Yambo Tala, Nsima Salisa

Na Linda  K. Burton

Mokambi Monene ya Lingomba Ya Bamama Basungi


Linda K. Burton
Na kosalaka, moko na moko na biso akoki kokoma mingi lokola Mobikisi ntango tosalisi bana ya Nzambe.

Moko ya bilembo minene koleka nyonso ya bosolo tozali na yango ete profeta na biso wa bolingo Thomas  S. Monson, azali mosali aponami na Nkolo ezali ete ayekoli kolanda ndakisa ya Mobikisi—na kosalisaka moto na moto, moko na moko. Baye kati na biso oyo bakoti na mai ya libatisi bayokani mpo na kosala lolenge moko. Toyokani “ntango nyonso komikundolaka [Mobikisi] mpe kobatelaka mitindo na ye,” 1 mpe Ye alobi, “Eye ezali mobeko na ngai, ete bolingana, lokola ngai nalingi bino.”2

Botala boniboni maloba maye ya Mokambi Monson ezali libengisi se moko wana kaka: “Tozingami na baye bazali na mposa ya bokebi na biso, ya bolendisi na biso, ya lisungi na biso, ya libondi na biso, ya boboto na biso. … Tozali maboko ma Nkolo awa likolo ya mabele, na etinda ya kosalisa mpe kotombola bana na Ye. Azali na mposa ya moko na moko kati na biso.”3

Boyoki yango—libengisi ya kolingana? Mpo na boko, kosalisa to kosalela moko na moko, kolandaka ndakisa ya Mobikisi, eyaka na pete te. Kasi na nzela ya kosalaka, moko na moko na biso akoki kokoma mingi lokola Mobikisi ntango tosalisi bana ya Nzambe. Mpo na kosalisa biso kolingana malamu mingi, nalingi kopesa likanisi ya maloba minei: “Yambo tala, nsima salisa.”

Penepene na mibu 40 eleki, mobali na ngai mpe ngai tokendeki na tempelo mpo na bokutana na biso ya mokolo ya mitano na butu. Towutaki kobalana kala te, mpe nazalaki na mwa nkanda mpamba te eye ezalaki mbala na ngai ya mibale lokola molongani ya sika. Ndeko mwasi moko kovandaka mpembeni na ngai asengelaki komona yango. Ayekamaki mpe alobaki na nse na limemia ete, “kobanga te. Nakosalisa yo.” Kobanga na ngai ekitaki, mpe nakokaki kosepela na liyangani ya tempelo etikalaki. Yambo atalaki, nsima asalisaki.

Tobengisami banso mpo na kolanda mateya ya Yesu mpe kosalisa basusu. Libengisi oyo esuki te na bandeko basi ya banzelu. Ntango nakaboli mwa ndakisa ya mokolo na mokolo ya bandimi baye bayekoli liboso kotala mpe nsima kosalisa, koyoka mateya ya Yesu bango balakisi.

Mwana moko ya mibu motoba ya kelasi ya bana alobaki: “ntango naponamaki mpo na kozala mosungi ya kelasi, nakokaki kopona moninga mpo na kosala elongo na ye. Nazwaki [mwana mobali moko na kelasi na biso oyo abangisaki ngai] mpamba te aponamaki mokolo moko te na basusu. Nalingaki ayoka malamu.”4

Nini mwana oyo atalaki? Atalaki ete mobangisi na kelasi bapona ye ata mokolo moko te. Nini asalaki mpo na kosalisa? Bobele aponaki ye azala moninga wa ye lokola mosungi ya kelasi. Yesu Ateyaki, “Nde ngai nazali koloba na bino ete, bolinga bayini na bino mpe bobondela mpo na bango oyo banyokolaka bino.”5

Na palwasi moko, basimbi Bonganganzambe ya Alona yambo bazalakim se kotala mpe sikawa bazali kosalisa na lolenge moko ya ntina. Mposo na mposo bilenge babali yango bakokoma ntongontongo mpe bakotelama libanda ya ndako ya makita na mvula, na mbula ya mabanga, to moi makasi, kozilaka boyei ya bandimi ya mibange na palwasi na bango. Bakotombola bakiti ya baye bakokaka kotambola te mpe kozwa bango uta na motuka, kopesa maboko ya kolenga mpo na kosimba, mpe na bompikilisi kokamba bankulutu na nsuki ya mpembe na ndako. Bazali mpenza kosala mokumba na bango na Nzambe. Ntango batali mpe nsima basalisi, bazali ndakisa ya bomoi ya liteya ya Mobisiki: “Lokola esalaki bino yango na moko ya bandeko na ngai oyo ya mike, bosalaki yango na ngai.”6Lokola pologalami ya sika ya bilenge esalami, miso ya bilenge mibali oyo ekofungwama na ntembe te mpo na kozwa mabaku ebele ya kosalisa na lolenge ya Klisto.

Kotalaka mpe kosalisaka ntango mosusu esengi makasi mingi. Elenge mwasi moko afulama na nkombo ya Alexandria amonaki ete ndeko wa ye Madison akokaki te kosilisa bosenge ya Progrès personnel na yemei mpamba te azalaki na mpasi ya autism ya makasi. Alexandra asanganaki na bilenge basi ya palwasi na ye, basololaki na bayangeli ba ye, mpe azwaki mokano ya kosala likambo moko mpo na Maddy oyo ye akokaki te kosala ye moko. Moko na moko ya bilenge basi basilisaki kosalela ndambo ya milulu mpe miango ya Progrès personel na lolenge ya bozuili mpo na kosalisa Maddy azwa mpauni na yemei.7

Bilenge basi baye bakokola malamu na kati na misala ya bomama mpe bondeko ya basi ya Lingomba ya Bamama Basungi mpamba te bazali koyekolaliboso kotala, nsima kosalisa na lolenge ya bolingo.

Mokambi Monson akundolisi biso ete charité “bolingo ya peto ya Klisto”8—to na maloba mosusu, kotala mpe kosalisa— “ezali polele ntango mwasi akufela mibali ya mobange amikundoli mpe azwi misala ya palwasi” mpe “ntango ndeko mwasi oyo avandi ye moko na Lingomba ya Bamama Basungi azwi libengisi, ‘Yaka—vanda penepene na biso.’” 9 Mobeko ya wolo esalelami awa: “Likambo kani olingi ete bato [to basi] basengeli kosalela yo, yo sala kutu yango na bango.”10

Mobali moko oyo atalaki asalisaki na lolenge ebele ya motuya. Alobi:

“Nazalaki kosalisa mwasi wa ngai eyenga moko na Eteyelo etonda na bana ya mibu sambo ya mobulu. Ntango bokaboli ya Kelasi ya bana ebandaki, namonaki moko ya bana ya kelasi agumbamaki na kiti na ye mpe mpenza azalaki koyoka malamu te. Molimo elobelaki ngai ete azalaki na mposa ya libondisi, yango wana navandaki penepene na ye mpe na kimia natunaki ye mabe nini azwaki. Ayanolaki te … , yango wana nabandaki koyembela ye na malembe.

“Eteyelo ya bana ezalaki koyekola loyembo ya sika, mpe ntango toyembaki, ‘Soki nazali koyoka na motema na ngai, nayoki mongongo ya Mobikisi,’ nabandaki koyoka pole mpe molunge ya kokamwa etondisaki molimo mwa ngai. …Nazwaki litatoli ya ngaimei ya bolingo ya Mobikisi mpo na ye, … mpe mpo na ngai. … Nayekolaki ete tozali maboko ma [Mobikisi] ntango tozali kosalisana moko mpe mosusu.”11

Kaka te ndeko ya mobali oyo lokola Klisto amonaki mposa ya lisungi ya mwasi wa ye na kelasi etonda na bana ya mibu sambo ya mobulu; apesaki lisusu lisalisi lya ye na mwana moko azalaki na mposa. Alandaki Mobikisi, oyo ateyaki, “Misala miye bomoni ngai kosala yango bokosala lokola .”12

Kala te mpela efungolaki mabaku mingi mpo na bayekoli ba Yesu Klisto mpo na kotala mpe nsima kosalisa. Babali, basi, bilenge, mpe bana bamonaki bankita mpe bandako ebebisamaki mpe babwakaki biloko binso mpo na kosalisa kopetola mpe kobongisa biloko bibukanaki. Boko batalaki mposa ya kosalisa na mosala ya liboma ya kosukola bilamba. Basusu na mpasi bakombaki bafoto, bankasa ya leta, mikanda, mpe mikanda misusu ya motuya mpe nsima batandaki yango libanda mpo na kobatela nini bakokaki. Kotalaka mpe nsima kosalisaka ezali ntango inso malamu mpe ekokokanaka te ntango inso na manaka na bisomei.

Esika nini ya malamu mingi mpo yambo kotala mpe nsima kosalisa koleka ndako? Ndakisa moko uta na bomoi ya Mpaka Richard  G. Scott elakisi yango:

“Butu moko mwana mobali wa biso Richard, oyo azalaki na mpasi ya motema, alamukaki na koganga. … Mbala mingi mwasi wa ngai ntango inso azalaki kolamaka mpo na kolengela mwana alelaki, kasi mbala oyo nalobaki, ‘Nakolengela ye.’

“Na ntina ya mpasi na ye, ntango abandaki kolela, motema na ye alingaki kopema mbangumbangu. Alingaki kosanza mpe kobebisa bilamba ya mbeto. Butu wana nasimbaki ye penepene na ngai mpo na kolemmbisa lombangu ya motema na ye mpe kokanga kolela na ye ntango nazalaki kobongola bilamba na ye mpe kotiela ye elamba ya mbeto ya sika. Nasimbaki ye kino akendeki kolala. Nayebaki te ete kaka mwa sanza nsima akokufa. Nakomikundola ntango inso kosimbaka ye na maboko ma ngai na kati ya butu wana.”13

Yesu alobaki, “Moto nyonso alingi kozala monene o ntei na bino, azala mosali na bino.”14

Ntango mosusu tosenginiami na kosalisa na lolenge moko oyo tolingi kosalisela mpe kaka te na lolenge oyo esengeli na ntango wana. Ntango Mpaka Robert  D. Hales ateyaki mobeko ya bomoi ya bomoni liboso, akabolaki ndakisa ya kosomba likabo mpo na mwasi na ye. Mwasi na ye atunaki, “Ozali kosomba yango mpo na ngai to mpo na yo?”15 Soki tozui motuna wana na mposa na bisomei lokola tozali kosalisa mpe totuni, “Ezali ngai kosala yango mpo na Mobikisi, to nazali kosala yango mpo na ngai?” Lisalisi na biso ekokokana mingimingi na mosala ya Mobikisi. Mobikisi atunaki, mpe yango tosengeli kotuna, “Nini olingi ngai nasala mpo na yo?”16

Mwa bamposo eleka, nazalaki kowelawela mpe nalembaki, na mingi-ya-kosala na manaka na ngai. Nalikyaki kokende na tempelo mokolo wana kasi nayokaki nazalaki kaka na mosala mingi mpenza. Nokinoki ntango likanisi wana ya kozala na mosala mingi mpo na kokende na mosala ya tempelo te ekatisaki mayele na ngai, elamusaki ngai na nini nazalaki na yango mposa mingi mpenza kosala. Natikaki bilo na ngai mpe namataki na Tempelo ya Salt Lake, komitunaka ntango nini nalingaki kokanga ngonga nazalaki kobungisa. Na matondi, Nkolo azali na bompikiliki mpe boboto mpe ateyaki ngai liteya ya kitoko mokolo wana.

Wana evandaki ngai na ndako ya liyangani, elenge ndeko mwasi moko agumbamaki likolo na ngai mpe alobelaki ngai na nsei na limemia, “Nazali mpenza na mwa nkanda. Eye ezali bobele mbala na ngai ya mibale na tempelo. Okoki nasengi yo kosalisa ngai?” Boniboni akokaki koyeba mpenza ete maloba wana ezalaki mpenza oyo nazalaki na mposo ya kosala? Ayebaki te, Tata wa lola ayebaki. Ye atalaki mposa na ngai ya monene mingi mpenza. Nazalaki na mposa ya kosalisa. Ye atindika elenge mwasi oyo ya mosawa mpo na kosalisa ngai na kobengisaka ngai mpo na kosalisa ye. Nazali na ntembe te oyo azwaki litomba monene mingi koleka.

Natondi botondi ya mozindo na bato mingi lokola Klisto oyo basalisi libota na biso o ntaka ya mibu miye. Napesi matondi uta na motema na mobali mpe libota na ngai ya bolingo, oyo basalisi na kimoyimi te kasi na bolingo monene.

Tika ete banso toluka yambo kotala, nsima kosalisa. Ekosala biso bongo, tozali kobatela mayokani mpe lisalisi na biso, lokola oyo ya Mokambi Monson, ekozala polele ya boyekoli na biso. Nayebi ete Mobikisi azali na bomoi. Bomikabi na Ye epesi biso makoki ya kotia mateya na Ye na bomoi na biso. Nayebi Mokambi Monson azali profeta na biso lelo. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Mostrar referencias

  1.  

    1.  Doctrine et Alliances 20:77.

  2.  

    2.  Yoane 15:12.

  3.  

    3. Thomas S. Monson, “What Have I Done for Someone Today?” Liahona mpe Ensign, sanza ya zomi na moko 2009, 86.

  4.  

    4. Canyon H., “A Good Choice,” Friend, sanza ya yambo 2012, 31.

  5.  

    5.  Matai 5:44.

  6.  

    6.  Matai 25:40.

  7.  

    7. Tala “For Madison,” lds.org/youth/video/for-madison.

  8.  

    8.  Moroni 7:47.

  9.  

    9. Thomas S. Monson, “Charity Never Faileth,” LiahonampeEnsign, sanza ya zomi na moko 2010, 125; tala lisusu Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 101.

  10.  

    10.  3 Nefi 14:12.

  11.  

    11. Al VanLeeuwen, “Serving the One,” Liahona, sanza ya mwambe 2012, 19; Ensign, sanza ya mwambe 202012, 15; tala lisusu Sally DeFord, “If I Listen with My Heart,” 2011 Outline for Sharing Time, 28.

  12.  

    12.  3 Nefi 27:21.

  13.  

    13. Richard G. Scott, “The Eternal Blessings of Marriage,” Liahona mpeEnsign, sanza ya mitano 2011, 96.

  14.  

    14.  Matai 20:26.

  15.  

    15. Robert D. Hales, “Becoming Provident Providers Temporally and Spiritually,” Liahona mpe Ensign, Sanza ya mitano 2009, 9.

  16.  

    16.  Matai 20:32.