2010–2019
Baprofeta balobaka na Nguya ya Molimo Mosantu
Sanza ya Minei 2018


Baprofeta balobaka na Nguya ya Molimo Mosantu

Kozala na baprofeta ezali elembo ya bolingo ya Nzambe mpo na bana na Ye. Balakisaka bilaka mpe lolenge ya solo ya Nzambe mpe Yesu Klisto.

Bandeko nan gai ya mibali mpe basi, ezala esika nini bozali, nakosepela kolakisa bosolo mpe kopesa bino botondi ya bofuluki mpo na bavoti na bino ya lisungi lobi eleki. Namiyoki ya komikitisa mpe kozanga makoki ya komema mokumba monene ya kozala molobeli ya Mobikisi, Yesu Klisto, na mabele. Nazali komiyoka lokola Mose, oyo amimonaki ye moko kozanga koyeba koloba mpe likukuma. Namilobeli ngai moko na maloba ya Nkolo epai na ye:

“Nani asalaki munoko ya moto? To nani asalaka baba, to mokufi matoi, to momoni, to mokufi miso? Ezali ngai Nkolo te?

“Mpe sikawa kende, mpe nakozala na monoko na yo, mpe nakotangisa yo nini okoloba” (Exodus 4:11–12; see also verse 10).

Nazwaka bolendisi mpe lisusu bolingo na mpe lisungi epai ya mwasi nan gai ya bolingo. Azalaki ndakisa ya bolamu, bolingo, mpe bomipesi mobimba ya epai ya Nkolo mpo na ngai mpe libota na ngai. Nalingaka ye na motema na ngai mobimba, mpe nazali na botondi mpo na nguya malamu oyo azali na yango mpo na biso.

Bandeko mibali mpe basi, natatoli epai na bino ete Mokambi Russell M. Nelson azali profeta ya Nzambe na mabele. Nanu namona moto ya boboto koleka lokola ye te mpe bolingo lokola ye. Atako namiyoki ya kozanga makoki na libiangi ya bule oyo, maloba na ye mpe botali na ye ya boboto na miso na ye lokola ntango apesi ngai mokumba oyo noyokaki bolingo ya Mobikisi. Botondi mingi, Mokambi Nelson. Tosungaa mpe tolingaka yo.

Ezali solo te ete lipamboli ya kozala na baprofeta, bamoni, ,pe basakoli likolo yam abele na mikolo oyo tozali na bomoi, oyo nyonso alukaka koyeba bolingi ya Nkolo mpe kolamda yango? Ezali bolendisi koyeba ete tozali biso moko ten a mokili, na esika ya mikakatano tokutanaka na yango na bomoi. Kozala na baprofeta ezali elembo ya bolingo ya Nzambe mpo na bana na Ye. Bayebaka bilaka mpe lolenge ya Nzambe mpe Yesu Klistu epai ya bato na Bango. Nayekolaki ete na nzela ya mayebi nan a biso moko.

Mibu Zomi na mwambe eleki, mwasi na ngai mpe ngai toyambaki libiangi na telefone uta na Mokambi James E. Faust, oyo azali Mopesi toli ya mibale na Bokambi ya Yambo. Abengaki biso mpo na kosunga lokola mokambi ya misio mpe moninga na Portugal. Ayebisaki biso ete tozalaki kaka na baposo motoba yambo tobanda misio. Atako tomiyokaki naino tomilengeli te mpe kozanga makoki, tondimaki libiangi. Ntina na biso ya makasi nan tango wana ezalaki ya kozwa baviza oyo esengeli mpo na kosunga na mboka wana mpo ete, nakotala na boyebi ya kala, toyebi bosenga ezwaki basanza motoba kino mwambe mpe kozwa yango.

Mokambi Faust nsima atunaki soki tozalaki na bondimi ete Nkolo akosala bikamwisi mpe ete tokozala na makoki ya kosilisa likambo ya viza na lombango. Eyano na biso ezalaki “iyo,” ya monene mpe tobandaki kosala bolengeli na lombango. Tolengelaki mikanda oyo esengelaki mpo na baviza, tozwaki libota na biso ya bolenge, mpe tokendaki na konsila na lombango mpenza. Elenge moko ya kitoko ya mwasi akutanaki na biso kuna. Na kotalaka mikanda na biso mpe koyeba soki nini tozalaki kokende kosala kuna na Portugal, atunaki biso, “Bozali mpenza kokende kosunga bato ya mboka na ngai “iyo” mpe tolimbolaki ete tozali kokende kolobela Yesu Klisto mpe kokatola na ntina na Ye mpe mission na Ye na mokili. Tozongaki kuna baposo minei nsima, lokola profeta asengaki biso tosala bongo.

Bandeko mibali mpe basi, natatoli ete baprofeta balobaka na nguya ya Molimo Mosantu. Batatolaka na ntina ya Klisto mpe etinda na Ye ya bonzambe na mabele. Balobelaka na mayele mpe motema ya Nkolo mpe babiangemaka mpo na kolobela Ye mpe koteya biso oyo tosengeli kosala mpo na kozonga kofanda liboso ya Nzambe mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto. Topambolami lokola tozali kosalela bondimi na biso mpe kolanda mateya na bango. Na kolandaka bango, babomoi na biso ezali na esengo mpe na mwa mikakatano moke, bampasi na biso mpe mikakatano ekomi pepele mpo na komema, mpe tosalaka nguya ya molimo ya nzinganzinga na biso oyo ekobatela biso na banguya ya monguna na mokolo na biso.

Natatoli na lokumu ete Yesu Klisto azali na bomoi mpe ete Akambaka Eklezia na Ye na mabele na nzela ya baprofeta na Ye, bamoni, mpe basakoli. Natatoli ete Azali Mobikisi mpe Mosikoli ya mokili mpe ete na nzela na Ye tokoki kobikisama mpe konetolama liboso ya Nzambe. Nalingaka Ye. Namikitisi mpo na koloba makambu oyo na nkombo ya bule ya Nkkolo Yesu Klisto, amene.