Bosalisa Bango Balanda Ntina ya Likolo

Na Mokambi Henry  B. Eyring

Mosungi wa Yambo na Bokambi ya Yambo


Henry B. Eyring
Na botambwisi na yo, baye ozali kokamba bakozala na makoki ya komona, kolinga, mpe kondima ete bakoki kokokisa makoki na bango nyonso mpo na kosala na bokonzi ya Nzambe.

Nazali na botondi mpenza mpo na libaku oyo ya kozala na liyangani ya bonganganzambe, ya koyoka liteya mpe litatoli ya kafukafu. Etindaki ngai nakanisa makambo oyo namonaka ngai mei. Penepene ya makambo nyonso oyo nakokisa lokola momemi bongangambe ezali mpo ete bato oyo bayebi ngai bamonaki makambo kati na ngai oyo ngai nakokaki komona te.

Lokola elenge tata nasambelaki mpo na koyeba mosala nini bana na ngai bakokaki kosala na bokonzi ya Nkolo. Mpo na bana mibali, nayebaki bakokaki kozala na mabaku ya bonganganzambe. Mpo na bana basi, nayebaki balingaki kopesa lisalisi lokola bantoma ya Nkolo. Banso balingaki kosala mosala na Ye. Nayebaki ete moko na moko azalaki moto se moko, mpe yango wana, Nkolo alingaki kopesa moko na moko na bango makabo songolo mpo na kosalela na mosala na Ye.

Sikawa nakoki te koloba na tata nyonso mpe moyangeli nyonso ya bilenge makambo mike mike na koyebaka nini ezali malamu mingi mpo na bino bosala. Kasi nakoki kolaka bino ete bokopambola bango soki bosalisi bango bayeba makabo ya molimo babotamaki na yango. Moto nyonso azali na likabo ekeseni. Moko te atindami mpo na kokweya. Ntango bozali koluka bobimisi mpo na komona makabo Nzambe azali komona na baye ozali kokamba na bonganganzambe—mingimingi bilenge—bokopambolama mpo na kokamba bango na mosala bakoki kosala. Na botambwisi na yo, baye ozali kokamba bakozala na makoki ya komona, kolinga, mpe kondima ete bakoki kokokisa makoki na bango nyonso mpo na kosala na bokonzi ya Nzambe.

Elongo na bana na biso moko, nasambelaki mpo na bobimisi mpo na koyeba boniboni nakokaki kosalisa moko moko na bango bamilengela mpo na mabaku songolo mpo na kosalela Nzambe. Mpe nsima namekaki kosalisa bango bamona na makanisi, balikia, mpe basala mosala mpo na nsima. Nakataki libaya moko mpo na mwana mobali moko na moko na litangi moko uta na makomi oyo elimboli makabo ya kafukafu mpe elili oyo elakisi likabo yango. Na nse ya elili mpe nkoma, nakataki mokolo ya libatisi mpe nkotisa na kati ya misala ya banganganzambe ya mwana mobali moko na moko, kokomaka molai na ye na molai na mokolo ya likambo moko na moko.

Nakolakisa bitando ya mabaya nakataki mpo na moko na moko mpo na kosalisa ye amona likabo na ye ya molimo mpe nini akoki kosala na mosala ya Nkolo. Bokoki kofulama mpo na koyeba, lokola nasalaki, makabo ya kafukatu mpe makabo songolo mpe se moko mpo na moko na moko ya bilenge bolingimpe bokambi.

Ntango mwana na ngai ya mobali ya nkulutu akomaki diakona mpe Eagle Scout, elili moko ya engondo eyaki na makanisi na ngai ntango nakanisaki na ye mpe na bomoi na ye ya nsima. Tozalaki kovanda na Idaho penepene na nganda ya ngomba ya South Teton, wapi tokandeki kotambola elongo mpe totalaki engondo kopumbwa. Elili wana na makanisi na ngai epesaki ngai liyoki ya maloba ma Yesaya:

“Akopesa nguya epai na ye oyo alembi; epai na ye oyo ajangi makasi, akobakisa nguya.

“Ata bilenge bakosenjwa, bakolemba, mpe bilenge bakokweya mpenza:

“Kasi baye batia motema na Nkolo bakozongisama makasi; bakomata na mapapu lokola engombo; bakokima; mpe bakolemba te; mpe bakotambola, mpe kokweya te.”1

Ya solo, elongo na mwana mobali ya mokolo koleka banso, totikaki kotambola na South Teton mpamba te mwana na ngai ya mobali alembaki. Alingaki totika. Alobaki, “Ekozala ngai ntango inso na mawa ete tokokaki te kokoma na nsonge? Tata, yo koba—nalingi kolembisa yo te.”

Nazongisaki maloba, “Nakotikala soki moke kozala na soni, mpe okomitungisa soki moke te. Tokotikala se komikundola ete tomataki awa biso mibale.” Na nsonge ya likolo ya ngomba nayemaki mpongo moko mpe nakomaki nkoma “Na Mapapu ya Mpongo.”

Mibu milekaki mwana na ngai ya mobali amataki lokola misionele likolo mingi koleka nakanisaka na elikya ngai ya kitoko mingi koleka. Na mikakatano ya elanga ya misio, mwa oyo ye akutanaki na yango emonanaki kozala mosika na kokoka. Mpo na mwana mobali ozali kosalisa, ekoki kozala, lokola mpo na mwana na ngai ya mobali, ete Nkolo amatisaki ye likolo mingi na koteyaka nsango malamu na monoko ya mpasi mingi koleka nakanisaka ekokaki kosalema. Soki okomeka na elenge mobali nyonso mpo na koyoka makoki na ye ya bonganganzambe, nalaki bino Nkolo akoyebisa bino mingi lokola bozali na mposa. Mwana mobali azali na nguya kutu koleka nini Nkolo akolakisa yo. Salisa ye alanda ntina ya likolo.

Mwana mobali ozali kolendisa akoki komonana lokola nsoninsoni mpo na kozala mosali ya nguya ya bonganganzambe. Mosusu ya bana mibali na ngai azalaki nsoninsoni mingi lokola mwana mobali ya moke ete alingaki te kokota na magazini mpe koloba na kalaka. Abangaki mingi mabe ete namitungisaki ntango nazalaki kosambela mpo na bonganganzambe na ye ya nsima mikolo. Nakanisaki na ntina na ye kati na elanga ya misio—oyo eyokanaki mabe. Nakambamaki na makomi moko na Masese: “Moto na nkuna akimi ntango moto ya kolanda ye azali te, kasi basembo bazali na mpiko lokola nkosi.”2

Nakataki “Mpiko lokola nkosi” na etando, na nse elili ya moto ya nkosi kogangaka. Na misio na ye mpe na mibu elandaki, akokisaki elikya na bokati na ngai. Mwana na ngai ya mobali kala ya nsoninsoni ateyaki nsango malamu na bondimi monene mpe akutanaki na makama na mpiko mpenza. Akumisamaki na mikumba na ye mpo na kolakisa Nkolo.

Yango ekoki kokoma mpo na elenge mobali ozali kokamba. Osengeli kotonga bondimi na ye ete Nkolo akoki kobongola ye na mosali moko ya mpiko mingi koleka mwana mabali ya nsoninsoni omoni sikawa.

Toyebi Nkolo akomisaka basala na ye mpiko. Elenge mwana mobali Joseph oyo amonaki Nzambe Tata mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, na zamba ya banzete abongwanaki na engambe ya molimo. Parley P. Pratt amonaki yango ntango Profeta Joseph Smith apamelaki mokengeli ya mabe oyo akangaki bango. Mpaka Pratt akomaki:

“Na mbalakaka atelemaki na makolo na ye, mpe alobaki na mongongo ya nkake, to lokola bogangi ya nkosi, kosakaka, maloba maye:

“‘KIMIA, bino bazabolo ya libulu ya lifelo. Na nkombo ya Yesu Klisto napameli bino, mpe natindo bozala kimia; nakowumela miniti moko lisusu te mpe koyoka mangala ya boye. Bosukisa elobeli ya boye, to bino to ngai tokufa NA NGONGA OYO!’”

Etali likambo wana, Mpaka Pratt akomaki, “Bolongobani mpe bonkumu namona mbala moko, lokola etelembaki na miniololo na katikati ya butu, na boloko na mwa mboka moko ya Missouri.”3

Nkolo akopesa basali na Ye ya bosembo mabaku mpo na kozala mpiko lokola nkosi ntango balobi na nkombo Na Ye mpe lokola banzeneneke na bonganganzambe na Ye.

Mwana mobali mosusu, kutu ntango azalaki mwa mwana, azalaki na liboke ya baninga oyo balukaki kozala elongo na ye. Asalaki kimoninga na pete o ntei ya bato. Lokola nasambelaki mpenamekaki kotali liboso esalema mosala na ye na bokonzi ya Nzambe, nayokaki ete alingi kozala na nguya ya kobenda bato elongo na bolingo mpe bomoko.

Yango ememi ngai na nsango na Doctrine and Covenants oyo elimboli makasi ya bampaka ya bonganganzambe mpo na kotonga Siona na Missouri na bokumisi ya banzelu oyo bamonaki babokasi na bango mpe misala na bango. Yango esengi libonza monene. Libimisi na Doctrine et Alliances elobi “Nzokande, opambolami, mpo na litatoli oyo opesi ekomami na lola mpo na banzelu batalele; mpe basepeli mpo na yo, mpe masumu nay o elimbisami.”4

Na etando ya bosenda ya mwana na ngai ya mobali, nakataki “Banzelu Basepeli likolo na Yo.”

Bokoki monene ya mwana na ngai mpo na kosangisa mpe kozala na nguya na bato ekendeki mosika koleka mibu na ye ya kelasi. Na bamemi bonganganzambe, abongisaki milulu ya likonzi oyo epesaki bilenge na etuka na ye bondimi ya kotia molende mpe kutu kolonga na ezalela ya kpokoso. Ntango atongaki bondimi na bilenge mibali mpe basi oyo, asalisaki kotonda esika ya Siona na bingumba ya sika ya Amerika. Na kokataka, nasalaki banzelu kobetaka kelelo, oyo ezalaki te mpenza boniboni basalaki yango, kasi ezalaki pete mingi kokata kelolo koleka koganga.

Banzelu basepeli lokola bayangeli na mokili mobimba batongi Siona na bapalwasi, makonzi, bamisio na bango. Mpe bakosepela na bilenge mibali mpe basi bokosalisa kotonga Siona wapi bazali mpe na ezalela nini bakoki kozala. Siona ezali mbano ya bato bakangani na boyokani mpe bolingo. Nabengisi bino kosalisa bilenge mpo na kosangana.

Mpo na moko ya bana na ngai ya mibali, natindamaki kokata moi moko—oyo ezali, moi ya likolo—mpe maloba uta na Losambo mpo na bato ya Mobikisi: “Eye ezali Bimoi ya Seko.” Penepene na nsuka ya mosala na ye na bokufi, Mobikisi asambelaki na Tata wa Ye:

“Mpe oyo ezali bomoi ya seko, ete bakoka koyeba yo Nzambe se moko ya solo, mpe Yesu Klisto, oyo yo otindi.

“Nakembisi yo na mabele: nasilisi mosala oyo yo opesaki ngai.”5

Mwana na ngai ya mobali asalaki mosala na mokili misato kasi oyo eleki na motuya na ndako na ye mpe na kati ya libota na ye. Atongi bomoi na ye nzinganzinga na yango: Asali penepene na ndako, mpe mbala mingi azongi mpo na kosangana na mwasi wa ye mpe bana na ye ya bilenge na ngonga ya kolia. Libota na ye evandaki mpembeni ya Ndeko mwasi Eyring mpe ngai. Bazali kobatela libanda na biso lokola soki ezalaki ya bango mpenza. Mwana oyo ya mobali azali kowumela kaka mpo na komikokisa mpo na bomoi ya seko te kasi lisusu mpo na kowumela azingami seko na ba ye libota na ye ya botondi oyo azali kosangisaka nzinganzinga na ye.

Bomoi ya seko ezali kovanda na bomoko, na libota, elongo na Tata, Mwana, mpe Molimo Mosantu. Bomoi ya seko ekoki kosalema bobele na lisalisi ya bafungola ya bonganganzambe ya Nzambe, oyo ezongisami na nzela ya Profeta Joseph Smith. Kozalaka na lotomo wana ya seko liboso ya bilenge bokambi ezali likabo ya monene bokoki kopesa bango. Bokosala yango yambo na ndakisa na libota na bino moko. Baye boyangeli bakoki kozanga libota na Eklezia, kasi nabeti mondenge na bino mpo na bosalisa bango bayoka mpe balinga bolingo ya libota na ngambo mibale ya elamba.

Etando ya bosanda nalimboli ezali kaka lolenge moko ya kosalisa bilenge komona bonene Nzambe amoni na bango mpe mikolo mikoya na bango mpe mosala se moko Ye elengeli bango bapesa. Ye akosalisa bango bamona boniboni kosala mpo na bana na bino to mpo na bilenge misuse bozali kokamba. Kasi lokola boluki na losambo komema oyo ekoya mpo na binomei mpe bolobeli yango na bilenge bato moko na moko, bokoya koyeba ete Nzambe alingi moko na moko ya bana na Ye moto na moto mpe amoni makabo minene mpe se moko na moko na moko na bango.

Lokola tata napambolamaki mpo na komona oyo ekoya na bokonzi ya Nzambe mpo na bana na ngai ya basi mpe mibali lokola. Ntango nalukaki na losambo kokambama, namonakisamaki nzela moko mpo na kosalisa bana na ngai ya basi bayaba elikya Nzambe atiaka na bango lokola basali oyo bakokaki kotonga bokonzi na Ye.

Ntango bana na ngai ya basi bazalaki bilenge, namonaki ete tokokaki kosalisa basusu bayoka bolingo ya baye bazali na ngambo mosusu ya elamba, na bankola. Nayebi ete bolingo ewuti na mosala mpe efuli elikya ya bomoi ya seko.

Yango wana tokataki etando ya kokatela mapa na yango totiaki lipa moko esalama na ndako mpe tokendeki elongo kopesa likabo na bakufela mibali mpe bakufela basi, mpe maboti. Nkoma nakataki na bitando ya mapa moko na moko elobi, “J’aime et J’espere,” lifalase ya “Nalingi mpe nalikii”. Bosolo ya makabo se moko ya molimo emonani kaka te likolo ya bitando nakataki kasi mingi na polele lokola tokabolaki yango na baye bazalaki na mposa, na katikati ya mpasi to bobungisi, bolakisi lisusu na ntembe te ete bolingo ya Mobikisi mpe Bomikabi na Ye ekoki kopesa kongenga ebonga mpenza ya elikya. Oyo ezali bomoi ya seko mpo na mwana mwasi na ngai mpe mpo moko moko na biso.

Sikawa, bokoki kokanisa, “Ndeko Eyring, ozali koloba ete nasengeli koyekola ndenge nini kokata?” Eyano ezali te. Nayekolaki kokata bobele na lisalisi ya moteyi ya malamu, oyo azalaki Mpaka Boyd K. Packer. Mwa mosala nasalaki ezalaki na ntina ya likabo na ye ya monene lokola mokati mpe bompikiliki na ye lokola moteyi. Kaka lola ekoki kopesa moteyi ya bongo lokola Mokambi Parcker. Kasi ezali na nzela mingi bokoki kobongisa mitema ya bana na bino ata na bitando ya mabaya ekatama te mpo na bango.

Ndakisa, bamasini ya bosololi ya sika epesi nzela ya kokabola bondimi mpe elikya na mosika ya bakilometele oyo ekaboli biso, na mbalakaka mpe na mbongo moke to te. Mwasi wa ngai asalisaka ngai mpo na kosala yango. Tobandaka na koloba na telefoni na bana ya bana to bana na biso ntango tokoki kosala yango. Totunaka bango bakabola masolo ya elonga ya moto na moto na bango mpe misala na bango basali. Tobengisaka lisusu bango batinda foto ya milulu wana. Tosalelaka bafoto wana mpo na kolakisa mwa liboke ya nkoma. Tobakisaka moko to mibale ya manzela uta na Buku ya Mormon. Ntango mosusu Nefi mpe Mormon balingaki kotutama na bolamu ya molimo ya oyo ezali na yango to mwa makasi esengeli mpo na kokela oyo tobengi “Zulunali ya Libota: Mwa Palaki.” Kasi Ndeko mwasi Eyring mpe ngai topambolami na makasi na biso. Toyokaka tofulami na koponaka matangi ya makomi mpe basango ya mokuse ya litatoli tozali kokoma. Mpe tomoni bosolo na bomoi na bango ya mitema kozalaka kobaluka epai na biso mpe epai ya Mobikisi mpe likolo.

Ezali na banzela misusu mpo na kosalisa; bosili kosala na mingi ya yango. Mimesano ya losambo ya libota mpe botangi makoma ekokela makundola ekowumela mpe mbongwana ya motema mingi koleka bokoki kosala sikawa. Ata na milulu ya mokili, lokola likambo ya masano to kotalaka filime, ekoki kobongisa motema ya mwana. Molulu kani ezali na ntina te kasi mayoki oyo eyei ntango bosali yango. Nasosoli bomeki ya malamu mpo na koyeba milulu elongo na nguya mpo na kosala bokesani na bomoi ya elenge. Ezali ete epesi likanisi na libanda ya litomba bayoki eyei na bango lokola likabo uta na Nzambe. Nayebi ete ekoki kosalema uta na mayele na ngai moko.

Ntango nakomaki diakona na mibu 12, navandaki na New Jersey, 80 km uta New York City. Nazalaki na ndoto ya kozala mobeti baseball. Tata wa ngai andimaki kokamata ngai komona lisano moko na Yankee Stadium ya kala mpe eyebana, na Bronx. Nakoki lisusu komona ntango Joe DiMaggio abetaki mongete mpo na kokima na katikati ya libanda ya lisano elongo na tata na ngai avandi penepene na ngai, ntango bobele moko tokenda na lisano monene ya baseball elongo.

Kasi mokolo mosusu elongo na tata na ngai ebongisaki bomoi na ngai libela. Akamataki ngai uta na New Jersey na ndako ya mopamboli moko na Salt Lake City. Namonaka moto yango mokolo moko te liboso.Tata na ngai atikaki ngai na monoko ya ndako. Mopamboli akambaki ngai na kiti moko, atiaki maboko na moto na ngai, mpe asakolaki lipamboli moko lokola likabo uta na nzambe oyo ezali na lisakoli moko ya mposa monene ya motema na ngai.

Ye alobaki ete nazalaki moko ya baoyo elobamaka, “Bapambolami baye bapesi kimia.”6Nasutukaki mingi ete mompaya moko abonga nie akokaki koyeba motema na ngai ete nafungolaki miso na ngai mpo na kotala kisuku wapi likamwisi ya boye ekomaki. Lipamboli wana ya mabaku ebongisaki bomoi na ngai, libala na ngai, mpe mosala na ngai ya bonganganzambe.

Uta na likambo wana mpe oyo elandi yango, nakoki kotatola, “Mpo banso bazali na likabo nyonso te epesameli bango; mpo ezali na makabo mingi, mpe na moto nyonso epesami likabo moko na Molimo ya Nzambe.”7

Na Nkolo kobimisaka na ngai likabo moko, nakoki koyeba mpe komilengala mpo na mabaku ya kosalela yango na bopamboli ya baye nakolinga mpe nakosalisa.

Nzambe ayebi makabo na biso. Mondenge na ngai mpo na bino mpe mpo na ngai ezali kosambela mpo na koyeba mapamboli topesami, mpo na koyeba boniboni kokolisa yango, mpe mpo na koyeba mabaku ya kosalisa basusu oyo Nzambe apesi biso. Kasi na nyonso mingi koleka, nasambeli ete bokofulama mpo na kosalisa basusu kososola makabo na bango maleki malamu uta na Nzambe mpo na kosalisa.

Nalaki ete soki bosengi, bokopambolama mpo na kosalisa mpe kotombola bosusu na nguya na bango mobimba mpo na lisalisi ya baye bango bazali kokamba mpe kolinga. Natatoli na bino ete Nzambe azali na bomnoi, Yesu azali Klisto, oyo ezali bonganganzambe ya Nzambe, oyo tosimbi, mpe Nzambe alengelaki bison a makabo ya ndenge mpo na kosela Ye koleka babolikii na biso ya makasi. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Show References

  1.  

    1.  Yisaya 40:29–31.

  2.  

    2.  Masese 28:1.

  3.  

    3.  Autobiography of Parley P. Pratt, ed. Parley P. Pratt Jr. (1938), 211.

  4.  

    4.  Doctrine et Alliaances 62:3.

  5.  

    5.  Yoane 17:3–4.

  6.  

    6.  Matai 5:9.

  7.  

    7.  Doctrine et Alliances 46:11.