Mona Basusu lokola Bakoki Kokoma

Na mokambi Thomas  S. Monson


Thomas S. Monson
Tosengeli kokolisa makoki mpo na komona bato lokola bazali sikawa te kasi lokola bakoki kokoma ntango bazwi matatoli ya nsango malamu ya Klisto.

Bandeko ba ngai balingami, mbala mibale mobu na mobu, Ndako ya Makita oyo ya kitoko mingi etondisami meke na bamemi ya bonganganzambe ya nzambe ntango tosangani, mpo na koyoka bitinda ya kofulama. Ezali na liyoki ya molimo moko kitoko oyo etondaka liyangani monene ya bonganganzambe ya Eklezia. Molimo oyo eyaka uta Ndako ya Makita mpe ekotaka na ndako nyonso bisika wapi bana ya Nzambe bazali kosangana. Toyoki solo molimo wana na mpokwa ya lelo.

Mwa mibu mileki, liboso ete Ndako ya Makita oyo etongama, motali moko ya Temple Square na Salt Lake City akotaki na liyangani moko ya likita linene na tabelenakele. Ayokaki bitinda ya Bandeko. Asalaki keba na Nsambo. Ayokaki miziki kitoko na nzela ya Bayembi ya Tabelenakele. Asepelaki na bonene ya lindanda kitoko ya Tabelenakele. Ntango likita esilaka bayokaki ye kolobaka, “Nalingaki kopesa biloko nyonso nazali na yango soki nayebaki ete oyo balobi balobaki lelo ezali solo.” Na mozindo azalaki koloba, “Nalingi ete nazwa litatoli ya nsango malamu.”

Ezali solo na eloko moko te na mokili oyo ekopesa libondi mpe esengo koleka litatoli moko ya bosolo. Atako na bandelo ekeseni, nandimi ete mobali to elenge mobali moko na moko awa na mpokwa ya lelo azali na litatoli. Soki oyoki ete ozali naino te na mozindo ya litatoli oyo olingaki kozala na yango, natindi yo osala mpo na kozwa litatoli ya boye. Soki ezali makasi mpe mozindo, sala mpo na kobatela yango na ndenge wana. Boniboni topambolami mpo na kozala na boyebi ya bosolo.

Etinda na ngai na mpokwa ya lelo, bandeko, ezali ete ezali na bato mingi baye bazali na litatoli ya moke to bazali na yango te sika awa, baoyo bakoki mpe bakozwa litatoli ya boye soki tokozala na bolingi ya kosala makasi ya kokabola oyo ya biso mpe kosalisa bango kobongwana. Na ntango mosusu bisotokoki kopesa ntina mpo na kobongwana. Nazali kolobela yambo baoyo bazali bandimi kasi kino sikawa bazali komipesa mobimba na nsango malamu te.

Mibu mingi mileki, na likita ya etuka enene moko esalamaki na Helsinki, Finland, nayokaki etinda moko ya nguya, ya kobosana te, mpe ya botindiki oyo epesamaki na liyangani moko ya bamama mpe bana basi. Nabosani te etinda wana, atako mibu penepene na 40 mileki uta nayokaki yango. Na katikati ya babosolo mingi oyo molobi akabolaki, alobaki ete mwasi azalaki na mposa bayebisa ye ete azali kitoko. Azali na mposa bayebisa ye azali na motuya. Azali na mposa bayebisa azali na ntina.

Bandeko, nayebi ete mibali bakokani mingi na basi na esika oyo.Tozali na mposa bayebisa biso ete tozali na motuya, ete tozali na makoki mpe ya kolongobana. Tozali na mposa ya kopesama libaku ya kosalisa. Mpo na bandimi baye basielumuki mosika na mosala to bazali komizongisa nsima mpe bazangi mokano, tokoki na losambo koluka mwa banzela mpo na kokomela bango. Kosenga bango kosala na mwa esika songolo ekoki kozala botindiki oyo bazali na yango mposa mpo na kozonga na mosala mobimba. Kasi bakambi oyo bakoki kosalisa na yango bazali ntango mosusu koboya kosala yango. Tozali na mposa ya komikundola ete bato bakoki kobongwana. Bakoki kotika nsima na bango mimeseno ya mabe. Bakoki koyambola na bobuki mibeko. Bakoki komema bonganganzambe na bolongobani. Mpe bakoki kosalela Nkolo na etingia. Tika napesa mwa bandakisa.

Ntango nakomaki moko ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale, nazwaki libaku ya kokende elongo na Mokambi President N. Eldon Tanner, mosungi moko ya Mokambi David  O. McKay, na likita ya likonzi na Alberta, Canada. Na ntango ya liyangani, mokambi ya likonzi atangaki bankombo ya bandeko mibali baye balongobanaki mpo na kokulisama bampaka. Baye bazalaki mibali oyo Mokambi Tanner ayebaki, mpo na ntango moko boye afandaka na etuka wana. Kasi Mokambi Tanner ayebaki mpe amikundolaki bango lolenge bazalaka ntango moko mpe ayebaki te ete basili kobongola bomoi na bango mpe balongobanaki mobimba mpo na kokoma bampaka.

Mokambi ya likonzi atangaki nkombo ya moto ya yambo mpe ayebisaki ye atelema. Mokambi Tanner alobaki na nse epai na ngai, “Tala ye. Nakanisaki mokolo moko te ete akokoka yango.” Mokambi ya likonzi atangaki nkombo ya moto ya mibale, mpe atelemaki. Mokambi Tanner aningisaki lisusu mpe alobaki bokamwi na ye. Mpe ezalaki bongo na bandeko mibali nyonso minei.

Nsima ya liyangani, Mokambi Tanner mpe ngai tozwaka libaku ya kopesa longonia na bandeko mibali oyo minei. Balakisaki ete bato bakoki kobongwana.

Na mibu 1940 mpe 1950, mokengeli moko ya boloko ya Amerika, Clinton Duffy, ayebanaki mpo na bokasi na ye ya kobongisa bato na boloko. Elobaki moyini moko ete, “osengeli koyeba ete bankoi babongola mposo na bango te!”

Warden Duffy ayanolaki ete, “Osengeli koyeba ete nasalaka na bankoi te. Nasalaka na bato, mpe bato babongwanaka mikolo nyonso.” 1

Mibu mingi eleki ezalaki libaku na ngai ya kosala lokola mokambi ya Misio ya Canada. Kuna tozalaki na etape moko na motango moke ya basimbi bonganganzanbe. Tozalaki ntango nyonso na bokambo ya misio moko likolo ya etape. Nazwaki liyoki moko makasi ete tozali na mposa ya kozwa mondimi moko ya etape ayangela kuna.

Tozwaki mondimi moko ya mokolo na etape oyo azalaki diakona na Bonganganzambe ya Alona kasi oyo asalaki elongo mingi te mpo na kokola na bonganganzambe. Namiyokaki ya kofulama mpo na kobianga ye lokola mokambi ya etape. Nakomikundola ntango nyonso mokolo oyo nasololaki elongo na ye. Nayebisaki ye ete Nkolo afulaki ngai nabianga ye mpo na kozala mokambi ya etape. Nsima ya koboya mingi na ngambo na ye, mpe bolendisi mingi na ngambo ya mwasi na ye, alobaki ete akokaki kosala. Nakulisaki ye nganganzambe.

Ezalaki ebandeli ya mokolo ya sika mpo na mobali wana. Bomoi na ye etiamaki nokinoki na molongo, mpe ayebisaki ngai ete akosalela mitindo lokola asengamaki atosa yango. Nsima ya mwa basanza akulisamaki mpaka. Ye mpe mwasi mpe libota na ye na nsuka bakendaki na tempelo mpe bakangisamaki. Bana basalaki bamisio mpe babalaki na ndako ya Nkolo.

Ntango mosusu kotikaka bandeko na biso mibali koyeba ete basengami mpe bazali ya motuya ekoki kosalisa bango bakozwa mikono mpo na bomipesi mpe kokota na mosala mobimba. Oyo ekoki kozala solo mpo na basimbi bonganganzambe kozangaka kotala mibu. Ezali mokumba na biso kopesa bango mabaku ya kotambisa bomoi na bango lokola esengeli. Tokoki kosalisa bango balonga bolembu na bango. Tosengeli kokolisa makoki mpo na komona bato lokola bazali te sikawa kasi lokola bakoki kokoma ntango bazwi matatoli ya nsango malamu ya Klisto.

Mokolo moko nakendaki na likita na Leadville, Colorado. Leadville ezali na 3.000 m likolo ya ngomba. Namikundoli likita wana mpo ezalaki mosika likolo, kasi namikundoli lisusu yango mpo na oyo esalemaki mpokwa wana. Ezalaki kaka na motango moke ya bamemi ya bonganganzambe. Ndenge moko na mokambi ya etape na Misio ya canada, etape wana ekambamaki na misionele moko mpe ezalaka se bongo ntango nyonso.

Na mpokwa wana tosalaki likita moko ya kitoko, kasi ntango tozalaki koyemba loyembo ya nsuka, bofuli eyelaki ngai ete esenglaki tozwa mokambi ya etape mwana mboka oyo mpo na kokamba. Nabalukaki epai ya mokambi ya misio mpe natunaki ete, “Ezali na moto moko te awa oyo akokaki kokamba—moto ya mboka oyo?”

Azongisaki, “Nayebi moko te.”

Na ntango ya koyemba ya loyembo natalaki na bokebi mibali oyo bafandaki na milongo misato ya yambo. Bokebi na ngai emonanaki lokola ekangami likolo ya moko ya bandeko mibali. Nalobaki na mokambi ya misio ete, “Ekoki ye kosala lokola mokambi ya etape?”

Azongisaki ete, “Nayebi te. Ntango mosusu akoki.”

Nalobaki, “Mokambi, nakomema ye na ndako mosusu mpe nakosolola na ye. Okoloba nsima ya loyembo ya nsuka tii tokozonga.”

Ntango biso mibale tokendaki na ndako, mokambi ya misio asukisaki litatoli na ye. Natalisaki nkombo ya ndeko mobali mpo na kozala mokambi ya etape. Uta mokolo wana, Leadville, Colorado, azwaki mondimi mwana mboka mpo na kokamba etonga kuna tii lelo.

Libongisi se moko wana, bandeko, esalemaka na baoyo bazali naino bandimi te. Tosengeli kokolisa likoki ya komona bato lokola bazali te kasi lokola bakoki kokoma ntango bazali bandimi ya Eklezia, ntango bazali na litatoli ya nsango malamu, mpe ntango bomoi na bango elongobani na mateya na yango.

Kozonga na mobu 1961, likita ya mokili mobimba esalemaki mpo na bakambi ya misio, mpe mokambi ya misio nyonso na Eklezia amemamaka na Salt Lake City mpo na mayangani wana. Nayaki na Salt Lake City uta na misio na ngai na Toroto, na Canada.

Na liyangani moko, N. Eldon Tanner, oyo azalaki o ntango ena Mosungi ya Lisanga Likoki ya Bantuku Sambo, awutaka kozonga uta na mosala na ye ya liboso koyangelaka misio ya Grande Bretagne mpe Europe ya Westi. Alobaki na ntina ya misionele moko oyo azalaki misionele ya elonga koleka nyonso oyo akutanaka na ye na masolo nyonso akambaka. Alobaki ete ntango azalaki kosolola na misionele wana, alobaki ete, “nabanzi ete bato banso oyo obatisaki bayaki na Eklezia na nzela ya bato basusu.”

Elenge mobali ayanolaki ete, “Te, tokutanaki na bango banso na nzela.”

Ndeko Tanner atunaki ye oyo ezalaki ya bokeseni na esaleli na ye—mpo na nini azalaki na elonga makasi boye ntango baninga mosusu bazalaki na yango te. Elenge mobali alobaki ete amekaki kobatisa moto nyonso oyo akutanaki na ye. Alobaki ete soki abetaki na ekuke ete amonaki moto moko komelaka likaya mpe kolataka bilamba ya kala mpe lokola soki azali na litomba moko te—mingimingi na ntina ya biyamba—misonele akotia na makanisi na yemei boniboni moto yango akozala soki atiami na o nse ya makambo to bisika ekeseni. Na makanisi na ye akotala ye lokola na nsuki ya malamu mpe kolataka simisi ya mpembe mpe pantalo ya mpembe. Mpe misionele akokaki komimona lokola kokambaka moto wana na mai ya libatisi. Alobaki ete, “Ntango natalaka moto na lolenge wana, nazalaka na likoki ya kopesa litatoli na ngai epai na ye na lolenge oyo ekoki kosimba motema na ye.”

Tozali na mokumba ya kotala baninga na biso, bato ya lisanga na biso, bazalani na biso na lolenge oyo. Lisusu, tozali na mokumba ya komona bato lokola bazali te kasi lokola bakoki kokoma. Nabondeli elongo na bino tokanisa na ntina na bango na lolenge oyo.

Bandeko mibali, Nkolo ayebisaki biso eloko moko etali motuya ya bonganganzambe oyo tozali na yango. Ayebisaki biso ete tozwaka yango na ndai mpe na liyokani. Apesaki biso lilako ete tosengeli kozala na botongono mpe solo na manso maye tozwi, mpe ete tozali na mokumba ya kobatela liyokani oyo kutu tii na nsuka. 2

Mpiko ezali liloba oyo tozali na mposa ya koyoka mpe kosimba penepene na mitema na biso—mpiko mpo topesa mikongo na biso na lisenginia, mpiko mpo na kotombola mingongo na biso na litatoli epai ya banso baye tozali kokuta, komikundolaka ete moto nyonso asengeli kozwa libaku ya koyoka etinda. Ezali eloko ya pete te mpo ete mingi basala yango. Kasi tokoki koya kondima maloba ya Paulo epai ya Timote:

“Mpo ete Njambe apesaki bino molimo na kobangabanga te kasi molimo na nguya mpe na bolingo mpe na komikanga motema.

“Boye, yoka nsoni te mpo na kotatolela Nkolo na biso te.” 3

Na sanza ya mitano ya 1974 nazalaki elongo na Ndeko mobali John  H. Groberg na bisanga ya Tonga. Tozalaki na elako ya kokende kotala mokonzi ya Tonga, mpe tokutanaki elongo na ye na liyangani moko oyo ebongisamaki. Tokabolaki makambo ya kosekaseka ya momeseno. Nzokande, liboso tolongwa, John Groberg alobaki likambo moko oyo ezalaki ya momeseno te. Alobaki ete, “Mokonzi, osengeli mpenza kokoma Mormon mpe bato na yo lokola, mpo nsima bakpokoso na yo mpe bakpokoso na bango ekozwa biyano.”

Mokonzi asekaki makasi mpe ayanolaki, “John Groberg, ntango mosusu olobi solo.”

Nakanisaki Apostolo Paulo liboso ya Akalipa. Nakanisaki eyano ya Akalipa na litatoli ya Paulo: “Olingi kondimisa ngai na ntango mokuse ete nasala mosala na Moklisto.” 4Ndeko mobali Groberg azwaki mpiko mpo na kopesaka litatoli na ye epai ya mokonzi.

Na mpokwa ya lelo ezali na bankoto mingi ya bamemi bonganganzambe oyo bazali kosalela Nkolo na ntango mobimba lokola bamisionele na ye. Na eyano na libiangi, batiki nsima na bango ndako, libota, baninga, mpe eteyelo mpe bakei liboso mpo na kosala. Baye bazali kososola te bazali kotuna mituna: “Mpo na nini bazali koyanola nokinoki mpe na motema moko bazali kopesa mingi?”

Bamisionele na biso bakokaki koyanola na maloba ya Paulo, misionele monene wana oyo azalaki na bomoi kala mpenza: “Soki najali kosakola Nsango malamu, ejali na ngai likambo na komikumisa te napesami simbisi ete nasala boye. Mawa na ngai soko na kosalakola Nsango malamu te!” 5

Makomi masantu mazali na esakoli moko te ya motuya mingi koleka, mokumba moko te ya kokanga mingi koleka, lilako moko te semba mingi koleka motindo epesamaki na Nkolo mosekwi ntango abimelaki na Galilea epai ya bayekoli zomi na moko. Elobaki Ye ete:

“Bokonji yonso esili kopesama na ngai likolo mpe na nse.

“Boye bokenda kojalisa bayekoli na mabota yonso, kobatisaka bango na nkombo na tata mpe na mwana mpe na Molimo Mosanto:

“Kolakisa bango ete batosa yonso esili ngai kolaka bino. Mpe tala, ngai najali na bino elongo mikolo yonso kino nsuka na ekeke.” 6

Etinda ya bonzambe oyo, ekangami elongo na elaka na yango ya nkembo, liloba ya etinda na biso lelo, lokola ezalaki na ntango ya kala. Mosala ya misonele ezali eteni ya ntina ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Ntango nyonso ezalaki boye; ekozala se boye libela. Lokola esakolaki Profeta Joseph Smith: “Nsima ya manso oyo elobami, mokumba ya monene koleka nyonso mpe ya ntina koleka nyonso ezali kosakola Nsango Malamu.” 7

Na kati ya mibu mikuse mibale, bamisionele nyonso ya ntango mobimba baye bazali kosala sikawa na mampinga ya bokonzi oyo ya Nzambe bakosilisa misala na bango ya ntango mobimba mpe bakozonga na bandako mpe epai ya balingami na bango. Bakitani na bango bazwami na mpokwa ya lelo na milongo ya Bonganganzambe ya Alona ya Eklezia. Bilenge mibali, bobelemi mpo na koyanola? Bozali na na bolingi ya kosala? Bomilengelli mpo na kosala?

Mokambi John Taylor alimbolaki masengisi: “Lolenge ya bato tolingaka lokola bamemi ya etinda oyo ya nsango malamu ezali bato baye bazali na bondimi na Nzambe; bato baye bazali na bondimi na eyamba na bango; bato bakumisaka bonganganzambe na bango; … bato batonda Molimo Mosantu mpe nguya na Nzambe … bato ya lokumu, bosembo, bolamu mpe peto.” 8

Bandeko, moko na moko na biso atindami kokabola nsango malamu ya Klisto. Ntango bamoi na biso etamboli engebene na mobeko ya Nzambe yemei, baye bazwami na nguya na biso bakoloba mokolo moko te bomileli ete: “Ntango ya bobuki mbuma eleki, ntango na moi makasi esili, nde tobiki te.” 9

Mobateli mpate malamu ya milimo, misionenele oyo asikolaki bato, apesaki biso bolendisi na Ye ya bonzambe:

“Soki ezali ete osengeli kosala mikolo na yo nyonso na kogangaka boyamboli epai ya bato oyo, mpe komeme, ata molimo moko epai na ngai, boniboni monene ekozala bosepeli na yo elongo na ye na bokonzi ya Tata na ngai!

“Mpe sikawa, soki bosepeli na yo ekozala monene na molimo moko oyo omemi na bokonzi ya Tata na ngai, boniboni monene bosepeli na yo ekozala soki okokaki komema milimo mingi epai na ngai!” 10

Na ntina na Ye oyo alobaki maloba maye, napesi litatoli na ngai. Ye azali Mwana ya Nzambe, Mosikoli na biso, mpe Mobikisi na biso.

Nasambeli ete tokozala na mpiko mpo na kopesa loboko ya bondeko, molende ya komeka mpe komeka lisusu, mpe na bosawa esengeli mpo na koluka bokambi uta na Tata ntango tozali kokokisa motindo na biso ya kokabola nsango malamu. Mokumba ezali likolo na biso, bandeko. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Show References

  1.  

    1. “In Bill Sand, The Seventh Step (1967), 9.

  2.  

    2. Tala Doctrine et Alliances 84:33–39.

  3.  

    3.  2  Timote 1:7–8 .

  4.  

    4.  Misala 26:28 .

  5.  

    5.  1  Bakolinti 9:16 .

  6.  

    6.  Matai 28:18–20 .

  7.  

    7.  Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 330.

  8.  

    8.  Teachings of Presidents of the Church: John Taylor (2001), 73.

  9.  

    9.  Yilimia 8:20 .

  10.  

    10.  Doctrine et Alliances 18:15–16 .