Claudio D. Zivic
Nasambeli ete bokobungisa te komona nzela mpo ete tokoka ntango nyonso kozala na mokangano na balola.

Mwa mwana mobali azalaki kobeta piano, ntango moteki moko, komonaka ye na lininisa, atunaki ete , “Mama na yo azali na ndako?”

Na yango mwana ayanolaki, “Mpe … okanisi nini?”

Bana na biso ya bolingo mitano babetaka piano, na lisalisi ya botindiki ya mwasi na ngai! Ntango moteyi azalaki koya na ndako, mwana na biso ya mobali Adrián azalaki kokima mpe kobombama mpo na kozanga liteya na ye te. Kasi mokolo moko likambo moko kitoko esalamaki! Abandaki kolinga miziki mingi mpenza ete akobaki kobeta na yemei.

Soki tokokoka kokoma na esika wana na nzela ya mbongwana na biso, ekozala kitoko. Ekozala kafukafu kozala na mposa makasi na mitema na biso mpo na kobatela mitindo na moko te kokundolisaka biso ntango nyonso mpe mpo na kozwa bondimi ya sikisiki ete soki tolandi nzela ya malamu, tokozwa mapamboli elakama na makomi.

Mibu ebele eleki nakendaki na Arches National Park elongo na mwasi na ngai; mwana na biso ya mwasi, Evelin; mpe moninga moko ya libota. Moko ya bansonge eyebana kuna ebengami Delicate Arch. Tozwaki mokano ya kotambola penepene na 2 km, kobutaka ngoma mpo na kokoma na likolo nsonge.

Tobandaki kokende na nzela na biso na motema esengo, kasi nsima ya kotambolaka eteni moko ya mokuse, basusu bazalaki na mposa ya kopema. Na ntina ya mposa na ngai ya kokoma kuna, nakanaki kokoba ngai moko. Kozangaka kosala keba na nzela nasengelaki kozwa, nalandaki mobali moko liboso na ngai oyo azalaki komonana lokola kozala kokende liboso na kondima monene. Nzela ekomaki mpasi, mpe nasengelaki kopumbwa libanga na libanga. Na ntina ya kpokoso, nayebaki ete basi ya liboke na ngai balingaki kokoka ata moke te. Na mbalakaka namonaki Delicate Arch, kasi na bokamwi na ngai, namonaki ete ezalaki na esika moko wapi nakokaki kokoma te.

Na kotungisama makasi, nakanaki kozonga. Nazelaki na motema mokuse tii tokutanaki lisusu. Motuna na ngai ya yambo ezalaki ete “Bokomi na Delicate Arch?” Balobaki na ngai na esengo ete bakomaki. Balimbolaki ete balandaki bilembo kolakisaka nzela, mpe na bokebi mpe bokasi, bakomaki na bisika na bango bazalaki kokende.

Na mawa, nazwaki nzela ya mabe. Liteya nini monene nayekolaki mokolo wana!

Mbala boni tosalaka libungi oyo etali nzela malamu, komitikaka kokambama na mipepe ya mokili? Tosengeli ntango nyonso komituna soki tozali kozala basaleli ya maloba ya Yesu Klisto.

Liteya ya kitoko ezwami na buku ya Yoane:

“Bowumela kati na ngai, mpe ngai kati na bino. Pelamoko etape ekoki kobota mbuma yango mpenza te soki ekoumela na mowiti te, bino mpe bokoki te soki bokoumela kati na ngai te.

“Nazali mowiti na solo, bino bitape. Ye oyo aumeli kati na ngai lokola ngai naumeli kati na ye, akobota mbuma mingi jambi bokoki kosala likambo longwa na ngai te ” (Yoane 15:4–5).

Kosalelaka lisese oyo, tokoki komona mokangano ya penepene mpenza, eluti likolo tozali na yango na Yesu Klisto mpe motuya oyo Ye atiaka na moko na moko na biso. Azali mosisa mpe mobimbi oyo ememelaka biso mai ya bomoi, mai ya nzete oyo ekopesa biso nzela ya koleisama mpo ete tokoka kobota mbuma mingi. Yesu Klisto ateyaki biso na lolenge moko ete pelamoko na bitape—to kokangamaka na Ye—tokokitisa mokolo moko te motuya ya mateya na Ye.

Ezali na mwa mabungi oyo ekoki kozala ya lokengo, mpe soki tosemboli yango te na ntango ekoki, ekoki kokamba libela mosika ya nzela malamu. Soki toyamboli mpe tondimi bosemboli, boyebi oyo ekopesa biso nzela ya komikitisa, kobongola misala na biso, mpe mbala moko lisusu kopusana penepene ya Tata na biso ya Lola.

Nalingi kopesa ndakisa moko ya likanisi oyo na kolobelaka moko ya bangonga ya mpasi oyo Profeta Joseph Smith akutanaki na yango. Na nzela ya likambo oyo, Mobikisi apesi biso mateya motuya mingi kotalaka mabongisi oyo tosengeli kobatela na motema na bomoi na biso. Esalemaki ntango Martin harris abungisaki nkasa ebongolama 116 ya eteni ya yambo ya Buku ya Mormon.

Nsima ya koyambola mpo na kozanga kolanda toli ya Nzambe, Profeta ayambaki libimisi oyo ezwami na eteni 3 ya Doctrine et Alliances (tala Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith [2007], 69–71). Uta na oyo ekomami na milongo 1 tii 10, nalingi kobeta nsete na mabongisi misato oyo tosengeli komikundola ntango nyonso:

  1. 1.

    Misala mpe bantina ya Nzambe ekoki kopekisama te.

  2. 2.

    Tokoki kobanga moto te koleka Nzambe.

  3. 3.

    Ezali na ntina ya boyamboli ya ntango nyonso.

Na molongo 13, Nkolo ateyi biso makambo minei oyo tosengeli mokolo moko te kosala:

  1. 1.

    Kotala mpamba batoli ya Nzambe.

  2. 2.

    Kobuka bilaka ya bule mingi koleka oyo esalamaki liboso ya Nzambe.

  3. 3.

    Koyangelama na makanisi na binomei.

  4. 4.

    Komumisa bwania na bisomei.

Nasambeli ete bokobungisa te komona nzela mpo ete tokoka ntango nyonso kozala na mokangano na lola, mpo ete mipepe ya mokili ekombola biso mosika te.

Soki moko kati na bino akomi na esika ya kosundola nzela ya Nkolo—na esika kani na nzela wana—na motema koswa makasi okomiyoka bololo ya kotala mpamba batoli ya Nzambe, ya kobukaka bilaka ya bule mingi koleka oyo esalamaki liboso ya Nzambe, ya kolikiaka na makanisi na yomei, to ya kokumisaka bwania na yomei.

Soki oyo ezali bongo, nalendisi bino boyambola mpe bozonga na nzela malamu.

Mokolo moko nkoko moko abengaki papa nkoko na ye kotombela ye mbotama malamu. Atunaki mibu boni azalaki na yango. Alobaki ete akokisaka mibu 70. Nkoko na ye akanisaki mwa ngonga moko mpe atunaki, “Papa nkoko, obandaki mpenza ozalaki na mobu 1?”

Na bomwana mpe bolenge, bato bakanisaka bakokoma mibange mokolo moko te; likanisa ya liwa ekozwa misisa mokolo moko te—wana ezali mpo na mibange mpenza, mpenza—mpe kokomaka na esika wana ezali naino boseko moko ya mosika. Wana ntango ezali kokende, basanza mpe bileko koleka kino misusamasusa ebandi kobima na elongi, makasi ekiti, mposa ya komona monganga ekomi mingi, mpe bongo na bongo

Mokolo ekoya wapi tokokutana lisusu elongo na Mosikoli mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Nabondeli ete na libaku ya bule mpe eluti tokoka koyeba lisusu Ye mpo na boyebi oyo tozali na yango etali Ye mpe mpo na kolandaka mateya na Ye. Akolakisa biso bilembo kati na maboko mpe makolo na Ye, mpe tokosangana elongo na boyambani moko ya seko, kolelaka mpo na esengo ya kolandaka nzela na Ye.

Natatoli na bansuka minei ya mabele ete Yesu Klisto azali na bomoi. Azali kolendisa biso, “Boyoka, O bino bikolo ya mabele, mpe boyoka maloba ya Nzambe wana oyo asalaki bino” (D&A 43:23). Tika tozala na bokoki ya kosimba makasi, kosala keba, kososola, mpe kolimbola malamu nsango “ete Nzambe oyo asalaki [biso]” mpo na kobunga te na nzela na Ye, Nabondeli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.