Makomi
1 Nefi 2


Mokapo 2

Lehi amemi libota lya ye o kati ya esobe mpembeni ya Mbu Etane—Batiki bozwi bwa bango—Lehi abonzi libonza lyoko epai ya Nkolo mpe ateyi bana babali ba ye babatela mitindo—Lamani mpe Lemuele bayimayimi na tata wa bango—Nefi azali na botosi mpe asambeli o bondimi; Nkolo alobi na ye, mpe aponomi mpo ya koyangela bandeko babali ba ye. Penepene na 600 Yambo ya Klisto.

1 Mpo tala, esalemaki ete Nkolo alobaki epai ya tata wa ngai, iyo, kutu o ndoto yoko, mpe alobaki epai ya ye: Opambolami Lehi, na ntina ya makambo maye osalaki; mpe zambi ozalaki potongono, mpe osakolaki epai ya bato baye makambo maye natindaki yo, tala, baluki kolongola bomoi bwa yo.

2 Mpe esalemaki ete Nkolo atindaki tata wa ngai, kutu o ndoto yoko, ete akamata libota lya ye mpe akende o kati ya esobe.

3 Mpe esalemaki ete azalaki na botosi epai ya liloba lya Nkolo, yango wana asalaki lokola Nkolo atindaki ye.

4 Mpe esalemaki ete akendeki o kati ya esobe. Mpe atikaki ndako ya ye, mpe mboka ya ye ya lisango, mpe wolo ya ye, mpe mpauni ya ye, mpe biloko bya ye bya motuya, mpe akamataki eloko te elongo na ye, longola se ya ye libota, mpe bilei, mpe biema, mpe bakendeki o esobe.

5 Mpe akitaki mpembeni ya ndelo, penepene na libongo lya Mbu Etane; mpe akendeki mobembo o esobe o ndelo iye izali penepene mpenza na Mbu Etane; mpe akendeki mobembo o esobe elongo na libota lya ye, liye likwaki mama wa ngai Salia, mpe bandeko babali ba nkulutu ba ngai, baye bazalaki Lamani, Lemuele mpe Sami.

6 Mpe esalemaki ete ekendeke ye mobembo mikolo misato o esobe, atelemisaki ema ya ye o lobwaku, mpembeni ya ebale ya mai.

7 Mpe esalemaki ete atongaki lotale la mabanga, mpe asalaki libonza lyoko epai ya Nkolo, mpe apesaki matondi epai ya Nkolo Nzambe wa biso.

8 Mpe esalemaki ete abiangaki nkombo ya ebale, Lamani, mpe ezalaki kosopana o kati ya Mbu Etane; mpe lobwaku lozalaki o ndelo, mpembeni ya monoko mwa yango.

9 Mpe emonoki tata wa ngai ete mai ma ebale mazalaki kosopana o kati ya liziba lya Mbu Etane, alobaki epai ya Lamani, kolobaka: O tika ete okoka kozala bo ebale eye, ntango inso kokimaka mbangu o kati ya liziba lya bosembo bonso!

10 Mpe alobaki lisusu epai ya Lemuele: O tika ete okoka kozala bo lobwaku loye, sikisiki mpe nkonzo, mpe molende na kobatelaka mitindo mya Nkolo!

11 Sikawa eye alobaki na ntina ya nkanza ya Lamani mpe ya Lemuele; mpo tala bazalaki koyimayima o makambo mingi na tata wa bango, zambi azalaki moto wa mamoni, mpe akumbaka bango libanda lya mboka ya Yelusaleme, mpo batika mboka ya lisango lya bango, mpe wolo ya bango, mpe mpauni ya bango, mpe biloko bya motuya bya bango, mpo bawa o esobe. Mpe oyo balobaki, asalaka na ntina ya bililingi bya ligboma bya motema mwa ye.

12 Mpe boye Lamani mpe Lemuele, ezalaki bango bankulutu, bazalaki koyimayima na tata wa bango. Mpe bazalaki koyimayima zambi bayebaki te bozalani bwa Nzambe oyo akelaki bango.

13 Mpe bandimaki te ete Yelusaleme, engumba ena enene, ekokaki kobebisama engebene na maloba ma baprofeta. Mpe bazalaki bo Bayuda baye bazalaki o Yelusaleme, baye balukaki kolongola bomoi bwa tata wa ngai.

14 Mpe esalemaki ete tata wa ngai alobaki epai ya bango o lobwaku la Lemuele, na nguya, etondisamaki ye na Molimo, kina mikuwa mya bango milengeki liboso lya ye. Mpe abulunganisaki bango, ete bamekaki te kozongisa na ye liloba; yango wana, basalaki lokola atindaki bango.

15 Mpe tata wa ngai afandaki o ema.

16 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, ezalaki ngai elenge mpenza, nzokande ezalaki ngai molai o nzoto, mpe lisusu ezalaki ngai na mposa mingi ya koyeba mibombamo mya Nzambe, yango wana, nabelelaki epai ya Nkolo; mpe tala, abimelaki ngai, mpe alembisaki motema mwa ngai, ete nandimaki maloba manso maye tata wa ngai alobaki; yango wana, natombokaki na ye te bo bandeko babali ba ngai.

17 Mpe nalobaki epai ya Sami, koyebisaka ye makambo maye Nkolo alakisaki ngai na Molimo Mosantu mwa ye. Mpe esalemaki ete andimaki maloba ma ngai.

18 Kasi, tala, Lamani mpe Lemuele bayokemelaki epai ya maloba ma ngai te; mpe eyokaki ngai mawa na ntina ya bokasi bwa mitema mya bango, nabelelaki epai ya Nkolo mpo ya bango.

19 Mpe esalemaki ete Nkolo alobaki epai ya ngai, kolobaka: Opambolami, Nefi, mpo ya bondimi bwa yo, mpo olukaki ngai na etingia, na bokitisi bwa motema.

20 Mpe mbala nzike lokola ekobatela yo mitindo mya ngai, okozwa bomengo, mpe okokambema o mboka yoko ya elako; iyo, kutu mboka yoko eye nalengeleki mpo ya yo; iyo, mboka yoko eye eponomo likolo lya mboka inso isusu.

21 Mpe mbala nzike lokola ekotomboka na yo bandeko babali ba yo, bakokatama mosika uta o miso mya Nkolo.

22 Mpe mbala nzike lokola ekobatela yo mitindo mya ngai, okokoma moyangeli moko mpe molakisi moko likolo lya bandeko babali ba yo.

23 Mpo tala, o mokolo mona moye bakotomboka na ngai, nakolakela bango botutu, kutu na botutu bwa nsomo, mpe bakozala na nguya te likolo lya nkona ya yo longola se soko bakotomboka na ngai lokola.

24 Mpe soko boye ekozala ete bakotomboka na ngai, bakozala fimbo epai ya nkona ya yo, mpo ya kolamusa bango o nzela ya bokundoli.