Motindo Monene ya Yambo

Na Mpaka Jeffrey R. Holland

Ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale


Jeffrey R. Holland
Tozali na bomoi ya bayekoli bamikabi ya kopesa na kolakisaka bolingo na biso ya Nkolo.

Ezali penepene na lingomba moko te kati na mambi ma kala na ntina na yango nazali na mawa mingi koleka oyo nazali na yango mpo na Bapostolo zomi na moko oyo batikalaki nsima ya liwa ya mokili. Nabanzi tobosanaka ntango mosusu boniboni ya kozanga mayele ya mosala bazalaki naino mpe boniboni ya koyekama mobimba likolo ya Yesu bazalaka mpo na makoki na bango. Mpo na bango Ye alobaka, “Najali na bino ntango molai boye, nde oyebi ngai naino te … ?” 1

Kasi, ya solo, mpo na bango Ye azalaka te na bango penepene ya ntango molai ekoka. Mibu misato ezali molai te mpo na kobianga Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale mobimba uta mwa liboke moko ya babongwani ya sika, kolongola uta na bango libunga ya bandenge ya kala, koteya bango makamwisi ya nsango malamu ya Yesu Klisto, mpe nsima kotika bango batambwisa mosala kino bango mpe babomamaki. Likambo mpenza ya nsomo mpo na liboke moko ya bampaka bakulisami sika.

Mingimingi eteni ya kotikalaka yo moko kaka. Mbala mingi Yesu amekaka kolobela bango Ye alingakite kotikala na mosuni elongo na bango, kasi lisusu bakokaki te to bolingaki te kososola likanisi ya makasi boye. Malako akomaki:

“Azalaki kolakisa bayekoli na ye, kolobela bango ete, Mwana na moto akopesama na maboko na bato mpe bakoboma ye. Mpe wana esili kobomama, akosekwa nsima ya mikolo misato.

“Kasi basosoli likambo yango te mpe babangaki kotuna ye.”2

Nde, nsima ya ntango mokuse ya boye ya koyekola mpe kutu ntango moke ya komilengela, ya kokamwa esalamaki, ya kondima ekomaki ya solo. Nkolo mpe Moteyi, Mopesi toli mpe Mokonzi abakamaki o ekulusu. Mosala na Ye na kufa esilaki, mpe Eklezia moke oyo ezalaki kobunda Ye atiaki emonanaki ya kotiola mpe esengelaki kolimwa. Bapostolo na Ye bamonaki Ye na lolenge na Ye ya kosekwa kasi yango ebakisaki bobele na mobulungano na bango. Lokola basengelaki na ntembe te komituna, “Nini tokosala sikawa?” Balobaki epai ya Petelo, Apostolo ya nkulutu.

Awa nasengi bolimbisi wana ezali ngai kozwa mwa bonsomi ya kozanga kosalela makomi na bolimboli na ngai ya bokaboli oyo. Na yango, Petelo alobaki na baninga na ye ya lingomba ete: “Bandeko Babali, ezalaki mibu misato ya nkembo. Moko te kati na biso akokaki kokanisa basanza moke ya boye kala makamwisi tokomona mpe bonzambe toyoki na esengo. Tososoli elongo, tosambeli elongo, mpe tosali elongo na Mwana ya Nzambe Yemei mpenza. Totamboli elongo na Ye mpe toleli elongo na Ye, mpe na butu ya nsuka ya nsomo wana, moko te alelaki mingi koleka ngai. Kasi wana esili. Ye asilisi mosala na Ye mpe Ye asekwi na lilita. Ye asali lobiko na Ye mpe ya biso. Bongo bozali kotuna ete, ‘Nini tokosala sikawa?’ Nayebi mingi ya koyebisa bino te soki bozongela bomoi na bino ya kala, kosepelaka. Nalingi kokende ‘koluka mbisi.’” Mpe penepene motoba kati ya Bapostolo zomi oyo batikalaki balobaki na banso, “Biso mpe tokei na yo.” Yoane, oyo azalaki moko na bango, akomi ete, “Babimaki mpe baingeli na bwato.”3

Kasi, mawa, koluka mbisi ezalaki malamu mpenza te. Butu ya yambo bazongaki na liziba, bazwaki eloko moko te—ata mbisi moko te. Na bapole ya yambo ya ntongo, bazongaki na mawa na ngambo wapi bamonaki na mosika moto moko oyo azalaki kobenga bango, “Bana, bojali na eloko ya kolia te?” Na mawa Bapostolo-bazongeli-kozala-baluki mbisi oyo bapesaki eyano oyo moluki mbisi moko te alingaka kopesa. “Eloko te,” babetaki monoko, mpe mpo na kobakisa kotiola na kofinga, bazalaki kobengama “bana.”4

“Bobwaka moluba na loboko na mobali na bwato mpe bokojua,”5 mopaya alobaki—mpe na maloba wana ya pete, boyebi ebandi kotiola likolo na bango. Mibu misato kaka bato oyo mpenza bazalaka koluka mbisi na mai ya mbu oyo mpenza. Mpe na libaku wana mpe basalaki “mosala butu mobimba, nde [bajui] eloko te,”6makomi elobi. Kasi ndeko moko ya mboka Galileya na libongo alobaka na bango babwaka miluba na bango, mpe babendaki “ebele monene na mbisi,”7mingi ete miluba na bango ekatanaki, bazwaki kotondisaka babwato mibale meke ete ebandaka kozinda.

Sikawa ezalaki kosalama lisusu. “Bana,” oyo lokola babengamaki na ndenge esengeli, na mposa makasi babwakaki moluba na bango, mpe “bayebaki kobenda yango te mpo na ebele na mbisi.” 8 Yoane alobaki solo, “Ye Nkolo wana.”9 Mpe na likolo ya nsonge ya bwato, Petelo moto na mbamba apumbwaki.

Nsima ya likita ya esengo na Yesu mosekwi, Petelo akabolaki elongo na Mobikisi oyo natali lokola ebandeli ya motuya ya mosala ya bopostolo mobimba mpe na ntembe te mpo na Petelo ye moko, kolongolaka libanga monene oyo ya moto moko mpo na bomoi ya lokumu ya mosala mpe bokambi. Kotalaka na mwa babwato na bango ebeba, maluba na bango elemba, mpe liboke ya kokamwa ya mbisi 153, Yesu alobaki na Apostolo na Ye ya nkulutu ete, “Petelo, olingi nde ngai koleka baoyo?” Petelo alobaki, “Ee Motei, yo oyebi ete najali moninga na yo.”10

Mobikisi azongisi na eyano wana ete, kasi akobi kotala na miso ya moyekoli na Ye mpe alobi lisusu ete, “Petelo, olingi nde ngai?” Na ntembe te abulunginisamaki mwa moke na bozongeli ya motuna yango, Moluki mbisi monene ayanoli mpo na mbala mibale ete, “Ee Motei, Motei, yo oyebi ete nalingaka yo.”11

Mobikisi apesi lisusu eyano ya mokuse, kasi na bokebi bonso Ye atuni mpo na mbala ya misato, “Petelo, olingi nde ngai?” Sikawa mpenza Petelo azali koyoka mpenza malamu te. Ntango mosusu ezali na motema na ye bokundoli ya kaka mwa mikolo mileki ntango batunamaka ye motuna mosusu mbala misato mpe ayanolaka na lolenge moko na kobetaka sete—kasi na kowangana. To ntango mosusu abandi komituna soki asosoli te motuna ya Nkolo Motei. To ntango mosusu azalaki koluka motema na ye, kolukaka bondimi ya bosembo ya eyano apesaka mbala moko boye, penepene na kokanisaka te. Ezala mayoki kani ezalaki na ye, Petelo alobaki mpo na mbala misato, “Motei, … yo oyebi ete nalingaka yo.”12

Na yango Yesu ayanolaki, (mpe awa lisusu nandimi bolengeli na ngai ya makomi te), ntango mosusu na kolobaka likambo moko lokola : “ bongo Petelo, mpo na nini ozali awa? Mpo na nini tozongi lisusu na libongo oyo kaka, na nzela ya miluba oyo kaka, kobetaka lisolo oyo kaka? Ezalaki solo te ntango wana mpe ezali solo te sikawa ete soki nalingi mbisi, nakoki kozwa mbisi? Oyo nazali na yango mposa, Petelo, ezali bayekoli—mpe nazali na mposa na bango mpo na libela. Nazali na mposa ya moto moko mpo na kosakola nsango malamu na ngai mpe kobatela bondimi na ngai. Nazali na mposa ya moto moko oyo alingi ngai, mpenza, mpenza alingi ngai, mpe alingi nini Tata na biso na Lola atindaki ngai kosala. Ya biso ezali te nsango moko ya botau. Ezali te mosala moko ya mwa ngonga. Ezali ya mawa te to ezangi elikia to te ya kobwaka na fulu ya mambi ma kala. Ezali mosala Oyo Aleki na Nguya, mpe esengeli kobongola mokili. Yango wana, Petelo, mpo na mbala ya mibale mpe na ntembe te mbala ya nsuka, nazali kosenga yo otika nyonso oyo mpe okende koteya mpe kotatola, kosala mpe kosalisa na bosembo, kino mokolo bakosala na yo mpenza oyo basalaki na ngai.”

Nsima, kobalukaka na Bapostolo nyonso, Ye akokaki koloba malamu likambo moko lokola “Ezalaki bino na etingia lokola bakomi mpe Bafarizeo ? lokola Elode mpe Pilato? Ekanisaki bino, lokola bango, ete mosala oyo ekokaki kobomama na pete na kobomaka ngai? Ekanisaki bino, lokola bango, ete ekulusu mpe basete mpe lilita ezalaki nsuka na yango nyonso mpe moko na moko akokaki kozonga na esengo kozala nyonso oyo bozalaki liboso?” Bana, bomoi na ngai mpe bolingo na ngai esimbi na yango mitema na bino na mozindo mingi te koleka oyo?”

Bandeko babali mpe basi, nayebi mpenza te nini ekozala makambo na biso na Mokolo ya Bosambisi, kasi nakosutuka mingi soki, na ntango moko ya lisolo, Nzambe akotuna biso te motuna Klisto atunaki Petelo: “olingaki nde ngai?” Nakanisi Ye akolinga koyeba soki na bosimbi ya biloko ya kufa mpenza, ezanga bokoki mpenza, mpe ntango mosusu ya bomwana na biso, tososolaki ata moke motindomoko, ya yambo mpe ya monene mingi koleka ya yango nyonso “Okolinga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo mobimba mpe na makanisi.”13 Mpe soki na ntango ya boye tokoki kokekuma, “Ee Motei, yo oyebi ete najali moninga na yo,” nde tokoki kososola , ata kutu soki tososolaki yango te liboso, ete ezalela ya motole ya bolingo ezali ntango nyonso bosembo.

“Soki bolingi ngai bokotosa malako[mitindo] na ngai,”14 Yesu alobaki. Yango wana tozali na bato ya penepene ya kopambola, bana ya kobatela, babola ya kotombola, mpe solo ya kobatela. Tozali na mabe ya kokomisa bosemba, bosolo ya kokabola, mpe malamu ya kosala. Na mokuse, tozali na bomoi ya bayekoli bamikabi ya kopesa na kolakisaka bolingo na biso ya bonzambe. Tokoki kotika te mpe tokoki kozonga nsima te. Nsima ya bokutani na Mwana ya bomoi ya Nzambe ya bomoi, eloko moko te ekozala lisusu lokola ezalaki liboso. Bobakami na Ekulusu, Bomikabi, mpe Lisekwa ya Yesu etii elembo ya bobandi ya bomoi ya Boklisto, kasi nsuka na yango te. Ezalaki bosolo oyo, bozali oyo, epesaki liboka moko ya bato ya Galileo babomi mbisi babongwana lisusu Bapostolo oyo na kozanga “ata sinagogi to mopanga moko”15 mpo na kotika miniama wana mbala ya mibale mpe kokende kosala mambi ma mokili na yango tozali kowumela sikawa.

Natatoli uta na nse ya motema na ngai, na nguya ya molimo na ngai, na banso oyo bayoki mongongo na ngai ete bafungola ya bopostolo wana ezongisami na mabele mpe ezwami na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka. Na baoyo basangani naino te na biso na ntina monene ya nsuka ya Klisto oyo, tolobi ete, “Bosala yango.” Na baoyo bazalaki liboso elongo na biso kasi batiki, kolingaka kozwa mpe kopona mwa misala ya ntoki ya sangisasangisa ya Bozongisi mpe batiki basusu na feti, nalobi ete, “Bozali kolekisa babutu milai mpe muluba ya mpamba mingi.” Libiangi ezali ete bozonga, botikala malamu, bolinga Nzambe, mpe bopesa loboko. Nakotisi na libiangi wana mpo na kokanga botongono bamisionele nyonso bazonga oyo ntango moko batelemaki na liziba ya libatisi mpe na loboko na mbata samba balobaki, “Kozwaka ndingisa na Yesu Klisto.”16 Etinda wana ezalaki mpo na kobongola mobongwani na yo mpo na libela, kasi esengelaki kobongola yo libela lokola. Mpo na bilenge ya Eklezia baye bazali kokende na misio mpe batempelo mpe libala, tolobi ete , “Bolinga Nzambe mpe botikala peto uta na makila mpe masumu ya nkola oyo elakisami mpenza na liyebisi ya kokamwa Mokambi Thomas S. Monson apesaki lobi eleki. Tata na bino na Lola azali kozela bosembo na bino mpo bolingo na bino na eteni nyonso ya bomoi na bino.

Na banso kati na lokito ya mongongo na ngai, mongongo ya Klisto ezali kobima o ntaka ya ntango kotunaka moko na moko na biso, “olingi nde ngai?” Mpe mpo na moko na moko na biso, nayanoli na lokumu na ngai mpe molimo na ngai, “Ee Motei, Motei, yo oyebi ete nalingaka yo.” Mpe kotiaka “loboko na biso na etimoleli,” 17 tokotala na nsima ata moke te kino mosala oyo esili mpe bolingo oyo ya Nzambe mpe ya bato ya penepene ekamba mokili. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Show References

  1.  

    1  Yoane 14:9.

  2.  

    2  Malako 9:31–32.

  3.  

    3  Yoane 21:3.

  4.  

    4 Tala Yoane 21:5.

  5.  

    5  Yoane 21:6.

  6.  

    6  Luka 5:5.

  7.  

    7  Luka 5:6.

  8.  

    8  Yoane 21:6.

  9.  

    9  Yoane 21:7.

  10.  

    10  Yoane 21:15.

  11.  

    11  Yoane 21:16.

  12.  

    12  Yoane 21:17.

  13.  

    13.  Luka 10:27; tala lisusu Matai 22:37–38.

  14.  

    14.  Yoane 14:15.

  15.  

    15. Frederic W. Farrar, The Life of Christ (1994), 656; tala mokapo 62 mpo na koyeba mingi etali mokakatano ya Eklezia esalemaki sika

  16.  

    16.  Doctrine and Covenants 20:73.

  17.  

    17.  Luka 9:62.