Makomi
1 Nefi 18


Mokapo 18

Masuwa masilisami—Mbotama ya Yakobo mpe ya Yosefe ilobami—Lingomba limati masuwa mpo ya mboka elakelama—Bana babali ba Yisamaele mpe basi ba bango basangani o loyenge mpe botomboki—Nefi akangemi, mpe masuwa mazongisami nsima na ekumbaki ya nsomo—Nefi azwi bonsomi, mpe na losambo la ye moketi motiki—Bato bakomi o mboka elakelama. Penepene na 591–589 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete bakumbamelaki Nkolo, mpe bakendeki elongo na ngai; mpe tosalaki mabaya ma esaleli ya ntoki. Mpe Nkolo alakisaki ngai mbala na mbala nsima ya lolenge kani nakosala mabaya ma masuwa.

2 Sikawa ngai, Nefi, nasalaki mabaya nsima ya lolenge loteyamaki na bato te, mpe natongaki masuwa nsima ya lolenge la bato te; kasi natongaki mango nsima ya lolenge loye Nkolo alakisaki ngai; yango wana, ezalaki nsima ya lolenge la bato te.

3 Mpe ngai, Nefi, nakendeki o ngomba mbala nzike, mpe nasambelaki mbala nzike epai ya Nkolo; yango wana Nkolo alakisaki ngai makambo manene.

4 Mpe esalemaki ete esilisaki ngai masuwa, engebene na liloba lya Nkolo, bandeko babali ba ngai bamonoki ete mazalaki malamu, mpe esaleli ya mango ezalaki malonga mpenza; yango wana bamikitisaki lisusu liboso lya Nkolo.

5 Mpe esalemaki ete mongongo mwa Nkolo moyaki epai ya tata wa ngai, ete toteleme mpe tokita o kati ya masuwa.

6 Mpe esalemaki ete o mokolo mwa nsima, esilisaka biso kolengele biloko binso, mbuma mpe niama uta o esobe, mpe mafuta ma nzoi beboo, mpe bilei engebene na eye Nkolo atindaka biso, tokotaki o masuwa, elongo na mikumba mya biso minso mpe nkona ya biso, mpe eloko enso tomemeki elongo na biso, moto na moto engebene na mibu mya ye; yango wana, tokitaki biso banso o masuwa, elongo na basi ba biso mpe bana ba biso.

7 Mpe sikawa, tata wa ngai abotaki bana babale o esobe; nkulutu abiangemakiYakobo mpe leki Yosefe.

8 Mpe esalemaki ete esilaka biso banso kokita o kati ya masuwa, mpe kokamata elongo na biso bilei bya biso mpe biloko biye bitindamaka biso, tokotaki o kati ya mbu mpe totambolisamaki liboso lya mopepe ona mboka elakelama.

9 Mpe esilaka biso kotambolisama liboso lya mopepe o ntaka ya mikolo mingi, tala, bandeko babali ba ngai mpe bana babali baYisamaele mpe lisusu basi ba bango bakomaki komisepelisa, mingi ete babandaki kobina, mpe koyemba, mpe koloba na yauli nzike, iyo, kutu ete babosanaki na nguya kani emememeki bango kuna; iyo, batombolamaki o yauli eluti.

10 Mpe ngai, Nefi, nabandaki kobanga mpenza mbele Nkolo asilika na biso, mpe abete biso na ntina ya bobe bwa biso, ete tominama o bozindo mwa mbu; yango wana ngai, Nefi, nabandaki koloba na bango na limemia liike; kasi tala, basilikaki na ngai, kolobaka: Tolingi te ete ndeko wa biso mobali wa leki azala moyangeli wa biso.

11 Mpe esalemaki ete Lamani mpe Lemuele bakamataki ngai mpe bakangaki ngai na nsinga, mpe basalelaki ngai na nko nzike; nzokande, Nkolo atikaki yango ete akoka kolakisa nguya ya ye, mpo ya bokokisi liloba lya ye liye alobaki litali moto wa nkuna.

12 Mpe esalemaki ete esilisaka bango kokanga ngai mpenza ete nakoka koningana lisusu te, kompa, eye elengelemeki na Nkolo, etikaki kosala.

13 Yango wana, bayebaki te wapi bakokamba masuwa, mpenza ete emataki moketi moko monene, iyo, moketi moko monene mpe mwa nsomo, mpe tozongisamaki nsima likolo lya mai o ntaka ya mikolo misato; mpe babandaki kobanga mpenza mbele bazinda o ntei ya mbu; nzokande bakangolaki ngai te.

14 Mpe o mokolo mwa minei, moye tozongisamaki nsima, ekumbaki ebandaki kozala ya nsomo mpenza.

15 Mpe esalemaki ete tokomaki penepene na kominama o mbu. Mpe esilaka biso kozongisama nsima likolo lya mai o ntaka ya mikolo minei, bandeko ba ngai babandaki komono ete masambisi ma Nzambe mazalaki likolo lya bango, mpe ete basengelaki kowa longola se soko bakoyambola bobe bwa bango; yango wana, bayaki epai ya ngai, mpe bakangolaki ngai nkanga iye izalaki o nkingo ya maboko ma ngai, mpe tala ivimbaki mpenza; mpe lisusu makaka ma ngai mavimbaki mpenza, mpe ezalaki enene mpasi yango.

16 Nzokande, natalaki epai ya Nzambe, mpe nasanzolaki ye bolai bwa mokolo mobimba; mpe nayimayimaki te na Nkolo na ntina ya matungisi ma ngai.

17 Sikawa tata wa ngai, Lehi, alobaki makambo mingi epai ya bango, mpe lisusu epai ya bana ba Yisamaele; kasi, tala, bafulaki libanda bokaneli boike na oyo akoloba mpo ya ngai; mpe baboti ba ngai, ebukanaki bango na mibu, mpe eyokaki bango mpasi ya matungisi maike na ntina ya bana ba bango, bakitisamaki, iyo, kutu likolo lya mbeto ya bango ya malali.

18 Na ntina ya mpasi mpe mawa maike ma bango, mpe lisumu lya bandeko babali ba ngai, bayeisamaki penepene kutu na komememe libanda lya ntango eye mpo ya kokutana elongo na Nzambe wa bango; iyo, ya bango nsuki ya mpembe izalaki penepene na kokitisama mpo ya kolala o nse o ntei ya mputulu; iyo, kutu bazalaki penepene na kobwakama na mawa o ntei ya lilita lya mai.

19 Mpe Yakobo mpe Yosefe lokola, ezalaki bango bana, ezalaki bango na mposa ya bilei biike, bayokaki mpasi na ntina ya matungisi ma mama wa bango; mpe lisusu mwasi wa ngai, na ya ye mai ma miso mpe nsambo, mpe bana ba ngai lokola, balembisaki te mitema mya bandeko babali ba ngai ete bakangola ngai.

20 Mpe ezalaki eloko yoko te longola se nguya ya Nzambe, eye ekanelaki bango o bobebisami, ekokaki kolembisa mitema mya bango; yango wana, emonoki bango ete bakomaki penepene na kominama o bozindo bwa mbu bayambolaki likambo liye basalaka, mpenza ete bakangolaki ngai.

21 Mpe esalemaki ete esilisaka bango kokangola ngai, tala, nakamataki kompa, mpe ebandaki kosala wapi ezalaki mposa ya ngai. Mpe esalemaki ete nasambelaki epai ya Nkolo; mpe esilisaki ngai kosambela, mopepe motikaki, mpe moketi motikaki, mpe ezalaki kimia enene.

22 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nakambaki masuwa, ete tonanaki lisusu ona mboka elakelama.

23 Mpe esalemaki ete esilisaki biso konana o ntaka ya mikolo mingi, tokomaki o mboka elakelama; mpe tokendeki likolo lya mabele, mpe totelemisaki biema bya biso; mpe tobiangaki yango mboka elakelama.

24 Mpe esalemaki ete tobandaki kosala bilanga, mpe tobandaki kokona nkona; iyo, totiaki nkona ya biso inso o kati ya mabele, iye tomemeki uta o mboka ya Yelusaleme. Mpe esalemaki ete ikolaki mpenza; yango wana, topambolamaki na beboo.

25 Mpe esalemaki ete tokutaki likolo lya mboka ya elako, lokola ekendeki biso mobembo o esobe, ete ezalaki na niama ya zamba ya lolenge na lolenge, ngombe ya mwasi mpe ngombe ya mobali lokola, mpe mpunda mpe farasa, mpe ntaba mpe ntaba ya zamba, mpe ndenge inso ya niama ya zamba, iye bato bakoki kosalela. Mpe tokutaki ndenge inso ya makele, ya wolo, mpe ya mpauni lokola, mpe ya motako.