Dallin H. Oaks
Bafungola ya bonganganzambe ekokamba basi mpe babali lokola, mpe makuli ya bonganganzambe mpe likoki ya bonganganzambe etali basi mpe babali lokola.

I.

Na likita linene tomoni bopemisi ya boko bandeko babali ya botongono, mpe tosungi mabiangi ya basusu. Na mbongwana oyo—ya momesano mpenza na Eklezia—tokokita te “ntango” topemisami, mpe “tokomata te” ntango tobiangemi. Ezali te “Kokita to komata” na mosala ya Nkolo. Ezali bobele “kokende liboso to kozonga nsima,” mpe bokesani wana etali lolenge kani tokondima mpe tokosala nsima ya bopemisi na biso to libiangi na biso. Mbala moko nakambaki na bopemisi ya elenge mokambi ya likonzi moko oyo apesaki mosala ya kitoko mpo na mibu libwa mpe sikawa asepelaki na bopemisi na ye mpe na libiangi ya sika oyo ye mpe mwasi na ye bawutaki kozuwa. Babiangemaki mpo na kozala bakambi ya kelasi ya bana bake na palwasi na bango. Bobele na Eklezia oyo yango emoneni ya lokumu lolenge moko!

II.

Ntango alobaki na likita moko ya basi, mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi Linda K. Burton alobaki, “Tolikii kotia na kati ya moko na biso mposa monene mingi ya kososola malamu mingi bonganganzambe.”1 Yango esengeli kosalema mpo na biso bango, mpe nakolandela yango na kolobelaka bafungola mpe likoki ya bonganganzambe. Zambi makambo oyo ezali etali lolenge moko babali mpe basi, nasepeli ete milulu miye misakolami mpe mipanzisami mpo na bandimi banso ya Eklezia. Nguya ta bonganganzambe ekopambola biso banso. Bafungola ya bonganganzambe ekokamba basi mpe babali lokola, mpe makuli ya bonganganzambe mpe likoki ya bonganganzambe etali basi mpe babali lokola.

III.

Mokambi Joseph F. Smith alimbolaki bonganganzambe lokola “nguya ya Nzambe epesami na moto na yango moto akoki kosala na mabele mpo na lobiko ya mabota ya bato.”2 bakambi basusu bateyaki biso ete bonganganzambe “ezali nguya ya nsuka na mabele. Ezali nguya na yango mabele esalemaki.”3 Makoma eteyi ete “bonganganzambe wana kaka, oyo ezalaki na ebandeli, ekozala lususu na nsuka ya mokili” (Moses 6:7). Boye, bonganganzambe ezali nguya na yango tokosekwa mpe tokokende na bomoi ya seko.

Bososoli tozali koluka ekobanda na bososoli ya bafungola ya bonganganzambe. “Bafungola ya bonganganzambe ezali likoki Nzambe apesi na [basimbi] ya bonganganzambe mpo na kokamba, kososola, mpe kokamba esaleli ya bonganganzambe na mabele.”4 Mosala to likuli nionso esalemi na Eklezia esalemi na nse ndingisa ya samba to samba te ya moko asimbi bafungola mpo na mosala wana. Lokola Mpaka M. Russell Ballard alimbolaki, “Baye bazali na bafungola … na ntembe te bazali kosala esalema mpo na banso baye basali kosalisa na botongono na nse ya bokambi na bango basalela ya bonganganzambe mpe bazwa nguya ya bonganganzambe.”5

Na kososolaka bosaleli likoki ya bonganganzambe, mosala ya bafungola ya bonganganzambe etandola mpe ekosukisa. Ekotandola na kosalaka esalema mpo na likoki mpe mapamboli ya bonganganzambe ezwama mpo na bana ya Nzambe banso. Ekosukisa na kokambaka nani akopesama likoki ya bonganganzambe, nani akosima mosala na yango, mpe boniboni makoki mpe nguya na yango ekopesama. Na ndakisa, moto moko oyo amemi bonganganzambe akoki kopesa mosala to likoki na ye na mosusu, longola se soki andingisami na moko oyo asimbi bafungola. Na kozanga ndingisa, likuli ekosimba te. Oyo elimboli ntina nini momemi ya bonganganzambe—kotala te mosala—akoki kokulisa moko ya libota na ye to kosala elambo na ndako na yemei na kozanga ndingisa ya moko oyo asimbi bafungola esengeli.

Na kolongola mosala ya bule oyo bandeko basi bakosala na tempelo na nse ya bafungola ya mokambi ya tempelo, oyo nakolakisa awa na nsima, bobele moko oyo asimbi mosala moko ya bonganganzambe akoki kosala na likuli ya bonganganzambe. Mpe makuli manso mandingisami ya bonganganzambe ekomami na makundoli ya Eklezia.

Na nsuka, bafungola nionso esimbami na Yesu Klisto, oyo bonganganzambe ezali ya ye. Ye azali moko oyo akokana mpo na nini bafungola apesami na bakufi mpe boniboni bafungola wana eskosalelama. Tomeseni na kokanisa ete bafungola ya bonganganzambe epesamaki na Joseph Smith na Tempelo ya Kirtland, kasi makomi malobi ete nionso oyo epesamaki kuna “bafungola ya eleko oyo” (D&C 110:16). Na likita linene bileko eleki ebele, Mokambi Spencer W. Kimball akundolisaki biso ete ezali na bafungola misusu ya bonganganzambe oyo epesamaki te na moto na moto, lokola bafungola ya bokeli mpe bosekwi.6

Lolenge ya bonzambe ya bosukukisi etiama na mosala ya bafungola ya bonganganzambe etimboli bokeseni ya ntina mpenza katikati ya mikano na makambo ya botambwisi ya Eklezia mpe mikano etali bonganganzambe. Bokambi ya Yambo mpe Lisanga Likoki ya Bazomi na Babale, oyo bakambi Eklezia, epesami nguya mpo na kozwa mikano mingi etali bwania mpe batambwisi ya Eklezia—makambo lokola bofuteli bandako ya Eklezia mpe mibu mpo na mosala ya bamisio. Kasi atako bakonzi bakambi oyo basimbi mpe bakosalela bafungola nionso ya bafungola epesama na baton a eleko oyo, bazali te nsomi mpo na kobongola ndakisa ekatama na bonzambe oyo ete bobele babali bakosimba misala ya bonganganzambe.

IV.

Nayei sikawa na likambo ya likoki ya bonganganzambe. Nabangi na mabongisi misato ewuti kasololama: (1) bonganganzamba ezali nguya ya Nzambe epesami na moto mpo na kosala mpo na lobiko ya libota ya bato, (2) likoki ya bonganganzambe ekambami na basimbi ya bonganganzambe oyo basimbi bafungola ya bonganganzambe, mpe (3) zambi makomi elobi ete “makoki manso mosusu [mpe] misala na eklezia ezali kinsuka na oyo [Melikisedeki] bonganganzambe (D&C 107:5), nionso oyo esalemi na nse ya bokambi ya bafungola ya bonganganzambe esalemi na likoki ya bonganganzambe.

Boniboni yango etali basi? Na lisikulu na Lingomba ya Bamama Basungu, Mokambi Joseph Fielding Smith, kala Mokambi ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale, alobaki oyo “Atako bandeko basi bapesameli te Bonganganzambe, epesameli bango te, yango elingi koloba te ete Nkolo apesi bango te likoki. … moto moko akoki kozala na likoki epesameli ye, to ndeko moko ya mwasi na ye, mpo na kosala boko makambo na Eklezia oyo ezali kokangisa mpe mpenza esengeli mpo lobiko na biso, lokola mosala oyo bandeko na biso ya basi bazali kosala na Ndako ya Nkolo. Bazali na likoki epesameli bango mpo na kosala makambo ya minene mpe kokamwa, ya bule mpo na Nkolo, mpe ya kokangisa mpenza mobimba lokola ezali mapamboli oyo epesami na babali oyo basimbi Bonganganzambe.”7

Na lisikulu wana ya nsango, Mokambi Smith alobaki lisusu mpe lisusu ete basi bapesameli likoki. Na basi alobaki, “Likoki koloba na likoki, mpamba te Nkolo atii likoki likolo na bino.” Lisusu alobaki ete Lingoma ya Bamama Basungi epesamali nguya mpe likoki ye kosala makambo manene mingi. Mosala oyo bakosala epesami na likoki ya bozambe.” Mpe, na ntembe te, mosala ya Eklezia esalemi na basi mpe babali, ezala na tempelo to na palwasi to etape, esalemi na nse ye bakambi ya baye basimbi bafungola ya bonganganzambe. Boye, kolobaka etali Lingomba ya Bamama Basungi, Mokambi Smith alimbolaki, “[Nkolo] apesi na bango lingomba oyo ya monene epai bazali na likoki ya kosalisa na nse ya bokambi ya boepisikopo ya bapalwasi… , kobatelaka matomba ya bato ba biso na molimo mpe na ntango.”8

Boye, ya solo elobami ete basi ya Lingomba ya Bamama Basungi ezali te bobele kelasi moko kasi eloko moko bazwami na kati na yango—kinsuka etiami na bonzambe na bonganganzambe.9

Tomesani te kolobela etali basi bazali na likoki ya bonganganzambe na mabiangi na bango ya Eklezia, kasi likoki kani mosusu ekoki kozala? Ntango mwasi moko—elenge to mobange—atiami mpembeni mpo na koteya nsango malamu lokola misionele ya ntango mobimba, apesami likoki mpo na kosala mosala moko ya bonganganzambe. Lolenge moko ezali ya solo ntango mwasi moko etiami mpembeni na mosala lokola mosali moko to moteyi na lingomba moko ya Eklezia na nse ya bokambi ya moko amemi bafungola ya bonganganzambe. Oyo nionso asali na mosala to libiangi moko ezwami uta na mosimbi bafungola ya bonganganzambe akosalela likoki ya bonganganzambe na kosalaka mokumba na ye.

Oyo nionso asali likoki ya bonganganzambe asengeli kobosana te makoki na bango mpe kokangama na mikumba na bango. Mokomi ya nsango ya Russie Aleksandr Solzhenitsyn atangami kolobaka, “Ntango ekoki… mpo na kobundela mingimingi te makoki ya bato kasi lotomo ya bato.”10 Basantu ba Mikolo mya Nsuka bandimi ete komikokisa mpo bonetwami ezali te likambo ya kowelela makoki kasi likambo ya mikumba ya kokokisa.

V.

Nkolo atindaki ete babali kaka bakokulisama na misala ya bonganganzambe. Kasi, lokola bayangeli kilikili ya Eklezia babeti nsete, babali bazali te. “bongangnzambe”11 Babali basimbi bonganganzambe, na mokumba ya bule ya kosalela yango mpo na bopamboli ya bana banso ya Nzambe.

Nguya eleki monene ya Nzambe epesami na bana na Ye ekoki te kosalelama na kozanga lisalisi ya moko ya bana basi na Ye, mpamba te bobele na bana basi na Ye Nzambe apesi nguya “ya kozala mokeli ya banzoto … mpo ete mposa ya Nzambe mpe Mwango Monene ya Nzambe ebota mbuma.”12 Wana ezali maloba ma Mokambi J. Reuben Clark.

Ye akobaki : “Eye ezali esika ya basi na biso mpe ba mama na biso na Mwango ya Nseko. Bazali te bameme Bonganganzambe; bazali na mokumba te ya kokokisa lotomo mpe misala ya Bonganganzambe; to batiami te mikumba na yango; bazali batongi mpe babongisi na nse ya nguya na yango, mpe bakaboli ya mapamboli na yango, kobakisaka nguya ya Bonganganzambe mpe kozalaki na mosala moko lokola babiangemi na bozambe, na motuya ya seko na esika na yango lokola Bonganganzambe yangomei.”13

Na maloba wana efulama, Mokambi Clark azalaki kolobela eteli libota. Lokola elobami na esakola ya libota, tata akokamba na libota, ye mpe mama bazali na mikumba ya kokesana, kasi bazali na “lotomo ya kosalisana lokola baninga bakokani.”14 Mwa mibu mileki, liboso esakola ya libota, Mokambi Spencer W. Kimball apesaki ndimbola oyo ya bofuli: “Ntango tozali kolobala libala lokola kimoninga, tika tolobela libala lokola kimoninga ya mobimba . Tolingi te basi BBMN bazala baninga ya baba to baninga ya basuka na etinga wana ya seko! Nasengi yo mipesaka mpemobimba zala mosali elongo mpe moninga.”15

Na miso ya Nzambe, ezala na Eklezia to na libota, basi mpe babali bakokani, na mikumba ya bokesani.

Nasukisi ba mwa bosolo etali mapamboli ya bonganganzambe. Na bokesani na bafungola ya bonganganzambe mpe makuli ya bonganganzambe, mapamboli ya bonganganzambe ezwami mpo na basi mpe babali ba lolenge moko. Likabo ya Molimo Mosantu mpe mapamboli ya tempelo ezali ndimbola ya momesano ya bosolo oyo.

Na lisolo na ye ya monene na BYU Education Week eleko ya molunge eleki, Mpaka M. Russell Ballard apesaki mateya oyo:

“Malongi ya Eklezia na biso etii basi bakokani mpe kasi bakesani na babali. Nzambe akotala te mwasi to mobali lokola azali malamu to na motuya mingi koleka mosusu. …

“Ntango babali mpe basi bakei na ntempelo, babale balatisami na nguya moko, oyo ezali nguya ya bonganganzambe. … Nguya mpe mapamboli ya bonganganzambe ezwami mpo bana banso ya Nzambe.”16

Natatoli nguya mpe mapamboli ya bonganganzambe ya Nzambe, ezwami mpo na bana babali mpe bana basi ya Ye lokola. Natatoli likoki ya bonganganzambe ya Nzambe, oyo ezali kosala na misala mpe milulu nionso ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Natatoli mosala etambolisami na bonzambe ya bafungola ya bonganganzambe, esimbami mpe esalelami na mobimba na yanbo na profeta/mokambi wa biso, Thomas S. Monson. Na nsuka mpe ya motuya mingi koleka, natatoli Nkolo mpe Mobikisi, Yesu Klisto, ya bonganganzambe oyo ezali mpe ya ye basali biso tozali, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Show References

  1.  

    1. Linda K. Burton, “Priesthood: ‘A Sacred Trust to Be Used for the Benefit of Men, Women, and Children’” (Brigham Young University Women’s Conference address, May 3, 2013), 1; ce.byu.edu/cw/womensconference/transcripts.php.

  2.  

    2. Joseph F. Smith, Gospel Doctrine, 5th ed. (1939), 139.

  3.  

    3. Boyd K. Packer, “Priesthood Power in the Home” (worldwide leadership training meeting, Sanza ya Mibale. 2012); lds.org/broadcasts; tala lisusu James E. Faust, “Power of the Priesthood,” Ensign, Sanza ya Mitano 1997, 41–43.

  4.  

    4. Handbook 2: Administering the Church (2010), 2.1.1.

  5.  

    5. M. Russell Ballard, “Men and Women in the Work of the Lord,” New Era, Apr. 2014, 4;Liahona, Sanza ya Minei. 2014, 48; tala lisusu Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 138.

  6.  

    6. Tala Spencer W. Kimball, “Our Great Potential,” Ensign, Sanza ya Mitano 1977, 49.

  7.  

    7. Joseph Fielding Smith, “Relief Society—an Aid to the Priesthood,” Relief Society Magazine, Sanza ya Yambo. 1959, 4.

  8.  

    8. Joseph Fielding Smith, “Relief Society—an Aid to the Priesthood,” 4, 5; tala lisusuTeachings of Presidents of the Church: Joseph Fielding Smith (2013), 302.

  9.  

    9. Tala Boyd K. Packer, “The Relief Society,” Ensign, Sanza ya Mitano 1998, 72; tala Daughters in My Kingdom, 138.

  10.  

    10. Aleksandr Solzhenitsyn, “A World Split Apart” (commencement address delivered at Harvard University, June 8, 1978); tala lisusu Patricia T. Holland, “A Woman’s Perspective on the Priesthood,” Ensign, Sanza ya Sambo 1980, 25; Tambuli, Sanza ya Motoba 1982, 23; Dallin H. Oaks, “Rights and Responsibilities,” Mercer Law Review, vol. 36, no. 2 (winter 1985), 427–42.

  11.  

    11. Tala James E. Faust, “You Are All Heaven Sent,” Ensign or Liahona, Sanza ya Zomi na moko. 2002, 113; M. Russell Ballard, “This Is My Work and Glory,” Ensign toLiahona, Sanza ya Mitano 2013, 19; Dallin H. Oaks, “Priesthood Authority in the Family and the Church,” Ensign toLiahona, Sanza ya Zomi na moko. 2005, 26. Ntango mosusu tokoloba ete Lingomba ya Bamama Basungi ezali “moninga elongo ya bonganganzambe.” Esengeli kozala ya solo mingi koloba ete na mosala ya Nkolo Lingomba ya Bamama Basungi mpe basi na Eklezia bazali “baninga elongo na bamemi ya bonganganzambe.”

  12.  

    12. J. Reuben Clark Jr, “Our Wives and Our Mothers in the Eternal Plan,” Relief Society Magazine, Dec. 1946, 800.

  13.  

    13. J. Reuben Clark Jr, “Our Wives and Our Mother,” 801.

  14.  

    14. “The Family: A Proclamation to the World,” Ensign to Liahona, Sanza ya Zomi na Moko. 2010, 129.

  15.  

    15. Spencer W. Kimball, “Privileges and Responsibilities of Sisters,” Ensign, Sanza ya Zomi na Moko. 1978, 106.

  16.  

    16. M. Russell Ballard, New Era, Apr. 2014, 4;Liahona, Sanza ya Minei. 2014, 48; tala lisusu Sheri L. Dew, Women and the Priesthood (2013), especially chapter 6, for a valuable elaboration of the doctrines stated here.