Bomaniola Mapamboli

Na Mokambi Thomas S. Monson


Thomas S. Monson
Tata wa biso ya Lola ayebi bamposa na biso mpe alingi kosalisa biso ntango tobeleli nkombo na ye mpo na lisalisi.

Bandeko babolingo mibali mpe basi, likita liye esali mibu 49 uta nasungamaki, na Sanza ya zomi  4, 1963, lokola moko ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale. Mibu ntuku minei ezali mingi. Nzokande, na ndenge ebele, ntango emonani mokuse mingi uta natelemaki na elobelo na Tabelenakele mpe napesaki lisikulu na ngai ya yambo mpenza.

Mingi ebongwani uta Sanza ya zomi  4, 1963. Tozali kowumela na ntango moko ezali se moko kaka na mambi ma mokili. Topambolami na makambo mingi mpenza. Kasi ezali eloko moko ya mpasi komona bakpokoso mpe ndingisa ya masumu nzinganzinga na biso mpe olemba te. Namoni ete, esika ya kotikalaka na mabe, soki tokozongisa makanisi na nsima mpe tokotala mapamboli na bomoi na biso, ata mapamboli oyo emonani ya moke, ntango mosusu emonani mpamba, tokoki kozala na esengo monene.

Ntango natali lisusu mibu 49 mileki, nasali mwa bososoli. Moko ezali ete mayele ezanga motango oyo nazwi ezalaki kaka te oyo tokoki komona lokola ya kafukafu. Ya solo, na ntango ekomaki, mbala mingi emonanaki lokola ezanga ntina mpe kutu ya mpamba. Kasi, na nsima, ebongisi mpe epamboli bomoi—ya moke te na yango ezali ya ngai moko. Natindi osala ngalasisi wana kaka na nkombo na yo—ete ozwa bososoli ya bomoi na yo mpe koluka mingimingi mapamboli, monene mpe moke, ozwi.

Oyo ebakisami mbala na mbala na bozongeli na ngaimei ya mibu ezali boyebi na ngai ete nsambo na biso eyokami mpe eyanolami. Tomesani na bosolo oyo ezwami na 2  Nefi na Buku ya Mormon: Bato bazali, ete bakoka kozala na bomoi.”1 Natatoli ete mingi na esengo oyo eyei ntango tondimi ete tokoki kosolola na Tata ba biso ya lola na nzela ya losambo mpe ete nsambo wana ekoki koyokama mpe koyanolama—ntango mosusu na lolenge mpe ntango tozeli te, kasi ekoyanolama mpe na Tata moko ya Lola oyo ayebi mpe alingi biso na bobongi nie mpe oyo azali na mposa ya esengo na biso. Elakaki ye biso te, “Bomikitisa; mpe Nkolo Nzambe na yo akokamba yo na loboko, mpe akopesa yo eyano na nsambo na yo.”?2

Mpo na mwa minuti oyo epesameli ngai, nalingi kokabola elongo na bino kaka ndakisa ya moke mpenza ya mayele na ngai nazwaki na yango nsambo eyokamaki mpe eyanolamaki mpe oyo, na kotala nsima, ememi mapamboli na kati ya bomoi na ngai mpe na ya basusu lokola. Zulunale na ngai ya mokolo na mokolo ebateli o ntaka ya mibu miye nyonso, esalisi mpo na kopesa mwa makambo songolo oyo mingimingi nalingaki kokoka komikundola soki yango te.

Na ebandeli ya 1965, napesemaki mosala ya kokende na Makita ya likonzi mpe nasalaki mayangani misusu na etuka monene ya Pasifiki ya Sudi. Oyo ezalaki botali na ngai ya yambo na eteni wana ya mokili, mpe ezalaki ntango ya kobosana lisusu te. Makambo mingi ya molimo esalemaki na etinda oyo ntango nakutanaki na bayangeli, bandimi, mpe bamisionele.

Na nsuka ya mposo ya mokolo ya mposo mpe eyenga, ya sanza ya mibale 20 mpe 21, tozalaki na Brisbane, Australie, mpo na kosala mayangani ya likita ya bilaka bikokani ya Likonzi ya Brisbane. Na mayangani ya mokolo ya mposo, nalakisamaki na Mokambi ya disitiliki na etuka moko ya penepene. Ntango napesaki ye mbote, nazwaki liyoki moko ya makasi ete nasengelaki koloba na ye mpe kopesa toli, mpe yango wana natunaki ye soki alingaki kozala elongo na ngai na liyangani ya mokolo ya Eyenga na ntongo mokolo elandaki mpo ete yango ekokisama.

Nsima ya liyangani ya mokolo ya Eyenga tozwaki libaku ya kotala bisika elongo. Tolobanaki na ntina ya mikumba na ye mingi lokola mokambi ya disitiliki. Wana ezalaki biso kosala bongo, nayokaki liyoki moko ya kopesa ye makanisi moko etali mosala ya misio mpe lolenge nini ye mpe bandimi na ye bakokaki kosalisa bamisionele ya ntango mobimba na misala na bango na etuka wana. Nayokaki nsima ete moto oyo azalaka kosambela mpo na toli na ntina na yango. Epai na ye, botali na biso ezalaki litatoli ya kafukafu ete nsambo na ye eyokamaki mpe eyanolamaki. Oyo ezalaki lokola liyangani ya momesano kasi moko oyo nandimi ekambamaki na Molimo mpe oyo esalaki bokesani na bomoi mpe boyangeli ya mokambi ya disitiliki, na bomoi ya bandimi, mpe na elonga ya bamisionele kuna.

Bandeko mibali mpe basi, bantina ya Nkolo mbala mingi ekokisamaka ntango tozali kosala bokebi na toli ya Molimo. Nandimi ete mingi tozali kosalela na bofuli mpe mayoki oyo ekoya epai na biso, mingi Nkolo akopesa biso bitinda na Ye.

Nayekoli, lokola nalobeli na bitinda na ngai ya liboso, kozelisa botindiki ata moke te. Libaku moko mibu mingi eleki, nazalaki kokata mai nzinganzinga na Deseret Gym na Salt Lake ntango nayokaki bofuli mpo na kokende na lopitalo ya Université mpo na kotala moninga na ngai ya malamu oyo obungisaki makolo na ye. Na mbalakaka na tikaki liziba, nalataki, mpe nokinoki nakendaki kotala moto malamu oyo.

Ntango nakomaki na kisuku, namonaki ete ezalaki mpamba. Na kotunaka, nayokaki ete nalingaki ntango mosusu komona ye na esika ya liziba ya mai ya lopitali, esika moko oyo basalaki mpo na libiki ya nzoto. Yango ezalaki ya solo. Amikambaki kuna na kiti ya kotambolela mpe azalaki moto ye moko kaka ya kisuku wana. Azalaki na ngambo ya mosika ya liziba, penepene na nsuka ya mozindo. Nabengaki ye, mpe abalulaki kiti na ye ya kotambolela mpo na kopesa ngai mbote. Tosepelaki na botalini, mpe nakendeki kozongisa ye na kisuku ya lopitalo wapi napesaki ye lipamboli.

Nayokaki nsima na moninga na ngai ete azalaka mpenza komitungisa mokolo wana mpe azalaki kokanisa komiboma. Asambelaki mpo na bosungi kasi abandaki koyoka lokola nsambo na ye ezwaki eyano te. Akendaki na liziba na likanisi ete oyo elingaki kozala nzela moko mpo na kosukisa bobola na ye—na kokambaka kiti na ye ya kotambolela na kati ya nsuka ya mozindo ya liziba. Nakomaki na ntango ya kafukafu, na eyano na oyo nayebi efulamaki uta na likolo.

Moninga na ngai azalaki na makokaki ya kowumela mibu mingi koleka—mibu etonda na esengo mpe botondi. Boniboni nazali na esengo ya kozalaka esaleli na maboko ya Nkolo na mokolo wana ya kafukafu na liziba ya kokata mai.

Na libaku mosusu, ntango Ndeko mwasi Monson mpe ngai tozalaki kozonga ndako na motuka nsima ya kotalaka baninga, nayokaki ete nasengelaki kokende na kati ya engumba na motuka bakilometele mingi mpo na kotala mokufeli mobali oyo kala azalaki na palwasi na biso. Nkombo na ye ezalaki Zella Thomas. Na ntango wana, azalaki kovanda na ndako ya mibange. Na ebandeli ya nsima na nzanga wana tomonaki ye azalaki mpenza ya kolemba kasi alalaki na kimia na mbeto na ye.

Zella azalaka ya kokufa miso, kasi ayebaki mongongo na ngai mbala moko. Atunaki soki nakokaki kopesa ye lipamboli, kobakisaka ete amilengelaki mpo na kokufa soki Nkolo alingaki ye azonga mboka. Ezalaki na molimo moko ya kitoko, ya kimia na kisuku, mpe biso banso toyebaki ete ntango na ye na bokufi etikalaki mokuse. Zella akamataki ngai na loboko mpe alobaki ete asambelaki na mpiko ete nalinga koya kotala ye mpe kopesa ye lipamboli. Nayebisaki ye ete toyaki na bofuli ya semba uta na Tata ya Lola. Napwepwaki ye na mbunzu, koyebaka ete ntango mosusu nalingaki lisusu komonana ye te na bokufi. Yango esalemaki, mpo awaki mokolo elandaki. Mpo na kokoka kopesa libondisi mpe kimia epai ya Zella ye elengi ezalaki lipamboli mpo na ye mpe ngai.

Libaku ya kozala lipamboli na bomoi ya moto mosusu mbala mingi eyaka ntango ozali kozela yango te. Butu moko ya malili mpenza ya mokolo ya mposo, na eleko ya malili ya 1983–84, Ndeko mwasi Monson mpe ngai tokendaki na motuka bakilometele mingi na ngomba ya lobwaku ya Midway, Utah, wapi tozalaki na ndako moko. Malili butu wana ezalaki -24° Fahrenherit, (-31°C), mpe tolingaki kotala mpenza ete nyonso ezalaki makamu na ndako na biso kuna. Totalaki mpe tomonaki ete ezalaki malamu, yango wana tolongwaki mpo na kozonga Salt Lake City. Tosalaki mwa bakilometele kaka tii na nzela monene yambo motuka na biso etika kosala. Tokangamaki mpenza. Nazala mbala mingi te, soki ata moke te, na malili lokola tozalaki butu wana.

Na mwa ntembe, tobandaki kotambola epai ya mboka ya penepene mingi, mituka kolekaka biso na lombangu. Na nsuka, motuka moko etelemaki, mpe elenge mobali alingaki kosalisa biso. Nsukansuka mpenza Tomonaki ete mazuti na ebombelo ya mozuti ekomaki kilo na ntina ya malili, ekokaki kosalema lisusu te mpo na biso kotamwisa motuka. Elenge oyo ya boboto akumbaki biso na ndako na biso ya Midway. Namekaki kofuta ye mpo na lisalisi, kasi na boboto aboyaki. Ayebisaki biso ete azalaki Boy Scout mpe alingaki kosala likambo ya malamu. Namibimisaki epai na ye, mpe apesaki longonia mpo na litomba azwaki mpo na kosalisa. Kokanisaka ete ntango mosusu azalaki na mibu ya misio, natunaki ye soki asalaki miango mpo na kosala misio. Alobaki ete ayebaki mpenza te nini alingaki kosala.

Na mokolo ya yambo elandaki na ntongo nakomaki mokanda na elenge mobali oyo mpe natondaki ye mpo na boboto na ye. Na mokanda nalendisaki ye mpo na kosala missio ya ntango mobimba. Natindelaki ye buku moko kati na babuku na ngai nakoma mpe natiaki nzela na nse ya mikapo elobeli mosala ya misio.

Penepene na mposo moko nsima mama ye elenge mobali wana abengaki ngai na telefoni mpe alobelaki ngai ete mwana na ye ya mobali azalaki elenge mobali moko ya kafukafu kasi ete na ntina ya banguya moko na bomoi na ye, mposa azalaki na yango uta kala ya kosala misio ekitaki. Alobaki ete ye mpe tata ya ye bakilaki bilei mpe basambelaki ete motema na ye ekoka kobongwana. Batiaki nkombo na ye na molongo ya mabondeli na Tempelo ya Provo na Utah. Balikiaki ete na lolenge moko, na nzela moko, motema na ye ekotutama mpo na bolamu na ye, mpe akolinga kozongela mposa na ye ya kosala misio mpe kosalela Nkolo na botongono. Mama wana alingaki nayeba ete amonaki makambo wana ye mpokwa wana ya malili lokola eyano na nsambo na bango mpo na ye. Nalobaki, “Nandimi yo.”

Nsima ya sanza mingi mpe bosololi mingi elongo na elenge mobali oyo, Ndeko mwasi Monson mpe ngai totondaki na esengo mpo na kozala na feti ya mbote ya bokei malamu na misio na ye yambo akende mpo na Misio ya Vancouver na Canada.

Ezalaki libaku ya malamu ete banzela na biso ekutana na butu wana ya malili ya sanza na zomi na mibale? Nandimi ata moke te ezali bonso. Kutu, nandimi bokutani na biso ezalaki eyano na nsambo ya mpiko mama moko mpe tata moko mpo na mwana na bango ya bolingo.

Lisusu, bandeko ba ngai mibali mpe basi, Tata wa biso ya Lola ayebi mposa na biso mpe alingi kosalisa biso ntango tobeleli nkombo na ye mpo na lisalisi. Nandimi ete litungisi moko te na biso ezali moke mingi to ezangi ntina. Nkolo azali na biloko mikemike ya bomoi na biso.

Nalingi kosukisa na kolobelaka likambo moko ya kala te oyo etikaki elembo na mikama ya bato. Eyaki na bosepeli ya bizaleli mpo na Tempelo ya Kansas City, bobele sanza mitano eleki. Lokola mingi oyo eyaka na bomoi na biso, na ngonga wana emonani lokola kaka likambo mosusu wapi nyonso esimbaki. Nzokande, ntango nayekolaki makambo esangani na bosepeli ya bizaleli ya mpokwa yambo tempelo ebulisama, nasosolaki ete butu wana ezalaki ya kafukafu. Kutu ezalaki mpenza ya mpamba te.

Lokola na makambo nyonso ya mboka oyo esalemaka elongo na bobulisami ya tempelo, bilenge naKansas City Missouri Temple District bamilengelaki mpo na koyemba na maboke ya kokabwana na bituka na bangomei. Mwango ezalaki ete bakokutana banso elongo na ndako ya leta oyo bafutelaki ya monene mokolo ya mposo na ntongo ya boyembi mpo ete bakoka koyekola ntango kani mpe bisika wapi kokotela, wapi basengelaki kotelemela, ntaka boni esengelaki kozala katikati na bango mpe moto kani ya penepene na bango, boniboni kobima na etando ya kati, mpe bongo na bongo—makambo mikemike mingi basengelaki kososola na mokolo wana ntango baye bapesamaki mokumba bazalaki kotia makambo ekeseni elongo mpo ete boyembi ekoka kosebisama mpe kosalama malamu.

Ezalaki kaka na kpokoso moko monene mokolo wana. Mosala mobimba eyekamaki na biteni batia kala na disiki oyo elingaki kolakisama na etando monene eyebani lokola Jumbotron. Biteni na disiki oyo ezalaki na motuya mpo na mosala. Ekanganaki kaka te nyonso elongo, kasi eteni moko na moko ya disiki etiama na televisio elingaki kobanda misala oyo ekolanda. Biteni ya video ezalaki esika wapi mosala nyonso eyekamaki. Mpe Jumbotron ezalaki kosala te.

Bato ya tekiniki basalaki na makasi mpo na kobongisa kpokoso ntango bilenge bazalaki kozela, mikama na bango kobungisaka na ntango ya motuya ya komilengela. Ezalela ebandaki kokoma lokola ekoka kosalema te.

Mokomi mpe mokonzi ya bosepeli, Susan Cooper, nsima alimbolaki ete, “lokola tolongwaki uta na eteni A mpo na B mpo na Z, toyebaki ete ezalaki kosala te. … Lokola tobandaki kotala ntango, toyebaki ete elingaki kozala mosika na bokoki na biso, kasi toyebaki ete tozalaki na moko ya makasi monene mingi koleka na nse ya ndako— bilenge 3.000. Tosengelaki kokita mpe koyebisa bango nini ezalaki kosalema mpe kosalela bondimi na bango.” 3

Kaka ngonga moko yambo bato babanda kokota, bilenge 3.000 bafukamaki na nse mpe basambelaki elongo. Basambelaki ete baye bazalaki kosala na Jumbotron bafulisama mpo na koyeba nini kosala mpo na kobongisa yango; batunaki Tata wa bango ya Lola mpo na kobongisa nini bango, bango moko, bakokaki te kosala na ntina ya mokuse ya ntango.

Elobaki moko oyo akomaki etali yango nsima, “Ezalaki losambo moko bilenge bakobosana mokolo moko te, te mpo ete nse ezalaki makasi, kasi mpo ete Molimo esangisaki mikuwa na bango. 4

Ewumelaki te mpo na bato ya tekiniki baya mpo na koyebisa bango ete kpokoso esosolamaki mpe ebongisamaki. Akanisaki eyano ewutaki na “libaku”, kasi bilenge wana banso bayebaki malamu mingi koleka.

Ntango tokotaki na Ndako ya Leta mpokwa wana, toyebaki bakpokoso ya mokolo wana te. Bobele nsima toyebaki yango. Oyo tomonaki na miso, nzokande, ezalaki mosala ya koyemba ya kitoko, esebisama_moko—oyo ya malamu mingi koleka namona. Bilenge bangengisaki molimo ya nkembo, ya nguya oyo eyokamaki na banso baye bazalaki kuna. Bamonanaki lokola bayebaki mpenza wapi kokota, wapi kotelama, boniboni kozalana elongo na bayembi banso nzinganzinga na bango. Ntango nayokaki ete bolengeli na bango ekatanaki mpe ete mingi ya makambo elengelamaki na lingomba mobimba te, nakamwaki. Moko te akokaki koyeba. Nkolo ya solo asalaki bokeseni.

Nakotika te kokamwa mpo na boniboni Nkolo akoki kotindika mpe kokamba biteni nyonso ya bokonzi na Ye mpe kasi kozala na ntango mpo na kopesa bofuli etali moto na moto—to bosepeli ya mboka to Jumbotron moko. Likambo ete Ye akoki, ete Ye asalaka, ezali litatoli mpo na ngai.

Bandeko mibali mpe basi, Nkolo azali kosala na nyonso na bomoi na biso. Ye alingi biso. Ye alingi kopambola biso. Ye alingi biso toluka lisalisi na Ye. Lokola Ye azali kokamba biso mpe koyangela biso, mpe lokola Ye ayokaka mpe ayanolaka nsambo na biso, tokozwa esengo awa mpe sikawa oyo Ye alingi mpo na biso. Ekoka biso kozala na boyebi ya mapamboli na Ye na bomoi na biso, nabondeli na nkombo ya Yesu Klisto, Mobikisi wa biso, amene.

Show References

  1.  

    1.  2  Nefi 2:25.

  2.  

    2.  Doctrine et Alliances 112:10.

  3.  

    3. Susan Cooper, na Maurine Proctor, “Nothing’s Too Hard for the Lord: The Kansas City Cultural Celebration,” Meridian Magazine, , May  9, 2012, ldsmag.com.

  4.  

    4. Proctor, Meridian Magazine, , sanza ya mitano 9, 2012.