Makomi
1 Nefi 19


Mokapo 19

Nefi asali palaki ya makele mpe akomi mambi ma bato ba ye—Nzambe wa Yisalaele akoya mibu nkama motoba uta o ntango Lehi atikaki Yelusaleme—Nefi alobeli mpasi ya ye mpe bokakami bwa ye o ekulusu—Bayuda bakotiolama mpe bakopalanganisama kina o mikolo mya nsuka, ekozonga bango na Nkolo. Penepene na 588–570 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete Nkolo atindaki ngai, yango wana nasalaki palaki ya makele ete nakoka kokoma likolo lya yango likundoli lya bato ba ngai. Mpe likolo lya palaki iye nasalaki nakomaki likundoli lya tata wa ngai, mpe lisusu mibembo mya biso o esobe, mpe mabikuli ma tata wa ngai; mpe lisusu mabikuli mingi ma ngaimei nakomaki likolo lya yango.

2 Mpe nayebaki te o ntango esalaki ngai yango ete Nkolo akotinda ngai nasala palaki iye; yango wana, likundoli lya tata wa ngai, mpe bonkoko bwa batata ba ye, mpe eteni eleki mingi ya matamboli ma biso o esobe ekomami likolo lya palaki ya yango nalobeli; yango wana, makambo malekaki yambo nasala palaki iye, na bosolo, mingi mingi malobami likolo lya palaki ya yambo.

3 Mpe esilisaka ngai kosala palaki iye na nzela ya motindo, ngai, Nefi, nazwaki motindo moko ete misala mpe mabikuli, biteni bya yango bileki polele mpe motuya, bikomami likolo lya palaki iye; mpe ete makambo maye makomamaki makobatelama mpo ya bolakisi bwa bato ba ngai, baye bakozwa mabele, mpe lisusu mpo ya miango misusu mya bwania, miye miango miyebani epai ya Nkolo.

4 Yango wana, ngai, Nefi, nasali likundoli likolo lya palaki isusu, iye ipesi nsango yoko, to iye ipesi nsango yoko eleki enene ya bitumba mpe boweli mpe bobebisami bwa bato ba ngai. Mpe eye nasalaki, mpe natindaki bato ba ngai nini basala, ekosila ngai kokende; mpe ete palaki iye ikokitanisama uta nkola yoko o esusu, to uta profeta moko o mosusu, kina mitindo mya nsima mya Nkolo.

5 Mpe nsango yoko ya bosali bwa ngai palaki iye ikopesama nsima; mpe nde, tala, natamboli engebene na eye nalobaki; mpe eye nasali ete makambo maleki bule makoka kobatelama mpo ya boyebi bwa bato ba ngai.

6 Nzokande, nakomi eloko te likolo lya palaki iye longola se soko ezali eye nakanisi ezali ya bule. Mpe sikawa, soko nabungi, kutu babungaki kala; te ete nalingi komilimbisa na ntina ya bato basusu, kasi na ntina ya botau boye bozali na ngai, engebene na mosuni, nalingi komilimbisa.

7 Mpo makambo boko bato bakomono ete malongobani mpenza, o nzoto mpe o bozo lokola, basusu bakotala mango mpamba mpe bazali koniata mango o nse ya makolo ma bango. Iyo, kutu Nzambe mpenza wa Yisalaele bato baniati o nse ya makolo ma bango; nalobi, koniata o nse ya makolo ma bango kasi nalingi koloba o elobeli esusu—batali mpamba, mpe bayokemeli te o mongongo mwa malako ma ye.

8 Mpe tala akoya, engebene na maloba ma anzelu, o mobu nkama motoba uta o ntango tata wa ngai atikaki Yelusaleme.

9 Mpe mokili, na ntina ya bobe bwa bango, bakosambisa ye bo eloko mpamba; yango wana bafiakoli ye, mpe atiki yango; babamboli ye, mpe atiki yango. Iyo, babwakeli ye nsoi, mpe atiki yango, na ntina ya boboto bwa ye bwa bolingo mpe ya motema mwa ye molai ona bana ba bato.

10 Mpe Nzambe wa batata ba biso, baye bakambemaki libanda lya Ejipito, libanda lya bowumbu, mpe lisusu babatelamaki o esobe na ye, iyo, Nzambe wa Abalayama, mpe wa Yisaka, mpe Nzambe wa Yakobo, amitiki, engebene na maloba ma anzelu, lokola moto moko, o kati ya maboko ma bato ba nkuna, mpo atombolama, engebene na maloba ma Zenoki, mpe abakema o ekulusu, engebene na maloba ma Neumi, mpe akundama o lilita lyoko, engebene na maloba ma Zenosi, maye alobaki matali mikolo misato mya molili, miye mikozala elembo epesami ya liwa lya ye epai ya bango baye bakofanda o bisanga bya mbu, mingi koleka epesami na bango baye bazali baye ndako ya Yisalaele.

11 Mpo boye elobaki profeta: Nkolo Nzambe solo akobimela ndako mobimba ya Yisalaele o mokolo mona, boko na mongongo mwa ye, na ntina ya bosembo bwa bango, mpo ya bango bosepeli bonene mpe lobiko, mpe basusu na nkake mpe minkalali mya nguya ya ye, na ekumbaki, na moto, mpe na molinga, mpe mbongi ya molili, mpe na bofungwami bwa mabele, mpe na ngomba iye ikomememe o likolo.

12 Mpe makambo maye manso makoya solo, elobi profeta Zenosi. Mpe mabanga ma mokili makopasuka; mpe na ntina ya monkime mwa mabele, bakonzi mingi ba bisanga bya mbu bakosimbama na Molimo mwa Nzambe, mpo ya koganga: Nzambe wa lizali ayoki mpasi.

13 Mpe lokola mpo ya bango baye bazali o Yelusaleme, elobi profeta, bakobeteme na bato banso, zambi babaki Nzambe wa Yisalaele o ekulusu, mpe babaloli mitema mya bango mpembeni, babwaki bilembo mpe makamwa, mpe nguya mpe nkembo ya Nzambe wa Yisalaele.

14 Mpe zambi babaloli mitema mya bango mpembeni, elobi profeta, mpe batioli Mosantu Moko wa Yisalaele, bakoyengayenga o mosuni, mpe bakowa, mpe bakokoma litio lyoko mpe liseki lyoko, mpe bokoyinama o ntei ya bikolo binso.

15 Nzokande, ekoya mokolo mona, elobi profeta, moye bakobalola lisusu te mitema mya bango mpembeni ya Mosantu Moko wa Yisalaele, nde akomikundola mayokani maye asalaki elongo na batata ba bango.

16 Iyo, nde ekomikundola ye bisanga bya mbu; iyo, mpe bato banso baye bazali baye ndako ya Yisalaele, nakosangisa o kati, elobi Nkolo, engebene na maloba ma profeta Zenosi, uta o ntaka inei ya mabele.

17 Iyo, mpe mabele manso makomono lobiko la Nkolo, elobi profeta; ekolo na ekolo, libota na libota, monoko na monoko mpe bato na bato bakopambolama.

18 Mpe ngai, Nefi, nakomaki makambo maye epai ya bato ba ngai, ete mbele nakoka kondimisa bango ete bamikundola Nkolo Mosikoli wa bango.

19 Yango wana, nalobi o ndako mobimba ya Yisalaele, soko boye ekozala ete bakozwa makambo maye.

20 Mpo tala, nazali na misala o molimo, miye milembisi ngai kutu ete mikangano mya binama bya nzoto ya ngai mizali mitau, mpo ya bango baye bazali o Yelusaleme; mpo ezalaka Nkolo na ngolu te, mpo ya kolakisa epai ya ngai etali bango, kutu lokola esalaka baprofeta ba kala, nasengelaki kowa lokola.

21 Mpe solo alakisaki epai ya baprofeta ba kala makambo manso matali bango; mpe lisusu alakisaki epai ya mingi etali biso; yango wana, esengeli mpenza ete toyeba makambo matali bango mpo makomamaki likolo lya palaki ya motako.

22 Sikawa esalemaki ete ngai, Nefi, nalakisaki bandeko babali ba ngai makambo maye; mpe esalemaki ete natangaki makambo mingi na bango, maye makomamaki likolo lya palaki ya motako, ete bakoka koyeba etali misala mya Nkolo o mboka isusu, o ntei ya bato ba kala.

23 Mpe natangaki makambo mingi epai ya bango maye makomamaki o buku ya Mose; kasi ete nakoka kondimisa bango malamu mpo ya kondima na Nkolo Mosikoli wa bango natangaki epai ya bango eye ekomamaki na profeta Yisaya; mpo namekisaki nkoma isantu inso epai ya biso, ete ekoka kozala mpo ya litomba mpe boyekoli bwa biso.

24 Yango wana nalobaki epai ya bango, kolobaka: Yokani maloba ma profeta, bino baye bozali montika mwa ndako ya Yisalaele, etape yoko eye ebukamaki mpenza; yokani maloba ma profeta, maye makomamaki o ndako mobimba ya Yisalaele, mekisani mango epai ya binomei, ete bokoka kozala na elikia lokola bandeko ba bino uta wapi bobukamaki mpenza; mpo nsima ya lolenge loye profeta akomaki.