Mobeko ya Tempelo

Na Mpaka Scott D. Whiting

Ya Bantuku Sambo


Scott D. Whiting
Mibeko ya likolo ya botongi tempelo oyo bazali kosalela na Eklezia oyo ezali emekoleli kutu elilingi ya lolenge boni tosengeli kotambwisa bomoi na biso moko.

Kala mingi te wana ezalaki ngai kotalaka misala ya tempelo kitoko ya Brigham City Utah, namikundolaki likambo nakutanaki na yango ntango nazalaki kosala lokola coordinateur ya bofungoli mpo na bato banso, ya bozongi kobulisa, mpe ya milulu nyonso ya bosepeli ya oyo ekenda sango Tempelo ya Laie Hawaii.

Mwa basanza liboso basilisa misala ya bobongisi mpo na kokomisa yango monene mpe sika, nabiangamaki kotala elongo na Mokambi ya Misala ya Tempelo, Mpaka William R. Walker, mpe Baninga na ye Basali ya misala ya Tempelo. Mpo na kobakisa, bato mingi ya bakompani oyo bapesamaki misala bayaki. Ntina ya botamboli wana ezalaki na ndambu mpo na kotala bokei liboso mpe motuya ya mosala oyo esalemaki. Na ntango tazalaki kotal, mosala esalemaki na motuya ya 85 na monkama.

Wana ezalaki biso kokota na tempelo, nazalaki kotala mpe koyoka Mpaka Walker mpe baninga na ye ya mosala ntango bazalaki kotala mosala mpe kosolola elongo na mokambi ya bato ya misala. Ntango na ntango nazalaki komona moto moko kotambwisaka loboko na ye na efelo wana ezalaki biso kokende uta eteni ya ndako moko na mosusu. Mwa ntango nsima ya kosala eye, akomipakola misapo yango na yango mpe koya penepene ya mokambi ya basali mpe koloba, “Nazali koyoka mwa makwanza na efelo oyo. Makwanza ezali mobeko ya tempelo te. Bosengeli kopalisa lisusu mpe sembisa efelo oyo.” Mokambi ya basali na botosi nyonso azalaki kokoma eloko moko moko bamonaki.

Ekomaki biso penepene ya esika moko na tempelo wapi bobele bato moke bakokaki komona, moto se moko wana atelemisaki biso mpe abendaki bokebi na biso na lininisa moko ya tala tala ya kitoko oyo batiaki kala mingi te. Lininisa oyo ezalaki mapeka mibale (0.6 m) na monene na mapeka motoba (1.8 m) na molai mpe ezalaki na emekoleli moko ya tala-tala ya bakale ya matono matono. Alakisaki mosapi na tala-tala moko ya moke ya kale ya basentimetele (5 cm) mpe ya langi-langi oyo ezalaki na emekoleli ya mpamba mpe alobaki, “Kale wana ezali ya kobeba.” Natalaki kale yango mpe na miso na ngai emonanaki ete batii yango malamu. Nzokande, soki motali mpembeni na emekolelo na maboko, nakokaki komona ete mbeba ezalaki mpe ete mwa kale wana ezalaki solo mpenza na molai likolo ya (3 mm) ya kobeba. Malakisi mapesamaki boye na mokambi ya basali ete lininisa mosusu etiama na esika wana mpo ezalaki te mobeko ya tempelo.

Nandimi yango ete nakamwaki ete lininisa mobimba etiama na esika ya oyo wana kaka mpo na mwa mbeba wana ya moke oyo ezalaki kutu komonana te. Solo mpenza, ezalaki mpenza mpasi ete moto ayeba to nkutu amona lininisa oyo na kotalaka mosika kuna ezalaki na tempelo.

Lokola nazalaki kozonga ndako kotambwisaka motuka uta na tempelo mokolo wana, nabanzaki nini nayekolaki uta na likambo oyo—to, nzokande, oyo nakanisi nayekolaki. Bososoli na ngai ya oyo nayekolaki ekomaki polele te kino mposo mingi nsima ntango babiangaki ngai kotambola mpo nakotala nzinga nzinga na tempelo oyo esilaki sikawa.

Wana ezalaki ngai kokota na tempelo ebongisami mobimba ya Laie Hawaii Temple, nakamwaki mingi na kitoko na yango mpe motuya ya misala ya nsuka. Bokoki kososola ete litomba na ngai ezalaki monene ya komona lisusu bifelo wana ya “makwanza” mpe lininisa wana “ebeba”. Mokambi ya basali apalisaki lisusu mpe asembisaki bifelo? Batiaki solo lininisi ya esika na esika ya liboso. Lokola napusanaki penepene na bifelo wana ya makwanza, nakamwaki na komonaka ete batiaki nkasa ya kozipa kodiembela na bifelo yango. Likanisi na ngai ya liboso ezalaki, “Boye oyo ezali nde lolenge mokambi ya misala abongisaki makwanza—azipaka yango.” Kasi te, nayekolaki ete moango ezalaka ntango nyonso ya kuzipa bifelo na nkasa. Namitunaki mpo na nini mwa makwanza ya mike oyo ekoki mpenza komonana te ezali kosala mpasi soki esengelaki nkasa ya bifelo mpo na kozipa yango? Nsima napusanaki malembe na esika wapi lininisa ya kobeba ezwamaki mpe nasutukaki na komona Mbeki moko ya kitoko balona nzete ya molai kino na palafo efanda semba liboso ya lininisa yango. Lisusu, nabanzakio, “Boye oyo ezali nde lolenge mokambi ya misala abongisaki mwa kale ebeba—azipaka yango.” Lokola napusanaki pembeni, napusaki nkasa ya milona wana na mupanzi mpe napwepwaki ntango namonaki ete solo mpenza batiaki lininisa mosusu na esika na yango. Mwa kale yak ala ebeba etelemaki ya kobongisama kitoko mpenza na emekoleli yango. Nayekolaki ete ezalaka eteni ya eyembeli ya kati ya kotia milona na liboso ya lininisa.

Mpo na nini bifelo na mwa makwanza mpe lininisa na kale ebongi te ezalaki kosenga misala ya kobakisa kutu batia mosusu na esika na yango ntango maboko to miso moke kaka ekoyeba yango mpe na mpasi? Mpo na nini moto bapesi misala asengeli kokangama na mibeko mina ya likolo?

Wana ebimaki na tempelo komelamaka na makanisi, nazwaki eyano na ngai ntango natalaki likolo na libanda oyo babongisaki kitoko mpe namonaki maloba maye: “Bosantu na Nkolo, Ndako ya Nkolo.”

Batempelo ya Eklezia oyo ezali sikisiki mpenza lokola esakolamaki. Bandako oyo ya bule etongami mpo tosalela yango, mpe kati na bifelo na yango makuli ya bule mpe ya lobiko ezali kosalema. Kasi ntembe esengeli te kozala mpo na eye etali nani azali nkolo ya ndako yango. Na kosengaka ete batonga yango sikisiki mpe balanda mibeko ya botongi eteni na eteni, tozali bobele kolakisa bolingo na biso na Nkolo Yesu Klisto te, kasi tozali lisusu kolakisa na baye batalaka biso ete tozali kokumisa mpe kokumbamela Ye oyo azali nkolo ndako.

Na bobimisi bopesama na Profeta Joseph Smith mpo na kotonga tempelo na Nauvoo, Nkolo atindaki ete:

““Boya, na wolo na bino nyonso, mpe palata na bino, mpe mabanga ma bino ma ntalo, mpe biloko na bino ya kala ya motuya binso; mpe elongo na banso oyo bazali na boyebi ya biloko ya kala ya motuya…mpe bomema… banzete nyonso ya motuya ya mabele;

“…botonga ndako mpo na nkombo na ngai, ete Oyo Aleki Likolo afanda na kati.”1

Oyo elandi ndakisa etiami na Mokonzi Salomo na Boyokani ya Kala ntango atongaki tempelo moko mpo na Nkolo kosalelaka bobele biloko ya kitoko makasi bisalelami na mayele ya ntoki ya bato.2 Lelo tozali kokoba kolanda emekoli se moko oyo, na kozangaka kolekisa ndelo, ntango tozali kotonga batempelo ya Eklezia.

Nayekolaki ete atako miso mpe maboko ya bokufi ekoki te komona to koyoka mbeba, Nkolo ayebi motuya ya makasi tosali mpe soki tosalaki makasi nyonso ekoki na biso. Ezali se ndenge moko na makasi tozali kosala mpo na kotambwisa bomoi oyo elongobani mpo na kozwa mapamboli ma tempelo. Nkolo apesaki toli ete:

“Mpe mbala nzike lokola bato ba ngai batongeli ngai ndako na nkombo ya Nkolo, mpe batiki nzela te ete eloko moko te ya mbindo ekota na kati, ete esantolama, nkembo na ngai ekozala likolo na yango;

“Iyo, mpe nakozala kuna, mpo nakoya kati na yango, mpe bato ya peto na mitema oyo bakoya na kati bakomona Nzambe.

“Kasi soki esantolami nakoya na kati te, mpe nkembo na ngai ekozala kun ate; mpo na koya na batempelo ezanga bosantu te.”3

Lokola mokambi ya basali misala, ntango toyebi makambo maye kati na bomoi na biso ezali koyokana te na malongi ya Nkolo, ntango makasi tosali ekokaki mpenza na maye nyonso tokokaki kosala te, tosengeli noki kokende kosembola eloko nyonso ezali mabe, koyebaka ete tokoki kobombela Nkolo masumu na biso te. Tosengeli komikundola ete “kasi ntango tozali koluka kobomba masumu ma biso, … tala, lola ibendami yangomei; Molimo mwa Nkolo [mpe] eyokisami mawa.”4

Nayekolaki lisusu ete mibeko ya likolo ya kotonga tempelo miye Eklezia azali kosalela ezali ndakisa nkutu elilingi ya boniboni tosengeli kotambwisa bomoi na biso moko. Tokoki moto na moto kosalela mateya ya Apostolo Paulo maye mapesamaki na Eklezia ya kala ntango alobaki:

“Boyebi te ete bino bozali tempelo ya Nzambe, mpe ete Molimo ya Nzambe avandaka kati na bino?

““Soki moto abomi temepelo ya Nzambe, Nzambe akoboma ye; mpamba te tempelo ya Nzambe ezali ya santu, mpe bino bozali ndako yango.”5

Totongami moko na moko na biloko ya motuya ya ntoki, mpe tozali mbano ya kokamwa biloko bisalemi na maboko ya Nzambe. Nzokande, soki toleki kaka mibu ya boyanoli mpo na kokota na libanda ya etumba na masumu mpe mimekano, tempelo na biso moko ekoki kozala na mposa ete babongisa yango ezonga sika. Mbele ezali na bifelo kati na biso oyo ezali makwanza makwanza mpe esengeli kopalisama to maninisi ya milimo na biso oyo esengeli batia mosusu na esika na yango mpo ete totelema na bisika ya bosantu. Ngolu na biso nde mobeko ya tempelo oyo tosengeli kokokisa ezali moye ya bobongi nie te, atako tozali kobunda mpo na yango, kasi nde tozali kobomba mitindo mpe kosala manso tokoki mpo na kotambwisa bomoi na biso lokola bayekoli ya Yesu Klisto. Ezali losambo na ngai ete tokosala makasi mpo na kotambwisa bomoi oyo elongobani mpo na kozwa mapamboli ya tempelo nakosalaka manso tokoki, na kobongisa nyonso esengeli mpe kolongolaka mbeba mpe mabe ete Molimo ya Nzambe akoka ntango nyonso kozala elongo na biso. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.