Donald L. Hallstrom
Mbongwana kani esengami mpo na biso mpo na kokoma lolenge ya bato tosengeli kozala?

Ntango totali na makanisi liyangangi oyo ya mokili mobimba, tokanisi ete ezali na likambo moko te ekokani na bosangani oyo—esika moko te. Ntina ya liyangani ya bonganganzambe ya likita linene ezali koteya basimbi bonganganzambe lolenge kani ya bato tosengeli kozala (tala3 Nephi 27:27) mpe kofulisa biso mpo na kokoma na lotomo na biso.

Na mibu na ngai ya Bonganga Nzambe ya Alona na Hawaii katikati ya nkoma ya mibu eleki mpe lokola misionele na Angeleterre, tokokaki kosangana na ndako ya mayangani mpe (na bokasi mingi) koyokemela liyangani ya bonganganzambe kosalelaka mokangano ya telephone. Na mibu ya nsima, satellite epesaki nzela na kopesa lolaka na bisika biponami ya Eklezia na bantene wana ya minene ya koyambela makambo boye tokoki koyoka mpe komona matambolisi mana. Nazali na bokamwi ya teknolozi! Bake bakokaki kokanisa mokili ya lelo, wapi moto nionso oyo azwi internet na telephone, etando, to ordinateur akoki kozwa ba nsangoya liyangani oyo.

Nzokande, bozwi oyo mpenza ekomi ebele ya mingongo ya basali ya Nkolo, oyo bazali lolenge moko na mongongo ya Nkolo (tala D&C 1:38), ezali na motuya moke longola se soki tozali na bolingi ya koyamba liloba (tala D&C 11:21) mpe nsima kolanda yango. Na koloba na pete, ntina ya likita linene mpe liyangani ya bonganganzambe ekokisami bobele soki tozali na bolingi ya kosala—soki tozali na bolingi ya kobongwana.

Bazomi na mibu mileki nazalaki kosala lokola episikopo. Na eleko ya molai nakutanaki na moto moko na palwasi na biso oyo azalaki mibu mingi nkulutu na ngai. Ndeko mobalo oyo azalaki na mokangano ya mobulu na mwasi na ye mpe akomaki mosika na bana na bango. Abundaki mpo na kobatela mosala, azalaka na baninga ya penepene te, mpe amonaki bozalani na bandimi ba palwasi mpasi mpenza na nsuka alingaki te kosala na Eklezia. Na ngonga moko ya boswani makasi etali mikakatano ya bomoi na ye, amiyekamaki na ngai—lokola nsuka ya masolo na biso mingi—mpe alobaki, “Episikopo, nazali kandakanda, mpe oyo ezali kaka lolenge nazali!”

Liloba wana ekamwisaki ngai mpenza botu wana mpe alandi ngai libela uta ntango wana. Mbala moko moto wana azwaki mokano— Mbala moko moko na moko na biso asukisaki—“oyo ezala kaka lolenge nazali,” tosundolaki bokoki na biso mpo na kobongwana. Tokokaki kotombola bondele ya mpembe, kokitisa mandoki na biso, kondima etumba,mpe bobele komitika—elikia nionso ya kolonga ebungaki. Atako boko na biso bakoki kokanisa ete yango elakisi biso te, ntango mosusu biso banso tolakisi ata moke bozalela ya mabe moko to mibale, “oyo ezala kaka lolenge nazali.”

Boye, tosangani na liyangani ya bonganganzambe oyo mpamba te nani tozali ezali te nani tokokoma. Tosangani awa na mpokwa ya lelo na nkombo ya Yesu Klisto. Tosangani na bondimi ete Bomikami na Ye epesi biso moko na moko na biso —kotala te botau na biso, bolembu na biso, bokakemi na biso—bokoki mpo na kobongwana. Tosangani na elikia ete ya biso mikolo ya nsima, kotala te mambi na biso ya kala, ekoki kozala malamu mingi koleka.

Ntango tosali elongo na liyangani na “likanisi ya solo” (Moroni 10:4), Molimo ezwi mobimba esika na mitema mpe makanisi na biso. Lokola Nkolo abimisaki na Profeta Joseph Smith, “Mpe ekosalema, ete , mbala inso lokola … bakoselela bondimi na ngai”—mikundola bondimi ezali libongisi ya nguya mpe ya mosala—“nakosopa Molimo na ngai likolo na bango ete bamisangisa elongo” (D&C 44:2). Yango ezali na ntina na mpokwa ya lelo!

Soki okanisi mikakatano na yo eleki ndelo, tika nalobela yo etali moto moko nakutanaki na ye na mwa mboka moko libanda ya Hyderabad, India, na 2006. Moto oyo alakisi ndakisa ya bolingi ya kobongwana. Appa Rao Nulu abotamaki na mboka ya India. Ntango azalaki na mibu misato, azwaki bokono ya bukabuka mpe etikaki ye na nzoto ya kobukana. Lingomba na ye eteyaki ye ete bokoki na ye ekomaki moke. Nzokande, lokola elenge monzemba akutanaki na bamisionele. Bateyaki ye bokoki bonene, na bomoi oyo mpe na bomoi ekoya. Abatisamaki mpe akotisamaki lokola mondimi ya Eklezia. Na bomoi ya ntina mpenza, atiaki lotoma moko mpo na kozwa Bonganganzambe ya Melikisedeki mpe kosala misio ya ntango mobimba. Na 1986 akulisamaki mpaka mpe abiangamaki kosala na India. Kotambola ezalaki pete te; asala malamu mingi oyo akokaki kosalelaka lingenda na loboko moko mpe akweyaki mbala mingi—kasi atikaki ata mokolo moko te. Asalaki elaka moko mpo na kosala na bomipesi misio, asalaki yango.

Ntango tokutanaki na Ndeko mobali Nulu, penepene na mibu 20 nsima ya misio na ye, na esengo apesaki biso mbote esika nzela esukaki mpe akambaki biso na nzela ya mbindo mpe etenga na ndako ya bisuku mibale akabolaki na mwasi na ye mpe bana misato. Ezalaki mokolo moko ya molunge mpenza mpe ya elengi te. Azalaki kaka kotambola na mpasi mingi, kasi ezalaki te na mawa na yemei. Na etingia ya yemei, akomaki moteyi, kopesaka mateya mpo bana ya mboka na ye. Ntango tokotaki na ndako na ye na bosawa, na mbala moko atelemaki akamataki ngai na loboko na nsuka mpe abendaki sanduku oyo ezalaki na bozwi na ye ya moutya mingi koleka. Alingaki ngai namona eteni ya lokasa. Elobaki, “ Na botombeli ya malamu mpe mapamboli ya Mpaka Nulu, misionele moko ya mpiko mpe ya esengo; [mokolo ya] Sanza ya motoba 25, 1987; [linzaka ya] Boyd K. Packer.” Na libaku wana, ntango oyo azalaki- Mpaka Packer akendeki na India mpe alobaki na liboke ya bamisionele, alobelaki Mpaka Nulu bokoki na ye. Na bozindo, oyo Ndeko mobali Nulu azalaki kolobela ngai ete mokolo wana ya 2006 ezalaki ete nsango malamu ebongolaka ye—libela!

Na botali oyo na ndako ya ba Nulu, tozalaki elongo na mokambi ya misio. Azalaki wana mpo na kosolosa na Ndeko mobali Nulu, mwasi na ye, mpe bana na ye—mpo na baboti kozwa dotasio na bango mpe kokangisama mpe mpo na bana kokangisama na baboti na bango. Tolakisaki lisusu libota na libongisi mpo na bongo kokende mobembo na Tempelo ya Hong Kong na Chine mpo na makuli. Balelaki na esengo lokola ndoto na bango bazelaki uta kala ekokisamaki.

Nini tozili mpo na momemi ya bonganganzambe ya Nzambe? Mbongwana kani esengami mpo na biso mpo kokoma lolenge ya bato tosengeli kozala? Napesi makanisi misato:

  1. 1.

    Tosengeli kozala babali ya bonganganzambe! Tozala bilenge babali bamemi Bonganganzambe ya Alona to babali bamemi Bonganganzambe ya Melekisedeki, tosengeli kozala babali bonganganzambe, kolakisaka bokomeli ya molimo mpamba te tosalaki mayokani. Lokola Paulo alobaki, “Ntango nazalaki mwana, nalobaki lokola mwana, nasosolaki lokola mwana, nakanisaki lokola mwana : kasi ntango nakomi moto, natii mpembeni makambo ya bomwana” (1 Bakolinti 13:11(). Tosengeli kozala na bokeseni mpamba te tosimbi bonganganzambe—na lofundu to lolendo to kokonza te—kasi na bosawa mpe na koteyama mpe na bosokemi. Kozwaka bonganganzambe mpe misala na yango kilikili esengeli koloba likambo mpo ba biso. Esengeli te kozala “elembo ya koleka” ya mpamba oyo ekokama na mbalakaka na boko mibu kasi ekela ya bule ya liyokani esalemi na makanisi. Tosengeli koyoka kozwa litomba mpenza mpe totondi mpenza ete misala na biso nionso elakisa yango. Soki mbala mingi te tokanisi ata etali bonganganzambe, tozali na mposa ya kobongwana.

  2. 2.

    Tosengeli kosalisa! Bozindo ya komema bonganganzambe ezali “kokumisa libiangi na biso” (talaD&C 84:33) na kosalisaka basusu. Koboya mokumba na biso eleki motuya mpo na kosalisa mwasi mpe bana na biso, to kondima to kokokisa na goigoi mabiangi na biso na Ekleiza, to kobatela te basusu longola se soko esepelisi biso ezali te nani tosengeli kozala. Mobikisi asakolaki, “ Okolinga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe molimo na yo mobimba, mpe mayele na yo mobimba” (Matai 22:37() mpe nsima abakisaki, “Soki alingi ngai osengeli kosalela ngai” (D&C 42:29(). Kimoyimi ezali bokesani ya mokumba ya bonganganzambe, mpe soki ezali elembo ya bomoto na biso tosengeli kobongwana.

  3. 3.

    Tosengeli kolongabana! Nakoki te kozala na bokoki ya Mpaka Jeffrey R. Holland, ntango alobaki na liyangani ya bonganganzambe mwa mibu mileki mpo na “kozwa na elongi na biso … , zolo na solo, na moto ekoki … mpo na kozikisa nsuki ya miso ya biso” (“We Are All Enlisted,”EnsignorLiahona, Nov. 2011, 45); kasi, bandeko babali, tosengeli kolamuka na misala emesani kondimama mingi na mokili etungisi nguya na biso ya bonganganzambe. Soki tokanisi tokoki kosala lisano ya nsoni na pornographie to bobuki mobeko ya bonsoni te to bosembo te na lolenge nionso mpe ezala te na mbano ya mabe na biso mpe mabota na biso, tokosami. Moloni alobaki, “Tala ete osali makambo nionso na bolongobani” (Mormon 9:29). Nkolo atindi na nguya, “Mpe ngai sikawa napesi na biso motindo mpo na kosala keba etali binomei, mpo na kopesa bokebi ya etingia na maloba ma bomoi ya seko” (D&C 84:43). Soki ezali na masumu ebongisami te oyo ezali kotia bolongobani na biso na likama, tosengeli kobongwana.

Eyano bobele mobimba na motuna etunaki Yesu KListo, “Lolenge kani ya bato bosengeli kozala? ezali moko Ye na bokuse mpe na mozindo apesaki: “Kutu lokola ngai nazali” (3 Nephi 27:27). Libengisi ya “koya epai ya Klisto, mpe kobongisama nie na ye” (Moroni10:32) nionso esengi mpe ezeli mbongwana. Na mawa, Ye atiki biso moko te. “Mpe soki bato bayei epai na ngai nakolakisa bango botau na bango … Nde nakosala makambo ya botau ekoma makasi” (Ether 12:27). Koyekamaka na Bomikabi ya Mobikisi, tokoki kobongwana. Na yango nazali na ntembe te. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.