2010–2019
Tala! Limpinga ya Mokonzi
Sanza ya Minei 2018


Tala! Limpinga ya Mokonzi

Esengo kani ekozala mpo na banso basimbi Bonganganzambe ya Melekisedeke bazala lipamboli ya koteyaka, koyekolaka, mpe kosalisaka elongo.

Bandeko babonnganganzambe babolingo ba ngai, ezali na bomikitisi monene nde natelemi liboso na bino na libaku eyebana, na nse ya etinda ya profeta na biso ya bolingo mpe Mokambi, Russell M. Nelson. Nazali na bolingo mingi mpe nazali kosunga moto ya kafukafu ya Nzambe oyo mpe Bokambi ya Yambo ya sika na biso. Nabakisi litatoli na ngai na oyo ya Mpaka D. Todd Christofferson mpe Bandeko ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale mosusu ba ngai ete bambongwana oyo esakolamaki na mpokwa oyo ezali bolingi ya Nkolo.

Lokola elobamaki na Mokambi Nelson, oyo ezali likambo moko oyo esololamaki na losambo mpe etalamaki na Bandeko ya Eklezia ba nkulutu ntango molayi. Mposa ezalaki ya koluka bolingi ya Nkolo mpe kolendisa masanga makoki ya Bonganganzambe ya Melekisedeke. Bofulami ezamaki, mpe na mpokwa ya lelo profeta na biso asalaki ete bolingi ya Nkolo eyebana. “Solo Nkolo Nzambe akosala eloko moko te, soki kobimisa sekele na ye epai ya basali ba ye baprofeta!” 1 Tozali ya kopambolama mpenza kozala na profeta na bomoi lelo!

Na bomoi na biso mobimba, Ndeko mwasi Rasband mpe ngai tosali mibembo na mokili na baetinda ya Eklezia mpe ya mosala ya ndenge na ndenge. Namoni pene lolenge nyonso ya lolenge ya etonga kati na Eklezia: etape ya moke moko na Russie epai wapi motango ya Bonganganzambe ekokaki kotangama na loboko moko; palwase moko ya sika mpe oyo ezalaki kokola na Afrika epai wapi nyonso mibale banganzambe minene mpe bampaka bazalaki kokutana elongo na liboke moko mpo ete motango mobimba ya basimbi Bonganganzambe ya Melekisedeke ezalaki na moke, mpe bapalwase efandisama malamu epai wapi motango ya bampaka esengaki bokaboli ya lisanga likoki na bango na masanga makoki mibale!

Bisika nyonso tokeyi, tomoni loboko ya Nkolo kokendaka liboso ya basali na Ye, kolengelaka bato mpe nzela liboso mpo ete bana na Ye bakoka kopambolama engebene nay a bango bosenga nyonso. Elaki Ye te ete Ye “akokende libosona [ya biso] elongi” mpe “akozala na[ya biso] loboko ya mobali mpe na [ya biso] loboko ya mwasi” mpe ete ya Ye “Molimo akozala na mitema na bino, mpe [ya Ye] banzelu nzinganzinga pene na [biso]”?2

Kokanisaka na ntina ya banso na bino, Namikundoli loyembo “Tala! Limpinga ya Mokonzi.”

Tala! Limpinga ya mokonzi,

Na bendele, mompanga, mpe nguba,

Ezali kokende liboso mpo na kolonga

Na bisika ya etumba monene ya bomoi.

Milongo na yango etondisami na basoda,

Ya kosangana, mpiko, mpe makasi,

Oyo bazali kolanda Komanda na bango

Mpe bazali koyemba loyembo na bango ya esengo.3

Mpaka Christofferson ayanoli mituna ebele oyo ezali solo mpo na kobotama uta na liyebisi ete maboke ya banganganzambe minene mpe masanga makoki ya bampaka, na palwase, ezali kosangisama na limpinga moko, esangana, ya nguya ya bandeko ya Bonganganzambe ya Melekisedeke.

Bambongwana oyo ekosalisa masanga makoki ya bampaka mpe Mangomba ya Bamama Basungi babalisa mosala na bango. Bakokomisa pete boyokani ya lisanga likoki na boepisikopo mpe lisanga ya palwase. Mpe bakopesa nzela na episikopo apesa mikumba mingi epai ya bakambi ya lisanga likoki ya bampaka mpe Lingomba ya Bamama Basungi mpo ete episikopo mpe bapesi toli na ye batala malamu balotomo ya motuya—mingimingi kokonzaka bilenge basi, mpe bilenge mibali oyo bazali na Bonganzambe ya Alona.

Bam bongwana na mabongisi mpe misala ya Eklezia ezali ya sika te. Na 1883, Nskolo alobaki na Mokambi John Taylor: “[Kotala] boyangeli mpe bobongisi ya Eklezia mpe Bonganganzambe na ngai … Nakobimisa epai na bino, mbala na mbala, na banzela ya oyo naponi, makambo nyonso oyo ekozala ntina mpo na bokoli mpe bobongi nye ya lobi ekoya ya Eklezia na ngai, mpo na bobongisi mpe bokoli ya bokonzi na ngai.”4

Nakolinga koloba mwa maloba epai ya bandeko oyo bazali banganganzabe minene—boyeba ete tolingaka bino! Tata na biso na Lola alingaka bino! Bozali eteni moko monene ya limpinga ya mokonzi ya bonganganzambe, mpe tokoki komema mosala oyo liboso na kozanga bolamu, mosala, boyebi, mpe bosembo na bino. Alma ateyaki ete bato babiangami kozala banganganzambe minene mpo na bondimi makasi koleka mpe misala malamu na bango ya koteya mpe kosalisa basusu. Boyebi wana esengami sikawa ntango mosusu mingi koleka kala.5

Na bapalwase mingi, tokoki kozala na banganganzambe minene oyo sikawa bazwa mabaku ya kokambama na mpaka lokola mokambi ya lisanga likoki. Tozali na liboso moko ya bampaka kokambaka banganganzambe minene: bampaka bazali sikawa kosala lokola bakambi ya baetape na baetuka misusu ya mokili epai wapi banganganzambe minene bazali na etape yango, mpe ezali na baetape kati na yango bobele lisanga likoki ya bampaka ebongisami mpe banganganzambe minene bazali.

Esengo kani ekozala mpo na banso basimbi Bonganganzambe ya Melekisedeke bazala lipamboli ya koteyaka, koyekolaka, mpe kosalisaka elongo na bandimi banso kati na palwase na bango. Bisika nyonso ozali mpe atako bizalela kani okoki kozala na yango, tosengi yo na losambo, bondimi, mpe esengo ondima mabaku ya sika ya kokamba to ya kokambama mpe ya kosala na bomoko lokola liboke ya bandeko ya bonganganzambe.

Nakolobela sikawa makambo ya kobakisa, oyo makoki kosenga ndimbola, wana ezali biso kokende liboso mpo na kokokisa bolingi ya Nkolo na oyo etali bobongisi ya masanga makoki na Ye ya bonganganzambe esantu.

Mabongisi kani ezali mpo na lisanga likoki ya likonzi? Masanga makoki ya banganganzambe minene ekokoba kosala. Bakambi ya makonzi bakokoba kosala lokola bokambi ya lisanga likoki ya banganganzambe minene. Kasi, lokola elimbolamaki na Mpaka Christofferson, baye lisanga likoki ya banganganzambe minene bakozala sikawa banganganzambe minene sikawa kosalaka na bokambi ya likonzi, lokola baye boepisikopo, lokola baye lisanga linene ya likonzi, mpe mopesi lipamboli ya botata oyo azali kosala. Bakalaka ya palwasi mpe likonzi mpe banganganzambe minene ya likonzi te. Ntango moto oyo azali kosala makasi lokola nganganzambe monene, mopesi lipamboli ya botata, Ntuku Nsambo, to Apostolo akeyi kotala palwasi mpe azali na mposa ya kozala na liyangani ya bonganganzambe, akokutana elongo na lisanga likoki ya bampaka.

Ntango bandeko na mabiangi oyo bapemisami na ntango esengeli, bakozonga na baetonga na bango lokola baye lisanga likoki ya bampaka.

Nini ezali mosala ya lisanga likoki ya banganganzambe minene ya likonzi? Bakambi ya likonzi bakokutana elongo na baye lisanga likoki ya banganganzambe mpo na kosala likita elongo, kotatola, mpe kopesa boyekoli. Mayangani ya likonzi lokola elimbolami na manuel d’instruction ekokoba na bambongwana mibale:

Moko, bapalwase mpe makonzi kosala mayangani ya lisanga ya basali bonganganzambe lisusu te. Soki likambo moko ya palwase ya kafukafu ebimi, ndakisa likambo ya libota ya mindondo to mokakatano ya lisungi ya momesano te, ekotalama na liyanganiya boepisikopo esembolama. Makambo mosusu ya mpasi moke ekoki kotalama na lisanga ya palwase. Oyo eyebani lokola liyangani ya lisanga ya basali ya bonganganzambe ya likonzi ekobengama sikawa “liyangani ya lisanga monene.”

Mibale, liyangani ya mobu ya banganganzambe minene bakulisama banso kati na likonzi ekosalama lisusu te. Kasi, bakambi ya likonzi bakokoba kosala liyangani ya mobu ya lisanga likoki ya banganzambe minene ya likonzi lokola esakolami lelo.

Ekoki palwasi kozala na mingi koleka lisanga likoki ya bampaka? Eyano ezali iyo. Kolandaka ndakisa ya Doctrine et Allliances eteni 107, molongo 89, ntango palwase ezali na motango moko monene ya momesano te ya bamemi Bonganganzambe ya Melekisedeke ya makasi, bakambi bakoki kobongisa mingi koleka lisanga likoki ya bampako moko. Soki bongo, lisanga likoki moko na moko esengeli kozala na bokokani moko ya ntina na oyo eteli mobu, boyebi, mpe mosala mpe bokasi ya bonganganzambe.

Natatoli ete wana ezali biso kokende liboso na bapalwase na biso nde tokobongisaka lisanga likoki efulama oyo kati na bapalwasi mpe makonzi na biso nde tokomona ebele ya mapamboli. Tika natanga mwa bandakisa.

Na nse ya boyangefli ya episikopo, maziba ya bonganganzambe mingi ekoki kosunga na mosala ya lobiko. Oyo ekokotisa bosangani ya Yisalaela na nzela ya mosala ya tempelo mpe ya mambi ma kala ya libota, kosalaka elongo na mabota mpe bato ya bonsenga, mpe kosalisaka bamisionele komema milimo epai ya Yesu Klisto.

Ntango bakambi bayangeli ya kala bazongi mpo na kokabola boyebi na bango na lisanga likoki ya bampaka, baye lisanga likoki ya makasi koleka bakobotama.

Ekozala na bokeseni makasi koleka ya makabo mpe makoki kati na lisanga likoki.

Ekozala na bonitoi mpe bolengelami mingi mpo na kokokisa babonsenga ya sika mpe ya npasi mpe na kokokisaka baetinda ya kosalisa ebele.

Ekozala na bobuti moko na kopesaka toli mpe boyokani ntango mpaka moko ya sika mpe nganganzambe monene moko ya boyebi bazali kokabola baboyebi, ngambo na ngambo, kati na mayangani mpe baetinda ya lisanga likoki.

Baepisikopo mpe bakambi ya baetape bakokomisama na bonsomi mpo na kosala na mabiangi na bango mpo na kobatela mpate ya baetonga na bango mpe kosalisa baye bazali na bonsenga.

Tozali kososola ete palwasi mpe likonzi moko na moko ekeseni. Wana ezali biso kososola babokeseni oyo, tozali na elikia ete bokolanda bambongwana oyo nokinoki nsima ya likita linene oyo. Tolakisami nzela na profeta ya Nzambe! Lipamboli mpe mokumba monene nini. Tika tokokisa yango na bosembo mpe etingia nyonso!

Nakundolisi bino ete likoki ya bonganganzambe eyaka na nzela ya kotiaka mpembeni mpe bokoli, kasi nguya ya bonganganzambe ya solo, nguya ya kosala na nkombo ya Nkolo Yesu Klisto, ekoki koya bobele na nzela kozala na bomoi ya bosembo.

Nkolo asakolaki epai ya Joseph Smith, profeta ya Bozongisi:

“Tala, nakotala baetonga na bino, mpe nakotelemisa bampaka mpe nakotindela yango bango.

“Tala nakotambwisa mbangu mbangu mosala na ngai na ngonga na yango.”6

Tango moSolo, oyo ezali ngonga moko ntango Nkolo azali kotambwisa mbangu mbangu mosala na Ye.

Tika moko na moko biso asalela libaku oyo mpo na kokanisa mpe kobongisa bomoi na biso mpo na kokokisanisa na bolingi na ye mpo ete tokoka kobonga na mapamboli mingi Ye alakelaki bato malamu mpe ya bondimi.

Bandeko, natondi bino mpo na nyonso oyo bozali kosala mpo na kozala eteni moko ya mosala kitoko oyo. Ekoki biso kokende liboso kati na ntina monene mpe ya lokumu oyo.

O, ntango bitumba esukisami,

Ntango bobundi mpe bowelani esili,

Ntango nyonso esangisami elongo na bokebi

Kati na lubwaku ya kimia,

Liboso ya Mokonzi ya seko,

Ebele mingi mpe ya nguya wana

Ekosanzola nkombo na Ye mpo na libela,

Mpe oyo ekozala loyembo na bango:

Elonga, elonga!

Na nzela na Ye oyo asikolaki biso!

Elonga, elonga!

Na nzela ya Yesu Klisto, Nkolo na biso!

Elonga, elonga, elonga,

Na nzela ya Yesu Klisto, Nkolo na biso!7

Lelo biso banso totelemi lokola banzeneneke ya Nkolo kobimisaka bolingi na Ye na nzela ya profeta na Ye Mokambi Russell M. Nelson. Natatoli ete azali profeta ya Nzambe awa na mabele. Napesi litatoli na ngai ya Nkolo Yesu Klisto, oyo azali Mosikoli mpe Mobikisi monene na biso. Oyo ezali mosala na Ye; oyo ezali bolingi na Ye, epai na oyo napesi litatoli ya lokumu na nkombo ya Yesu Klisto, amene.