2010–2019
Makebisi ya Boyingisi
Sanza ya Minei 2018


Makebisi ya Boyingisi

Toyebisi bobongisi lisusu ya ntina mpo na masanga makoki na biso ya Bonganganzambe ya Melekisedeke mpo na kokokisa mosala ya Nkolo na bokasi mingi koleka.

Matondi, Ndeko mobali Holmes, mpo na nsango na yo ya motuya

Bandeko mibali ya bolingo, tozali kozanga na mozindo Mokambi Thomas S. Monson mpe Mpaka Robert D. Hales. “Nzokande tozali banso kokoba na mosala ya Nkolo.”1

Nazali na matondi mpenza mpo na mobali moko na moko oyo amemi bonganganzambe esantu. Tozali elikia ya Mosikoli na biso oyo azali na mposa “ete mobali nyonso akoka koloba na nkombo ya Nzambe Nkolo, kutu Mobikisi ya mokili.”2 Alingi banso bana na Ye ya mibali bakulisama bazala bantoma na Ye, baloba mpo na Ye, basala mpo na Ye, mpe bapambola bomoi ya bana ya Nzambe na mokili mobimba kino na nsuka mpo ete “bondimi lisusu ekoka kobuta kati na mabele [nyonso].”3

Mingi na bino bazali kosalela Nzambe epai wapi Eklezia efandisami bankola ebele. Basusu bazali kosalela Nzambe epai wapi Eklezia ezali mwa ya sika. Mpo na mingi na bino, bapalwase na bino ezali minene, Mpo na basusu, baetape na bino ezali mike mpe bantaka ezali minene mpenza. Atako bozwi na bino ya moto na moto ezali nini, moko na moko na bino azali moye lisanga likoki ya bonganganzambe na etinda ya bonzambe ya koyekola mpe koteya, ya kolinga mpe kosalisa basusu.

Na butu ya lelo, toyebisi bobongisi lisusu ya ntina mpo na masanga makoki na biso ya Bonganganzambe ya Melekisedeke mpo na kokokisa mosala ya Nkolo na bokasi mingi koleka. Na palwase moko na moko. Banganganzambe minene mpe bampaka basangisama sikawa na lisanga likoki ya bampaka. Mbongwana oyo ebutisa mpenza bokoki mpe bobongi ya mibali oyo bamemaka bonganganzambe mpo na kosalisa basusu. Bampaka ya mikolo ekoya bokotombelama boye bolamu na kati mpe bakozwama na kimoninga na lisanga likoki wana. Na likonzi moko na moko, bokambi ya likonzi moko na moko akokoba koyangela likolo ya lisanga likoki ya banganganzambe minene ya likonzi. Kasi bobongisi ya lisanga likoki wana ekosalama na mabiangi ya bonganganzambe ya sikawa, mabiangi ya bonganganzambe, lokola ekolimbolama kala te.

Mpaka D. Todd Christofferson mpe Mpaka Ronald A. Rasband ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale bakoteya biso mingi koleka etali bambongwana oyo ya motuya.

Bamabongisi oyo eyekolami basanza mingi. Toyoki bonsenga ya mbangu mbangu ya kobutisa lolenge totalaka bandimi na biso mpe tosalaka lapolo ya masolo na biso na bango. Mpo na kosala yango malamu koleka, tosengeli kolendisa masanga makoki na biso ya bonganganzambe mpo na kopesa malako makasi epai ya kosalisa ya bolingo mpe lisungi oyo Nkolo azali kozela mpo na Basantu na Ye.

Bambongwana oyo efulami na Nkolo. Ntango tosaleli yango, tokozala kutu makasi mingi koleka tozalaki liboso.

Tozali kati na mosala ya Nzambe ya Nguya Nyonso. Yesu azali Klisto! Tozali basali na Ye ya komikitisa! Nzambe apambola bino bandeko wana ezali biso koyekola mpe kosala mosala na biso, nasambeli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.