Motuya —mpe Mapamboli—ya Bomoi ya Moyekoli


Jeffrey R. Holland
Bozala makasi. Zala na nsango malamu na lolenge ya bondimi atako soki basusu nzinganzinga na bino bazali yango atako moke te.

Mokambi Monson, tolingi yo. Opesi motema na yo mpe kolongonu ya nzoto na yo na libiangi nyonso Nkolo apesaki yo ntango nyonso, mingi mingi bokambi ya bule oyo ozali na yango sikoyo. Eklezia mobimba oyo etondi yo botondi mpo na bomipesi na mosala na yo mpe mpo na botongono ya bokasi na yo na mosala.

Na bosepeli mpe lilendisi mpo na moto nyonso akosengela kotikala na bomipesi na mikolo ya nsuka oyo, nakoloba na banso mingi mingi na bilenge ya Eklezia ete soki esalamela yo naino te, okokutana na yango mokolo moko obengami likolo ya mpo na kolobela bondimi na yo to ntango mosusu atako koyika mpiko na bobebisi na yomei kaka mpo ete ozali mpondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba mikolo mya Nsuka, ngonga lokola oyo ekosenga nyonso mibale bokasi mpe bolingo na ngambo na yo.

Ndakisa, ndeko mwasi moko akomelaki ngai kala te: “Moninga na ngai namonaki moto moko afandaki na etanda na engumba koliaka elubu na ye. Ntango tokomaki pembeni, atalaki likolo mpe amonaki nkasa ya ndimbola ya nkombo ya misiolele na biso. Na botali ya mabe na miso na ye, atombwamaki mpe atombolaki loboko na ye kotuta ngai. Na mikimisaki mwa moke, kasi abwakelaki ngai bilei na ye nyonso na nzoto na ngai mpe abandaki kofinga biso maloba moko ya mabe. totambolaki mosika kolobaka likambo te. Namekaki kopangusa bileyi na elongi na ngai, kaka mpo na koyoka mwa potopoto ya mbala na sima ya moto na ngai. Ntango mosusu ezali mpasi kozala misionele mpo kaka na ntango wana nalingaki kozonga, kosala elembo na elenge mobali wana, mpe koloba, ‘ZELA OKOMONA!’ Kasi nasalaki te.”

Na misionele oyo ya bokasi nalobi, molingami mwana, ozali sembo na nzela na yomei otambolaki kati ya zolongano ya bokeseni ya mpenza ya basi mpe mibali oyo bazali, kaka se lokala profeta Yakobo ya Buku ya Mormon alobaki, “bondimela Klisto, mpe [bokanisa liwa na ye], mpe Boyoka mpasi [ya] ekulusu na ye [bomema] soni ya mokili.”1

Ya solo, ya Yesu Yemei, ndeko ya Yakobo Nefi akomaki: “mpe mokili, mpo na mawa na bango, akosambisa ye kozala eloko ya mpamba; na yango bakopesa ye etumbu, mpe ayoki mpasi mpo na yango. Iyo, babwakeli ye nsoyi, mpe ayoki mpasi mpo na yango, mpo na bolingo na ye ya bosembo mpe mpasi na ye ya ntango molai na bana ya bato mibali.”2

Na kobatelaka na mosala ya Klistu yemei, ezalaki na lisolo moko ya molai ya boboyi mpe motuya moko ya mpasi koleka efutami na baprofeta mpe bapostolo, bamisionele mpe bandimi na nkola nyonso—baye banso bameki kotosa libiangi ya Nzambe kotombola libota ya moto na “lolenge moko ya malamu koleka.”3

“Mpe oyo nakoloba mingi koleka [na bango]?” mokomi ya buku ya Baebele atuni.

“[Baye] oyo … bakangi minoko ya bankosi,

“bakangaki bokasi ya moto, bakimaki ndelo ya mompanga, … apapaki monguna na bitumba, azongisaki [bibundeli] mpo na kobunda …

“[amonaki] liwa na bango kozonga na bomoi[ntango] basusu bazalaki konyokwama, …

“Mpe … azalaki mpasi ya koyokisama nsoni na lolenge ya mabe mpe etumbu, … ya bokangami mpe bokangami na boloko:

“Babetamaki mabanga, … basekwisamaki, bayokisamalki mpasi, na baye basalaki nungunungu, babomamaki na mopanga: … babandaki koyengayenga balataki mposo ya meme mpe ya ntaba; batingolamaki, banyokwamaki, banyokolamaki, [mpe] batungisamaki.

“([Bango] oyo mokili ezalaki malamu te :) … kowawaka na bisika bikawuka, mpe na bangomba, mpe na bandako ya mike mpe ya nse ya mabele.”4

Solo mpenza banzelu ya lola balelaki ntango bakomaki motuya oyo bayekoli bafutaki na mokili ya mabe boye na mitindo ya Nzambe. Mobikisi yemei asopaki mpinzoli na Ye likolo ya baoyo uta na mibu nkama babwakamaki mpe babomamaki na mosala na ye. Mpe sikawa ezalaki ye kobwakama mpe na ntina kutu koboma ye.

“O Yelusaleme, Yelusaleme,” Yesu agangaki, “oyo azali koboma baprofeta, mpe oyo azali kobwakela mabanga na baye batindamaki epai na yo, mbala boni nasengelaki kosangisa bana na yo, lokola soso asangisaka bana na ye na nse ya mapapu na ye, mpe bolingaki yango te!

“Tala, ndako na yo ekotikala kati na mawa.”5

Mpe ezali wana liteya miko mpo na mwana mobali mpe mwana mwasi nyonso na Eklezia oyo. Bokoki komituna soki ezali ntina kozwa na bompikiliki eteni ya bomoto na kelasi to na kokende misio kaka mpo na komona boyambi ya ntina koleka to ya koyika mpiko na makambo ebele na lisanga oyo eyokisaka nsoni ntango mosusu bomoi moko emipesa na eyamba. Iyo, yango ezali ntina, mpo ete ngambo mosusu, ezali bandako etikala zololo, bato, mabota, biteni ya mboka mpe bamboka esundolama.

Tozali awa na mikumba ya baye babengami mpo na komema nsango ya masiya. Na kobakisa na koteya, ya kolendisa mpe kosunga bato (ezali ngambo malamu ya bomoi ya moyekoli), ntango nyonso bapesi nsango oyo babengami na komitungisa, na kobatela mpe ntango mosusu na kolela (ezali ngambo mabe ya kozala moyekoli). Bayebi malamu koleka ete nzela ekumbi na mabele ya elaka “wapi miliki mpe mafuta ya nzoyi”6 aleki mpenza na Ngomba ya Sinai, wapi ekweyaka “matomo” mpe “mapekisi.”7

Na mawa, bapesi nsango ya mitindo ya Nzambe baye atindaki mpo na bolamu mpe bobateli na biso bazalaka mbala mingi te bayebana lelo koleka na kala, lokola elobami na bandeko basi bamisionele baye babwekelaki nsoyi mpe bilei. lokunya ezali liloba mabe, nzoka nde ezali na bato lelo bakoloba na kozanga sembo Achab, “Nayini [profeta Mika]; mpo asakoli ngai na eloko moko te ya malamu, kasi ntango nyonso [asakoli] mabe.”8 Koyina ya boye mpo na sembo ya profeta epesi motuya na bomoi na ye na Abenadi. Lokola alobaki na mokonzi Noa: “Mpo ete nayebisi yo bosolo okangeli ngai nkanda. … Mpo ete nalobaki liloba ya Nzambe osambisi ngai ete nazali liboma”9 to, tosengeli kobakisa, kolesa ngonga, , botata, mokumisi, ezanga bosepelisi, etiami endelo, esila ngala, mpe ya kala.

Ezali lokola Nkolo Yemei amitungisamaki na ntina ya profeta Yisaya:

“[Bana] oyo … balingi koyokamela mobeko ya Nkolo te:

“[Ba] lobi na bamoni, botala te; mpe na baprofeta: Kosakola bosolo te mpo na biso, yebisa biso bisengo ya mokili, sakola mpo na basimele:

“Bima libanda ya nzela, zonga ngambo mosusu ya nzela eke, zala mosika ya elongi na biso mosantu ya Isalaele.”10

Mawa mingi, baninga na ngai bilenge, ya komona ete ezali momesano ya eleko na biso ete, ntango na mbalakata bato balingi binzambi nzambi, balingi komisala banzambe oyo basengaka mingi te banzambe ya bilengi, banzambe ya monzele oyo basala mbonge kaka te kasi oyo bafulaka atakutu mopepe ya moke te, banzambe babetaka biso na lipeka mpe kobondela biso, mpe oyo azali kotinda biso kokenda kobuka bafololo.11

Soki oyo, ezali te moto kosala Nzambe na elilingi na yemei! Ntango mosusu—mpe ezali oyo esali ngai kozala lisolo ya nsoni—bato wana babelelaka nkombo ya Yesu kaka se lokola bazalaka moko ya “banzambe oyo.” Yasolo? Ye oyo alobaki kaka te esengelaki te biso koboya kotosa mitindo oyo, kasi tosengeli te atako kokanisana ntina ya bobuki yango, kasi tosili kobuka yango te na mitema na biso. Ekokani lolenge moko” na malongi, pete na matoi, eyebana na mboka ya bozangi bolingo?

Mpe ete mpo na koloba na baye oyo balingi kotala to kosimba masumu na mosika ? Yesu alobaki na mosuni moko, soki liso na yo ezali kotinda yo na mabe, pikola yango. Soki loboko na yo ezali kotinda yo na mabe, kata yango.12 “nayaki te mpo na [komema] kimia, kasi, mpo na komema mopanga,”13 Akebisaki baye bazalaki kokanisa ete azalaki koloba bobele kaka bisika ya bato ebele. Ya kokamwa te ete, esakola nsima esakola, bingumba ya mboka “[babondela]ki ye mpo na kobima na bingumba na bango.”14 Na kokamwaka te, likamwasi sima ya likamwisi, Nguya na Ye epesamaki na Nzambe te kasi na satana.15 Ezali polele ete motuna ya ntina “Yesu asengelaki kosala nini?” eyano eyebana ekozwama te ntango nyonso.

Na katikati ya mosala naYe na nzoto ya nkufa, Yesu alobaki, “Bolingana bino na bino, lokola nalingi bino.”16 Mpo ete baye ya mokili bayeba bozali bayekoli na ngai, alobaki, “Soki bolingi ngai, bobatela mitindi na ngai”17 mpe “oyo … akobuka moko ya mitindo ya moke [oyo], mpe oyo akotangisa na bato lolenge oyo, akobenga moke mpenza na bokonzi ya likolo.”18 Bolingo ya moklistu ezali ntina monene koleka na mabele awa, na yango mpo ete bosembo ekambaka yango ntango nyonso. Soki ya solo bolingo ezali liloba na biso ya malonga, lokola ekozala bongotika etena liloba na ye oyo azali bolingo ezongisami, tosengeli kotika masumu mpe nyonso oyo ekoki kozala lolenge moko na yango. Yesu asosolaki yango malamu ete bato mingi bazali na lolnege ya kobosana na bonkoko na biso ya lelo: ezali na bokeseni moko ya ntina kati ya motindo ya kolimbisa lisumu (oyo azali na bokasi ezanga nsuka ya kosala yango) mpe likebi ya kopekisa yango kosalema (oyo asala naino te, atako mbala mokte).

Baninga ngai, mingimingi baninga bilenge. Bozala na bompikiliki. Bolingo ya petwa ya lolenge ya Klisto ekitisi bosembo ya solo mpenza ekoki kobongola mokili. Natatoli ete nsango malamu ya Yesu Klisto ya solo mpenza mpe ya bomoi ezali na mabele mpe ete bozali bandimi ya Eklezia na Ye ya solo mpe ya bomoi, komekaka ya koyebanisa yango. Natatoli na ntina ya nsango malamu oyo mpe ya Eklezia oyo, mingimingi na litatoli ya bafungola ya bonganganzambe ezongisama oyo akongoli nguya mpe bompikiliki ya makuli ya lobiko. Nazali lisusu na kondima makasi ete bafungola oyo ezongisamaki mpe ete makuli ezali ezongisami lisusu na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu Bamikolo mya Nsuka, ete nazali na kondima ete nateli liboso na bino na ebayelo oyo mpe ete bofandi liboso na ngai na likita oyo.

Bozala makasi. Bozala na bondimi ya nsango malamu atako basusu nzinga nzinga na bino bazali na yango te. Bolobela bondimi na bino na bolingo, kasi bolobela yango. Molongo molai ya mingongo efulama, kotangaka baye bokoyoka uta na likita oyo mpe mongongo bowuti koyoka na bomoto ya Mokambi Thomas S. Monson, etangisi bino nzela ya bayekoli ya Klisto. Ezali nzela ekeeke mpe nkaka ezanga bolai ya ntango, kasi ekoki kotambolama “na nkembo mpe elonga, na mpiko na Klisto, na elikia moko ya petwa malamu mpenza mpe bolingo ya Nzambe mpe ya bato nyonso.”19 Nakotambolaka na bompikiliki likolo ya nzela, bokozwa bondimi moko oyo bakoki kobongola te, bobateli na mipepe nyoso ya mabe, atako ekimelo na mopepe, mpe bokozwa makasi elenda lokola libanga ya mosikoli na biso likolo ya oyo botongi bomoi na bino ya bayekoli bamipesa, bokoki te kokweya.20 Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Show References

  1.  

    1. Yakobo 1:8.

  2.  

    2. 1 Nefi 19:9.

  3.  

    3. 1 Bakolinti 12:31; Etele 12:11.

  4.  

    4. Baebele 11:32–38.

  5.  

    5. Matai 23:37–38.

  6.  

    6. Esode 3:8.

  7.  

    7. Tala Esode 20:3–17.

  8.  

    8. 2 Ntango 18:7.

  9.  

    9. Moziya13:4.

  10.  

    10. Yisaya 30:9–11.

  11.  

    11. Tala Henry Fairlie, The Seven Deadly Sins Today (1978), 15–16.

  12.  

    12. Tala Matai 5:29–30.

  13.  

    13. Matai 10:34.

  14.  

    14. Malako 5:17.

  15.  

    15. Tala Matai 9:34.

  16.  

    16. Yoane 15:12.

  17.  

    17. Yoane 14:15.

  18.  

    18. Matai 5:19; sete ebetami.

  19.  

    19. 2 Nefi 31:20.

  20.  

    20. Tala Elamani 5:12.