2010–2019
Komilengela mpo na Kokutana na Nzambe
Sanza ya Minei 2018


Komilengela mpo na Kokutana na Nzambe

Kolandaka mikumba eponami na bonzambe kati na bosembo, bomoko, mpe bokokani ekolengela komona Nzambe.

Eliza R. Snow, kolobelaka na ntina ya kobonza ya Tempelo ya Kirtland (oyo ye akendaki), alobaki: “Milulu oyo ya kobonza ekoki kolobana mbala na mbala, kasi nkota moko te ya bokufi ekoki kolimbola babomonisami ya lola na mokolo wana ya kobosana te. Banzelu bonanaki na basusu, ntango ntina moko ya bozali ya bonzambe emonisamaki na nyonso bazalaki wana, mpe motema moko na moko etondisamaki na esengo ekoki kolimbolama te mpe botondi ya nkembo.”1

Bomonisami ya bonzambe esalamaki na Tempelo ya Kirtland ezalaki na motuya monene na ntina ya bozongisi Eklezia ya Yesu Klisto komema boleki na libiki mpe bonetolami ya bana ya Tata na biso ya Lola.2 Lokola tozali komilengela mpo na kokutana na Nzambe, tokoki koyeba nini mikumba na biso ya bokani ya bonzambe ezali na kotalaka lisusu bafungola ya bule ezongisamaki lisusu na Tempelo ya Kirtland.

Kati ya libondeli ya kobonzela, Profeta Joseph Smith asengaki Nkolo na komikisa “koyamba ndako yango … oyo yo opesaki biso motindo ya kotonga.”3

Nsima ya mposo moko, na Eyenge ya pasika, Nkolo amonisamaki na limoni moko ya nkembo mpe awambaki ndako na Ye. Yango esalamaki na sanza ya Minei 3, 1836, nsima moko solo mpenza na mobu 182 eleki uta na Eyenge ya Pasika oyo. Ezalaki lisusu eleko ya Pasika ya bayuda— moko ya bangonga wana ya mingimingi te ntango Pasika mpe Pasika ya bayuda elandanaki. Ntango limoni ekangamaki, baprofeta misato ya kala, Mose, Eliya, mpe Elie bamonanaki mpe bapesaki bafungola oyo ezalakai na ntina monene ya kokokisa ntina monene ya Nkolo mpo na Eklezia na Ye ezongisami na eleko oyo. Ntina wana ezalaki pete, kasi kitoko, ebongisami kozala mosangani ya Yisalaele, kokangisaka bango lokola mabota, kolengelaka mokili mpo na Bozongi ya Mibale ya Nkolo.4

Mpo na bongo nyonso mibale Elie mpe Mose komonana ezalaki moko “kokokana ya kokamwisa … [elongo na] bokoko y aba Yuda, klandisaka na oyo Mose mpe Elie bakokaki koya elongo na ‘suka ya ntango.’”5 Na malongi na biso, komisama oyo akokisaki bozongi ya ntina ya book bafungola “epesamaki … mpo na mikolo ya suka mpe mpo na ntango ya suka, na oyo ezali eleko ya botondisi ya bantango.”6

Tempelo ya Kirtland, kati na esika ezali mpe monene nyonso mibale, ezalaki na molili ya kokokana. Kasi kotalaka motuya na yango monene na kibomoto; yango ezalaki na ntina -ya seko. Baprofeta ya kala bazongisaki bafongola ya bonganganzambe mpo na makuli ya lobiko ya seko ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Yango ezalaki mbano ya esengo ya kotonda mpo na bandimi ya bosembo.

Bafongola yango epesi “nguya uta likolo”7 mpo na mikumba ya bokutani ya bonzambe oyo ya kala mpe lelo ezali ntina ya yambo ya Eklezia.8 Na mokolo wana kitoko ya Pasika na Tempelo ya Kirtland, bafungola misato ezongisamaki:

Yambo, Mose amonanaki mpe apesaki bafungola mpo na kosangisa Yisalaele uta na ngambo mitano ya mabel, oyo ezali mosala ya misionele.9

Ya mibale, Eliya amonanaki mpe apesaki bafungola ya eleko ya nsango malamu ya Abalayama, oyo esangisi bozongisi ya liyokani ya Abalayama.10 Mokambi Russell M. Nelson ateyaki ete ntina ya bafungola ya mayokani ezali kolengela bandimi mpo na bokonzi ya Nzambe. Ye alobaki, “Biso toyebi banana tozali mpe [biso toyebi] nini Nzambe azozela epai biso.”11

Ya misato, Eliya amonanaki mpe apesaki bafungola ya bokangisi nguya na eleko yango, oyo ezali mosala ya mambi ya kala ya libota mpe makuli ya tempelo oyo esalaka ete lobiko esalama mpo na baye ya bomoi mpe bakufi.12

Ezali, nan se ya botambwisi ya Bokambi ya Yambo mpe Lisanga Likoki ya Bantuku Mibale, masanga misato ya mosala na moto ya Eklezia oyo bazali kokengela mikambu ya bokutani ya binzambe wana misatoevandi likolo ya bafungola oyo ezonisamaki na Tempelo ya Kirtland. Bazali Lisanga ya Mosala ya Misionele, Bonganganzambe mpe Lisanga ya Mosala ya Libota, mpe Libota mpe Lisanga ya Mosala ya Mambi ya Kala ya Libota.

Nini tozali kosala lelo mpo na kotondisa Mikumba Wana ya Bokutani ya Bonzambe?

Yambo, na botosi ya bozongisi ya Mose ya bafongola ya bosangani ya Yisalaele, lelo penepene na bamisionele 70,0000 bapanzani nzinganzinga na mabale koteyaka nsango malamu na Ye kosangisa baponami na Ye. Oyo ezali ebandeli ya botondisi ya mosala monene mpe ya kitoko nephi alobaki yambo kati na bango mibale Bapaganu mpe ndako ya Yisalaele. Nephi amonaki ngonga na biso ntango Bansantu ya Nzambe bakokaki banso kozala likolo ya mabele, kasi mituya na bango ekokaki kozala mike mpo na mabe. Atako ye amonaka ete bango bako “latama na bosembo mpe nguya ya Nzambe na kembo monene.”13 Ntango kotalaka lisolo na mokuse ya bozongisi ya Eklezia, bokasi ya misionele ekomaki makasi koleka. Tozali komonaka bokokisami ya limoni ya Nephi. Nzokande mituya ya bandimi na biso emonani moke, tokokoba na makasi na biso mpe kotanda loboko na biso na baye oyo bayanoli na etinda ya Mobikisi.

Ya mibale, Eliya amonanaki mpe apesaki bozongi ya nsango malamu ya eleko ya Abalayama, kolobaka ete na kati na biso mpe nkona ya eleko nyonso nsima na biso esengeli epambolama. Na likita oyo, botambwisi ya ntina ezalaki mpo na kosunga na kokomisa malamu Basantu mpe kolengelaka bango mpo na bokonzi ya Nzambe.14

Ya Misato Eliya apesaki bafungola ya bokangi ya eleko oyo. Mpo na baoyo ya biso bazali na bomoi ntango oyo, komata na batempelo mpe mosala ya mambi ya libota ezali kokamwisa. Botamboli oyo ekokoba mpe ekokende mbangu kino Bozongi ya Mibale ya Mobikisi, noki te mokili mobima “ezala ya kobeba mobimba na bozongi na ye.”15

Mosala ya mambi ma kala ya libota, ebambolami-na lola na nzela ya tekinolozi, emati na nlolenge moko ya somo na mibu moke eleki. Tokoki kozala na bozangi bwania ya kokoma kosepela na oyo etali mokumba ya bokutani ya bonzambe mpe kozelaka Tata mwasi Jane to bandeko mosusu basangaki bakosala mambi ma kala ya liloba mpo na libota. Tika ngai nakabola na bino maloba ya mbalamoko ya Mokambi Joseph Fielding Smith: “Moko te akolimbisama uta na etinda monene oyo. Yango esengami na qpostolo lolenge moko na mpaka ya bomikisi mpenza [to ndeko mwasi]. Esika, to nani ozali, molai ya mosala na Eklezia … ekopesa nzelate na moko mpo na kotala mpamba lobiko ya mokufi moko.”16

Sikawa tozali na batempelo mokili mobimba mpe makoki ya lisungi ya kosunga bato kokta na tempelo mpe bazala ya kongisama na mabota na bango mpo na kosunga baoyo bazali mosika na tempelo moko.

Lokola bato se bango moko, tosengeli kotala makasi na biso ya kolandaka mosala ya misio, ya tempelo, mpe ya mambi ya kala ya libota, mpe komilengelaka mpo na kokutana na Nzambe.

Bosembo, Bomoko, mpe Bokokani libo na Nkolo epesi moboko ya Mikumba ya Bule Wana.

Na botosi bosembo, bomoi oyo ezali ntango mpo na banso kati na biso komilengela kokutana na Nzambe17 Buku ya Mormon epesi bandakisa ebele ya mbano mabe ntango bato bango moko to masanga bakweyi na kobomba mitindo ya Nzambe.18

Kati kati ya ntango na ngai na bomi, banzela mpe bantina ya mokili elongwaki uta na nsuka kono mosusu—uta na bolandi ya buzoba mpe oyo ezangi ntina kino na bozangi kibomoto ya solo. Yango ezali malamu ete bozangi kibomoto epesami nzela te ebimisama libanda mpe epesama etumbu .19 Lolenge ya bozangi kibomoto epesami nzela te ezali kotelema mibeko ya Nzambe ya mboka. Na bongo, baye oyo basosoli mwango na Nzambe basengeli mpe kotelemela bozangi kibomoto epesameli nzela, oyo ezali lisusu lisumi. Esakola na mokili ekebisi “bato se bango moko oyo bakobuka mayokani ya bopeto bwa nzoto, oyo akozwa na makasi molongani to mwana [to moto mosusu] … akotelema na mokuma liboso ya Nzambe.”20

Soki totali nzingnzinga, tomoni bobebisami ya mabe mpe bozangi bokoki esika nyonso. Soki, lokola bato se bango moko, biso mpe tozali mpenza na kati ya oyo etali lisambisi ya suka ya Mobikisi na biso, tosengeli koluka boyamboli. Nazali kobanga ebele ya bato kala mingi te bamiyoka na mokumba liboso ya Nzambe mpe bazonga ten a makomi to botambwisi ya baprofeta. Soki biso, lokola lisanga, tozali tokanisi na oyo etali mbano mabe ya amasumu, wana ekozala na potelemeli ya bato ebele na pornographie mpe bokomisis mwasi lokola eloko.21 Lokola Alma alobaki na mwana na ye mobali Corianton na Buku ya Mormon, “Mabe mokolo moko ekozala esengo.”22

Na kotalaka bomoko, Mobikisi alobaki, “Soki bozali moko te bozali ya ngai te.”23 Toyebi ete molami ya koswana ezali ya diabulu.24

Na mikolo na biso oyo, likomi etambwisi mpo na bomoko eyebani makas tei, mpe mpo na bato babeti sete na kiboekolo,25 mingi etali lolenge ozali, kibomwasi to kibomobali, loposo ya nzoto, mpe bozwi, na bamboka ebele, soki ebele te, bato bakabwani makasi na oyo etali lolenge nini kozala. Ebele ya ntina na kobokola ezali kobeta sete na nguya ya bitumba, kopesama nzela to bofini, mpe makambo ebele ekaboli bato.26

Soki totali na bantina yay ambo ya Eklezia, yango etelemi likolo ya bokokani liboso ya Nkolo27 mpe kolandaka ezaleli ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Na botosi ya mosala ya misionele, bambano ya yambo mpo na libatisi ezali komikisaka yomoko liboso ya Nzambe mpe koyaka liboso na motema mobukani mpe ya mawa.28 Koekola, bozwi, loposo, to mboka nay o ya bouti etalami kutu te.

Mpo na kobakisa, bamisiole basalisaka na komikisa wana babengami. Bango bamekak te kosala kolanda balolenga ya mokili ya lolenge ozali to kobongisama mpo na misala ya lobi.bango bazali kosalisa na mitema na bango mibimba, makasi, makanisi, mpe makasi esika nionso bango batindami. Bango baponaka te baninga na bango, mpe bango balukaka na etingia nyonso kokilisa makoki ya ezaleli ya Klisto,29 oyo ezali kati ya katikati ya ezalela ya Yesu Klisto.

Makomi epesi botambwisi mpo na ya biso boyokani ya motuya koleka. Mobikisi ateyaki ete motindo ya liboso ezalaki ko “linga Nkolo Nzambe na yo.” Mpe ya mibale ezali ko “linga mozalani na yo lokola yomoko.”30

Mobiki alimbolani boye te moto nionso azali mozalani na biso.31 Buku ya Mormo etiaki yango polele ete esengeli ezala te na kibo -songolo, to bokabwani kati na bato mpo na bozwi.32 Bosengeli bozala na bomoko mpe bokokani.

Makuli ya bule mpe mikumba ya bonzambe elonami likolo ya premise oyo. Nalikyi ete bamayele na bino moko na tempelo ekoki kokokana na ya ngai. Ntango natikaki mosala na ngai ya mokolo na mokolo na San Francisco mpe nayaki na Temple ya Oakland, nasimbamaki na liyoki moko ya etondaki ya bolingo mpe kimia. Eteni moko ya motuya na yango ezalaki koyoka ete nazalaki pembeni ya Nzambe mpe bantina na Ye. Makuli ya kobikisa ezalaki ya yambo natiaki makanisi, kasi eteni ya moko ya ndimbola makasi ya mayoki wana ya kitoko ezali bokokani mpe bomoko oyo eyokami makasi na tempelo. Moto alataka elamba ya pembe. Kuna ezali na elembo te ya bozwi, solo mabe, to koyekola ekokisami; tozali banso bandeko mibali mpe bandeko basi ya komikitisa biso moko liboso ya Nzambe.

Na ndako ya bule ya bokangisi, likuli ya libala ya seko ezali ndenge moko mpo na moto nyonso. Nalingaka eloko moko ete babalani uta na bozwi moke mpe babalani uta na bozwi ebele bazala na liyoki kaka ya ndenge moko penza. Bango balati bilamba ya lolenge moko mpe basali makuli ya ndenge moko mpe likolo ya mesa ya ndenge moko. Bango bayambi mapamboli ya bonganganzambe ya seko ya ndenge moko. Yango ekokisami na tempelo moko kitoko etongami na bamoko na zomi ya Bansantu lokola ndako ya bule ya Nkolo.

Kokokisaka mikumba eponama na bonzambe, etelemi likolo ya bosembo, bomoko, mpe bokokani liboso ya Nkolo, ememi esengo ya moto se yemoko mpe kimia na mokili mpe elengeli biso mpo na bomoi ya seko na mokili ekoya.33 Yango ezali kolengela biso mpo na kokutana na Nzambe.34

Tobondeli boye mpo na moko na moko na bino, kotalaka balolenga na biso ya sikawa, bokozwa toli ya episikopo na bino mpe ozala ya kobonga mpo na ndingisa ya kokota na tempelo moko.35

Tozali na botondi ete ebele koleka ya bandimi bazali komilengelaka mpo na kokende na tempelo. Kuna ezalaka na bokoli ya makasi na basimbi ya ndingisa ya kokota na tempelo ya mikolo oyo babongi mpo na mibu ebele. Bosaleli-ekatami ndelo etindami mpo na bilenge babongi ebuti makasi likolo ya mibu mibale eleki. Na polele mpenza motema ya kibondimi ya Eklezia etikala kozala ata mokolo moko te makasi boye.

Mpo na kosukisa, nasengi ete bondimisama ete batambwisi ya likolo ya Eklezia oyo bazali kokamba na bantina ya bokutani ya bonzambe na Eklezia bayambi lisungi ya bonzambe. Botambwisa yango ewuti uta na Molimo mpe mingimingi mbala moko uta Mobikisi. Lolenge ya batambwisi nyonso mibale ya molimo epesami. Nazali na botondi ya koyambaka lisalisi ya lolenge wana. Kasi botambwisi epesamaka na ntango na Nkolo, mokoloto moko likolo ya mokoloto mpe mosise likolo ya mosise,36 ntango “Nkolo ya boyebi nyonso aponi yemoko koyekolisa biso.”37 Botambwisi mpo na Eklezia mobimba eyaka kaka na profeta na Ye.

Biso nyonso tozali na libaku ya kosunga Mokambi Russell M. Nelson lokola profeta na biso mpe Mokambi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansantu ya Mikolo mya Nsuka na likita oyo. Ba Zomi na mibale lokola liboke mpe moto se ye moko, ezali mayele moko ya ntina ya molimo ntango totomboli maboko na biso moto ya Mokambi Nelson mpe Mokambi Dallin H. Oaks, andimaki lokola mongongo mpe atiaki ye pembeni lokola Mokambi ya Eklezia. Natatoli ete ye akulisamaki yambo ya mbotama mpe alengelamaki bomoi na ye mobimba mpo na kozala profeta ya Nkolo mpo na mokolo na biso. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.