Komipesa na Mosala na Mpila

Na Mpaka M. Russell Ballard

Ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale


M. Russell Ballard
Bilembo oyo nyonso ezali kotatola eloko moko: biloko minene ebotisami mpe mikumba ekomisami pepele na nzela ya babokasi ya maboko ebele “maye masili komipesa na mpila mpo na ntina ya malamu.”

Mpaka Perry, nakanisi osengeli kozala elenge koleka banso na Eklezia. Bomonaki ndenge atombwamaki uta na kiti na ye.

Bandeko babali mpe basi, ntango nyonso naliaka tomati ya mbuma ya sika ya kotela to naliaka mbuma moko ya kotela, etonda mai kaka nsima ya kobuka yango na nzete, makanisi na ngai mazongaka nsima ya mibu 60 ntango tata na ngai azalaki na bilanga ya nzete ya mbuma na mboka Holladay, Utah. Abombaki bandako ya banzoi kuna mpo na kobotisa mbuma na ntango ya bafololo oyo na nsuka ekokoma mbuma monene, ya kitoko mpenza.

Tata alingaki mafuta ya nzoi ya bilenga na ye mpe akamwaki lolenge bankoto na yango kosalaka elongo bazalaki kobongola monsonso esangisamaki uta na bafololo ya mbuma na ye na mafuta ya nzoi ya sukali, ya wolo—moko ya bilei ya mokili ya malonga koleka nyonso. Elingi koloba, batali ya mambi ya kolia, bayebisaka biso ete ezali molia se moko oyo ekwi biloko ya ntina nyonso—enzyme, vitamines, minerais, mpe mai—esengeli mpo na kotelemisa bomoi.

Tata na ngai ntango nyonso azalaki komeka kobenda ngai na mosala na ye ya bandako ya nzoi, kasi nazalaki na esengo mpenza kotikaka ye kobokola banzoi na ye. Nzoka nde, uta mikolo wana, nayekolaki mingi na ntina ya ndako ya nzoi ebongisami malamu mpenza—liboke ya penepene ya banzoi 60,000.

Mafuta ya nzoi euti mpenza na kobotisa, kozwa monsonso, mpe kosangisa monsonso na mafuta ya nzoi. Ezali motungisi kitoko oyo ezalaki mpo na bango mayele ya kobotama epesamaki bango na Mokeli na biso. Bato bakanisaka ete mpo na kosala kaka 0.45 kg ya mafuta ya nzoi, banzoi 60,000 yango kati na ndako basengeli na lisanga kokende kotala bafololo bifuku 12 mpe kokende mobembo 122,000 km koleka —ekokani na mbala misato nzinganzinga ya mokili. Na a molai ya bomoi na ye ya bamposo misato kaka, bopesi ya nzoi ya mafuta moko na ntina ya mafuta ya nzoi epai ya ndako na ye ezali moko na zomi na mibale mpamba ya lutu ya moke.

Atako emonani moke ntango tomekisi yango na nyonso,moko na zomi na mibale ya lutu moke ya mafuta nzoi ya nzoi moko na moko ezali na ntina mpo na bomoi ya ndako. Banzoi batalelanaka. Mosala oyo ekokaki kozala monene mpo na mwa banzoi basali ekomaka pepele mingi mpamba te banzoi banso na botongono basalaka eteni na bango.

Ndako ya nzoi ezali ntango nyonso elembo ya motuya na lisolo ya Eklezia na biso. Toyekoli na Buku ya Mormon ete Bayedite bamemaki mafuta ya nzoi elongo na bango (tala Etele 2:3) ntango bakendaki mobembo na Mikili ya Amerika bankoto ya mibu kala. Brigham Young aponaki ndako ya nzoi lokola elembo mpo na kolendisa mpe kofula bokasi ya kosala elongo oyo esengelaki katikati ya bapionie mpo kobongola lisobe ekawuka ebotaka mbuma te nzinganzinga ya Great Salt Lake ekoma balubwaku ebotaka mbuma tozali na yango lelo. Tozali bazui litomba ya limoni mpe mosala monene mpe makasi na bango ya lisanga.

Elembo ya ndako ya nzoi ekutami na bakati mpe balibanda ya batempelo na biso mingi. Ebaelo oyo wapi natelemi esalami uta na nzete ya Walnut elonami na nsima ya ndako ya Mokambi Gordon B. Hinckley mpe ekembisami na bililingi ya ndako ya nzoi.

Bilembo oyo nyonso ezali kotatola eloko moko: biloko minene ebotisami mpe mikumba ekomisami pepele na nzela ya babokasi ya maboko ebele “maye masili komipesa na mpila mpo na ntina ya malamu” (D&A 58:27). Kanisa oyo bifuku ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka bakokaki kosala na mokili soki tozalaki kosala lokola ndako ya nzoi na kokangama na biso, ya komipesaki mpenza na mateya ya Nkolo Yesu Klisto.

Mobikisi ateyaki ete motindo ya yambo mpe ya monene ezali:

“Okolinga Nkolo Njambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo mobimba. …

“Mosusu na mibale ejali mpe lokola yango ete, Okolinga mojalani na yo lokola yo moko.

“Mibeko yonso mpe masakoli ikakemi na mibeko oyo” (Matai 22:37, 39–40).

Maloba ya Mobikisi ezali pete—kasi ndimbola na yango ezali motuya makasi mpe mozindo. Tosengeli kolinga Nzambe mpe kobatela bazalani na biso mpe bisomei. Kanisa malamu nini tokoki kosala na mokili soki tokangani elongo, ya kosangana lokola bayekoli ya Klisto, na mpila mpe na kosalaka ntango nyonso akokisaki bamposa ya basusu mpe kosalisaka baye nzingazinga na biso—mabota na biso, baninga na biso, bazalani na biso, mpe bandeko na biso bana mboka.

Lokola ekomami na Mokanda ya Yakobo, lisalisi ezali ndimbola mpenza ya losambo ya mpeto (tala Yakobo 1:27).

Tozali kotanga na ntina ya lisalisi bandimi ya Eklezia bazali kopesa na mokili mobimba mpe mingimingi lisalisi ya bato ya mokili oyo epesami na bantango ya mpasi—bamoto, bampela, mipepe makasi, mvula makasi. Biyano ya kosala nokinoki mpenza oyo esengami mingi mpe esepelisi mingi esengeli mpenza kokoba lokola nzela ya komemanaka mikumba. Kasi nini na ntina ya bomoi na biso ya mikolo nyonso? Nini ekozala litomba ya kosangisa misala ya mawa mikemike bifuku oyo esalami mokolo na mokolo na biso na ntina ya bolingo na biso ya Boklisto ya boboto mpo na basusu? Ntango ezali oyo ekozala na litomba moko oyo ekobongwanisa bana banso ya Tata wa biso ya Lola na nzela ya bosemboli ya bolingo na Ye epai na bango na nzela na biso. Mokili na biso ya mobulu ezali na mposa ya bolingo oyo ya Klisto lelo mingi koleka ezala naino te, mpe ekozala na mposa na yango kutu na mingi na mibu mikoya.

Misala ya pete, ya mikolo na mikolo ya lisalisi ekoki komonana lokola mingi te na mpe yangomei, kasi ntango totali yango lisanga ekomi kaka lokola moko likolo ya zomi na mibale ya lutu moke ya mafuta ya nzoi epesami na nzoi moko na ndako ya nzoi. Ezali na nguya kati na bolingo na biso mpo na bana na Ye, mpe ntango bolingo wana elakisami na miso ya bankoto ya misala ya boboto ya Boklisto, ekokolisa mpe ekoleisa mokili na monsonso etelemisaka bomoi ya bondimi, elikia, mpe lolango.

Nini esengeli biso kosala mpo na kokoma lokola banzoi ya mafuta bamipesi mpe kokomisa bomipesi wana eteni moko ya ezalela na biso? Mingi kati na biso tozali na mikumba na kokendaka na mayangani ya Eklezia, mpe tozali kosala makasi na mabiangi na biso, mingimingi na baeyenga. Wana esengeli solo kopesamela longonia. Kasi ezali mayele mpe mitema na biso komipesa na mpila na makambo malamu na kati ya mposo? Ekokisi biso kaka mikumba na biso kozangaka kokanisa, to ezali biso solo ya kobongwana na nsango malamu ya Yesu Klisto? Lolenge nini tozwi mbuma ya bondimi oyo eleisami na mayele na biso mpe kolona yango na nse ya mabele ebotaka ya milimo na biso? Lolenge nini tosali mbogwana makasi ya motema oyo Alma alobi ezali na ntina mpo na esengo mpe kimia na biso ya seko? (tala Alama 5:12–21).

Mikundola, mafuta ya nzoi ezali bilei se moko oyo ikwi biloko ya ntina nyonso mpo kotelemisa bomoi ya kufa. Mpe malongi mpe nsango malamu ya Klisto ezali se nzela moko mpo na kozwa bomoi ya seko. Kaka ntango litatoli na biso ekoli koleka kofandisamaka likolo ya oyo ezali na molimo na biso mpo na kokoma eteni moko ya milimo na biso mpo ete ekoka kozala ya koleisama na mozindo nde botindiki na biso mpo na kolinga mpe kosalisa ekokoma lokola ya Mobikisi. Ezali nde, mpe se kaka nde, ete tokokoma bayekoli babongwani mobimba ya Klisto bapesami nguya na Molimo mpo na kokomela mitema ya baninga na biso bato.

Ntango mitema na biso mitiami lisusu likolo ya biloko ya mokili te, tokoyoka lisusu mposa ya balokumu ya bato to koluka kaka se kosepelisa lolendo na biso te (tala D&A 121:35-37). Kasi, tolati babolamu Lokola Klisto oyo Yesu ateyaki:

  1. Tozali na boboto mpe bosekomi mpe motema molai (tala D&A 121:41).
  2. Tozali na boboto, ya bokibisi to lokutu te (tala D&A 121:42).
  3. Toyokaka bolingo epai ya bato banso (tala D&A121:45).
  4. Makanisi na biso ezali ntango nyonso ya bolamu (tala D&A 121:45).
  5. Tozali lisusu na mposa ya kosala mabe te (tala Moziya 5:2).
  6. Molimo Mosanto azali moninga na biso ya ntango nyonso, mpe malongi ya bonganganzambe ezali kotiola likolo na milimo na biso lokola mamio uta na lola (tala D&C 121:45-46).

Sikawa, nazali kolendisa mpila to mobulu ya biyamba te. Bongo te! Nazali solo kopesa makanisi ete tozwa litambe ya mayele elandi nsima na bobongoli motema na biso mobimba na nsango malamu ya Yesu Klisto na kokotisaka malongi na ye na kati na mitema na biso mpe milimo na biso mpo tokosala mpe kobika ntango nyonso engebene mibeko—mpe na bosembo—maye tolobaka tondimaka.

Bosembo oyo ekomisaka pete mpe ekolisaka mayoki na biso epai ya Molimo mpe epai ya bamposa ya basusu. Ememaka esengo na babomoi na biso mpe kimia na milimo na biso—Lolenge ya esengo mpe kimia oyo eyelaka biso ntango toyamboli masumu na biso mpe tolandi Mobikisi na kobatelaka mitindo na Ye.

Lolenge nini esalaka biso mbongwana oyo? Lolenge nini tokotisaka bolingo ya Klisto na mitema na biso? Ezali na mosala moko ya pete ya mokolo na mokolo oyo ekoki kasala bokeseni mpo na mondimi nyonso ya Eklezia, lokola bino bilenge babali mpe bilenge basi, bino bakolo banzemba, mpe bino batata mpe bamama.

Mosala ya pete wana ezali: Na losambo na yo ya ntongo na mokolo ya sika moko na moko, senga Tata na Lola mpo akamba yo okitola libaku ya kosalisa moko ya bana na Ye ya motuya. Nsima kende kati na mokolo mobimba na motema na yo etonda bondimi mpe bolingo, kolukaka moto moko ya kosalisa. Tikala kokangama na yango, kaka lokola nzoi ya mafuta ekangamaka likolo ya bafololo uta na yango akobenda monsoso mpe putulu. Soki osali oyo, liyoki na molimo ekoyesa monene, mpe okobombola mabaku ya kosalisa oyo mokolo moko te liboso ososola ete ekokaki kosalama.

Mokambi Thomas S. Monson ateyi ete na mabaku mingi Tata na Lola ayanolaka nsambo ya moto mosusu na nzela na biso—na nzela na ngai—na nzela ya maloba mpe misala ya boboto, na nzela ya misala mpe lisalisi mpe bolingo na biso ya pete.

Mpe Mokambi Spencer  W. Kimball alobaki: “Nzambe amonaka biso mpenza, mpe akengelaka biso. Kasi mbala mingi na nzela ya moto mosusu nde Ye ayanolaka na bamposa na biso. Yango wana ezali na ntina ete tosalisana” (Teachings of Presidents of the Church: Spencer W. Kimball[2006], 82).

Nayebi ete soki osali oyo—na ndako, na eteyelo, na mosala, mpe na eklezia—Molimo ekokamba yo, mpe okozala na makoki ya komona baye bazali na mposa ya lisalisi moko oyo kaka yo okoki kozala na makoki ya kopesa. Okotindikama na Molimo mpe okopesama nzela na kitoko ya kosalisa kopesa mpimbo na mokili elongo na bolingo ya peto ya Klisto mpe nsango malamu na Ye.

Mpe mikundola, lokola moko na zomi na mibale ya lutu moke ya mwa nzoi ya mafuta moke epesami na ndako ya nzoi, soki toyikanisi babokasi na biso na bazomi ya bankoto mpe kutu bifuku ya bokasi ya losambo mpo na kokabola bolingo ya Nzambe mpo na bana na Ye na nzela ya mosala ya Boklisto, ekozala na litomba kokolaka nokinoki ya bolamu oyo ekomema Mwinda ya Klisto epai ya mokili oyo ezali kokoma molili ntango nyonso. Kongangisamaka, tokomema bolingo mpe mawa epai ya libota na biso mpe ya motangwani, mobola, babukani, mpe epai ya bana ya Tata wa biso na Lola baye bazali koluka bosolo mpe kimia.

Ezali losambo na ngai ya bosawa, bandeko babali mpe basi, ete tokutuna kati na nsambo na biso ya mikolo na mikolo bofuli ya komona moto moko oyo tokoki kopesa mwa lisalisi ya ntina, kokwaka lisalisi ya kokabolaka bosolo mpe litatoli ya nsango malamu. Na nsuka ya mokolo moko na moko, ekoki biso kozala na makoki ya koloba “iyo” na eyano na mituna, “Esalaki ngai bolamu moko na mokili lelo, esalisaki ngai mokeleli moto?” (Hymns, no. 223).

Oyo ezali mosala ya Nzambe. Tika tosala na yango na botongono lokola mwa banzoi ya mafuta ya komipesa basalaka oyo ya bango, nasambeli na bosawa na nkombo ya Yesu Klisto, amene.