W. Craig Zwick
Nabondeli bino bosalela kotunaka motuna oyo, na kotala ya boboto mpo na makambo ya basusu: Nini Ozali Kokanisa?

Mibu ntuku minei na moko mileki, namataki na kati ya kiti ya mokumbi ya motuka moko ya mwa monene ya pine 18 elongo na mwasi na ngai ya kitoko, Jan, mpe mwa mwana na biso ya mobali, Scotty. Tozalaki komema mokumba moko ya bozito ya biloko ya kotongela na bamboka mingi.

Na mikolo wana ezalaki na mokaba ya kokanga na kiti te to kiti ya bana mike ya mituka. Mwasi na ngai asimbaki mwana na biso ya motuya ya mobali na maboko na ye. Liloba na ye “Ntembe te tozali likolo mosika ya mabele” esengelaki kopesa ngai mayele etali mayoki na ye ya kobanga.

Ntango tokitaki na Donner Pass ekenda nsango, eteni moko ya mozindo ya balabala, moto ya motuka na mbala moko mpe na kozelisa te etondaki na molinga makasi. Ezalaki mpasi na komona, mpe tokokaki kopema na mpasi.

Elongo na motalaka ya kilo mingi, fele yango moko ekoki te kolembisa noki lombangu. Kosalelaka fele ya motele mpe kokitisaka lombangu, nakobanga namekaki kokanga motuka.

Kaka ntango nazalaki kobenda na mopanzi ya nzela, kasi yambo nakoma na kokangama mpenza, mwasi na ngai afungolaki ekuke ya motuka mpe apumbwaki na libanda elongo na mwa mwana na biso na maboko na ye. Natalaki mayele te ntango babambamaki na bosoto.

Nokinoki ntango motuka ekangamaki, nakimaki libanda ya motuka na molinga. Na makila kotambolaka mbangumbangu, nakimaki na kati ya mabanga mpe matiti mpe nasimbaki bango na maboko na ngai. Liboso ya loboko mpe lipeka ya Jan etutanaki mpe ezalaki kobimasa makila, kasi na botondi ye mpe mwana na biso ya mobali bazalaki kopema bango mibale. Nasimbaki bango kaka penepene lokola mputulu emataki wana na mpembeni ya balabala menene.

Ntango motema na ngai kobeta ebongaki mpe nakangaki mpema na ngai, nagangaki, “Nini na mokili ozalaki kokanisa? Oyebi na likama kani ozalaki? Okokaki kobomama!”

Atalaki ngai, na mpizoli kokitaka na matama na ye ebeba na molinga, mpe likambo moko oyo etobolaki motema na ngai mpe ezali naino kobeta na matoyi na ngai: “Nazalaki bobele komeka kobikisa mwa na biso ya mobali.”

Nasosolaki na ngonga wana akanisaki motele ezwaki moto, kobangaka motuka ekoka kopanzana mpe tokoka kokufa. Nzokande, ngai nayebaki ezalaki mbeba ya lotiliki—ya likama kasi ya kufa te. Natalaki mwasi na ngai ya motuya, kosimbasimbaka na bolembu moto ya mwana na biso ya moke ya mobali, mpe komitunaka lolenge kani ya mwasi akokaki kosala likambo moko ya mpiko boye.

Ezalela oyo ekokaki kozala na likama ya mayoki lokola mbeba ya motele na biso mpenza. Na botondi, nsima ya kowumelaki na nkisi ya kofanda nie mpo na motango moko ekoki ya ntango, moko na moko na biso kokanisaka moto mosusu azalaki na libunga, na nsuka tobimisaki mayoki na biso oyo ezalaki kotoka na nse ya botondi na moto na biso. Kokabola mayoki ya bolingo mpe bobangi mpo na bozangi likama ya basusu epekisaki likambo wana ya likama kozala ya liwa mpo na libala na biso tolula.

Paulo akebisaki ete, “Tika te maloba na bosoto mabima na minoko na bino kasi bobele yango oyo mazali malamu mpo na kolendisa, oyo ezali kopesa boyoki ya ngolu” (Baefeso 4:29). Maloba na Ye ezali kobeta na bopeto ya solo.

Nini elingi koloba “maloba na bosoto te” mpo na bino? Biso banso tokoyoka mbala na mbala mayoki ya nkanda mpenza—ya bisomei to ya bosusu’. Tomona nkanda ezanga bososoli kobima na bisika ya bato mingi. Tomona yango lokola “court circuit ya lotiliki” na makambo ya masano, na bisika ya politiki, mpe kutu na bandako na bisomei.

Bana ntango mosusu bakolobaka na baboti ya bolingo na maloba ya nzube lokola mopanga. Balongani, oyo bakaboli bomengo mosus eluti ya bomoi mpe makambo eleki boboto, babungisaka bomoni mpe bompikiliki bango na bango mpe batombolaka mingongo na bango. Biso banso, atako bana ba boyokani ya Tata moko ya Lola ya bolingo, toyoki mawa na kopumbwaka moto liboso na kiti ya likolo ya kosepelaka na makanisi na yomei mpe tolobi na maloba ya kozokisa liboso tososola likambo na ndenge ya moto mosusu. Tozali banso na libaku ya koyekola boniboni maloba ya koboma ekoki kobongola likambo ya likama na kufa.

Mokanda moko ya Bokambi ya Yambo esakoli na polele, “Nsango malamu ya Yesu Klisto eteyi biso kolinga mpe kosalela bato banso na boboto mpe bonkonde—ata ntango toyokani te” (Mokanda ya First Presidency, sanza a yambo 10, 2014). Likundoli kani ya monene ete tokoki mpe tosengeli kosala elongo na bosololi ya bonkonde, mingimingi ntango tomoni mokili na ndenge ekeseni.

Mokomi ya Masese apesi toli ete, “Kojongisa maloba na bolembu ekopengola nkanda nde liloba makasi ekotinda na nkele (Masese 15:1). “eyano moko ya bolembu” ekwi eyano moko ya bwania—maloba ya bosemboli uta na motema ya bosawa. Elingi koloba te ete tokoloba semba mokolo moko te to ete tokobebisa bosolo ya malongi. Maloba oyo ekoki kozala sikisiki na boyebi ekoki kozala pete na molimo.

Buku ya Mormon ezali na ndakisa ya makasi ya kolakisa maloba epesami lisusu na makambo ya bozangi boyokani na libala. Bana mibali ya Sariah mpe Lehi bazongisamaka na Yelusaleme mpo na kozwa bapalaki ya motako mpe bazongaka te. Sariah akanisaki bana na ye ya mibali bazalaki na nzela ya mpasi, mpe atondisamaki na nkanda mpe asengelaki kopamela moto moko.

Boyoka lisolo na emoneli ya mwana na ye ya mobali Nefi: “Mpo [mama na ngai] akanisaka ete tokufaka na esobe; mpe ye lisusu amilelaka mpo na tata na ngai, koyebisaka ye ete azalaki moto ya bomoni; kolabaka ete: Tala omemi biso uta na mokili ya lisango na biso, mpe bana na ngai ya mibali bazali lisusu te, mpe towei na esobe” (1 Nefi 5:2).

Sikawa, tika tomaniola nini Sariah akokaki kokanisa. Atondaki na bobangi na ntina ya bana na ye ya mibali ya koswanaswana kozongaka na esika wapi bomoi ya mobali na ye ezalaki na likama. Asombitiniaki ndako mpe baninga na ye na hema na esobe moko ya mosika na ntango ya mibu na ye ya kobota bana. Kopusanaka na esika ya kokabwana ya bobangi na ye, Sariah amonani lokola apumbwaki na kielombe, soki te na bwania, uta na likolo ya motuka ya elulu na komeka kobatela libota na ye. Abimisaki mitungisi ya ntina na mobali na ye na maloba ya nkanda mpe ntembe mpe mpamela—maloba moko na yango bato banso bamonani batondi na yango na lolenge ya kokamwa.

Profeta Lehi ayokaki bobangi oyo ezalaki na nse ya nkanda ya mwasi na ye. Nde apesaki eyano moko ya bosembo na liloba ya mawa. Yambo, azali na bosolo ya lolenge kani makambo ezalaki na emoneli na ye: “Mpe … tata na ngai alobaki epai na ye, kolobaka ete: nayebi ete nazali moto ya bomoni; … kasi [soki ngai] natikalaki na Yelusaleme, [tolingaki] kowa elongo na bandeko na ngai (1 Nefi 5:4).

Nde mobali na ye alobelaki bobangi na ye mpo na oyo etali bolamu ya bana na bango ya mibali, lokola Molimo Mosantu na ntembe te atatolaki na ye, kolobaka ete:

“Kasi tala, nazwaki mboka ya elaka, na yango makambo nasepeli mpenza; iyo, mpe nayebi ete Nkolo akobikisa bana na ngai ya mibali na maboko ya Labana. …

“Nsima ya lolenge wana ya elobeli tata na ngai, Lehi, abondisami mama na ngai … etali biso” (1 Nefi 5:5–6).

Ezali lelo na mposa monene mpo na mibali mpe basi kokolisa limemia ya bango na bango na kati ya ntaka milayi ya bondimi mpe ezaleli mpe na kati ya balubwaki ya mozindo ya manaka ya kobunda. Ekoki te koyebana nionso oyo ekobongisa milimo mpe mitema na biso to kutu kososola mobimba ezalela mpo na mimekano mpe maponami tokutanaka na yango.

Nzokande, nini ekoyela “maloba ya bosoto” Paulo alobaki na ntina yango soki ezaleli na bisomei ezali koyoka mawa mpo na makambo ya moto mosusu yambo? Koyebaka bansuka ya bozangi bobongo nie mpe bandelo na ngai ya makasi, Nabondeli bino bosalela kotunaka motuna oyo, na kotala ya boboto mpo na makambo ya basusu: Nini Ozali Kokanisa?”

Bomikundola ntango Nkolo akamwisaki Samwele mpe Saulo na koponaka mwa mwana mobali mokengeli ya bampate, Dawidi ya Beteleme, lokola mokonzi ya Yisalaele? Nkolo alobaki na profeta na Ye, “Mpo ete Nkolo akotalaka lokola ekotalaka moto te. Moto akomonaka lolenge na libanda nde Nkolo akotelaka kati na motema” (1 Samwele 16:7).

Ntango moto ya motuka na biso etondaki na molinga, mwasi na ngai asalaki na lolenge moko ya kielombe ete akokaki kokanisa mpo na kobatela mwana na biso ya mobali. Ngai lokola nasalaki lokola mobateli ntango natunaki ye boponi na ye. Na kokamwa, esalaki eloko te nani asalaki malamu. Oyo ezalaki motuya ezalaki koyokelana mpe kososola emoneli ya mosusu.

Bolingi ya komona na emoneli ya moko na moko ekobongola “liloba ya bosoto” na “ngolu kosalisa[ka].” Apostolo Paulo asosolaki yango, mpe na yoko ndelo moko na moko na biso akoki kosala yango lokola. Ekoki kobongola to koyanola motuna te, kasi libaku eleki motuya ekoki kozala soki ngolu ya kosalisaka ekokaki kobongola biso.

Natatoli na komikitisa ete tokoki “kosalisa na ngolu” na nzela ya liloba ya mawa ntango likabo ya Molimo Mosantu oyo tokolisi etoboli mitema na biso na mawa mpo na mayoki mpe makambo ya basusu. Epesi biso makoki ya kobongola bisika ya likama na bisika ya esantu. Natatoli na ntina ya Mobikisi moko ya bolingo oyo “atalaka motema [na biso]” mpe ayebi nini tozali kokanisa. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.