2010–2019
Ntalo eleki Ndelo
Sanza ya zomi 2017


Ntalo eleki Ndelo

Tokoki mbala mingi mpenza koyoka nungunungu ya elengi ya Molimo Mosantu, kondimisaka bosolo ya motuya ya molimo na biso.

Ntango nakendeki na ekolo ya Sierra Leone na Africa ya Westi, nazalaki elongo na bosangani moko etambwisamaki na moyangeli moko ya Eteyelo ya Bana ya likonzi. Mariama akambaki na bolingo, ngolu, mpe bondimi ezalaki pete obanza ete azalaki mondimi moko ya kala na Eklezia. Nzokande, azalaki na ye mobongwani ya sika.

Elilingi
Mariama and her daughter

Leki na ye ya mwasi akotaki na Eklezia mpe abengisaki Mariama akende na kelasi ya Eklezia elongo na ye. Nsango ebetaki Mariama mpenza. Liteya yango ezalaki na mobeko ya kosala ekobo te. Asengaki na bamisionele bateya ye mingi koleka mpe nokinoki azwaki litatoli ya Profeta Joseph Smith. Abatisamaki na 2014, mpe mwana na ye ya mwasi abatisamaki sanza eleki. Kanisa, mateya mibale ya ntina oyo ememaki mbongwana ya Mariama ezalaki mobeko ya kosala ekobo te mpe profeta Joseph Smith, makambo mibale mokili mbala mingi emonaka ya ntina te, ya kala, to esengeli te. Kasi Mariama atatolaki ete azalaki lokola mpomboli moko babendaki na mwinda. Alobaki, “Ntango nakutanaki na nsango malamu, namikutaki.”Asosolaki motuya na ye na nzela ya mabongi ya bonzambe. Ntalo na ye lokola mwana mwasi ya Nzambe ebimisamelaki ye na nzela ya Molimo Mosantu.

Sikawa totala bandeko basi Singh ya Inde. Renu, mosika na loboko ya mobali, ya liboso na bana basi mitano oyo akotaki na Eklezia, akabolaki makanisi maye:

Elilingi
Ndeko ya Singh ya mwasi

“Liboso nabanda koluka Eklezia, nazalaki koyoka mpenza te ete nazalaki mpenza ya kafukafu. Nazalaki bobele moko na bato mingi, mpe lingomba mpe momesano na ngai eteyaki ngai mpenza te ete nazalaki na ntalo lokola moto. Ntango nayekolaki nsango malamu mpe nayokaki ete nazalaki mwana mwasi ya Tata na biso na Lola, ebongolaki ngai. Na mbalakaka namiyokaki mpenza ya kafukafu—Nzambe, ya solo akelaki ngai mpe akelaki molimo na ngai mpe bomoi na ngai na ntalo mpe na ntina.

“Liboso nazwa nsango malamu na bomoi na ngai, nazalaki kolakisa na basusu ete nazalaki ya kafukafu. Kasi ntango nayekolaki bosolo, ete nazali mwana mwasi ya Nzambe, nasengelaki te kondimisa eloko moko na moto. Nayebaki ete nazalaki ya kafukafu. …Kokanisa mokolo moko te ete ozali eloko mpamba.”

Mokambi Thomas S. Monson alobaki yango malamu mpenza ntango atangaki maloba oyo: “Ntalo ya molimo ezali kokoka na yango mpo na kokoma lokola Nzambe.”1

Elilingi
Taiana

Kala te napambolamaki na kokutana na elenge mwasi moko oyo asosolaki bosolo oyo lokola. Nkombo na ye ezali Taiana. Nakutanaki na ye na Primary Children’s Hospital na Salt Lake City. Taiana azalaki elenge moke na ecole scondaire ntango azwamaki na cancer. Abundaki etumba ya mpiko sanza 18 liboso akufa mwa baposo moke eleki. Taiana azalaki atonda na pole mpe bolingo. Ayebanaki mpo na koseka na ye oyo esekisaka basusu mpe elembo na ye mpenza ya “misapi mibale likolo.” Ntango basusu bazalaki kotuna, “Ntina nini, Taiana?” eyano na ye ezalaki, Ntina nini ngai te? Taiana alingaki kokoma lokola Mobikisi, oyo ye alingaki mingi mpenza, Na mobembo na ngai, nayekolaki ete Taiana asosolaki bolongobani na ye ya bozambe. Koyebaka azalaki mwana ya Nzambe epesaki ye kimia mpe mpiko mpo na kotelemala momekano na ye eluta na lolenge ya malamu oyo asalaki.

Mariama, Renu, mpe Taiana bateyi biso ete Molimo ekokotisa na moko na moko na biso ntalo ya bonzambe na biso. Koyebaka ya solo ete ozali mwana mwasi ya Nzambe ekobongola lolenge nyonso ya bomoi na yo mpe ekokamba yo na kosalisa oyo kosalisa mokolo na mokolo. Mokambi Spencer W. Kimball alimbolaki na maloba oyo ya nkembo:

“Nzambe azali Tata na yo. Ye alingaka yo. Ye mpe mama na biso na lola batii yo ntalo eleki ndelo. …Ozali yo moko kaka. Moko ya lolenge moko, osalama na mayele ya seko oyo epesi yo likoki mpo na bomoi ya seko.

“Kotika te ntembe ezala na mayele na yo etali ntalo na yo lokola moto. Ntina mobimba ya nsango malamu ezali kopesa libaku na moko na moko na bino mpo na kokoma na bokoki na yo mobimba mpenza, oyo ezali bokoli ya seko mpe bokokisi bonzambe.”2

Tika nakangama na mposa ya kokesanisa katikati ya maloba mibale: motuya mpe bolongobani. Ezali eloko moko te. Motuya ya molimo elingi koloba tomitia ntalo lolenge Tata ya Lola atii biso ntalo, te lokola mokili etiaka biso ntalo. Motuya na biso epesamaki liboso kutu toya na mabele. “Bolingo ya Nzambe ezangi ndelo mpe ekowumela libela.”3

Na loboko mosusu, bolongobani . ezwamaka na nzela ya botosi. Soki tosumuki, tolongobani moke! kasi tozali na motuya moke ata moke te! Tokokoba koyambola mpe kobunda mpo na kozala lokola Yesu na motuya na biso mobimba. Lokola Mokambi Brigham Young ateyaki: “Molimo oyo sikawa eleki moke mingi na mabele  … ezali na motuya ya mikili.”4 Ata nini, tozali ntango nyonso na motuya na miso ya Tata na biso ya Lola.

Atako bosolo oyo ya kokamwa, boniboni mingi na biso kozali kobunda, mbala na mbala, na makanisi to mayoki ya mabe etali biso moko? Ngai nasalaka yango. Ezali motambu moko ya pete. Satana azali tata ya lokuta nyonso, mingimingi ntango eyaka ngonga ya kolakisa mabe etali ezaleli mpe ntina na biso ya bonzambe. Kokanisa moke etali biso moko esalisaka biso te. Kutu ekangaka biso nsima. Lolola mbala mingi bateyaka biso, “Moko te akoki kokomisa yo moke soki ondimi yango te.”5 Tokoki kotika kokokisa mabe na biso mingi koleka na malamu mingi koleka ya moto mosusu. “Komekisa ezali moyibi ya esengo.”6

Na bokeseni, Nkolo alendisi biso ete ntango tozali na makanisi mabongi, Ye akopambola biso na bondimi, kutu bondimi ya koyeba nani tozali ya solo. Ezala naino na ngonga ya kafukafu koleka mpo na kosala keba na maloba na Ye: “Tika libongi ekembisa makanisi na yo ntango nyonso.” Ye alobi, “Nde bondimi na yo ekokoma makasi na miso ya Nzambe; mpe … Molimo Mosantu ekozala moninga na yo ya sikisiki.”7

Nkolo abimisaki bosolo oyo ya kobakisa na Profeta Joseph Smith: “Oyo azwi ya Nzambe, tika ye atanga yango ya Nzambe, mpe tika ye asepela ete atangami na Nzambe mpo na kozwa motuya.”8 Ntango toyoki Molimo, lokola molongo oyo elimboli, tondimi ete oyo toyoki ewuti na Tata na biso ya bolingo ya lola. Tokondima mpe tokosanzola Ye mpo apamboli biso. Nde tokosepela ete totangami mpo na kozwa motuya.

Banza ete ozali kotanga makomi na ntongo moko mpe Molimo na petepete anunginungi na yo ete oyo ozali kotanga ezali ya solo. Ekoki yo koyeba Molimo mpe kozala na esengo ete oyokaki bolingo na Ye mpe ozalaki na motuya mpo na kozwa?

Bamama, bokoki kofukama mpembeni ya mwana na bino ya mibu minei ntango azali koloba losambo na ye ya mpokwa. Liyoki moko etioli likolo na ntango ezali koyoka. Oyoki molunge mpe kimia. Liyoki wana ezali mokuse, kasi oyebi malamu ete yo, na ngonga wana, otangami ya motuya mpo na kozwa. Tokoki ntango moke, soki kutu, kozwa mamonisi ebakata na bomoi na biso; kasi mbala mingi mpenza tokoki koyoka nungunungu ya elengi ya Molimo Mosantu, kondimisaka bosolo ya motuya ya molimo na biso.

Nkolo alimbolaki mokangano katikati ya motuya na biso mpe libonza monene ya komikaba na Ye ntango alobaki:

“Mikundola motuya ya milimo ezali monene na miso ya Nzambe;

“Mpo, tala Nkolo Mosikoli na yo azwaki mpasi ya liwa na mosuni, yango wana azwaki mpasi ya bato banso, ete bato banso bakoka koyambola mpe koya epai na ye.”9

Bandeko basi, na ntina ya oyo Ye asalaki mpo na biso, “tokangami na ye na nkanga ya bolingo.”10 Ye alobaki, “Tata na ngai atindaki ngai ete nakoka kotombolama likolo ya ekulusu; mpe nsima ya kotombolama likolo ya ekulusu, ete Ngai nakoka kobenda bato banso epai na ngai.”11

Mokonzi Beniamini alimbolaki bokangami oyo na Mobikisi na biso: “Mpe tala, akoyoka mpasi ya masenginia, mpe mpasi ya nzoto, nzala, mposa ya mai, mpe bolembi, kutu mingi koleka oyo moto akoki koyoka mpasi, kolongola soki yango kozala mpo na liwa, mpo tala, makila ebimi na lidusu nyonso, mpo ete nsomo na ye ezalaki monene mpo na mabe mpe nsomo ya baton a ye.”12  na ntina ya masumu na biso. Mpasi wana mpe mbano ya mpasi wana etondisi mitema na biso na bolingo mpe botondi. Mpaka Paul E. Koelliker ateyaki, “ntango tolongoli makanisi mosika oyo ebendaka biso epai ya mokili mpe tosaleli boponi na biso mpo na koluka Ye, tofungoli mitema na biso na bokasi ya lola oyo ekobenda biso epai na Ye.”13 Soki bolingo toyoki mpo na Mobikisi mpe oyo Ye asalaki mpo na biso ezali monene koleka bokasi topesaka na botau, ntembe na bisomei, to mimesano ya mabe, nde Ye akosalisa biso tolonga makambo oyo esali mpasi na bomoi na biso. Ye abikisaka biso na bisomei.

Tika tobeta nsete lisusu: soki kobenda ya mokili ezali makasi koleka bondimi mpe elikia tozali na yango na Mobikisi, nde kobenda ya mokili ekolonga ntango nyonso. Soki toponi kokangama na makanisi na biso ya mabe mpe totii ntembe na motuya na biso, esika ya kokangama na Mobikisi, ekokoma mpasi mingi koyoka mayoki ya Molimo Mosantu.

Bandeko basi; tobulangana te etali nani tozali! Ntango ezali pete mingi mbala mingi kosala te na molimo koleka kosaleka bokasi ya molimo mpo na komikundola mpe koyamba bozali ya bonzambe na biso, tokoki te kondima ete bomitiki oyo na mikolo oyo ya nsuka. Ekoka biso, lokola bandeko basi, “kozala na bondimi na Klisto; … ekoka Klisto kotombola [biso] likolo, mpe ekoka bampasi mpe liwa ya Ye, … mpe mawa motema molai na Ye, mpe elikia ya nguya mpe bomoi ya seko ya Ye, etikala na [milimo na biso] libela.”14 Ntango Mobikisi atomboli biso na esika ya likolo koleka, tokoki komona polele kaka nani tozali te kasi ete tozali pembeni na Ye koleka oyo tokanisa ntango nyonso. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.