Makomi
1 Nefi 15


Mokapo 15

Nkona ya Lehi esengeli kozwa nsango elamu na Bapaganu o mikolo mya nsuka—Bosangani bwa Yisalaele bomekisami o nzete ya elaya eye, ya yango nzete ya mboka ekokangema o kati lisusu—Nefi alimboli limoni lya nzete ya bomoi mpe alobeli boyengebene bwa Nzambe o bokaboli bwa moto wa nkuna na mosembo. Penepene na 600–592 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, esilaka ngai komememe mosika o molimo, mpe komono makambo maye manso, nazongaki o ema ya tata wa ngai.

2 Mpe esalemaki ete namonoki bandeko babali ba ngai, mpe bazalaki koswana bango na bango etali makambo maye tata wa ngai alobaka epai ya bango.

3 Mpo solo alobaki makambo manene mingi epai ya bango, maye mazalaki makasi na kososola, longola se soko ekosenge moto na Nzambe; mpe ezalaki bango bakasi o mitema mya bango, yango wana a balukaki te Nkolo lokola basengeli.

4 Mpe sikawa ngai, Nefi, nayokaki mawa na ntina ya bokasi bwa mitema mya bango, mpe lisusu, na ntina ya makambo maye namonoko, mpe nayebaki masengeli na tembe te kosalema na ntina ya nkuna enene ya bana ba bato.

5 Mpe esalemaki ete nalongamaki na ntina ya matungisi ma ngai, mpo nakanisaki ete matungisi ma ngai mazalaki manene likolo lya manso, na ntina ya bobebisami bwa bato ba ngai, mpo namonoki bokwei bwa bango.

6 Mpe esalemaki ete esilaka ngai kozwa makasi, nalobaki epai ya bandeko babali ba ngai, ezalaki ngai na mposa ya koyeba ntina ya boswani bwa bango.

7 Mpe balobaki: Tala, tokoki te kososola maloba maye tata wa biso alobaki matali bitape bya mboka ya nzete ya elaya, mpe matali Bapaganu.

8 Mpe nalobaki epai ya bango: Esengeki bino epai ya Nkolo?

9 Mpe balobaki epai ya ngai: Tosalaki yango te; mpo Nkolo ayebisi te likambo lya boye epai ya biso.

10 Tala, nalobaki epai ya bango: Boniboni ezali ete bobateli te mitindo mya Nkolo? Boniboni ezali ete bokowa, na ntina ya bokasi bwa mitema mya bino?

11 Bomikondoli te makambo maye Nkolo alobaki?—Soko bokoyeisa te mitema mya bino mikasi, mpe bokosenge ngai o bondimi, kondimaka ete bokozwa, na etingia na kobatelaka mitindo mya ngai, solo makambo maye makoyebisama epai ya bino.

12 Tala, nalobi epai ya bino, ete ndako ya Yisalaele emekisamaki o nzete yoko ya elaya, na Molimo mwa Nkolo ona azalaki na tata wa biso; mpe tala ebukami biso te mosika uta o ndako ya Yisalaele, mpe ezali biso te etape yoko ya ndako ya Yisalaele?

13 Mpe sikawa, likambo liye tata wa biso alingi koloba litali bokangemi o kati ya bitape bya mboka na nzela ya litondi lya Bapaganu, lizali, ete o mikolo mya nsuka, ekosila nkona ya biso kokulumwa o bozangi bondimi, iyo, o ntaka ya mibu mingi, mpe nkola mingi nsima ya Masiya komilakisa o nzoto epai ya bana ba bato, nde litondi lya nsango elamu ya Masiya likokoma epai ya Bapaganu, mpe uta o Bapaganu epai ya montika mwa nkona ya biso—

14 Mpe o mokolo mona montika mwa nkona ya biso mokoyeba ete bazali baye ndako ya Yisalaele, mpe ete bazali bato ba boyokani bwa Nkolo; mpe nde bakoyeba mpe bakoya o boyebi bwa batata ba bango ba kala, mpe lisusu o boyebi bwa nsango elamu ya Mosikoli, eye esalemaki epai ya batata ba bango elongo na ye; yango wana, bakoya o boyebi bwa Mosikoli mpe biteni mpenza bya malongi ma ye, ete bakoka koyeba boniboni koya epai ya ye mpe kobikisama.

15 Mpe boye o mokolo mona bakosepela te, mpe bakopesa bosanzoli te epai ya Nzambe wa Seko, libanga lya bango mpe lobiko la bango? Iyo, o mokolo mona, bakozwa te bokasi mpe bilei uta o vino ya solo? Iyo, ekoya bango te epai ya etonga ya solo ya Nzambe?

16 Tala, nalobi epai ya bino, Iyo; bakokundolama lisusu o ntei ya ndako ya Yisalaele; bakokangema o kati, ezali bango etape ya mboka ya nzete ya elaya, o kati ya nzete ya elaya ya solo.

17 Mpe eye ezali nini tata wa biso alingi koloba; mpe alingi koloba ete ekosalema te kina ekosila bango kopalanganisama na Bapaganu; mpe alingi koloba ete ekosalema na nzela ya Bapaganu, ete Nkolo akoka kolakisa nguya ya ye epai ya Bapaganu, mpo ya ntina mpenza ete akobwakama na Bayuda, to na ndako ya Yisalaele.

18 Yango wana, tata wa biso alobelaki nkona ya biso yango moko te, kasi lisusu ndako ya Yisalaele, kolakisaka boyokani boye bokokokisama o mikolo mya nsuka; bwango boyokani Nkolo asalaki elongo na tata wa biso Abalayama, kolobaka: O nkona ya yo mabota manso ma mabele makopambolama.

19 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nalobaki nzike epai ya bango etali makambo maye; iyo, nalobaki epai ya bango etali bozongisi bwa Bayuda o mikolo mya nsuka.

20 Mpe nazongelaki epai ya bango maloba ma Yisaya, maye alobaki etali bozongisi bwa Bayuda, to bwa ndako ya Yisalaele; mpe ekosila bango kozongisama bakobulunganisama lisusu te, mpe bakopalanganisama lisusu te. Mpe esalemaki ete nalobaki maloba mingi epai ya bandeko babali ba ngai, ete bazwaki kimia mpe bamikitisaki liboso lya Nkolo.

21 Mpe esalemaki ete balobaki epai ya ngai lisusu, kolobaka: Likambo liye tata wa biso amonoki o limoni elingi koloba nini?

22 Mpe nalobaki epai ya bango: Ezalaki emoniseli ya nzete ya bomoi.

23 Mpe balobaki epai ya ngai: Lingenda lya ebende liye tata wa biso amonoki, liye likambaki o nzete lizali nini?

24 Mpe nalobaki epai ya bango ete ezalaki liloba lya Nzambe, mpe onso oyo akoyokemela epai ya liloba lya Nzambe, mpe akosimba yango ngbi, bakowa mokolo moko te; mpe masenginia mpe mbanzi ya nkanda ya monguna ikolonga bango te mpo ya lolanda, mpo ya kokamba bango o bobebisami.

25 Yango wana, ngai, Nefi, nalendisaki bango na koyokemela epai ya liloba lya Nkolo; iyo, nalendisaki bango na makasi manso ma bozo bwa ngai, mpe na likoki linso liye nazwaki, ete basala keba o liloba lya Nzambe mpe bamikundola kobatela mitindo mya ye ntango inso mpe o makambo manso.

26 Mpe balobaki epai ya ngai: Elingi koloba nini ebale ya mai eye tata wa biso amonoki?

27 Mpe nalobaki epai ya bango ete mai maye tata wa ngai amonoki mazalaki mbindo; mpe boye mpenza mayele ma ye maminamaki nie o makambo masusu ete amonoki te mbindo ya mai.

28 Mpe nalobaki epai ya bango ete ezalaki lobwaku la kobangisa, loye lokabolaki moto wa nkuna uta o nzete ya bomoi, mpe lisusu uta o basantu ba Nzambe.

29 Mpe nalobaki epai ya bango ete ezalaki emoniseli ya limfelo lya kobangisa, liye anzelu alobaki epai ya ngai elengelemeki mpo ya moto wa nkuna.

30 Mpe nalobaki epai ya bango ete tata wa biso lisusu amonoki ete boyengebene bwa Nzambe bokabolaki lisusu moto wa nkuna uta na mosembo; mpe engengeli ya bwango ezalaki lokola engengeli ya moto mokozika, moye mokomata epai ya Nzambe libela na libela, mpe mozali na nsuka te.

31 Mpe balobaki epai ya ngai: Likambo liye lilingi koloba monioko mwa nzoto o mikolo mya momekano, to lilingi koloba bozali bwa nsuka bwa bozo nsima ya liwa ya nzoto ya ntango, to lilobeli makambo maye mazali ma ntango?

32 Mpe esalemaki ete nalobaki epai ya bango ete lizali emoniseli ya makambo ma ntango mpe ma molimo lokola; mpo mikolo mikoya miye basengeli kosambisama mpo ya misala mya bango, iyo, kutu misala miye misalemaki na nzoto ya ntango o mikolo mya bango mya momekano.

33 Yango wana, soko bakokufa o nkuna ya bango, basengeli lokola kobwakama mosika, lokola o makambo maye mazali ma molimo, maye matali bosembo; yango wana, basengeli komememe mpo ya koteleme liboso lya Nzambe, mpo ya kosambisama mpo ya misala mya bango, mpe soko misala mya bango mizalaki mbindo basengeli mpenza kozala mbindo; mpe soko bazali mbindo esengeli mpenza ezala ete bakoka te kofanda o bokonzi bwa Nzambe; soko boye, bokonzi bwa Nzambe bosengeli kozala mbindo lokola.

34 Kasi tala, nalobi epai ya bino, bokonzi bwa Nzambe bozali bwa mbindo te, mpe eloko yoko te ya mbindo ekoki kokota o bokonzi bwa Nzambe; yango wana esengeli mpenza ezala esika yoko ya mbindo elengelemi mpo ya eye ezali mbindo.

35 Mpe esika ezali elengelemi, iyo, kutu limfelo lina lya kobangisa liye nalobelaki, mpe zabulu azali molengeli wa lyango; yango wana bozali bwa nsuka bwa bozo bwa bato bozali kofanda o bokonzi bwa Nzambe, to kobwakama libanda na ntina ya boyengebene, bwango nalobelaki.

36 Yango wana, moto wa nkuna abwakami mosika uta o mosembo, mpe lisusu mosika uta o nzete ena ya bomoi, ya yango mbuma ezali ya motuya mpe esengelama likolo lya mbuma inso; iyo, mpe eleki enene na makabo manso ma Nzambe. Mpe boye nalobaki na bandeko babali ba ngai. Amene.