Ezali Bino Kolala na Ntango ya Bozongisi?


Dieter F. Uchtdorf
Ezali na ntina mpenza mpo na biso lokola bato, lokola mabota, mpe lokola Eklezia ya Klisto kopesa bobele makasi ya ndambo na mosala oyo ya bule.

Penepene na mibu 200 mileki, lisolo ya mokuse ya Amerika “Rip Van Winkle” ekomaki classic na mbala moko. Moto monene na kati na yango, Rip, azalaki mobali moko azanga limoni oyo azalaki malamu mingi na kokimaka makambo mibale: mosala mpe mwasi na ye.

Mokolo moko, kowayawayaka elongo na mbwa na ye na bangomba, akutaki ngulupa moko ya bato balataki bilamba ya kobangisa komelaka mpe kobetaka masano. Nsima ya kondima mwa lotoko bango, Rip akomaki kolalalala mpe akangaki miso mpo na ntango moko. Ntango afungolaki miso na ye lisusu, asutukaki komona ete mbwa na ye alimwaki mpe mondoki na ye ebebaki, mpe sikawa azalaki na mandefu ya molai.

Rip azongaki na mboka na ye mpo na kokuta kaka ete makambo manso ebongwanaki. Mwasi na ye akufaki, baninga na ye balimwaki, mpe foto ya Mokonzi George III na nganda ekitanamaki na foto ya moto moko ayebaki lisusu te—na General George Washington.

Rip Van Winkle alalaka mibu 20! Mpe na bongo, azangaki moko ya bileko eleki na elengi ya mambi ya ekolo na ye—alalaka na kati ya Mbongwana ya Amerika.

Na sanza ya mitano ya 1966, Dr. Martin Luther King Jr. asalelaki lisolo lokola ndakisa mpo na lisikulu na ye “Kolala te na kati ya Mbongwana.”1

Lelo, nalingi kozwa likambo wana kaka mpe kopesa motuna moko mpo na banso na biso oyo tozali na bonganganzambe ya Nzambe: ezali bino kolala na kati ya Bozongisi?

Tozali na Bomoi na Ntango ya Bozongisi

Ntango mosusu tokanisaka Bozongisi ya nsango malamu lokola likambo moko oyo esila, esili kokoma nsima na biso—Joseph Smith abongolaki Buku ya Mormon, azwaki bafungola ya bonganganzambe, Eklezia ebongisamaki. Ya solo, Bozongisi ezali kokoba kosalema; tozali komona yango sikawa mpenza. Ezali na “nionso oyo Nzambe abimisaki, nionso oyo Ye azali kobimisa sikawa,” mpe “makambo mingi ya minene mpe ya motuya” oyo “Ye akobimisa lisusu.”2 Bandeko, bokei liboso ya elengi ya lelo ezali eteni ya eleko wana esakolama kala ya bolengeli oyo ekosuka ya Boyei ya Mibale na kembo ya Mobikisi na biso, Yesu Klisto.

Eye ezali moko ya bileko ya kitoko ya mambi ma mokili! Baprofeta ya kala balingaki komona mikolo na biso.

Ekosila ngonga na biso na bokufi, mayele kani tokokoka kokabola etali mosala na biso na eleko oyo ya ntina ya bomoi na biso mpe bokei liboso ya mosala ya Nkolo? Ekokoka biso koloba ete togumbaki maboko ya basimisi mpe tosalaki na motema, makasi, mayele, mpe bokasi na biso nionso? To ekokoka biso kondima ete mosala na biso ezalaki oyo ya motali?

Nakanisi ezali na ebele ya bantina oyo mpo na nini ezali pete kokoma mwa kolalalala mpo na oyo etali kotonga bokonzi ya Nzambe. Tika nalobela misato ya minene. Ntango nakoloba, nasengi bino komaniola soki moko ekoki. Soki bomoni esika mpo na kobongisa, nasengi bino botala nini ekoki kosalama mpo na kobongwana mpo na malamu mingi.

Kimoyimi

Yambo, kimoyimi.

Baye bazali moyimi balukaka matomba mpe elengi ya bangomei likolo na nionso mosusu. Motuna monene mpo na moto ya moyimi ezali “Nini eza na yango mpo na ngai?”

Bandeko, nayebi na ntembe te bokoki komona ete ezalela oyo ezali mpenza ya kokesana na molimo esengami mpo na kotonga bokonzi ya Nzambe.

Ntango toluki komisalisa likolo na lisalisi ya moyimi te, bapriorite na biso ekomi na katikati likolo ya lifuti mpe esengo na bisomei.

Bankola ya kala ezalaki na etumba na bango na ndenge ekeseni ya kimoyimi mpe bomiluli, kasi nakanisi lelo tozali kopesa bango etumba ya pete te. Ezali libaku mpamba ete Dictionnaire Oxford kala te esakolaki “foto ya yomei” lokola liloba ya mobu?3

Na kati na bisomei, tozali na mposa ya kondimama, mpe ezali na eloko te ya mabe na kominiolisa mpe komisepelisa. Kasi ntango kolukaka “litomba mpe masazoli ya mokili” 4 ezali eteni ya katikati ya mposa na biso, tokozanga mayele ya bosikoli mpe esengo oyo ekoya ntango tomipesi na bokabi to mosala ya Nkolo.

Eyano ezali nini?

Eyano, lokola ntango nionso, ezali na maloba ya Klisto:

“Moto nionso oyo akoya na ngai, tika amiwangana, mpe amema ekulusu na ye, mpe alanda ngai.

“Moto nionso oyo akobikisa bomoi na ye akobungisa yango; kasi moto nionso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na ntina na ngai mpe ya nsango malamu, ye kaka akobikisa yango.”5

Baoyo na motema mobimba batiki bomoi na bango na Mobikisi na biso mpe basaleli Nzambe mpe bandeko na bango bato bakutaka bomengo mpe litondi moko na bomoi oyo moyimi mpe momilingi akomona ata mokolo moko te. Bazangi kimoyimi bamipesaka. Oyo ekoki kozala makabo ya mike ya bolingani oyo ezali na nguya moko monene mpo na bolamu: mwa koseka, mbote ya lobeko, koyambana, ngonga elekisami na koyoka, libola ya elengi ya bolendisi, to elembo ya bobateli. Bikela nionso ya boboto ekoki kobongola mitema mpe bomoi. Ntango tokaboli litomba ya mabaku enzanga nsuka mpo na kolinga mpe kosalisa bandeko na biso bato, lokola molongani mpe libota na biso, bokoki na biso ya kolinga Nzambe mpe kosalisa basusu ekobakisama mpenza.

Baoyo basalisaka basusu bakolala te na kati ya Bozongisi.

Babokakemi

Eloko mosusu oyo ekoki kosala biso totambola ya kolala na kati ya eleko ya ntina ya mokili ezali bokakemi.

Babokakemi mbala mingi ebandaka mokemoke. Babokakemi ezali mwa bansinga ya mosala ya kobandela oyo etongami yangomei mpo na kokoma bankanga monene ya mimesano. Mimesano ya mabe ezali na nguya ya kokoma babokakemi ya kobebisa.

Miniololo oyo ya kokanga ya bokakemi ekoki kozala na lolenge mingi, lokola pornografi, molangwa, bosoni, balopipi, sigaleti, masano, bilei, mosala, Interneti, to makambo ya mayele. Satana, monguna na biso banso, azali naa bisaleli mingi alingaka mpenza oyo asalelaka mpo na koyiba nguya na biso ya bonzambe mpo na kokokisa etinda na biso na bokonzi ya Nkolo.

Epesaka Tata na biso ya Lola mawa komona boniboni na bolingi boko ya bana na Ye ya lokumu batandoli makofi na bango mpo na kondima miniololo ya babokakemi ya kobebisa.

Bandeko, tozali na bonganganzambe ya Nzambe ya Bokasi Bonso.Tozali solo bana mibali ya Oyo Aleki Likolo mpe topambolami na nguya ya koloba te. Tosalema mpo na kopumbwa na bosembo na balola. Tosalema te mpo na kokakema na miniololo na mabele, ekangami biso na kati ya bolangeti tosali biso moko.

Eyano ezali nini?

Likambo ya liboso tosengeli kososola ezali ete babokekami ezali pete mingi mpenza mpo na kokima koleka kobikisa. Na maloba ya Mobikisi, “Kondima te biloko wana ekota na kati ya motema na yo.”6

Mibu mingi mileki, Mokambi Thomas S. Monson mpe ngai topesamaki libaku moko ya kopumbwa na Air Force One—mpepo ya lipombo oyo ememaka presida ya Etazini. Ezalaki na boluki ya mpasi mpo na likama na Bato ya Bokengeli, mpe nasekaki mwa moke ntango bato moko alukaki na nzoto ya profeta na biso ya bolingo yambo amata mpepo.

Nsima mokumbi abengisaki ngai nafanda ya kiti ya kapiteni. Ezalaki likambo moko ya kitoko kofanda lisusu na moto ya masini ya kitoko ya kopumbwa lokola ya lolenge oyo nazalaka kopumbwesa mibu mingi mileki. Makundoli ya bampepo na kati ya bambu mpe mikili etondaki na motema mpe mayele na ngai. Nakanisaki bakopumbwa ya elengi mpe bakokitaka na mabele ya mpepo na mokili mobimba.

Penepene na kozanga kokanisa, natiaki maboko na ngai na baaccelerateur minei ya 747. Kaka ntango wana, mongongo moko ya bolingo mpe ya kozanga mbeba ewutaki na nsima—mongongo ya Thomas S. Monson.

“Dieter,” alobaki, “kokanisa kutu te na ntina na yango.”

Nazali kondima eloko moko te, kasi ekoki kaka ntango mosusu ete Mokambi Monson atangaki makanisi na ngai.

Ntango tosenginiami mpo na kosala makambo, tika toyokemela likebisi ya bolingo ya libota endimama mpe baninga, profeta na biso ya bolingo, mpe ntango nionso Mobikisi.

Bobateli ya malamu mingi koleka na bokakemi ezali kobanda mokolo moko te.

Kasi boniboni mpo baoyo bamimoni bangomei na nkanga ya bokakemi?

Nasengi bino boyeba, liboso na nionso, ete ezali na elikia. Boluka lisalisi na balingami, bakambi ya Eklezia, mpe bapesi toli bayekola. Eklezia epesaka lisalisi ya libikisi ya bokakemi na nzela ya bakambi ya Eklezia ya bisika, Interneti,7mpe na boko bituka minene, LDS Family Services (Masalisi ya Mabota ya BMS).

Ntango nionso bomikundola, na lisalisi ya Mobikisi, bokoki kobuka nkanga ya bokakemi. Ekoki kozali nzela moko ya molai, ya mpasi, kasi Nkolo akosundola bino te. Ye alingi bino.Yesu Klisto azwaki mpasi ya Bomikabi mpo na kosalisa bino bobongwana, bozwa bonsomi na bowumbu ya lisumu.

Likambo ya motuya mingi koleka ezali kokoba komekaka—ntango mosusu ezwaka bomeki mingi liboso ya kozwa elonga. Botika te. Bobungisa bondimi te. Bobatela motema penepene na Nkolo, mpe Ye akopesa bino nguya ya bokangolami. Akokomisa bino nsomi.

Bandeko na ngai ya bolingo, ntango nionso bomibatela mosika ya mimesano oyo ekoki kokamba na bokakemi. Baoyo basali bongo bakokoka kopesa motema, makasi, mpe mayele na bango na mosala ya Nzambe

Bakolalalala te na kati ya Bozongisi.

Bapriorite ya kowelana

Ekonongo ya misato oyo epekisaka biso mpo na kokota mobimba na mosala na ye ezali bapriorite mingi oyo ewelanaka tokutanaka na yango. Boko na biso tozali na mosala mingi mpenza ete toyokaka lokola lokalo ebendami na baniama ya mosala zomi na mibale—moko na moko kobundaka na bipai bikeseni. Bokasi mingi ebebisami, kasi lokalo ezali kokende esika moko te.

Mbala mingi topesaka bokasi na biso eleki malamu na kolanda eloko tolingaka, lisano, matomba ya mosala, mpe makambu lingomba to ya politiki. Makambo nionso oyo ekoki kozala ya malamu mpe ya lokumu, kasi ezali kotikelaka biso ntango mpe bokasi mpo na oyo esengeli kozala makambo na biso ya liboso maleki likolo?

Eyano ezali nini?

Mbala moko lisusu, ewutaka na maloba ya Mobikisi:

“Okolinga Nkolo Nzambe na yo na motema mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na mayele na yo mobimba.

“Eye ezali mobeko ya yambo mpe ya monene.

“Mpe ya mibale ezali lokola yango, Okolinga mozalani na yo lokola yomei.”8

Eloko mosusu nionso na bomoi esengeli kozala ya nsima na makambo minene ya liboso mibale oyo.

Ata na mosala na Eklezia, ezali pete kobebisa ntango mingi kaka kosalaka na momesano na kozanga kotia motema to likanisi ya boyekoli.

Bandeko, biso lokola bamemi bonganganzambe totindami kozala bato moko oyo balingaka Nzambe mpe mozalani na biso mpe oyo bazali na bolingi kolakisa bolingo wana na nzela ya maloba mpe misala. Yango ezali eloko ya ntina ya nani tozali lokola bayekoli ya Yesu Klisto.

Baye bbasaleli mabongisi oyo bakolala te na ntango ya Bozongisi.

Libiangi mpo na Kolamuka

Apostolo Paulo alobaki ete, “Lamukani yo oyo olali, mpe lamuka uta na liwa, mpe Klisto akopesa yo pole.”9

Bandeko na ngai ya bolingo, nayebi ete bozali bana mibali ya pole.

Bondima te kimoyimi! Bondima te mimesano oyo ekoki kokamba bino na bokakemi! Bondima te bapriorite oyo ewelanaka ekamba bino na bonzangi liyoki to mosika na boyekoli epambolama mpe mosala ya bonganganzambe oyo epesaka lokumu!

Ezali na ntina mpenza mpo na biso lokola bato, lokola mabota, mpe lokola Eklezia ya Klisto kopesa bobele makasi ya ndambo na mosala oyo ya bule.

Kozala moyekoli ya Yesu Klisto ezali makasi moko ya mbala moko na poso to na mokolo te. Ezali makasi ya mbala nionso.

Elaka ya Nkolo na bamemi ya bonganganzambe na Ye ya solo ezali lokola eleki monene na kososola.

Baoyo bazali botongono na babonganganzambe ya Alona mpe ya Melekisedeke mpe bakumisi mabiangi na bango “basantisami na Molimo mpo na kokomisa sika banzoto na bango.” Yango wana, manso oyo Tata na biso azali na yango ekopesamela bango.10

Natatoli ete nguya ya kopetola ya Bomikabi ya Yesu Klsito mpe nguya ya kobongola ya Molimo Mosantu ekoki kobikisa biso mpe kosalisa bato. Ezali litomba na biso, mokumba na biso ya bule, mpe essengo na biso mpo na kosala keba na libiangi ya Mobikisi mpo na kolanda Ye na motema ya bolingi mpe ntina ya motema.Tika biso “toningisa miniololo kati na yango [to]kangemi, mpe tobima libanda ya molili, mpe totelema uta na mputulu.”11

Tika tolamuka mpe tolemba te na kosala malamu, mpo biso “tozali kotiaka moboko na mosala monene oyo,”12 kutu kolengela bozongi ya Mobikisi. Bandeko, ntango tobakisi pole ya ndakisa na biso lokola nzeneneke moko ya kitoko mpe nguya ya bosolo ezongisami, tokolala te na kati ya Bozongisi. Na ntina na yango natatoli mpe natikeli bino lipamboli na ngai na nkombo ya bule ya Nkolo na biso, kutu Yesu Klisto, amene.

Show References

  1.  

    1. Tala Martin Luther King Jr., “Don’t Sleep Through the Revolution” (1966 Ware Lecture, Liyangani Linene ya Unitarian Universalist Association, Hollywood, Florida, na sanza ya mitano 18, 1966).

  2.  

    2. Biteni ya Bondimi 1:9.

  3.  

    3. Tala blog.oxforddictionaries.com/press-releases/oxford-dictionaries-word-of-the-year-2013.

  4.  

    4. 2 Nefi 26:29.

  5.  

    5. Malako 8:34–35.

  6.  

    6. 3 Nefi 12:29.

  7.  

    7. Tala, mpo na ndakisa, lds.org/topics/addiction.

  8.  

    8. Matai 22:37–39.

  9.  

    9. Baefese5:14.

  10.  

    10. Tala Doctrine et Alliances 84:33, 38.

  11.  

    11. 2 Nefi 1:23.

  12.  

    12. TalaDoctrine et Alliances 64:33.