2010–2019
Emoniseli mpo na Eklezia, Emoniseli mpo na Babomoi na Biso
Sanza ya Minei 2018


Emoniseli mpo na Eklezia, Emoniseli mpo na Babomoi na Biso

Libaku malamu moko ya kozwaka emoniseli ezali moko ya makabo minene koleka ya Nzambe epai ya Bana na Ye.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi balingami, libaku kani monene ezali ya nkembo ya kosepela na Pasika elongo na bino na Eyenga oyo ya likita linene! Eloko moko te ezali ntina koleka kosepela na molulu oyo esalemaka na mabele oyo na kokembeleka moyo ya ntina koleka oyo atambolaki naino na mabele oyo. Na, Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba mikolo mya Nsuka, tokumisaka Bomikabi na Ye ezanga nsuka na Elanga ya Getsemane. Azalai na bolingi ya konyokwama mpo na masumu mpe botau ya moko na moko kati na biso, oyo bolozi esalaki Ye “makila ebima na liboso nyonso ya mposo.”1 Abakamaki na ekulusu ya Bolozi 2 mpe asekwaki na mokolo ya minei lokola mosekwi ya bana ya Tata ya Lola. Nalingaka Ye mpe natatoli ete azali na bomoi! Ye nde Azali koyangela mpe kokamba Eklezia na Ye.

Na bozangi Bosikoli ya nsuka ya Mosikoli, moto moko te kati na biso akokaki kozala na elikya ya kozonga lisusu epai ya Tata na biso ya Lola. Soki Bosikoli te, liwa elingaki kozala nsuka. Bomikabi ya Mobikisi na biso epesaki bomoi ya seko ezala nzela ya pete mpe bozangi kufa ezala solo mpo na biso nyonso.

Ezali mpo na etinda na Ye na bokiti na nse mpe kimia Apesaka na bayekoli na Ye neti mwasi na ngai, Wendy, mpe ngai toyokaki bolendisi nsima na mokolo ya 2 sanza ya yambo , 2018, ntango tolamukaki, telefone elelaki toyokaki bayebisi biso ete Mokambi Thomas S. Monson akufaki.

Elilingi
Mokambi Russell M. Nelson mpe Mokambi Thomas S. Monson

Tozangi Mokambi Monson! Tokumisi bomoi na ye mpe libula na ye. Elombe ya molimo, atiki matambe ya ndakisa likolo ya baoyo nyonso bayebaki ye mpe likolo ya Elezia oyo alingaki.

Na Eyenga, ya sanza ya Yambo 14, 2018, na ndako ya likolo ya Tempelo ya Salt Lake, Bokambi ya Yambo ebongisamaki na lolenge ya pete kasi ya bule oyo etiama na Nkolo. Nsima lisanga ya bakambi ya lobi eleki, bandimi ya Eklezia na mokili mobimba batombolaki maboko na bango mpo na kondima mosala oyo ezawami na Bapostolo. Nazali na botondi ya komikitisa mpo na lisungi na bino.

Nazali na botondi lisusu mpo na baoyo bazali osunga ngai. Ezalaki libaku malamu ya kosunga na Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na mibale mpo na mibu 34 mpe koyeba moko na moko ya Bakambi 10 oyo baleka 16 ya Eklezia. Nayekolaki ebele uta na bango.

Nasengeli lisusu kopesa ebele na bankoko na ngai. Bazalaki mwambe oyo babongolaki mitema na bango na Europe. Moko na moko ya bilombe oyo bapesaki bomoi na bango nyonso mpo na koya na Siona. Na yango, na ntango nsima ya bankola oyo elandaki, bankoko na ngai nyonso batikalaki na bomipesi te. Lokola mbano, nabokwamaki na libota ya nsango malamu.

Elilingi
Baboti ya Mokambi Nelson
Elilingi
Libota ya bolenge ya Mokambi Nelson

Nalingaki baboti na nagi mingi. Balimbolaki mokili epai na ngai mpe batangisaki ngai mateya ya ntina koleka. Nakoki te otonda bango mpo na libota ya esengo oyo bakelaki mpo nan gai mpe bandeko na ngai. Mpe nsima, atako lokola mwana mobali, nayebaki nazalaki kozanga eloko moko. Mokolo nakotaki na engunduka mpe nakendaki na bibliotheque ya LDS mpo na koluka mokanda moko na ntina ya Eklezia. Nabandaki kolinga mingi koyekola na ntina ya nsango malamu.

Ntango nasosolaki Liloba ya Bwanya, nalingaki baboti na ngai batosa mobeko wana. Na yango, mokolo moko ntango nazalaki elenge mpenza, nakendaki na ndako na biso ya nse ya mabele mpe napanzaki milangi nyonso ya wisky! Nazelaki tata na ngai apesa ngai etumbu, kasi alobaki eloko moko te.

Ntango nakolaki mpe nabandaki kososola bonene ya mwango ya Tata ya Lola, namilobelaka ntango nyonso, “Nalingi likabo ya Moklisto moko te! Nalingi bobele nakangama na baboti na ngai.” Yango esalemaki ata moke te kino baboti nan gai bakufaki 80, mpe nsima yango esalemai. Nakoki te kolakisa esengo na ngai oyo nayoki lelo,3 mpe mikolo nyonso nayokaka esengo ya boangami na bango mpe kokangamaka elongo na bango.

Elilingi
Russell mpe Dantzel Nelson

Na 1945, ntango nazalaki na kelasi ya kimunganga, nabalaki Dantzel White na Tempelo ya Salt Lake. Ye na ngai topambolamaki na bana basi kitoko libwa mpe mwana mobali moko ya kitoko. Lelo libota na biso ya kokola ezali moko ya bisengo monene ya bomoi na ngai.

Elilingi
Mokambi mpe Ndeko mwasi Nelson mpe bana na bango ya basi
Elilingi
Mokambi Nelson mpe mwana na ye ya mobali

Na mobu 2005, nsima ya mibu 60 ya libala, molingami na ngai Dantzel babengaki ye na ndako na lolenge moko oyo tozelaki te. Mpo na eleko moko, mawa na ngai ezangaki ndimbola. Kasi nsango ya Pasika mpe elaka ya lisekwa esungaki ngai.

Elilingi
Wendy mpe Russell Nelson

Nsima Nkolo amemaki Wendy Watson pembeni ngai. Tokangisamaki na Tempelo ya Salt Lake na Sanza ya minei April 6, 2006. Nalingaka ye mingi! Azali mwasi moko ya kafukafu—lipamboli monene epai na ngai, na libota na biso, mpe na Eklezia mobimba.

Moko na moko ya mapamboli oyo eyaki lokola mbano ya kolukaka mpe komekaka Molimo Mosantu. Elobaki Mokambi Lorenzo Snow, “Oyo ezali libamu malamu ya Mosantu ya mikolo mya Nsuka nyonso… yango ezali lotombo na biso ya kozala na nguya ya Molimo Mosantu mikolo nyonso ya babomoi na biso.”4

Eloko moko oyo Molimo etalisaki ngai mbala na mbala uta na libiangi na ngai ya sika lokola Mokambi ya Eklezia ezali lolenge nini Nkolo azali na bolingi ya komonisa makanisi na Ye mpe bolingi. Libaku malamu ya kozwa emoniseli ezali moko ya makabo minene ya Nzambe epai ya bana na Ye.

Na nzela ya nguya ya Molimo Mosanto, Nkolo akokamba biso oyo nyonso ya malamu tozali kosala. na ndako ya mosala, natelemaki—azanga elikya na ntina ya lolenge nini kosala mosala oyo eleki—mpe nayebaki lolenge ya Molimo Mosanto na makanisi na ngai.5

Mpo na kolendisa mosala nan gai epai ya Wendy, nayebisaki ye, “nayebi emoniseli mpe lolenge nini kozwa yango.” Na mosolo na ye—mpe, lokola nayekoyekola, na ntina na ye—alukaki mpenza mpe azwaki emoniseli na ye na ntina na biso, oyo napesaki ye bolendisi ya koloba iyo.

Lokola moko kati ya Likonzi likoki ya Bapostolo Zomi na mibale, nasambelaki mikolo nyonso mpe napesaki matondi epai ya Nkolo ntango nyonso alobelaki ngai na motema mpe makanisi

Botala kaka bikamwisi na yango! Atako libiangi ya Eklezia, tokoki kosambela epai ya Tata na Lola mpe kozwa bokambi mpe boyangeli, na bobateli na makama mpe kozanga bososoli, mpe kozala na makoki ya kokokisa makambo oyo tokoki kosala na makasi na biso te. Soki tokozwa mpenza Molimo Mosantu mpe koyekola kososola mpe komanyola botindiki na Ye, tokokambama na makambo minen mpe mike.

Ntango nakutanaki na mokumba monene ya kopona bapesi toli mibale, namitunaki lolenge nini mpenza nakopona kaka bato mibale uta na bato zomi na mibale oyo nalingaka mingi mpe natosala.

Mpo nayebi ete bofuli eyekamaka na nsango malamu, nakutanaki na Apostolo moko na moko na losambo. 6 Nsima nakotaki ngai moko na ndako moko ya tempelo mpe nalukaki bolingi ya Nkolo. Natatoli ete Nkolo ateyaki ngai napona Mokambi Dallin H. Oaks mpe Mokambi Henry B. Eyring mpo na kosunga lokola bapesi toli nan gai na Bokambi ya Yambo.

Na lolenge moko, natatoli ete Nkolo afulaki libiangi ya Mpaka Gerrit W. Gong mpe Mpaka Ulisses Soares bakulisama lokola Bapostolo na Ye. Nayambi bango na mosala ya kibondeko ya mobali oyo.

Ntango tosanganaka lokola Lisanga na Bokambi ya Yambo mpe Lisanga likoi ya Bapostolo Zomi na mibale, ndako na biso ya bosangani ya emoniseli. Molimo emonisamaka. Ntango tosololaka na mituna ye ndenge na ndenge, mosala ya moyungisi emonisamaka Apostolo moko na moko atalisaki likanisi na ye mpe mayele na ye. Atako tokoki kozala na makanisi ekesena, bolingo toyokaka mpo na moko na moko ezalaka makasi. Bosangani na biso esunga biso tomanyola bolingi ya Nkolo mpo na Eklezia na Ye.

Na mayangani na biso boebele ekambaka te! Toyokanaka moko na moko mpe tosololaka moko na moko kino tokozala bomoko. Nsima ntango tondimisami mobimba, nguya ya bosangani ya Molimo Mosantu ezali ntina! Toyebaka oyo Profeta Joseph Smith ayebaki ntango ateyaki, “Na lisanga ya liyoki tozwaka nguya elongo na Nzambe.”7 Moto moko te na kati ya Bokambi ya Yambo to ya Lisanga likokki ya Bapostolo Zomi na mibale azwaka ekateli na ye moko mpo na Eklezia ya Nkolo na mposa na ye moko!

Bandeko mibali mpe basi, lolenge nini tokoki kokoma mibali mpe basi—lokola basaleli ya Klisto—Nkolo azali na mposa na biso mpo na? Lolenge nini tokoki kozwa biyano na mituna oyo etungisaka biso? Soki boyebi ya Joseph Smith na Zamba ya Bule etei biso eloko moko, elingi koloba ete balola efungwami mpo na biso ete Nzambe azali koloba na bana na Ye.

Profeta Joseph Smith atiaki ndakisa ya mpo na biso tolanda nakopesaka biyano na mituna na biso. Kolandaka elaka ya Yakobo ete soki tozangi bwanya tokoki kosenga epai ya Nzambe, elenge mobali Joseph atunaki motuna na ye mbala moko epai ya Tata na Lola.8 Alukaki emoniseli na ye moko, mpe boluki na ye efungolaki eleko oyo ya nsuka.

Na lolenge moko, boluki na yo ekofungola nini mpo na yo? Bwanya nini yo ozangi? Mposa na yo makasi ezali nini mpo na koyeba to kososola? Landa ndakisa ya Profeta Joseph. Zwa esika ya kimia oyo okoki ntango nyonso kokende. Mikitisa liboso ya Nzambe. Pesa motema na yo epai ya Tata na yo Lola. Turn to Him for answers and for comfort.

Sambela na nkombo ya Yesu Klisto na ntina ya babosenga na yo, babobangi na yo, babotau nay yo—iyo, mposa na yo mpenza ya motema. Mpe nsima yoka! Koma makanisi oyo eyaka na makanisi na yo. Koma mayoki na yo mpe elandisama na misala ya ntina oyo olingi kosala. Ntango okobanda kosala boye mikolo nyonso, sanza nyonso, mibu nyonso, “okokola na mobeko ya emoniseli.”9

Nzambe alingi mpenza kolobela yo? Iyo! “Atako moto atandi loboko na ye mpo na kokanga ebale ya Missouri na botioli na yango … lokola kopekisa Atonda nguya asopa mayele likolo ya mito ya Basantu ba mikolo mya Nsuka kouta na lola.”10

Bosengeli te komituna na ntina ya oyo ezali bosolo.11 Bosengeli te komitungisa soki epai ya nani bobateli esengeli kouta. Na nzela ya emoniseli na yo moko, okoki kozwa litatoli na yo moko ete Buku ya Mormon ezali liloba ya Nzambe, ete Joseph Smith azali profeta, mpe ete oyo ezali Eklezia ya Nkolo. kotala te oyo basusu bakoki koloba to kosala te, moto moko te akoki kolongola litatoli oyo etiami na motema na yo mpe na makanisi na ntina ya oyo ezali bosolo.

Nasengi bino bomatisa likoki na bino ya molimo mpo na kozwa emoniseli na bino moko, mpo Nkolo alakaki ete “soki bokosenga, bokozwa emoniseli likolo ya emoniseli, boyebi likolo ya boyebi, mpo bokoka koyeba, ete misala mpe makambo ya kimia—oyo ememaka esengo, oyo ememaka bomli ya seko.”12

Ezali na makambo ebele oyo Tata na bino ya Lola alingi bino boyeba. Lokola Mpaka Neal A. Maxwell ateyaki, “Na baoyo bazali na miso ya komona mpe matoi mpo na koyoka, ezali pole pole ete Tata mpe Mwana bapesaka basekele ya mokili!”13

Eloko moko te efungolaka balola na pete koleka komatisa bopeto, botosi ya solo solo, boluki ya solo, feti ya mokolo na mokolo ya maloba ya Klisto na Buku ya Mormon,14 mpe ntango ya bomipesi mpe mosala ya lisitwale ya libota.

Mpo na kozala solo, bantango ekoki kozala ntango boyoki lokola balola ekangemi. Kasi nalaki lokola bozali kokoba kozala na botosi, kolakisaka botondi mpo na lipamboli nyonso Nkolo apesaka bino, mpe lokola na motema kokita botosaka ntango ya Nkolo, bokopesama mayele mpe bososoli ouyo bozali koluka. Lipamboli nyonso oyo Nkolo azali na yango mpo na bino—atako bikamwisi—ekolandisama. Oyo ezali emoniseli ya moto ye moko ekosala mpo na yo.

Nzali na kondima na ntina ya lobi ekoya. Ekotondisama na mabaku mpo na moko na moko na biso akoba, kosalisa, mpe komema nsango malamu na moili mobimba. Kasi nazali moto ya bindimandima te na ntina ya oyo ezali koya. Tozali na mokili oyo ezali na makambo ebele mpe ezali na mitungisi ebele. Bosaleli ya barezo sosio mpe basango ya bantango 24 ezali kotindela biso bansango. Soki tosengeli ozala na elikiya ya koleka na nzela ya mingongo mpe bafilozofi ya bato oyo etungisaka bosolo, tosengeli koyekola kozwa emoniseli.

Mobikisi na biso mpe mosikoli, Yesu Klisto, bakokokisa misala na Ye sika mpe ntango akoya lisusu. Tokomona bikamwisi kolakisa ete Nzambe Tata mpe Mwana na Ye Molingami bayangelaka na mabele oyo na lokumu mpe nkembo. Kasi na mikolo ekoya, ekozala mpasi kozala na bomoi ezanga boambami, boyangeli, mpe nguya ya bolendisi ya Molimo Mosantu.

Bandeko nan gai ya mibali mpe basi, nasengi bino bomatisa likoki ya molimo na bino mpo na kozwa emoniseli. Tika ete Pasika oyo ya Eyenga ezala ntango ya ntina na bomi na bino. Bopona kosala mosasla ya molimo oyo esengaka esengo ya likabo ya Molimo Mosantu mpe koyoka mongongo ya molimo mbala mingi mpe koleka pole.

Elongo na Moroni, nasengi bino na Pasika ya Saba oyo “boya epai ya Klisto, mpe botika likabo nyonso,”15 bozala na likabo ya Molimo Mosantu, likabo oyo ekoki mpe ekobongola bomoi na bino.

Tozali bayekoli ya Yesu Klisto. Bosolo ya ntina koleka Molimo Mosantu ekotatola epai na bino ntango nyonso ezali Yesu azali Klisto, Mwana ya Nzambe ya bomoi. Azali na bomoi! Azali Molobeli na biso epai ya Tata, Ndakisa na biso, mpe Mosikoli na biso. Na Pasika oyo ya Eyenga, tosepelaka na likabo ya bomikabi na Ye, Lisekwa na Ye, mpe bonzambe na Ye.

Oyo ezali Eklezia na Ye, ezongisama na nzela ya Profeta Joseph Smith. Natatoli bongo, na maloba ya bolingo mpo na moko na moko na bino, na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.