Bolingo—Ntina mpenza ya Nsango Malamu


Thomas S. Monson
Tokoki te kolinga Nzambe mpenza soki tokolinga bazalani na biso ten a mobembo oyo ya bomoi ya kufa.

Balingami na ngai ya mibali mpe ya basi, ntango Mobikisi na biso asalaki kati ya bato, atunamaki na avoka oyo atunaki, Molakisi, motindo nini ya monene ezali kati ya mobeko?”

Matai atalisi ete Yesu ayanolaki:

“Okolinga Nkolo Nzabe na yo, na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba mpe na mayele na yo nionso.

“Oyo ezali motindo ya yambo mpe monene.

“Mpe ya mibale ekokani na oyo, okolinga mozalani na yo lokola yomei.” 1

Malako asukisi motuya na maloba ya Mobikisi: “Ezali na motindo moko te eleki oyo mibale.” 2

Tokoki te solo kolinga Nzambe soki tolingi te bato ya mobembo na biso na bomoyi oyo ya kufa. Lolenge moko, tokoki kolinga baninga na biso nionso te soki tolingi Nzambe te, Tata na biso nionso. Apostolo polo ayebisi biso, “motindo oyo tozali na yango ewuti epai na ye, ete oyo alingi Nzambe alinga bandeko na ye.” 3 tozali banso bana ya molimo ya Tata na Lola mpe, lokola bandeko mibali mpe bandeko basi. Lokola tobombi bosolo oyo kati ya mayele, kolingaka bana nionso ya Nzambe ekokoma pasi te.

Sika awa, bolingo ezali ntina mpenza ya nsango malamu mpe Yesu Klisto azali ndakisa na biso. Bomoyi na Ye ezalaki libula ya bolingo. Maladi abikisaki, bakoka atelemisaki, bato na masumu abikisaki. Na nsuka, liboke ya bato basiliki bazwaki bomoyi na Ye. Mpe balatisaki ye ekoti ya nzube na ngomba ya Golgotha alobi: “Tata, limbisa bango; mpo bayebi maye bazali kosala te” 4—ndakisa ya nsuka na bokufi ya ngolu mpe bolingo.

Ezali na bankombo ebele oyo ezali bilembo ya bolingo, lokola boboto, bompikiliki, bomikabi, bososoli, mpe bolimbisi. Na mangomba na biso nyonso, oyo mpe bankombo misusu ekosunga basusu mpo na komona bolingo kati ya mitema na biso.

Mbala mingi bolingo na biso ekomonisama mokolo na mokolo na biso na bosalisi ya moko mpe mosusu. Ntina nionso ekozala bokasi na biso ya koyeba mposa ya moto mpe nsima kosalisa. Nalingaka ntango nionso mposa epesami kati na mwa likomi:

Nalelaki na butu
Mpo na ntango mokuse ya bomoni
Ebomaki ngai miso.
Kasi naino nazwi te
Nayokaki mwa mawa
Mpo na kozalaka na mua boboto koleka. 5

Kala te bayebisaki ngai na ntina ya ndakisa ya boboto ya kokamwa—moko oyo ezalaki na biyano emonisamaki te. Mobu ezalaki 1933, ntango ya eleko ya bozangi mosolo, mabaku ya mosala ezalaki mpasi. Esika ezalaki na ngambo ya esti ya USA. Arlene Biesecker awutaki kozwa lipolome ya kelasi ya likolo. Nsima ya boluki ya mosala na ntango molai, na nsuka azwaki mosala na ndako ya batongi bilamba lokola motongi bilamba. Batongi bilamba bazalaki kofutama kaka na botongi nionso ya malamu ya bilamba bazalaki kotonga bango nionso mokolo na mokolo. Bazalaki kofutama kolandisamaka motango ya bilamba bazalaki kotonga.

Mokolo moko nsima mua ntango moke ya bobandi mosala na ndako ya botongi bilamba, Arlene akutanaki na likama moko oyo etungisaki mpe ebangisaki ye. Afandaki na masini na ye kotonga komekaka kobongisa elamba oyo abandaki kosala. kasi moto ya kosunga ye azalaki te, kati ya batongi bilamba nionso misusu bazalaki kosala na lombango mpo na kosilisa misala ebele oyo bakokaki kotonga. Arlene ayokaki bozangi lisungi mpe elikia. Na kimia, abandaki kolela.

Na ngambo ya Arlene efandaki Bernice Rock. Azalaki mokolo mpe ayebaki kotonga koleka. Azalaki kotalaka mawa ya Arlene, Bernice atikaki mosala na yemei mpe akendaki pembeni ya Arlene, na boboto apesaki liteya mpe asunga ye. Amekaki kino Arlene ayebaki mpe akomaki na makoki ya kotonga bilamba malamu. Sima Bernice azongaki na masini na yemei, abungisaki libaku ya kotonga bilamba na yemei, mpo ete asungaki.

Na ndakisa moko oyo ya bolingo Bernice mpe Arlene bakomaki baninga ya ntango molai. Moko na moko abalaki mpe abotaki bana. Ntango nionso na 1950 Bernice, oyo azalaki mondimi ya Eklezia, apesaki Arlene mpe libota na ye mokanda ya buku ya Mormon. Na 1960, Arlene mpe mobali na ye bazwaki libatisi mpe bakomaki bandimi ya Eklezia. Sima bakangamaki na tempelo esantu ya Nzambe.

Lokola litomba ya ngolu Bernice amonisaki lokola akendaki na nzela na ye kosunga moto oyo ayebaki te kasi oyo azalaki na mawa mpe bosenga ya lisungi, bato ebele koleka, nionso mibale, bato ya bomoyi mpe bato bakufa, sikawa sepela na kosalekaka makuli ya nsango malamu.

Mikolo nionso ya bomoyi na biso tozali kopesa mabaku ya komonisa bolingo mpe boboto na baye bazali nzinga nzinga na biso. Elobaki Mokambi Spencer W Kimball: “tosengeli kokundola ete bakufi oyo tozali kokutana na bango na botelemi mingi, babilo, baasasere, mpe ya ngambo mosusu bazali eteni wana ya mokili Nzambe apesi biso mpo na kolinga mpe kosalisa. Ekosala biso mwa ndambo ya malamu koloba na mobimba ya bondeko mobali ya mokili soki tokoki kotala te baye nionso bazali nzinga nzinga na biso lokola bandeko mibali mpe bandeko basi.” 6

Mbala mingi mabaku na biso ya kolakisa bolingo na biso eyaka na mbalakata. Ndakisa moko ya libaku moko emonisami kati ya eteni moko ya zulunale na sanza ya zomi ya mobu 1981. Yako kamwa ezalaki mpenza bolingo mpe ngolu oyo ekomamaki na kati ya eteni oyo na bombaki na mikanda na ngai mibu 30 mileki.

Eteni elobi boye moko ya mpepo ya Alaska kowutaka Anchorage na bozangi bopemi, Alaska, na Seattle, Washington—mpepo ememaki bato150 —epengolamaki na engumba moko ya Alaska na ntina kozwa mwana moko ya mobali oyo azokaki makasi. Mwana ya mibu 2 akatanaki mosisa ya loboko ntango akweyaki na eteni ya molangi nabosakani pembeni ya ndako na bango. Engumba ezalaki ya 725 bakilometele na sudi ya Anchorage mpe ezalaki te solo na nzela ya mpepo. Na yango, minganga basengaki bosungi ya kotelema, mpe mpepo ekitaki mpo na kozwa mwana mobali mpe komema ye na ntina ete akoka kozwa lisalisi na lopitalo.

Ntango mpepo ekitaki mpembeni ya engumba, minganga bayebisaki pilote ete mwana mobali makila ebandaki kobima ye mingi akokaki te kokende na Seattle. Mokano ezwamaki ya kokende bakilometele misusu ya 320 na nzela ya mabe kino na Juneau, Alaska, mpembeni ya engumba ya lopitalo.

Sima ya bomemi mwana mobali na Juneau, mpepo ekendaki na Seattle, sikawa nsima ya ntango eleki. Moto moko te kati ya mpepo amitungisaki, atako mingi kati na bango bazangaki bokutani na bango mpe bampepo na bango mosusu. Na yango, lokola baminiti mpe ba ntango elekaki, bakongolaki mbongo, bazwaki mbongo ebele mpo na mwana mpe libota na ye.

Lokola mpepo ezalaki mpenepene ya babele na Seattle, bato ya mobembo babandaki kosepela ntango pilote alobaki ete azwaki liloba na radio ete mwana mobali akomaki malamu. 7

Na makanisi na ngai maloba ya makomi eyaki: “Bolingani ezali bolingo ya mpetwa ya Klistu, … mpe nionso ekozala malamu na oyo akozala na bolingani na mokolo ya nsuka.” 8

Bandeko mibali mpe bandeko basi, boko ya mabaku na biso ya minene koleka ya kolakisa bolingo na biso ekozala kati ya mabota na bisomei. Bolingo esengeli kozala ntina koleka ya bomoyi ya libota na biso, na nsima ezali mbala mingi te. Wana ekoki kozala na ebele ya bozangi bompikiliki, ebele ya boswani, bitumba ebele, mpinzoli ebele. Mokambi Gordon B. Hinckley atunaki na mawa: “mpo na nini ezali ete [baye] tolingi [koleka] akomaka mbala mingi monguna ya maloba na biso? Mpo na nini ezali ete [biso] ntango mosusu tolobaka lokola kolinga kosala mpasi na oyo ekataka na lombango libomi?” 9 Biyano na mituna miye ekoki kozala ekeseni na moko na moko na biso, mpe sikawa bosolo ezali ete bantina etangami te. Soki tobateli motindo ya kolingana moko mpe mosusu, tosengeli kosalisana moko na moko na boboto mpe botosi.

Ya solo ekozala na ntango mosusu ntango botosi esengeli kondimama. Tika ete tokundola, nzokande, toli ezwami na Doctrine & Alliances—nakoyebaka, ete ntango ezali ntina mpo na biso ya kozomela basusu, tolakisi nsima uta lelo bomatisi ya bolingo. 10

Nalikii ete tolukaka ntango nionso kozala na bokebi mpe kozala na koyoka na makanisi mpe na bamposa mpe na ndenge basusu bazali baye bazali nzinga nzinga na biso. Tika ete tomikitisa te to komitonga te. Nzokande, tika ete tozala mitema mawa mpe bokasi. Tosengeli kozala na bokebi ya kobebisa elikia ya moto mosusu te na nzela ya bomoni mpamba maloba to misala na ye.

Bolimbisi esengeli kotambola elongo na bolingo. Na mabota na biso, mpe lokola na baninga na biso, ekoki kozala na bamposa etukami mpe esengo moke ya kolimbisa. Lisusu, mabe ekozala te ete motuna ezalaki nini. Ekoki kozala te mpe esengelaki te kotikala na elembo na motema, mpo na kopolisa mpe na nsuka kobebisa. kotukaka baninga mosusu mpo na maye basali ya mabe ekopekisa biso libiki. Kaka se bolimbisi nde ekobikisa.

Ndeko mwasi moko ya bolingo oyo akufa tokendaki kotala elongo na ye mokolo moko mpe na mbalakata tokutanaki na likama moko. Alobaki na likama oyo esalemaki mibu eleki mingi mpe akotisaki mosali bilanga moko ya pembeni, ntango moko moninga malamu kasi oyo ye mpe mobali na ye bazalaki na boyokani te ntango nionso. Mokolo moko mosali bilanga atunaki soki akokaki kozwa nzela ya mokuse mpo na kokende na lopango na ye. Na ntango wana apemisaki lisolo epai na ngai mpe, na kotatabanaka na mongongo na ye, alobaki “Ndeko mobali Monson, natikaki te akatisa elanga na biso nsima atako moke te kasi nasenga ye kokende nzela ya molai na makolo mpo na kokoma na ndako na ye. Nasalaki mabe, mpe nayokelaki yango motema mpasi. Asi akufa, kasi oh, nasengeli nakokaki koyebisa ye, nayoki motema mpasi mpenza.’boniboni nasengeli nazalaki na libaku malamu ya mbala mibale ya kozala boboto.”

Lokola nayokelaki ye, wana makanisi na ngai eyaki na mawa mpenza ya botali ya John Greenleaf Whittier: “Na maloba nyonso ya mawa ya lokota to ya ekomeli, mawa ezali oyo: soki tosalaki makambo na lolenge mosusu bomoyi na biso ekokaki kozala malamu mingi koleka!’”11 Bandeko mibali mpe basi, lokola tozali kolakisa baninga bolingo mpe boboto, tokoyokisama motema mpasi lolenge ya boye te.

Bolingo elakisamaka na ndenge ebele: koseka, elembo, liloba ya boboto, maloba ya lokumu. Maloba mosusu ekoki kozala na ntina, lokola kolakisa ntina na misala ya moto mosusu, kotangisaka mokano na boboto mpe bompikiliki, kotalaka moto ya maladi to oyo azalaka kaka na ndako. Maloba oyo mpe misala, mpe mingi mosusu, ekoki kopesa nsango ya bolingo.

Dale Carnegie, moko mokomi ya Amerika oyo ayebana malamu mpe motangi, alikiaki ete moto nionso azali na kati na ye mobali to mwasi nguya ya koliisa ya esengo nyonso ya mokili … “na kopesaka maloba ndambo ya sembo ya bosepeli na moto oyo azali yemei to alembisami.” Alobaki, “ntango mosusu okobosana lobi maloba ya boboto olobi lelo, moto akoki kolinga yango na ntango etikali ya bomoyi na ye.” 12

Ekoki biso sikawa, na mokolo oyo mpenza, kolakisa bolingo na bana nyonso ya Nzambe, atako bato na biso ya libota, baninga na biso, bayebani na biso mpenza to bapaya na mobimba, lokola tozali kolamuka na ntongo nionso, tika ete tozwa mokano ya koyanola na bolingo mpe boboto na baye bakoya na nzela na biso.

Bolingo ya Nzambe mpo na biso bandeko mibali mpe basi, na ntina ya bolingo oyo Atindaki Mwana na Ye, oyo alingi biso mingi mpo na kopesa bomoyi na Ye mpo na biso, na ntina ete tokoka kozwa bomoyi ya seko. Lokola tosili kososola likabo oyo ya ntembe te, mitema na biso ekotondisama na esengo mpo na Tata na biso ya Seko, mpo na Mobikisi na biso, mpe mpo na mokili mobimba. Nasambeli na bosolo ete oyo ekozala bongo na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Lakisa Matangi

  1.  

    1. Matai 22:36–39.

  2.  

    2. Malako 12:31.

  3.  

    3. 1 Yoane 4:21.

  4.  

    4. Luka 23:34.

  5.  

    5. Mokomi ayebana te, kati ya Richard L. Evans, “The Quality of Kindness,” Improvement Era, sanza ya mitao 1960, 340.

  6.  

    6. Teachings of Spencer W. Kimball, ed. Edward L. Kimball (1982), 483.

  7.  

    7. Tala “Injured Boy Flown to Safety,” Daily Sitka Sentinel (Alaska), Sanza ya Zomi. 22, 1981.

  8.  

    8. Moroni 7:47.

  9.  

    9. Gordon B. Hinckley, “Let Love Be the Lodestar of Your Life,” Ensign, sanza ya mitano 1989, 67.

  10.  

    10. Tala Doctrine and Covenants 121:43.

  11.  

    11. “Maud Muller,” na The Complete Poetical Works of John Greenleaf Whittier (1876), 206; emphasis added.

  12.  

    12. Dale Carnegie, in, for example, Larry Chang, Wisdom for the Soul (2006), 54.