na bana na ye.”16

Mpe Mpaka M. Russell Ballard uta mwa miniti moke eleki: “Tosengeli koyamba bana ya Nzambe na mawa mpe kolongola mabe nyonso, ndakisa, bokabwani na loposo, bokabwani na kimobali to kimwasi, mpe bokabwani na bikolo.”17

Mpo ete na miniti moko ebakisama, nalingi bobele kobakisa mwa likanisi na ntina ya mpaka Robert D. Hales. Bokambi ya Yambo eyebisaki Mpaka Hales ete akokaki kopesa nsango moke na liyangani ya Eyenga na ntongo soki nzoto ekokaki kosala yango. Ntango nzoto eboyaki, alengelaki nsango, oyo asilisaki mposo eleki mpe akabolaki na ngai. Akufi bantango misato eleki, nazali kokabola bobele minkoloto misato ya lisikulu na ye.

Kotangaka Mpaka Hales: “Ntango toponi kozala na bondimi, tolengelami mpo na kotelema liboso ya Nzambe. … Nsima bobakami ya Mobikisi, Abimelaki bobele na baoyo ‘bazalaki na bondimi epai na [Ye] ntango bazalaki na bomoi.’ [D&A 138:12.] Baoyo ‘babwakisaki matatoli … ya … baprofeta [bakoki te] kotelema liboso [ya Mobikisi], to kotala elongi na ye.’ [D&A 138:21.] … Bondimi na biso elengelaka biso tozala liboso ya Nkolo.”

Lolenge nini ya Nkolo ya kolakisa Mokambi Russell M. Nelson bobele na nsuka ya liyangani ya ntongo oyo mpo na kolongwa na lombengo, kokima bilei na ye, mpe kokende mbango  na pene ya Mpaka Hales, epai wapi akokaki koya mpe kozala kuna, mokambi na ye ya likonzi likoki, elongo na anzelu Mary Hales lokola Mpaka Hales azwaki na nkufa.

Kolandaka Mongongo ya Nkolo

Natatoli ete na likita oyo toyoki mongongo ya Nkolo..

Tosengeli kobangisama ntango maloba ya basali ya Nkolo kotelemela makanisi ya mokili, mpe ntango mosusu makanisi na bisomei. Ezali tango nyonso lolenge oyo. Nazali mbala na mbale likolo ya mabolongo na ngai kati na tempelo elongo na bandeko na ngai mpe, na tatoli bolamu ya bomoi na bango. Mposa na bango ya monene ezali kosepelisa Nkolo mpe kosalisa bana ya Nzambe bazonga na miso na Ye.

Bantuku Nsambo; Baboepisikopo; Babokambi ya Lingomba Linene ya Bamama Basungi, ya Bilenge Basi, mpe Eteyelo ya bana; mpe bakambi mosusu ya masanga malandi babakisi bofuli ya kafukafu na likita oyo, lokola mpe ebakisi miziki kitoko mpe nsambo ya boboto.

Ezali na libula ya bokambi ya lola oyo ezali kozela bomoni nay o kati ya bansango ya likita linene. Momekano mpo na moko na moko na biso ezali lolenge nini tozali koyanola na maye toyoki mpe nini tomiyoki.

Tika ngai nakabola likambo moko etali koyanola maloba ya bobikoli ewuti na bomoi ya Mokambi Russell M. Nelson:

Na 1979, mibu mitano liboso ya libiangi na ye kozala Mokambi Monene, Ndeko mobali Nelson akendaki na liyangani kaka liboso ya likita linene. Mokambi Spencer W. Kimball “asengaki banso oyo bazalaki kuna basala mingi koleka oyo balaki kosala na komemaka nsango malamu na mokili mobimba. Kati na bikolo Mokambi Kimball alobelaki mingimingi ezalaki China, kolobaka, ‘Tosengeli tozala na mosala mpo na bachinua. Tosengeli koyekola lokota na bango. Tosengeli kosambela mpo na bango mpe kosalisa bango.’”18

Elilingi
Mokambi RussellM. Nelson lokola dokotolo

Ntango azalaki na mibu 54, Ndeko mobali Nelson azwaki liyoki na ntango ya liyangani ete asengelaki koyekola lokota ya Mandarin. Atakia azalaki mopasoli motema ya mosala mingi, nokinoki awzaki molakisi.

Ntango molai te nsima ya kobanda boyekoli na ye, Dr. Nelson, kozalaka na convensio, na kokanela moko te amimionaki kofandaka pembeni ya “mopasoli moko ya mayele, Dr. Wu Yingkai. … Lokolo [Ndeko mobali Nelson] azalaka koyekola Mandarin, abandaki lisolo [moko] [elongo na Dr. Wu].”19

Elilingi
Dr. Russell M. Nelson na Dr. Wu Yingkai

Mposa ya Dr. Nelson ya kolanda profeta ekambaki ye epai ya Dr. Wu oyo ayaki mobembo na Salt Lake City mpe Dr. Nelson kokendaka mobembo na Chine mpo na kotangisa mpe kosala balopaso.

Bolingo na ye mpo na Bato ya Chine, mpe bolingo mpe limemia na bango mpo na ye, ekolaki.

Na sanza ya mibale 1985, basanza zomi nsima ya libiangi na ye na Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale, Mpaka Nelson nazwaki mbela ya mbalakaka ya telefoni wuta na Chine kosengaka Dr. Nelson aya na Beijing mpo na kopasola motema ya maladi ya moyembi ya opera ayebana mingi koleka ya Chine. Na bolendisi ya Mokambi Gordon B. Hinckley, Mpaka Nelson azongaki na Chine. Lopaso ya nsuka asala naino te ezalaki na Republika Populaire ya Chine.

Elilingi
Mokambi RussellM. Nelson akumisamaki

Kaka mibu mibale, na sanza ya zomi 2015, Mokambi Russell M. Nelson apesamaki lisusu lokumu na esakola ya leta, kobengaka ye an “moninga ya kala ya Chine.”

Bongo lobi toyokaki Mokambi Russell M. Nelson ya mibu 93 sikawa kolobela bonsenga ya Mokambi Thomas S. Monson epai ya “moko na moko na biso [na likita ya sanza ya minei] na losambo ayekola mpe amaniola Buku ya Mormon mokolo moko na moko.”

Kaka lokola esalaki ye ntango azalaki mopasoli motema asalaka mingi, ntango ye azwaki na mosala molakisi ya Mandarin, Mokambi Nelson nokinoki azwaki toli ya Mokambi Monsonmpe asalelaki yango na bomoi na ye moko. Mingi koleka kaka kotanga, alobaki ete ye “asalaki molongo ya nini Buku ya Mormon ezali, nini elobeli, nini ezali koboya, nini ezali kokokisa, nini ezali koloba polele, mpe nini ezali kobimisa.20

Mpe nsima, ntina koleka, kaka na ntongo oyo, lokola motatoli ya mibale, Mokambi Henry B. Eyring alobaki lisusu na ntina ya eyano na ye epai ya likebisi ya Mokambi Monson. Bomikundoli maloba oyo?  “Lokola mingi kati na bino. Nayokaki maloba ya profeta lokola mongongo ya Nkolo epai na ngai. Mpe lisusu lisusu lokola mingi na bino, nazwaki mokano ya kotosa maloba wana.”21

Ekoki biso komona oyo lokola bandakisa mpo na bomoi na bisomei

Elaka mpe Lipamboli

Nalaki ete wana ezali yo koyoka mongongo ya nkolo epai na yo na mateya ya likita linene oyo, mpe, mpe nsima salela babotindiki wana, okoyoka loboko ya lola likolo na yo, bomoi nay o mpe bomoi ya baye bazali nzinga nzinga nay o ekopambolama.22

Na ntango ya oyo likita, tokanisi profeta na biso wa bolingo. Tolingi yo, Mokambi Monson. Nasukisi na liloba epesamaki wuta na elobelo oyo. Nabanzi ezali lipamboli oyo alingi kopesa na moko na moko biso lelo, azalaki na makoki ya kozala elongo na biso. Alobaki: “Wana ezali biso kotika likita oyo, Nasengi mapaboli ya lola ekita likolo ya moko na moko na bino. … Nasambeli Tata na biso ya Lola akopambola bino mpe mabota na bino. Tika nsango mpe molimo ya likita oyo ezala na liloba na nyonso oyo ozali kosala—kati na bandako na bino, kati na mosala na bino, kati na mayangani na bino, mpe kati na manso makoya mpe makokende na bino.”

Asukisaki: “Nalingi bino. Nasambeli mpo na bino. Tika Nzambe apambola bino. Tika kimia na Ye elakama ezala na bino sikawa mpe ntango nyonso.”23

Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Doctrine et Alliances 21:1.

  2. Doctrine et Alliances 21:5–6.

  3. Joseph Smith akomaka ete oyo elandi esalamaki na bobulisi ya Tempelo ya Kirtland na sanza ya misato 27, 1836:

    “Nsima nalobaki na mokuse, mpe nabiangaki masanga makoki mingi, mpe lisanga nyonso ya Basantu, bandima Bakambi ya [Yambo] lokola Baprofeta mpe Bamonis, mpe basungi bango na nsambo na bango. Banso bayokanaki kosala bongo, na kotombola.

    “Nsima nabiangaki masanga makoki mpe lisanga ya Basantu bandima Bapostolo Zomi na Mibale, oyo balaki wana, lokola Profeta, Bamoni, babimisi, mpe banzeneke ya kafukafu epai ya bikolo nyonso ya mabele, kosimbaka bafungola ya bokonzi, mpo na kofungola yango, to kosala yango ekoka kosalama, kati na bango, mpe basungi bango na nsambo na bango, oyo bandimi na kotombola” ( Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith [2007], 199).

  4. Doctrine et Alliances 68:4.

  5. Doctrine et Alliances 1:38.

  6. Mokambi Henry B. Eyring alobaki:

    “Boponi ya koboya kolanda toli ya bobikoli engolaka nzela ya bomoi likolo na yango totelemi. Ekomaka ya likama koleka. Bozangi ya kolanda toli bobikoli ekitisaka nguya na biso ya kondima toli efulama na mikolo ekoya. Ntango malamu ya kozwa mokano ya kosalisa Nowa atonga masuwa ezalaki mbala ya yambo ntango asengaki. Ntango nyonso asengaki nsima na yango, boboyi moko na moko mpo na koyangola ekitisaki boyokeli Molimo. Mpe lisusu ntango nyonso bonsenga na ye emonanaki kozala bozoba, kino mvula eyaki. Mpe ntango elekaki mpenza.

    “Ntango nyonso na bomoi na ngai ntango naponi kozongisa nsima kolanda toli efulama to nakani ete nazalaki ya kokesana, nayaki koyeba ete namitiaka na nzela ya mpasi. Ntango nyonso oyo nayoki toli ya baprofeta, nayoki yango kofandisama kati na losambo, mpe nsima nalandi yango, namoni ete nakei liboso epai ya kimia” (“Finding Safety in Counsel,” Ensign, Sanza ya 1997, 25).

  7. Tala Neil L. Andersen, “Teaching Our Children to Love the Prophets,” Ensign, Sanza ya Minei 1996, 47.

  8. Boyd K. Packer alobaki mokolo mosusu:

    “Nayokaki Mokambi Harold B. Lee kobanda maloba mingi etali makambo matali bobimisi na liloba moko na eloko moko lokola oyo: ‘Na bangonga ya ebandeli ya ntongo, wana ezalaki ngai komaniola na ntina ya mama ya likambo wana …’ Asalaki yango momesano ya kosala na malili, bangonga ya kimia ya ebandeli ya ntongo na ntina ya makambo oyo esengaka bobimisi.

    “Nkolo ayebaki likambo moko ntango Ye akambaki na Doctrine et Allliances, ‘Botika kolala ntango molai kolenka oyo esengelil; Bokende kolala ntango malamu, mpo na ete bokoka kolemba te; bolamuka ntongo ntongo, mpo ete banzoto na bino mpe molimo ezala makasi.’ (D&A 88:124.) …

    “Nayekoli nguya ya liloba, ‘Soki olali ntango malamu, okolamuka ntongo ntongo.’ Ntango nazali na mitungisi, okomona ngai te miso ya kofungwama tii na katikati ya butu. Nakolinga kosala mingi te soki kozala na mbeto te avant mpe kolamuka na bangonga ya yambo ya ntongo. Ntango nakoki kozala pembeni ya Ye oyo akambi mosala oyo” (Teach Ye Diligently [2005], 244–45).

  9. Neil L. Andersen, “You Know Enough,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2008, 13.

  10. Thomas S. Monson, “Until We Meet Again,” Liahona, Sanza ya Mitano 2014, 115.

  11. Thomas S. Monson, “God Be with You Till We Meet Again,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko 2012, 110.

  12. Yoane 10:4.

  13. Henry B. Eyring, “Fear Not to Do Good,” Liahona, Nov. 2017, 103.

  14. Dieter F. Uchtdorf, “A Yearning for Home,” Liahona, Nov. 2017, 22, 24.

  15. Russell M. Nelson, “The Book of Mormon: What Would Your Life Be Like without It?Liahona, Sanza ya Zomi na Moko 2017.

  16. Dallin H. Oaks, “The Plan and the Proclamation,” Liahona, Nov. 2017, 30.

  17. M. Russell Ballard, “The Trek Continues!Liahona, Nov. 2017, 106.

  18. Spencer J. Condie, Russell M. Nelson: Father, Surgeon, Apostle (2003), 215.

  19. Spencer J. Condie, Russell M. Nelson, 215.

  20. Russell M. Nelson, “The Book of Mormon: What Would Your Life Be Like without It?” 61.

  21. Henry B. Eyring, “Fear Not to Do Good,” 100.

  22. Gordon B. Hinckley alobaka mokolo moko:

    “Momekano ekoya kati na kosalela mateya epesami.Soki, awa, tozali mwa boboto, soki tozali mwa na bozalani mingi koleka, soki topusani pembeni ya Mobikisi mingi koleka, na mokano ya sikisiki mongi koleka mpo na kolanda mateya na Ye mpe ndakisa na Ye, boye likita ekozala na elonga moko ya kafukafu. Soki na kasi, ezali na bokoli moko ten a bomoi na biso, nde baoyo balobi balobaki mpenza na mpamba.

    “Bongwana wana ekoki komekolama te na mokolo moko to poso moko to sanza moko te. Mikano esalaka nokinoki mpe kobosanama nokinoki. Kasi, nsima ya mobu moko wuta sikawa, iftozali kosala malamu koleka tosalaki kala, nsima babokasi ya mikolo oyo elingaki kozala ya mpamba te” (“An Humble and a Contrite Heart,” Ensign, Sanza ya Zomi na Moko 2000, 88).

  23. Thomas S. Monson, “A Word at Closing,” Liahona, Sanza ya mitano 2010, 113.