Makomi
1 Nefi 14


Mokapo 14

Anzelu moko ayebisi Nefi mapamboli mpe botutu bokokweya likolo lya Bapaganu—Ezali bobele Biklezia bibale: Eklezia ya Mwana wa Mpate wa Nzambe mpe eklezia ya zabulu—Basantu ba Nzambe o bikolo binso baniokwami na eklezia enene mpe ya nsomo—Apostolo Yoane akokoma etali nsuka ya mokili. Penepene na 600–592 Yambo ya Klisto.

1 Mpe ekosalema, ete soko Bapaganu bakoyokemela epai ya Mwana wa Mpate wa Nzambe o mokolo mona moye akomilakisa epai ya bango o liloba, mpe lisusu o nguya, o ekela mpenza, mpo ya bolongoli bwa mabanga ma mabaku ma bango—

2 Mpe bakoyeisa te mitema mya bango mikasi na Mwana wa Mpate wa Nzambe, bakotangema o ntei ya nkona ya tata ya yo; iyo, bakotangema o ntei ya ndako ya Yisalaele; mpe bakozala bato boko bapambolama likolo lya mboka elakelama libela; bakomememe lisusu te o nse o kati ya bokangemi; mpe ndako ya Yisalaele ekobulunganisama lisusu te.

3 Mpe libulu liye linene, liye litimolami mpo ya bango na eklezia eye enene mpe ya nsomo, eye ekelamaki na zabulu mpe bana ba ye, ete akoka kokumba bozo bwa bato mosika o nse ya limfelo—iyo, ete libulu liye linene liye litimolamaki mpo ya bobebisami bwa bato likotonda na baye batimolaki lyango, mpo ya bobebisami nie bwa bango, elobi Mwana wa Mpate wa Nzambe; bobebisami bwa bozo te, longola se soko ezali bobwakami bwa bwango o kati ya limfelo liye lizali na nsuka te.

4 Mpo tala, eye ezali engebene na bokangemi bwa zabulu, mpe lisusu engebene na boyengebene bwa Nzambe, likolo lya bango banso baye bakosala nkuna mpe bonsomo liboso lya ye.

5 Mpe esalemaki ete anzelu alobaki epai ya ngai, Nefi, kolobaka: Omonoki ete soko Bapaganu bayamboli ekozala bolamu mpo ya bango; mpe oyebi lisusu etali mayokani ma Nkolo epai ya ndako ya Yisalaele; mpe oyokaki lisusu ete onso oyo ayamboli te asengeli kowa.

6 Yango wana, lisuma lizala epai ya Bapaganu soko boye ekozala ete bakoyeisa mitema mya bango mikasi na Mwana wa Mpate wa Nzambe.

7 Mpo ntango ekoya, elobi Mwana wa Mpate wa Nzambe, ete nakosala mosala monene mpe mwa bokamwi o ntei ya bana ba bato; mosala moko moye mokozala mwa libela, epai ya yoko to epai ya esusu—mpo ya kondimisa bango mpo ya kimia mpe bomoi bwa seko, to mpo ya bosundoli bwa bango o bokasi bwa mitema mya bango mpe lolanda la mayele ma bango mpo ya bomememi bwa bango o nse o kati ya bokangemi, mpe lisusu o kati bobebisami, o ndenge ya ntango mpe ya molimo lokola, engebene na bokangemi bwa zabulu, ya yango nalobelaki.

8 Mpe esalemaki ete elobaka anzelu maloba maye, alobaki epai ya ngai: Omikundola mayokani ma Tata epai ya ndako ya Yisalaele? Nalobaki epai ya ye: Iyo.

9 Mpe esalemaki ete alobaki epai ya ngai: Tala, mpe mono eklezia eye enene mpe ya nsomo, eye ezali mama wa bonsomo, ya bwango mokeli ezali zabulu.

10 Mpe alobaki epai ya ngai: Tala ezali bobele biklezia bibale; yoko ezali eklezia ya Mwana wa Mpate wa Nzambe, esusu ezali eklezia ya zabulu; yango wana, onso oyo azali te wa eklezia ya Mwana wa Mpate wa Nzambe, azali wa eklezia enene, eye ezali mama wa bonsomo; mpe ezali mwasi wa pite wa mabele manso.

11 Mpe esalemaki ete natalaki mpe namonoki mwasi wa pite wa mabele manso, mpe afandaki likolo lya mai mingi, mpe azalaki na bodondwi likolo lya mabele manso, o ntei ya bikolo, mabota, minoko, mpe bato banso.

12 Mpe esalemaki ete namonoki eklezia ya Mwana wa Mpate wa Nzambe, mpe motango mwa yango mozalaki moke, na ntina ya nkuna mpe bonsomo bwa mwasi wa pite oyo afandi likolo lya mai mingi; nzokande, namonoki eklezia ya Mwana wa Mpate, oyo bazalaki basantu ba Nzambe, bazalaki lisusu likolo lya etando enso ya mabele, mpe bokonzi bwa bango likolo lya etando ya mabele bozalaki boke, na ntina ya nkuna ya mwasi wa pite monene oyo namonoki.

13 Mpe esalemaki ete namonoki ete mama monene wa bonsomo asangisaki elongo ebele likolo lya etando ya mabele manso, o ntei ya bikolo binso bya Bapaganu, mpo ya kobunda na Mwana wa Mpate wa Nzambe.

14 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, namonoki nguya ya Mwana wa Mpate wa Nzambe, ete ekitaki likolo lya basantu ba eklezia ya Mwana wa Mpate, mpe likolo lya bato ba boyokani ba Nkolo, oyo bapalanganisamaki likolo lya etando enso ya mabele; mpe balatisamaki na bibundele bya bosembo mpe na nguya ya Nzambe na nkembo enene.

15 Mpe esalemaki ete namonoki ete nkele ya Nzambe esopanaki libanda likolo lya eklezia enene mpe ya nsomo, mingi ete ezalaki bitumba mpe manungunungu ma bitumba o ntei ya bikolo mpe mabota manso ma mabele.

16 Mpe lokola ebandaki kozala bitumba mpe manungunungu ma bitumba o ntei ya bikolo biye bizalaki bya mama wa bonsomo, anzelu alobaki epai ya ngai, kolobaka: Tala, nkele ya Nzambe ezali likolo lya mama wa basi ba pite; mpe tala, omoni makambo maye manso.

17 Mpe ekoya mokolo moye nkele ya Nzambe ekosopana libanda likolo lya mama wa basi ba pite, eye ezali eklezia enene mpe ya nsomo ya mabele manso, ya yango mokeli azali zabulu, nde, o mokolo mona, mosala mwa Tata mokobanda, na kolengeleke nzela mpo ya bokokisi bwa mayokani ma ye, maye asalaki elongo na bato ba ye baye bazali baye ndako ya Yisalaele.

18 Mpe esalemaki ete anzelu alobaki epai ya ngai, kolobaka: Tala!

19 Mpe natalaki mpe namonoki moto moko, mpe alataki monkoto mwa mpembe.

20 Mpe anzelu alobaki epai ya ngai: Tala moko wa bapostolo zomi na babale ba Mwana wa Mpate.

21 Tala, akomono mpe akokoma etikali ya makambo maye; iyo, mpe lisusu makambo mingi maye mazalaki.

22 Mpe akokoma lisusu etali nsuka ya mokili.

23 Yango wana, makambo maye akokoma mazali mayengebene mpe ma solo; mpe tala makomami o buku eye omonoki kobimaka libanda lya monoko mwa Moyuda; mpe o ntango mango mabimaki libanda lya monoko mwa Moyuda, to, o ntango buku eye ebimaki libanda lya monoko mwa Moyuda, makambo maye makomamaki mazalaki polele mpe peto, mpe ma motuya mingi koleka mpe petepete mpo ya bososoli bwa bato.

24 Mpe tala, makambo maye apostolo wa Mwana wa Mpate akokoma mazali makambo mingi maye omonoki, mpe tala, etikali okomono.

25 Kasi makambo maye okomono uta sikawa okokoma te; mpo Nkolo Nzambe akulisi apostolo ya Mwana wa Mpate wa Nzambe ete akoma mango.

26 Mpe lisusu basusu baye bazalaki, na bango alakisaki makambo manso, mpe bakomaki mango; mpe mango makangemi mpo ya koya o bopeto bwa mango, engebene na bosolo boye bozali na Mwana wa Mpate, o ntango esengeli ya Nkolo yemei, epai ya ndako ya Yisalaele.

27 Mpe ngai, Nefi, nayokaki mpe napesi litatoli, ete nkombo ya apostolo ya Mwana wa Mpate ezalaki Yoane, engebene na liloba lya anzelu.

28 Mpe tala, ngai, Nefi, epekisami ngai ete nakoma etikali ya makambo maye namonoki mpe nayokaki; yango wana, makambo maye nakomaki makoki mpo ya ngai, mpe nakomaki bobele eteni yoko eke ya makambo maye namonoki.

29 Mpe napesi litatoli ete namonoki makambo maye tata wa ngai amonoki, mpe anzelu wa Nkolo ayebisaki mango epai ya ngai.

30 Mpe sikawa natii nsuka yoko ya bolobi botali makambo maye namonoki ntango emememeki ngai o molimo; mpe soko makambo manso maye namonoki makomami te, makambo maye nakomaki mazali ma solo. Mpe boye ezali. Amene.