Misisa mpe Bitape


Quentin L. Cook
Kosala noki noki mambi ma libota mpe mosala ya tempelo na mokolo na biso ezala na ntina mpo na lobiko mpe bonetolami ya mabota.

Bobele liboso ya liwa na ye uta na caner na 1981, mokomi moko ya boswani William Saroyan ayebisaki na bapanzi nsango, “Banso tosengeli kokufa, kasi nazalaki ntango nyonso kondima bolongoli ekoki kosalema na oyo etali ngai. Sikawa nini?”1

“Sikawa nini” yango na elongi ya liwa na bomoi oyo mpe “sikawa nini” na kotala na bomoi nsima ya liwa ezali na motema ya mituna ya molimo ete bozongisi ya nsango malamu ya Yesu Klisto eyanoli kitoko mpenza na libongisi ya Tata ya esengo.

Na bomoi oyo tozali koseka, kolela, kosala, kosakana, kovanda, mpe nsima kokufa. Yobo atunaki motuna ya kokesenisa, “Soki moto akufi, akoki kobika lisusu? ”2 Eyano ezali koyoka iyo na ntina ya libonza ya komikaba ya Mobikisi. Eteni moko ya maloba mingi ya ebandeli ya Yobo mpo na eyano ezali na ntina: “Moto oyo abotami na mwasi azali na mikolo moke. … Ayaki liboso lokola fololo, mpe akatami na nse…. Wana ezali elikia ya nzete, soki bakati yango na nse, ete ekoki kokola lisusu, mpe ete etumu ya bopete ekoki te kotika… mpe kopesa liboso bitape lokola nzete.”3

Mwango ya Tata na biso ezali na ntina ya mabota. Mingi ya makomi na biso eleki makasi esaleli liloba ya nzete na misisa na yango mpe bitape lokola lisese.

Na bokangi mokapo ya Boyokani ya Kala, Malaki, na kolimbolaka Boyei ya Mibale ya Mobikisi, asalelaki lisese oyo. Kolobaka na ntina ya lolendo mpe loma, akomaki ete bakozikisama lokola mputulu mpe “ete ekotika bango ata mosisa to etape.”4 Malaki asukisi mokapo oyo na elaka ya Nkolo:

“Tala, Nakotindela bino profeta Eliya liboso ya boyei ya mokolo monene mpe ya nsomo ya Nkolo:

“Mpe akobalusa mitema ya baboti epai ya bana, mpe mitema ya bana epai ya baboti na bango, na bobangi ete naya kobeta mokili na ekila.”5

Na ntongontongo ya Bozongisi, Moroni abetaki lisusu sete na etinda oyo na ebandeli ya liteya na ye epai ya elenge Joseph Smith na 1823.6

Baklisto mpe Bayuda na mokili mobimba bandimi lisolo ya Boyokani ya Kala ya Eliya.7 Azalaki profeta ya nsuka ya kozala na nguya ya kokanga ya bonganganzambe ya Melekisedeke liboso ya ntango ya Yesu Klisto.8

Eliya Azongisi Bafungola

Bozongi ya Eliya esalamaki na Tempelo ya Kirtland na sanza ya minei 3, 1836. Alobaki ete azali kokokisa elaka ya Malaki. Apesaki bafungola ya bonganganzambe mpo na kokanga mabota na eleko oyo.9Etinda ya Eliya ebongisamaki na wapi ezali ntango mosusu kobengama molimo ya Eliya, oyo, lokola Mpaka Russell M. Nelson ateyaki, ezali “ bolakisimi ya Molimo Mosantu kotatolaka na ntina ya ezalela ya bonzambe ya libota.”10

Mobikisi abetaki sete na ntina ya kozala ya libatisi. Ateyaki, “Longola se moto abotami na mayi mpe na Molimo, akoki te kokota na bokonzi ya Nzambe.”11 Mobikisi ye moko azwaki libatisi mpo na kopesa ndakisa. Nini mpo na bakufi oyo bazwaki libatisi te?

Malongi ya Tempelo mpe Mosala ya Mambi ma Libota

Na sanza ya zomi 11, 1840, na Nauvoo, Vilate Kimball akomelaki molongani na ye mokanda, Mpaka Heber C. Kimball, oyo eolngo na baninga mosusu ya Bazomi na Babale bazalaki kosala misio na Grande Bretagne. Likita Linene ya sanza ya zomi esengelaka kosalema mwa mikolo liboso.

Nalobi uta na biteni ya mokanda ya Vilate: “Tozalaki na likita monene mingi mpe ya bosepeli mingi oyo esalemi naino te banda Eklezia ebongisamaki…. Mokambi [Joseph] Smith afungolaki likambo ya sika mpe ya nkembo. … Ezali, kobatisamaka mpo na bakufi. Paulo alobaki mpo na yango, naBakolinti ya yambo mokapo ya 15 molongo ya 29. Joseph azwaki litondi mingi ya ndimbola na yango na bobimisi. Alobi ezali libaku ya [bandimi ya] Eklezia oyo kozwa libatsi mpo na bana banso ya bankoko na bango oyo bakufa liboso ya nsango malamu oyo eya na mokili . … Nakosalaka bongo, tokosala lokola basali mpo na bango, mpe tokopesa bango libaku ya koyaka na mokili na Lisekwa ya Yambo. Alobaki bakoteyama nsango malamu na boloko.”

Vilate abakisaki: “Nalingi kobatisama mpo na mama na ngai. … Ezali oyo malongi ya nkembo te?”12

Malongi ya ntina etali bosangisi mabota eyaki na mokili molongo na molongo mpe mosise na mosise. Makuli na nzela ya moto mosusu ezali na motema ya kokangisa lisanga mabota ya seko, kokangisa misisa na bitape.

Malongi ya libota na mambi ma libota mpe mosala ya tempelo ezali polele. Nkolo na mateya ya bobimisi ya ebandeli alobelaki “libatisi mpo na bakufi na bino.”13 Lotomo ya malongi na biso ezali epai ya bankoko na bisomei. Oyo ezali mpamba te mabongisi ya celesitiale ya lola evandisami likolo ya mabota.14 Bakambi ya Yambo batindaki bandimi, mingimingi bilenge, mpe bilenge bakoli minzemba, babeta nsete na mosala ya mabi ma libota mpe makuli ya mpo na nkombo ya mabota na bangomei to nkombo ya bankoko ya bandimi ya paloasi mpe ya likonzi na bango.15 Tosengeli kokangisama na misisa mpe bitape na biso. Likanisi ya kozala lisanga na bokonzi ya seko ezali solo ya nkembo.

Batempelo

Wilford Woodruff alakisaki ete Profeta Joseph Smith avandaki ntango molai ekoka mpo na kotia moboko ya mosala ya tempelo. Na nsuka ya ngonga ye, Joseph Smith, akutanaki na Lisanga Likoki ya Bazomi na Babale, apesaki bango dotasio na bango.16

Na nsima ya liwa ya martiro ya Profeta, Basantu basilisaki Tempelo ya Nauvoo, mpe nguya ya bokangisi esalemaki mpo na kopambola bamilio ya bandimi ya botongongo liboso ya bobimi mpo na kokende na Mountain West. Mibu ntuku misato nsima, na bosilisi ya Tempelo ya St. George, Mokambi Brigham Young amonaki ndimbola ya seko ya makuli ya lobiko na nsuka kozwamaka mpo na bamoi mpe bawa.17

Oyo ezali maloba ya pete ya Mokambi Wilford Woodruff: “Ezali na libongisi moko te Nkolo abimisi oyo nasepeli na yango mingi koleka na bosikoli ya bakufi na biso; eye tokozwa batata na biso, bamama na biso, basi na biso mpe bana na biso elongo na biso kati na lisanga ya libota, na ntongo ya lisekwa ya yambo mpe na Bokonzi ya Celesitiale. Wana ezali mabongisi minene. Esengi mpenza komibonza.”18

Ntango monene nini kozala na bomoi. Oyo ezali eleko ya nsuka, mpe tokoki koyoka botambwisi mbanngo ya mosala ya lobiko na bituka nyonso wapi liyokani ya lobiko ezali.19 Tozali sikawa na batempelo mingi na mikili mobimba mpo na kopesa makuli ya lobiko oyo. Kokende na tempelo mpo bozongisi sika ya molimo, kimia, bobangi te, mpe boyangeli na bomoi na biso ezali lisusu lipamboli monene.20

Ekokaki mobu moko te nsima Mokambi Thomas S. Monson abiangemaki lokola Apostolo, asalaki losambo ya kobonza Ndako ya Mikanda ya Bonkoko ya Tempelo ya Los Angeles. Alobaki na ntina ya bankoko bakufa “kozelaka [mpo na] mokolo ntango bino mpe ngai tokosala boluki oyo esengeli mpo na kokombola nzela, … [mpe] na yango kokende kati na ndako ya Nzambe mpe kosala mosala wana… oyo bango … bakoki kosala te.”21

Nsima ntango-Mpaka Monson apeasaki makebisi ya kobulisa wana na sanza ya motoba 20, 1964, ezalaki bobele batempelo efungwama 12. Na eleko Mokambi Monson asalaki na lisanga ya likolo ya Eklezia, 130 ya batempelo 142 na biso efungwama ezalaki na losambo na bango ya kobonza ya ebandeli. Ezali eloko moko te ezangi likamwisi komona botambwisi mbango mosala ya lobiko na mikolo na biso. Batempelo ntuku mibale na mwambe misusu epesameli nsango mpe ezali na biteni ekeseni na botongi. Ntuku mwambe na mitano likolo ya mokama ya bandimi ya Eklezia bavandi sikawa na ntaka ya 320 km na tempelo.

Lisolo ya Tekinolozi ya Libota

Lisolo ya Tekinolozi ya libota ezalaki lisusu kokoba na kokamwisa. Mokambi Howard W. Hunter alobaki na sanza ya zomi na moko 1994: “Tobandi kosalela informatiki mpo na kotambwisa mbangu mosala ya bule ya kopesaka makuli mpo na bakufi. Mosala ya tekinolozi… ememamaki mbangu na Nkolo yemei. … Nzokande, totelemi bobele na ekuke ya nini tokoki kosala na bisalelo oyo.”22

Na mibu 19 uta maloba ya lisakoli oyo, botamboli mbango ya tekinolozi ezali pene ya kokamwisa. Mama moko ya mibu 36 ya bana ya bilenge kala te agangaki epai na ngai, “Kaka kanisa— tolongwe uta na balecteur ya microfilm na bandako ya mambi ma libota ebulisama mpe tokomi kovandaka na mesa ya makusa na ordinatele kosalaka mambi ma libota soki bana na ngai na nsuka balali.” Bandeko ya basi mpe mibali, bandako ya mambi ma libota ezali sikawa na mabota na biso.

Tempelo mpe mambi ma libota ezali kaka mpo na biso te. Bokanisa mpo na baye ya ngambo mosusu ya elamba kozelaka mpo na kozwa makuli ya lobiko oyo ebimisa bango na boombo ya boloko ya molimo.Boloko elimbolami lokola “ezalela ya bovandi to bokangemi.”23 Baye na bokangemi bakoki kozala kotunaka motuna ya William Saroyan: “Sikawa nini?”

Ndeko mwasi moko ya bondimi akabolaki liyebi ya ndenge ya molimo na Tempelo ya Salt Lake. Ntango azalaki na lisuku ya nkotisa, nsima ya maloba ya bokuli nkotisa ya bozwili elobamamaki, ayokaki, “Mpe mokangami akokangolama!” Ayokaki liyoki monene ya likambo ya likama mpo na baye bazalaki kozela mosala ya libatisi mpe ya nkotisa na bango. Ntango azongaki ndako, alukaki makomi mpo na maloba ayokaka. Akutaki lisakola ya Joseph Smith naeteni ya 128 ya Doctrine & Alliances: “Tika mitema na bino esepela, mpe ezala na esengo koleka. Tika mokili ebima na koyembaka. Tika bakufi bayemba nzembo ya Nzambe ya masanzoli ya seko mpo na Mokonzi Emanuele, oyo akulisamaki, liboso mokili ezala, oyo akopesa biso makoki mpo na kosikola bango uta na boloko na bango; mpo na bakangami bakokangolama.”24

Motuna ezali, nini tosengeli kosala? Toli ya Profeta Joseph ezalaki kolakisa na tempelo “makundoli ya bakufi na biso, oyo bakolongobana mpo na bondimami nyonso.”25

Bakambi ya Eklezia babimisaki libiangi ya bosenga makasi na nkola ya kobuta koleka liboso na kosalela tekinolozi mpo na koyeba molimo ya Eliya, koluka bankoko na bango mpe kosala makuli ya tempelo mpo na bango.26 Mingi ya botomboli ya bozito na kotambwisa mbango mosala ya lobiko ya babomoi mpe bakufi lokola ekosalema na bino bilenge.27

Soki bilenge na palwasi moko na moko bakokende bobele na tempelo mpe kosala mabatisi mpo na bakufi na bango te kasi lisusu kosala elongo na mabota na bango mpe bandimi mosusu ya paloasi mpo na kopesa bankombo ya libota mpo na mosala ya likuli bakosala, bango mpe Eklezia bakopambolama mpenza. Komona mpamba te nguya ya bawa na kosungaka makasi mpe esengo na bino ya kokutanaka na nsuka na baye bozali kosalisa. Lipamboli ya ntina ya seko ya kosangisaka mabota na bisomei ezali pene koleka bososoli.28

Na mokili mobimba bandimi ya Eklezia, ntuku mitano na moko likolo ya mokama ya mikolo mingi bazali na baboti nyonso mibale te na eteni ya Nzete ya Libota ya site ya FamilySearch Interneti ya Eklezia. Ntuku motoba na mitano likolo ya mokama ya mikolo basali naino te motango ya bankoko nyonso minei.29 Mikundola, biso kozanga misisa mpe bitape na biso tokoki kobikisama te. Bandimi ya Eklezia basengeli kozwa mpe kokoma nsango oyo ya ntina.

Na nsuka tozali na malongi, batempelo, mpe tekinolozi mpo ete mabota esala mosala ya nkembo oyo ya lobiko. Napesi lolenge moko oyo ekoki kosalelama. Mabota ekoki kozala na “Nzete ya Kosangisa Libota.” Oyo esengeli kozala bokasi ya kozongela. Moko nyonso akomema mambi ma libota, masolo, mpe bafoto, elongo na biloko elingamaki ya bankoko mpe ya baboti oyo ezali. Bilenge na biso basepelaka koyekola na ntina ya bomoi ya baye libota—bawuta wapi mpe lolenge nini bavandaki. Mingi bazali na mitema ya kobaluka epai ya batata. Balingi masolo mpe bafoto, mpe bazali na boyebi ya tekinolozi mpo na koscaner mpe kotelecharger masolo oyo mpe bafoto na Nzete ya Libota mpe kosangisa mikanda esika nsango ewuti elongo na bankoko mpo na kobomba oyo mpo na ntango nyonso. Ya solo, ntina monene ezali mpo na kokana makuli nini esengeli naino kosalema mpe kopesa mikumba mpo na mosala ntina ya tempelo. Mwa bukuLibota na ngai ekoki kosalema mpo na kosalisa kokoma nsango ya libota, masolo, mpe bafoto oyo nsima ekoki kotiama na Nzete ya Libota na Interneti.

Komipesa ya libota mpe babozeli na yango esengeli kosala na likolo ya bapriorite na biso mpo na kobatela atandele na biso ya bonzambe. Mpo na baoyo bazali koluka bosaleli ya mokolo ya sabato ebotaka mbuma mingi mpo na libota lokola lisanga, botambwisi mbango ya mosala oyo ezali mabele ebongisami. Mama moko na bokumisi ayebisaki lolenge mwana na ye ya mobali ya mibu 17 ayekolaka ordinatele nsima ya eklezia na mokolo ya Eyenga mpo na kosala mosala ya mambi ma libota mpe mwana na ye ya mobali ya mibu 10 alingi koyoka masolo mpe kotala bafoto ya bankoko na ye. Oyo apambolaki libota na ye mobimba mpo na koyeba molimo ya Eliya. Misisa mpe bitape na biso ya ntalo esengeli koleisama.

Yesu Klisto apesaki bomoi na Ye lokola bomikabi ya bozwilii. Apesaki solo eyano na motuna motunamaki na Yobo. Alongaki liwa mpo na bato banso, oyo tokokaki te kosala bisomei. Tokoki nzokande, kosala mayokani ya bozwili mpe kokoma solo babikisi na Ngomba ya Siona30 mpo na mabota na biso moko na ntina ete biso, elongo na bango tokoka konetolama mpe kobikisama lokola.

Natatoli mpo na libonza ya bomikami ya Mobikisi mpe solo mpenza na mwango ya Tata mpo na biso mpe mabota na biso. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Lakisa Matangi

  1.  

    1. William Saroyan, in Henry Allen, “Raging against Aging,” Wall Street Journal, sanza ya zomi na mibale 31, 2011–sanza ya yambo 1, 2012, C9.

  2.  

    2. Yobo 14:14.

  3.  

    3. Yobo 14:1, 2, 7, 9.

  4.  

    4. Malaki 4:1. Kala te nkoma mingi elobi ete motango monene ya kobuta ya bato bazali kopona kobota ban ate mpo na kobongisa lolenge na bango ya kozala na bomoi (tala Abby Ellin, “The Childless Plan for Their Fading Days,” New York Times, Sanza ya Mibale. 15, 2014, B4). Bikolo mingi ezaali kokita na bato lokola mbano ya maponi ya bato oyo. Oyo ezali ntango mosusu kobengama lokola “bokiti ya motango ya boto” (tala The New Economic Reality: Demographic Winter [documentaire], byutv.org/shows).

  5.  

    5. Malaki 4:5–6.

  6.  

    6. Tala History of the Church, 1:12; Doctrine et Alliances 2.

  7.  

    7. Bayuda bazalaki kozela bozongi ya Eliya mibu 2.400. Na mokolo oyo, na lipati ya Pasika na bango ya mobu, to baelambo monene, babongisaka esika mpo na ye mpe bakendaka na ekuke kolikiaka ete ayei mpo na kosakola boyei ya Mesia.

  8.  

    8. Tala Bible Dictionary, “Elijah.”

  9.  

    9. Tala Doctrine et Alliances 110:14–16; tala lisusu Doctrine et Alliances 2.

  10.  

    10. Russell M. Nelson, “A New Harvest Time,” Ensign, sanza ya mitano 1998, 34.

  11.  

    11. Yoane 3:5.

  12.  

    12. Vilate M. Kimball na Heber C. Kimball, sanza ya zomi. 11, 1840, Vilate M. Mikanda ya Kimball, Church History Library; bokomi mpe bokomi letele enene ebongisami.

  13.  

    13.  Doctrine et Alliances 127:5; nsete ebakisami .

  14.  

    14. Tala Ensignement des Présidents de l’Eglise: Joseph Fielding Smith (2013), 68.

  15.  

    15. Tala Mokanda ya Bokambi ya Yambo, sanza ya zomi. 8, 2012.

  16.  

    16. Tala The Discourses of Wilford Woodruff, sel. G. Homer Durham (1946), 147.

  17.  

    17. Brigham Young asakolaki ete, “Nyonso oyo nalingi ezali komona na bato oyo kopesa bozwi mpe bosepeli na bango na botongi bonze ya Nzambe, kotelemisaka batempelo, mpe kosalaka kati na yango mpo na bato ya bomoi mpe bakufi … ete bakoka bana mibali mpe bana basi balatisama montole ya Nzambe ya Nguya Yonso” (Deseret News,sanza ya Nsambo. 6, 1876, 498). Libatisi mpo na bakufi ebandaki na sanza ya yambo 9, 1877, mpe dotasio mpo na bakufi esalemaki mikolo mibale nsima. Esengo na yango elobelamaki na Lucy B. Young, oyo alobaki ete “motema na ye etondisamaki na boluki ya koyambamaka na [bandeko na ye bakufa] na maboko ya kofungwama, lokola banso bakozala na baoyo bakoka te kosala mosala na bangomei” (na Richard E. Bennett, “‘Which Is the Wisest Course?’ The Transformation in Mormon Temple Consciousness, 1870–1898,” BYU Studies Quarterly, vol. 52, no. 2 [2013], 22).

  18.  

    18. Teachings of Presidents of the Church: Wilford Woodruff (2004), 192–93.

  19.  

    19. President Wilford Woodruff (Oyo ayebani kozala moko ya bamisionele monene ya ntango nyonso epai ya bato ya bomoiwho is known to be one of the greatest missionaries of all time to the living), kolobelaka mosala ya bakufi, alobaki ete: “Natalaka eteni oyo ya mosala na biso lokola etinda moko ya ntina mingi lokola kosakolaka na bato ya bomoi; bakufi bakoyoka mongongo ya basali ya Nzambe na mokoli ya milimo, mpe bakoki kobima ten a ntongo ya bosekwi [ya yambo], longola soki makuli moko boye esalemi, mpo na [bango].” Alobaki lisusu ete, “Esengeli kobikisa moto akufa ndenge moko … lokola moto ya bomoi” (Teachings of Presidents of the Church: Wilford Woodruff, 188).

  20.  

    20. Mokambi Howard W. Hunter asengaki bandimi ya Eklezia bakende na tempelo mbala mingi “mpo na lipamboli ya moto se moko ya bongumbameli na tempelo, mpo na bosantu mpe kimia epesami na kati ya baefelo wana esantu mpe ebulisama. … Ezali esantu ne Nkolo. Esengeli kozala esantu na biso” (“The Great Symbol of Our Membership,”Ensign, sanza ya zomi. 1994, 5;Tambuli, sanza ya zomi na moko. 1994, 6).

  21.  

    21. “Messages of Inspiration from President Thomas S. Monson,” Church News, sanza ya zomi na mibale. 29, 2013, 2.

  22.  

    22. Howard W. Hunter, “We Have a Work to Do,” Ensign, sanza ya misato. 1995, 65.

  23.  

    23. Merriam-Webster’s Collegiate Dictionary, 11th ed. (2003), “prison.”

  24.  

    24.  Doctrine et Alliances 128:22; tala lisusu Doctrine et Alliances 138:42. “Liboso mokili [yango] ezala, Nkolo akulisaki baoyo bakobesa likoki na milimo oyo ezali na [boloko] esikolama” (bobakisi na triptique, “Boloko”).

  25.  

    25.  Doctrine et Alliances 128:24.

  26.  

    26. Tala Mokanda ya Bokambi ya Yambo, sanza ya zomi. 8, 2012; tala lisusu David A. Bednar, “The Hearts of the Children Shall Turn,”Ensign toLiahona, sanza ya zomi na moko. 2011, 24–27; R. Scott Lloyd, “‘Find Our Cousins’: Apostle [Neil L. Andersen] Counsels LDS Youth at RootsTech Conference,” Church News, sanza ya mibale. 16, 2014, 8–9.

  27.  

    27. Boyekoli moko ya kala te elakisaki ete bobeti nsete makasi mpo na nkola oyo ezali na bomoi ya ntina wapi bazali “kopesa basusu, mpe bazali komimema epai ya bantina minene koleka” (Emily Esfahani Smith and Jennifer L. Aaker, “Millennial Searchers,” New York Times Sunday Review, sanza ya zomi na mibale. 1, 2013, 6).

  28.  

    28. See Howard W. Hunter, “A Temple-Motivated People,”Ensign, sanza ya mibale. 1995, 2–5;Liahona, sanza ya mitano 1995, 2–7.

  29.  

    29. Mitango epesami na Family History Department.

  30.  

    30. Tala Obadia 1:21.