2010–2019
Klisto Nkolo Asekwi Lelo
Sanza ya Minei 2018


Klisto Nkolo Asekwi Lelo

Pasika oyo ya Eyenga. Natatoli mpe na lokumu natatoli na ntina ya Klisto ya bomoi—Ye oyo “akufaki, akundamaki, mpe asekwaki lisusu na mokolo ya misato.”

Bandeko mibali mpe basin tango bana na biso ya mibali bazalaki bilenge mpenza, nazalaki kobetela bango masolo na ntango ya kolala na ntina ya bamakalo ya beagle mpe banzembu ya bolali, lisusu na “Klisto asekwi lelo, aleluya!”1 Ntango mosusu nabongolaki maloba: “Sikawa ezali ntango ya kokende kolala—aleluya.” Mbala mingi bana na biso ya mibali bazalaki kozwa mpongi mbala moko; bayebaki soki bakei kolala, nakotika koyemba.

Maloba—kutu maloba na ngai—ekoki te kolimbola liyoki mobimba uta na Mokambi Russell M. Nelson na bolingo azwaki maboo na ngai kati na oyo ya ye, na Susan na ngambo na ngai, mpe apesaki ngai libiangi oyo ya bule kouta na Nkolo oyo ekataki ngai mpema mpe oyo etikaki ngai na kolela uta bantango molai mwa mikolo eleki.

Na Saba oyo ya Pasika, nayembi na esengo, “Aleluya.” Loyembo ya mosikoli na biso ya bolingo Mobikisi asekwi 2 koyangela esengo ya mayokani (oyo ekangisaka biso epai ya Nzambe mpe moko na moko mosusu) mpe Bomikabi ya Yesu Klisto (oyo esungaka biso tolongola bomoto na biso ya mobali mpe mwasi mpe kolata Molimo Mosantu 3).

Elongo na, mayokani na biso mpe Bomikabi ya Mobikisi epesi ndingisa mpe ngolu. Esungaka biso tosimba mpe toende liboso. Elengelaka, ebatelaka, esantisaka mpe ekosikolaka biso mpe kimoninga na biso ya ntina koleka.

Elobaki Profeta Joseph Smith: “Ekoki komonisama na basusu kozala malongi moko ya lolendo koleka ete tolobelaka na ntina ya—nguya oyo ezali kati to ekangemi na mabele mpe ekangemi na lola. Na yango, na mibu nyonso ya mokili, ntango Nkolo apesaki eleko ya bonganganzambe epai ya moto nyonso na bobimisi ya lelo, to na lingomba ya mibali, to nguya oyo esi epesameli.”4

Mpe na yango ezali lelo. Mayokani ya bule mpe makuli, ezali bisaka mosusu te, ezwamaka na bandaku ya bule 159 ya Nkolo na bamboka 43. Mapamboli elakelama eyaka na nzela ya bafungola ezongisama ya bonganganzambe, malongi, mpe likoki, ezali na nguya ya bondimi na biso, botosi mpe bilaka ya Molimo Mosantu, epai na biso na bankola oyo, nan tango mpe boseko.

Bandeko mibali mpe basi na ekolo nyonso, bikolo, mpe nkota botondi mingi mpo na bondimi na bino, elikia mpe bolingani na matambe nyonso. Botondi na bino mpo na kokomaka eteni ya lisanga ya litondi ya boyebi nsango malamu ezongisama.

Bandeko mibali mpe basi, tozali banso mpo na moko mpe mosusu, tokoki kosangana na bomoko mpe na bolingo,5 na makambo nyonso mpe na bisika nyonso ete tokoka kozala moko.6 Na bosolo oyo ya ntina ntango toyei epai na Ye mpe topesi ndingisa Ye ndingisa ya kokangola mitema na biso ebukana mpe kotombola milimo na biso etukama.7

Bandeko mibali mpe basi, mokolo oyo nabondeli bino na komikitisa “babokasi nyonso ya molimo na ngai,”8 oyo bakoki kozala to kokoma, epai ya Mobikisi na ngai, epai ya Bandeko mibali mpe moko na moko kati na bino.

Nyonso ya malamu mpe ya seko ezali kati na bosolo ya Nzambe Tata na biso ya Seko ya bolingo mpe Mwana na Ye, Yesu listo, mpe Bomikabi na Ye, etatolaki na Molimo Mosantu. 9 Natatoli na bosolo mpe napesi litatoli na ngai ya lokumu na Klisto ya bomoi—Ye oyo akufaki, akundamaki mpe asekwaki lisusu na mokolo ya misato, mpe amataki na lola.10 Azali Alifa mpe Omega11—elongo na biso na ebandeli, azali na biso kino na suka.

Natatoli na ntina ya baprofeta ya mikolo ya nsuka, uta na Profeta Joseph Smith kino na Mokambi na biso Russell M. Nelson, oyo tosungi na esengo. Lokola loyembo na biso ya Kelasi ya bana, “Kolanda profeta; toyebaka nzela.”12 Natatoli ete, lokola esakolamaki na kati ya makomi masantu, lisusu na Buu ya Mormon: Litatoli Mosusu ya Yesu Klisto, “bokonzi ya Nkolo [etiami] lisusu na mabele, bolengeli mpo na Boyei ya Mibale ya Masiya.”13 Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.